Koyinana Ekosila Mokolo Mosusu?
SOKI olandaka mwa bansango oyo epesamaka na televizyó mpe na radio, oyebi malamu likambo litali koyinana. Koyinana ezali likambo oyo ezali komonana kati na kobomama ya ebele ya bato oyo, mokolo na mokolo, ezali kotika elembo ya makila kati na mokili oyo. Kobanda na Belfast kino na Bosnie, kobanda na Jérusalem kino na Johannesburg, bato oyo basali na bango likambo te bazali kobomama.
Mingimingi, bato oyo babomamaka bayebanaka te na babundisi na bango. Mbala mosusu, “mabe” oyo bango basali ezali bobele ete bazali bato ya “ngámbo mosusu.” Kati na kosombitinya moko ya nsɔ́mɔ, kobomama motindo wana ekoki kozala kozongisa mabe mpo na mabe mosusu oyo eleká to lolenge moko ya “kopetola ekólo.” Ntango nyonso oyo mobulu ezali kosalema ezali kopelisa mɔ́tɔ ya koyinana kati na bitulúká oyo bizangi boyokani.
Emonani ete makambo ya nsɔ́mɔ oyo ezali kozongelama mbala na mbala ezali sé kokóla. Koyinana ezali kobima kati na bato ya bitulúká, mposo, mabota to mangomba. Koyinana ekoki kosila mokolo mosusu? Mpo na koyanola na motuna oyo, tosengeli kososola makambo oyo mazali kobimisa koyinana, mpamba te tobotamaki te mpo ete toyinanaka.
Kolonama ya mbotó ya koyinana
Zlata Filipovic, elenge mwasi ya mboka Bosnie, na engumba Sarajevo, ayebi naino te koyina baninga. Kati na manáka na ye, akomi na bonzenga nyonso na ntina na mobulu kati na bikólo: “Namitunaka ntango nyonso ete Mpo na nini? Mpo na mokano nini? Ezali libunga ya nani? Natunaka kasi nazwaka eyano te. . . . Kati na baninga na ngai ya basi, kati na baninga na biso, kati na libota na biso, ezali na bato ya Serbie mpe Croatie mpe Bamizilmá. . . . Tosanganaka elongo na bato malamu, kasi na bato mabe te. Mpe, kati na bato malamu, ezali na bato ya Serbie mpe ya Croatie mpe Bamizilmá, bobele bongo bato mabe bazali mpe kati na bango.”
Nzokande, mikólo mingi bazali kokanisa lolenge wana te. Bazali kokanisa ete bazali na bantina malamu ya koyinana. Mpo na nini?
Bokesene. Ekoki mpenza kozala ete eloko eleki bonene oyo epelisaka mɔ́tɔ ya koyinana ezali bongo bokesene mpe minyoko. Lokola Biblia elobi yango, “minyoko ikokomisa moto na mayele na bolema.” (Mosakoli 7:7) Na ntango bato basalelami mabe to basalelami makambo na makasi, ezalaka mpasi te mpo na kopusa bango ete báyina bato oyo bazali konyokola bango. Mpe, atako ekoki kozala likambo oyo elongobani te, to ezali “bolema,” mingimingi etulúká mobimba nde eyinamaka.
Atako bokesene, ya solo to ya makanisi mpamba, ekoki kozala ntina monene ya koyinana, kasi ezali bobele yango moko te. Ntina mosusu ezali bongo kokanisela bato mabe.
Kokanisela bato mabe. Mingimingi, kokanisela bato mabe eutaka na kozanga boyebi na ntina na bato ya ekólo to ya mboka moko. Mpo na bilobáloba, koyinana ya kala, to makambo mabe oyo moto akutanaki na yango epai na moto moko to bato mibale, basusu bakoki kotalela bato nyonso ya loposo moko to mboka mobimba lokola ete bango nyonso bazali na bizaleli mabe. Soki ezaleli ya kokanisela bato mabe esili kopika misisa, ekoki kokanga bato miso mpo bamona bosolo te. Mokomi moko ya Angleterre, Charles Caleb Colton, alobaki ete: “Toyinaka bato mosusu mpo ete toyebi bango te; mpe tokoyeba bango te mpamba te toyinaka bango.”
Epai mosusu, bato ya politiki mpe bakomi ya makambo ya kala bakoki na nkó nyonso kokólisa makanisi mabe mpo na mikano ya politiki mpe ya bolingi ekólo. Hitler azali ndakisa ya liboso mpo na yango. Georg, ye oyo azalaki mosangani ya etuluku ya bilenge ya Hitler, alobi ete: “Bopalanganisi nsango ya Nazi eteyaki biso liboso ete tóyina Bayuda, mpe bato ya Russie, mpe ‘banguna ya Reich.’ Lokola nazalaki naino elenge, nandimaki makambo oyo bazalaki koyebisa ngai.” Na nsima, nayaki koyeba ete nakosamaki. Lokola kati na Allemagne ya Nazi mpe na bisika mosusu, kokanisa mabe na ntina na bato ya ekólo to ya loposo mosusu esalelamaki mpo na kobendama na bolingi ekólo, oyo ezali bongo ntina mosusu ya koyinana.
