Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/12 nk. 3-4
  • Eyenga ya Mbótama elimboli nini mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eyenga ya Mbótama elimboli nini mpo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mombongo”
  • Noel Mpo na nini ezali na lokumu mingi na mboka Japon?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na nini ata na Azia bazali kosepela Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nini etindaka bato básala makambo oyo basalaka na Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Biutelo Ya Eyenga ya Mbotama na Mikolo na Biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/12 nk. 3-4

Eyenga ya Mbótama elimboli nini mpo na yo?

Okoyanola lolenge nini? Eyenga ya Mbótama ezali (1) ntango ya kozala elongo na libota na yo; (2) ntango ya bafɛ́ti; (3) ntango ya makambo matali losambo; (4) ntango ya mitungisi; (5) ntango oyo ekundwelaka bato makambo ya kala; (6) ntango ebongi mpenza mpo na mombongo.

ATAKO yango ekoki kokamwisa, kati na bato 100 oyo batunaki bango mituna na Grande-Bretagne, bobele bato 6% nde batalelaki Eyenga ya Mbótama lokola ete ezali liboso mpenza ntango ya makambo matali losambo. Nzokande, 48% batalelaki Eyenga ya Mbótama ete ezali liboso mpenza ntango ya kozala elongo na libota na bango. Nkutu, bato mingi balobaka ete ezali ntango ya ntina mingi mpo na bana mike. Na ndakisa, na ntango batunaki mwana moko ya mwasi ya mibu 11 soki eloko nini alingaka mingi na Eyenga ya Mbótama, ayanolaki ete: “Loyenge, mayoki ya esengo, [mpe] kopesa makabo.” Búku The Making of the Modern Christmas (Kosalema ya Eyenga ya Mbótama na mikolo na biso) endimi ete “na ntembe te, likebi mingi mpenza na ntina na . . . Eyenga ya Mbótama ‘na lolenge na yango mpenza ya kala’ etyami likoló na ndako, libota, mingimingi likoló na bana.”

Kasi ezali bobele na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba, epai ya wɛ́sti nde Eyenga ya Mbótama ezalaka libaku oyo libota esanganaka esika moko mpo na kopesana makabo. Na mikili epai kuna Lingomba ya Orthodoxe ezali na bopusi makasi, bato bakumisaka mingi nde Pásika; nzokande, eleko ya Eyenga ya Mbótama ezalaka mingimingi eleko ya lói.

“Mombongo”

Búku The New Encyclopædia Britannica elobi ete Eyenga ya Mbótama esili “kokóma mpenza . . . ⁠eleko ya mombongo.” Mbala mosusu ezalela yango ezali mpenza makasi na Japon koleka bisika nyonso mosusu.

Zulunalo moko ya Washington, Daily Record eyebisi ete: “Ba japonais basili kobwaka makambo nyonso matali lingomba mpe babongoli Eyenga ya Mbótama, bakómisi yango bobele likambo ya mombongo.” Ebakisi ete na Japon, Eyenga ya Mbótama ezalaka “molulu monene oyo na boumeli na yango likebi lityamaka mingi likoló na mombongo; nzokande, likoló na makambo ya losambo batyaka bobele likebi moke.”

Ata kati na mikili mingi oyo emibéngaka ete ya boklisto, ‘makambo wana ya losambo’ ezalaka mpasi mpo na komona yango. Esili koleka pene na mbula 40, mwa mokanda moko mpo na kotɛmɛla Eyenga ya Mbótama elobaki ete: “Bato ya mombongo bakómisi Eyenga ya Mbótama eyenga moko monene. Ezali mpenza eleko eleki monene kati na mbula mpo na oyo etali komizwela mosolo mingi na mombongo. Bato ya mombongo oyo bamilobaka ete bazali baklisto bazelaka Eyenga ya Mbótama na motema likoló nyonso, mpo na matomba ya Klisto te, kasi mpo na matomba ya kozwa mosolo.” Maloba wana mazali mpenza kokokana lelo oyo! Na mikili mingi, liboso nkutu ete tókóma na sanza ya Ɔkɔtɔ́bɛ, tozangaka te koyoka bokundoli mpo na koyebisa mikolo boni mitikali mpo na kosomba biloko ya kopesa na yango makabo mpo na Eyenga ya Mbótama oyo ezali koya. Wana mbula ezali kokende na nsuka na yango, mombongo ekómaka kosalema nokinoki, 25% ya botɛkisi biloko ya bamagazíní katikati na mbula esalemaka na eleko ya Eyenga ya Mbótama.

Ata soki Eyenga ya Mbótama elimboli nini mpo na yo sikawa, okoki mbala mosusu komituna soki lolenge nini yango ebandaki. Ya solo mpenza, Biblia ezali kondima likambo ya kopesana makabo na Eyenga ya Mbótama? Bilambo ya Eyenga ya Mbótama oyo ezali kosalema lelo ezali mpenza ya boklisto? Tiká tótalela yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto