Bampasi ya bato: Mpo na nini Nzambe atikelaki yango nzela?
NA EBANDELI ya lisoló ya bato, mpisoli ya bwale to ya mpasi ezalaki soko moke te. Bato bazalaki komona mpasi te. Bato bazalaki na ebandeli moko ya kokoka. “Njambe atalaki bilɔkɔ yɔnsɔ bisilaki ye kojalisa, mpe ijalaki malamu mingi.”—Genese 1:31.
Kasi, basusu balobaka ete: ‘Lisoló ya Adama na Eva kati na elanga ya Edene ezali bobele lisapo mpamba.’ Na mawa nyonso, bakonzi mingi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bazali koloba bongo. Nzokande, Yesu Klisto, ye oyo azali na nguya monene, andimaki bosolo ya makambo oyo masalemaki na Edene. (Matai 19:4-6) Lisusu, lolenge bobele moko ya koyeba mpo na nini Nzambe atikaki nzela ete bato bámona mpasi, ezali bongo ya kotalela na bozindo makambo oyo malekaki na ebandeli ya lisoló ya bato.
Adama, mobali ya liboso, apesamelaki mosala kitoko ya kobatela elanga ya Edene. Lisusu, Nzambe atyaki liboso na ye mokano ya kopalanganisa efandelo wana ya Edene ete ekóma elanga ya bisengo kati na mabelé mobimba. (Genese 1:28; 2:15) Mpo na kosalisa Adama ete akokisa mokumba wana monene, Nzambe apesaki ye molongani, Eva, mpe ayebisaki bango ete bábota mingi, báyikana mpe báyangela mabelé. Nzokande, eloko mosusu ezalaki na ntina mpo ete mokano ya Nzambe mokokisama mpenza mpo na mabelé mpe mpo na bato. Lokola azalisamaki na elilingi ya Nzambe, moto apesamelaki likoki ya kopona oyo alingi; na yango, esengelaki ete mokano ya moto etɛmɛla soko moke te mokano ya Nzambe. Soki bongo te, mobulungano molingaki kozala kati na mɔlɔ́ngɔ́, mpe mokano ya Nzambe mpo na oyo etali kotondisa mabelé na libota moko ya kimya elingaki kokokana te.
Komonisa botosi epai na boyangeli ya Nzambe ezalaki likambo lisɛngami na makasi te. Esengelaki kozala elembo ya bolingo mpo na likoki oyo moto azali na yango ya kopona oyo alingi. Na ndakisa, tozali kotánga ete ntango Yesu akutanaki na komekama makasi, abondelaki ete: “Tata, sɔkɔ okani boye, longola kɔpɔ oyo na ngai, kasi mokano na ngai esalama tɛ, kasi bobɛlɛ mokano na yɔ.”—Luka 22:42.
Bobele bongo, mpo na komonisa soki balingaki kotosa boyangeli ya Nzambe, yango etalelaki Adama na Eva. Mpo na yango, Yehova Nzambe abongisaki emekeli moko ya pɛtɛɛ. Moko kati na banzeté ya elanga ebengamaki “njete na koyeba malamu mpe mabe.” Ezalaki komonisa lotómo oyo Nzambe azali na yango ya kotya mibeko ya etamboli oyo ebongi. Na elobeli ya polele, Nzambe apekisaki ete bálya te mbuma ya nzeté wana mpenza. Soki Adama na Eva bakotosa te, yango esengelaki komema bango na liwa.—Genese 2:9, 16, 17.
Ebandeli ya bampasi ya bato
Mokolo moko, mwana moko ya elimo ya Nzambe atyaki ntembe na lolenge ya koyangela ya Nzambe. Kosaleláká nyoka lokola mwango ya kosolola, atunaki Eva ete: “Njambe alobaki sɔlɔ ete bino bokoki kolia mbuma na njete yɔnsɔ na elanga tɛ?” (Genese 3:1) Na yango, mombóto ya ntembe elónamaki kati na makanisi ya Eva mpo na oyo etali koyeba soki lolenge ya koyangela ya Nzambe ezalaki sembo.a Eva apesaki eyano ya solo, oyo ayekolaki yango epai na mobali na ye. Nzokande, na nsima, ekelamu wana ya elimo abongolaki maloba ya Nzambe mpe abukaki lokuta mpo na oyo etali makambo mabe oyo malingaki kobima mpo na kozanga botosi, alobaki ete: “Bino bokokufa sɔlɔ tɛ, mpɔ ete Njambe ayebi ete na mokɔlɔ bokolia yango, miso na bino makofungwa, mpe bino bokojala pelamɔkɔ na Njambe, koyeba malamu mpe mabe.”—Genese 3:4, 5.
Na mawa nyonso, Eva alengolamaki na kokanisa ete kozanga botosi esengelaki te kobimisa bampasi ya bato, kasi elingaki nde komema na bomoi moko ya malamu koleka. Lokola azalaki kotala mbuma yango mingi, ekómaki mpe komonana lisusu kitoko mingi koleka, mpe alyaki yango. Na nsima, apusaki Adama ete ye mpe alya yango. Likambo ya mawa, Adama aponaki kobatela kondimama epai na mwasi na ye, na esika ete abatela kondimama epai na Nzambe.—Genese 3:6; 1 Timoté 2:13, 14.
Na kobimisáká botomboki oyo, ekelamu wana ya elimo amikómisaki motɛmɛli ya Nzambe. Na yango, akómaki kobengama Satana, oyo euti na liloba ya Liebele, oyo elimboli “motɛmɛli.” Akosaki mpe na ntina na Nzambe, komikómisáká bongo motɔ́ngi. Yango wana abengami mpe Zábolo, oyo euti na liloba ya Greke oyo elimboli “motɔ́ngi.”—Emoniseli 12:9.
Na yango, bampasi ya bato ebandaki wana. Bikelamu misato ya Nzambe basalelaki na lolenge mabe likoki na bango ya kopona oyo balingi, na koponáká lolenge ya bomoi ya moimi oyo emonisi botɛmɛli liboso na Mozalisi na bango. Motuna oyo ebimaki yango oyo, Lolenge nini Nzambe alingaki kosilisa botomboki wana na lolenge ya sembo oyo elingaki kozongisa elikya ya bikelamu mosusu ya mayele, kati na bango baanzelu ya sembo na likoló mpe bakitani ya Adama mpe Eva, baoyo babotamaki na nsima?
Eyano ya mayele ya Yehova
Basusu bakoki koloba ete mbɛlɛ elingaki kozala malamu soki Nzambe abomaki Satana, Adama mpe Eva na mbala moko. Kasi yango elingaki te kosilisa ntembe oyo botomboki wana ebimisaki. Satana abimisaki ntembe mpo na lolenge ya koyangela ya Nzambe, kolobáká ete bato bakoki kozala na bomoi ya malamu koleka kozanga koyangelama na Nzambe. Lisusu, bolóngi oyo azwaki na kopusáká bato mibale ya liboso ete bátɛmɛla boyangeli ya Nzambe ebimisaki mituna misusu. Lokola Adama mpe Eva basalaki lisumu, yango elingaki koloba ete ezalaki na eloko moko malamu te kati na lolenge oyo Nzambe azalisaki moto? Nzambe akokaki kozala na moto mosusu awa na mabelé, oyo akokaki kotikala sembo epai na ye? Mpe, ezali boni mpo na baanzelu, bana ya Yehova oyo bamonaki botomboki ya Satana? Balingaki kosimba boyengebene ya lotómo na Ye ya koyangela? Emonani polele ete, ntango molai ezalaki na ntina mingi mpo na kosukisa ntembe wana. Ezali mpo na yango nde Nzambe atikaki nzela na Satana ete azala kino na mikolo na biso.
Mpo na Adama mpe Eva, na mokolo ya botomboki na bango, Nzambe akatelaki bango etumbu ya liwa. Ezali na ntango wana nde liwa ebandaki. Bakitani na bango, baoyo babotamaki nsima wana Adama mpe Eva basalaki lisumu, basangolaki lisumu mpe liwa uta na baboti na bango ya kozanga kokoka.—Baloma 5:14.
Kati na ntembe wana, Satana abandaki nzela na ye elongo na bato mibale ya liboso na ngámbo na ye. Asalelaki ntango oyo epesamelaki ye mpo na koluka kotya bakitani nyonso ya Adama na nsé ya litambwisi na ye. Alóngaki mpe na kolengola ebele ya baanzelu na kokɔtisáká bango kati na botomboki na ye. Nzokande, eteni monene ya baanzelu, bana ya Nzambe, basimbaki na bosembo nyonso boyengebene ya boyangeli ya Yehova.—Genese 6:1, 2; Yuda 6; Emoniseli 12:3, 9.
Ntembe yango ezalaki bongo kati na boyangeli ya Nzambe mpe oyo ya Satana, ntembe oyo ezalaki naino makasi mpenza na mikolo ya Yobo. Na etamboli na ye, mobali wana ya sembo amonisaki ete alingaki boyangeli ya sembo ya Nzambe, kasi aboyaki lipandá oyo euti na Satana, lolenge bato ya kobanga Nzambe lokola Abele, Enoka, Noa, Abalayama, Yisaka, Yakobo, mpe Yosefe basilaki kosala yango liboso. Nkombo ya Yobo elobamaki mingi kati na lisoló moko oyo elekaki na likoló liboso ya baanzelu ya sembo ya Nzambe. Mpo na kosimba boyangeli na Ye ya sembo, Nzambe alobaki na Satana ete: “Okanisi na motema na yɔ likambo na moombo na ngai Yobo? Mpɔ ete mosusu ajali lokola ye kati na mokili tɛ, moto malamu bɛ mpe na sembo, oyo akotosaka Njambe mpe akoboyaka mabe?”—Yobo 1:6-8.
Koboyáká kondima kozanga kolónga na ye, Satana alobaki ete Yobo azalaki kosalela Nzambe mpo na bantina ya moimi, mpamba te Nzambe apesaki Yobo mapamboli mingi ya bozwi ya mosuni. Na yango, Satana alobaki ete: “Nde tika ete osembola lobɔkɔ na yɔ sasaipi mpe omama yɔnsɔ ijali na ye mpe akolakela yɔ mabe na miso na yɔ.” (Yobo 1:11) Satana asukaki bobele wana te, atyaki ntembe mpo na bosembo ya bikelamu nyonso ya Nzambe. Alobaki ete: “Moto akopɛsa yɔnsɔ ejali na ye mpɔ na bomɔi na ye.” (Yobo 2:4) Maloba wana ya matumoli oyo etondi na kotuka etalelaki bobele Yobo te, kasi lisusu basambeli nyonso ya sembo ya Nzambe na likoló mpe na mabelé. Satana alobaki ete balingaki kokata boyokani na bango elongo na Yehova soki bomoi na bango etyamaki na likámá.
Yehova Nzambe atyaki mpenza motema na bosembo ya Yobo. Mpo na komonisa elembeteli na yango, atikaki nzela na Satana ete apesa mpasi epai na Yobo. Na bosembo na ye, Yobo asukaki te bobele na kopɛtola nkombo na ye moko kasi lisusu, oyo eleki ntina, asimbaki boyengebene ya lotómo ya koyangela ya Yehova. Emonanaki ete Zábolo azalaki mobuki na lokuta.—Yobo 2:10; 42:7.
Nzokande, ndakisa eleki monene ya bosembo kati na komekama ezalaki bongo Yesu Klisto. Nzambe akɔtisaki bomoi ya Mwana na ye, oyo azalaki anzelu, longwa na likoló kino na libumu ya ngɔndɔ moko. Na yango, Yesu asangolaki te lisumu mpe kozanga kokoka. Nkutu, akólaki mpenza lokola moto ya kokoka, na bokokani na mobali ya yambo, liboso ete mobali yango abungisa ezalela na ye ya kokoka. Satana akanelaki mpenza Yesu, kobimiseláká ye ebele ya masenginya mpe komekama, oyo eyaki kosuka na liwa ya nsɔni. Kasi Satana alóngaki te kobebisa bosembo ya Yesu. Na motema mobimba mpenza, Yesu asimbaki boyengebene ya boyangeli ya Tata na ye. Amonisaki mpe ete mobali ya kokoka, Adama, akokaki kolimbisama te na ndenge alandaki Satana kati na botomboki na ye. Adama akokaki kozala sembo na nsé ya komekama na ye ya moke mpenza.
Nini emonani lisusu?
Pene na mibu 6 000 ya bampasi ya bato esili koleka uta botomboki ya Adama mpe Eva. Na boumeli ya ntango yango, Nzambe atikeli bato nzela mpo ete bámeka mitindo mikeseni ya biyangeli. Bansango ya nsɔ́mɔ na ntina etali bampasi ya bato ezali komonisa ete moto akoki te komiyangela ye moko. Ya solo, mobulungano ezali makasi lelo oyo kati na bisika mingi awa na mabelé. Kozala na lipandá liboso ya Nzambe, lolenge Satana akumisaki yango, ezali mpenza libebi.
Yehova azalaki na mposa te ya komilongisa ye. Ayebi ete lolenge na ye ya koyangela ezali sembo mpe ezali mpo na litomba lileki malamu ya bikelamu na ye. Nzokande, mpo na kopesa eyano na lolenge lobongi na mituna nyonso oyo botomboki ya Satana ebimisaki, atikelaki bikelamu na ye ya mayele nzela ete bázala na likoki ya komonisa soki balingi boyangeli na ye ya boyengebene.
Mbano oyo ekozwama na kolinga Nzambe mpe na kozala sembo epai na ye eleki mpenza mosika bampasi ya ntango mokuse oyo ezali kouta na Zábolo. Ndakisa ya Yobo emonisi yango. Yehova Nzambe abikisaki Yobo na bokɔnɔ oyo Zábolo ayeiselaki ye. Lisusu, Nzambe “apambolaki mikɔlɔ na nsuka na Yobo koleka yango na ebandeli na ye.” Na nsuka, nsima ya bomoi molai ya mibu 140, “Yobo akufaki mpaka, atondi na mikɔlɔ mingi.”—Yobo 42:10-17.
Yakobo, ye moklisto, mokomi ya Biblia, azali kobenda likebi likoló na likambo oyo na kolobáká ete: “Bosili koyoka mpo na mpiko na Yobo, bosili komona nsuka na makambo na ye epai na Yehova, mpo ete Yehova atondi na boboto mpe na motema mawa.”—Yakobo 5:11, NW, maloba na nsé ya lokasa.
Nsuka ebɛlɛmi sikawa mpo na Satana mpe mokili na ye. Mosika te, Nzambe akosukisa bampasi nyonso oyo botomboki ya Satana ememaki likoló na bato. Ata bakufi mpe bakosekwa. (Yoane 11:25) Na nsima, bato ya sembo lokola Yobo bakozala na libaku ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé oyo ekobongwana paladiso. Mapamboli wana ya mikolo mizali koya, oyo Nzambe akosopa likoló na basaleli na ye ekolóngisa ye mpo na libela lokola Moyangeli ya sembo oyo “atondi na boboto mpe na motema mawa.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Philip Mauro, ye moto wa mibeko mpe mokomi na ebandeli ya ekeke ya ntuku mibale, ye oyo atalelaki likambo yango kati na lisoló na ye ya “Ebandeli ya mabe,” alobaki ete yango ezalaki “ntina ya mobulungano nyonso ya bato.”
[Etanda/Bililingi na lokasa 8]
BANZAMBE MABE OYO BATO BAMISALELI
BANZAMBE ya kala bamonisamaki lokola babómi mpe basáli ya pite. Mpo na kokitisa nkanda na bango, baboti bazalaki kotumba bana na bango na bomoi kati na mɔ́tɔ. (Deteronome 12:31) Na ngámbo mosusu, bafilozofe ya bapakano bazalaki koteya ete Nzambe azali te na mayoki lokola nkanda to mawa.
Makanisi mapemami na bademó oyo bafilozofe wana bazalaki koteya mazalaki na bopusi likoló na Bayuda, baoyo bazalaki komitánga bato na Nzambe. Moyuda, mofilozofe Philo, oyo azalaki na bomoi na ntango ya Yesu, alobaki ete Nzambe “akoki komonisa mayoki soko moke te.”
Ata nkutu Bafalisai baoyo bazalaki na malako ya makasimakasi balóngaki te kopɛngola bopusi ya filozofi ya Bagreke. Bandimaki mateya ya Platon oyo elobi ete moto asalemi na molimo mozangi kokufa oyo ekangisami kati na nzoto. Lisusu, engebene mokomi na makambo ya kala Josèphe, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya liboso, Bafalisai bazalaki kondima ete milimo ya bato mabe mizalaki “konyokwama na etumbu ya seko.” Nzokande, Biblia ezali kopesa moboko moko te mpo na likanisi motindo wana.—Genese 2:7; 3:19; Mosakoli 9:5; Ezekiele 18:4.
Ezali boni mpo na bayekoli ya Yesu? Bapesaki nzela ete filozofi ya bapakano ezala na bopusi likoló na bango? Kososoláká likámá yango, ntoma Paulo akebisaki baninga na ye baklisto ete: “Bokeba ete moto tɛ apunja bino na maloba na ye na mayɛlɛ, na bibanjabanja na ye na motindo na Klisto tɛ kasi na motindo na bijaleli na bato mpe na makambo mikɛmikɛ na mokili.”—Bakɔlɔsɛ 2:8; talá lisusu 1 Timoté 6:20.
Na mawa nyonso, ntalo monene ya baoyo bazalaki kobéngama ete bakɛngɛli baklisto ya ekeke ya mibale mpe ya ekeke ya misato batyaki likebi te na makebisi oyo mpe bateyaki ete Nzambe azali na mayoki te. Búku The Encyclopedia of Religion eyebisi ete: “Mingimingi, bizaleli ya Nzambe bizalaki kososolama na motindo oyo mondimamaki na makanisi ya Bayuda mpe na filozofi ya ntango wana . . . Likanisi oyo ete Nzambe Tata akokaki kozala na mayoki lokola mawa . . . mbala mingi etalelamaki lokola ekoki kondimama te kino ntango mingi na nsima, na ekeke ya ntuku mibale.”
Na yango, boklisto ya nkombo mpamba endimaki liteya ya nzambe mabe oyo apesaka basumuki etumbu na konyokoláká bango kati na mpasi ya seko. Nzokande, Yehova Nzambe alobi polele kati na Biblia, Liloba na ye ete, “masumu makofuta mbɔngɔ, mbɔngɔ yango bobɛlɛ kufa,” kasi alobi te ete mpasi ya konyokwama seko.—Baloma 6:23.
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Na likoló: Acropolis Museum, na Grèce
Na ndingisa ya boboto ya British Museum
[Elilingi na lokasa 7]
Mokano ya Nzambe ya kobongola mabelé ete ekóma paladiso ya Edene esengeli kokokisama!