Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/2 lok. 8
  • Nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Nsango malamu esengeli kosakolama liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • “Litatoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Nasalelaki Nzambe oyo abongi na kotyela motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/2 lok. 8

Masoló ya Basakoli ya Bokonzi

Nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama

UTA bikeke mingi, Satana Zábolo, monguna monene ya Nzambe, na mayele mabe nyonso azali kosalela biyangeli ya politiki mpe mangomba ya lokuta kati na milende na ye ya kopekisa kopalanganisama ya boklisto ya solo. Kasi myango yango mikolónga te. Yesu asakolaki ete “nsango malamu oyo na Bokonji ekosakolama [elobami te ete “esengeli kosakolama to, “ekoki kosakolama”] lokola litatoli na mabota yɔnsɔ, mpe bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Kozanga bolóngi ya Satana esili komonana polele na Grèce. Na mboka wana, Lingomba ya Ortodoxe ya Grèce emekaki kopekisa Batatoli ya Yehova ete básakola nsango ya Bokonzi te. Kasi, lokola emonisami polele na lisoló oyo, na nsuka solo ya Biblia esimbaka bato ya motema sembo ata soki botɛmɛli ezali.

Pene na mibu 30 misili koleka, sángó moko ya Lingomba ya Ortodoxe ya Grèce andimaki nsango malamu mpe nkutu, amonisaki mposa ya kokóma Motatoli ya Yehova. Nzokande, bandeko na ye ya mosuni baboyaki likambo yango na makasi nyonso mpe bapusaki ye ete átika kosangana elongo na Batatoli ya Yehova. Mpo na kosepelisa libota na ye, akóbaki kosala mosala na ye ya sángó; nzokande, azalaki ntango nyonso kondima ete Batatoli ya Yehova basalisaki ye na koyekola solo mpe atikaki solo yango mpo na kobatela ebonga ya lokumu kati na lingomba moko ya lokuta.

Atako bongo, wana libaku likokaki kopesamela ye, azalaki mbala na mbala koloba mpo na kokɔtela Batatoli ya Yehova. Mbala mingi, azalaki nkutu kolendisa bato ete soki balingi koyekola solo ya Biblia, basengeli koyekola na Batatoli ya Yehova. Na boumeli ya bambula oyo elandaki na nsima, basusu balandaki mpenza toli wana.

Na mikolo oyo miuti koleka kala mingi te, sángó yango azwaki maladi makasi mpe asosolaki ete etikalaki moke ákufa. Wana ezalaki ye na mbeto ya lopitalo, abyangisaki bana na ye, mpe bango banso bayanganaki pembeni na ye.a Na nsima, ayebisaki bango ete soki akokufa, bakoki komona ye lisusu. Ayebisaki bango na ntina na mateya ya Biblia matali lisekwa ya bato mpo na kofanda kati na mabelé oyo ekobongwana paladiso, kasi soki mpenza balingaki komona lolenge yango ekosalema, basengelaki koyekola solo ya Biblia mpe kotika lingomba ya lokuta. Alendisaki bango na kosangana elongo na Batatoli ya Yehova mpe koyekola epai na bango ndenge nini kokóma baklisto ya solo.

Mwa moke na nsima, sángó yango akufaki. Nzokande, toli na ye wana ya nsuka oyo apesaki epai na bana na ye ebotaki mbuma. Mwana na ye ya mwasi, mpe bandeko na ye mingi ya mosuni, bazalaki liboso kotɛmɛla makasi Batatoli ya Yehova mpe mosala na bango. Kasi akokaki te koboya kotosa lisɛngi ya sembo oyo tata na ye apesaki wana ezalaki ye pene ya kokufa; na yango, akutanaki nokinoki na Batatoli ya Yehova mpe abandaki koyekola Biblia. Kala mingi te, ye moko mpe auti kokóma Motatoli, apesi bomoi na ye mpo na kosalela Yehova Nzambe mpe amonisi komipesa na ye epai na Nzambe na kozwáká batisimo na mai.

Na Grèce mpe na mikili misusu koleka 230, Batatoli ya Yehova batalelaka nguya ya elimo santu ya Nzambe. Ezali bongo na lisungi mpenza ya elimo santu nde bazali kosangana na kokokisama ya esakweli ya Yesu: “Kasi wana ekosila [elimo santu, NW] koya na likolo na bino, bokojua nguya, mpe bokojala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka na mokili.”​—Misala 1:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lingomba ya Ortodoxe ya Grèce epesaka basángó nzela ya kobala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto