Babólá basengeli kozela lisusu ntango molai?
“Soki bamboka oyo ezali na bonsomi ekoki te kosunga ebele ya bato oyo bazali babólá, ekokoka te kobatela bato moke oyo bazali bazwi.”—John F. Kennedy.
“NALINGI ete mikolo mizali koya mizala ya kitoko mpo na bato banso—bobólá ezala te, moto moko te ázanga esika ya kolala, paladiso!” Oyo ezali maloba ya mwana mobali moko ya mibu 12 ya engumba São Paulo, na Brésil. Kasi bobólá ekoki solo kosilisama? Babolá basengeli kozela lisusu ntango molai?
Bato mosusu bamimonaka ete bazali babólá mpo ete bakokaka te kosomba biloko oyo balingi. Nzokande, kanisá ezalela ya mawa ya baoyo banyokwami mpenza na bobólá. Okoki kokanisa na ntina na mikakatano minene mpe kozanga esengo ya bato motindo wana? Na ndakisa, basusu basengeli kobunda na bandɛkɛ mpe bampóko, wana ezali bango kopanza ekundé mpo na koluka bilei! Bobólá motindo oyo ekonyokola lisusu bato na boumeli ya ntango boni? Libyangi ya Federico Mayor, mokambi ya UNESCO (Ebongiseli ya Lisangá ya Mabota mpo na koteya, siansi, mpe makambo ya ntɔ́ki), libongi mpenza: “Tótika ezaleli wana ya nsoni oyo ezali kopesa biso nzela ete tóndima makambo masengeli te kondimama—mpasi, nzala mpe konyokwama ya bamilió ya bato.”
Ndɔ́tɔ etali bolamu mpo na bato na mokili mobimba ekokokisama? Elikya nini ezali mpo na babólá?
Mabaku nini mapesameli babólá?
Bakonzi oyo bazali na mokano malamu bazali kopesa makanisi ya kokamata bato mingi na mosala, kopesa bango lifuti ya malamu, kobongisa malamu lisusu bibongiseli ya kosunga bato, mpe kokabola na motindo mobongi bitando ya mabelé epai bato bakoki kosala bilanga. Ekoki kozala ete bandimi makanisi lokola ya John F. Kennedy, prezidá ya kala ya Etats-Unis: “Soki bamboka oyo ezali na bonsomi ekoki te kosunga ebele ya bato oyo bazali babólá, ekokoka te kobatela bato moke oyo bazali bazwi.” Nzokande, kozala na mokano malamu ekoki te mpo na kosukisa bobólá. Na ndakisa, bokóli na makambo ya nkita ekopesa litomba na babólá nyonso? Mpenzampenza te. Jawaharlal Nehru, Mokonzi moko ya kala na Inde alobaki ete: “Nguya ya société capitaliste, soki etalelami malamu te, ekokómisa bazwi na bozwi mingi koleka mpe ekokómisa babólá na bobólá makasi koleka.” Nzokande, longola mikakatano mpe kozanga, maoki ya kozala bato bazangi ntina ezali kobakisa mpasi ya babólá. Bakonzi ya mokili bakoki kosalisa babólá ete bálónga maoki ya kozanga lisalisi mpe ya kozanga elikya?
Ya solo, ebele na baoyo bazali mpenza babólá basili koyekola koyikela bobólá mpiko mpe kolónga maoki ya kozanga limemya ya bango moko liboso na mikakatano minene, lokola oyo ya komata ya ntalo ya biloko mpe kozanga mosala. Lisusu, nzala, kozanga ndako, mpe bobólá monene ekosukisama mpenza. Likambo yango lizali kokamwisa yo? Tosɛngi yo ete otánga lisoló lilandi: “Mosika te, moto moko te akozala lisusu mobólá!”