Bolingi ekólo, bolingi etulúká, mpe koponapona mposo. Kati na búku na ye, The Cultivation of Hatred, Peter Gay, ye mokomi na makambo ya kala, alobeli makambo oyo mabimaki na ntango etumba ya liboso ya mokili mobimba ebandaki: “Kati na bowelani mpo na bokangami na biyangeli, bolingi ekólo ezalaki makasi koleka nyonso mosusu. Kolinga ekólo mpe koyina banguna na yango ezalaki ntina eleki nguya mpo na yango bonyokoli oyo ekeke molai ya zomi na libwa ebimisaki.” Mayoki ya bato ya Allemagne ya kolinga ekólo na bango mingi epalanganisaki loyembo moko ya etumba oyo eyebanaki lokola “Loyembo ya koyina.” Gay alobi ete, na Grande-Bretagne mpe na France, bato oyo bapelisaka mposa ya koyina babimisaki masoló na ntina na basodá ya Allemagne ete bazalaki kobebisa basi mpe koboma bana mike. Sodá moko ya Angleterre, Siegfried Sassoon, alobelaki ntina ya bopalanganisi likanisi ya etumba ya Angleterre: “Emonani lokola ete moto azalisamaki mpo ete aboma bato ya Allemagne.”
Lolenge moko na bolingi ekólo, kokumisa ekólo to loposo moko mingi koleka ekoki kopusa na koyina bikólo to mposo mosusu. Bolingi etulúká ezali kokóba kobimisa mobulu kati na mikili mingi ya Afrika, wana koponapona mposo ezali kokóba kopesa mpasi na Europe de l’Est mpe na Amerika ya Nɔ́rdi. Eloko mosusu oyo ebimisaka bokabwani oyo ekoki kosangana na bolingi ekólo ezali bongo lingomba.
Mangomba. Mingi kati na bowelani makasi oyo ezali kati na mokili etaleli lingomba. Na Irlande du Nord, na Moyen-Orient, mpe na bisika mosusu, bato bayinami mpo na lingomba na bango. Esili koleka bikeke mibale, mokomi moko ya Angleterre, Jonathan Swift alobaki ete: “Mangomba oyo tozali na yango ekoki mpo na kopusa biso na koyinana, kasi ekoki te mpo na kopusa biso na kolingana.”
Na 1933, Hitler ayebisaki episkopo ya engumba Osnabrück ete: ‘Mpo na Bayuda, nakokóba bobele na mwango motindo moko oyo Lingomba ya Katolike esalelaki na boumeli ya bambula 1 500.’ Bakonzi mingi ya mangomba na Allemagne bakweisaki soko moke te kobomama ya ebele ya bato oyo ye abomaki mpo na koyina. Kati na búku na ye, A History of Christianity (Lisoló ya Lingomba ya boklisto), Paul Johnson akomi ete: “Lingomba elongolaki Bakatolike oyo bakomaki kati na batestamá na bango ete bakolinga ete nzoto na bango etumbama soki bakufi, . . . kasi epekisaki bango te kosala kati na káa ya bakangami to káa ya liwa.”
Bakonzi mosusu ya mangomba basukaki te bobele na kotika nzela na koyinana—babulisaki yango. Na 1936, na ebandeli ya etumba ya banamboka ya Espagne, Pápa Pie XI akweisaki te oyo ba Républicains bazalaki kobénga ete ‘boyini ya solosolo ya Nzambe euti na Satana’—atako ezalaki na basángó ya Katolike na ngambo ya ba Républicains. Bobele bongo, Episkopo Gomá, ye oyo azalaki mokambi ya Lingomba na Espagne na boumeli ya etumba kati na banamboka, alobaki ete ‘kimya ekoki koya te kozanga kobunda na mandoki.’
Koyinana oyo ebimisami na mangomba ezali te komonisa elembo ya kokita. Na 1992 zulunalo Human Rights Without Frontiers etondolaki lolenge bakonzi ya Leta ya Grèce oyo bazali na lingomba ya Ortodokse bazalaki kopusa bato ete báyina Batatoli ya Yehova. Kati na bandakisa mingi, yango elobelaki likambo oyo sángó moko ya Lingomba ya Ortodokse ya Grece oyo afundaki batatoli mibale ya Yehova oyo bazali na mibu 14. Efundeli nini? Afundaki bango ete ‘balukaki kopusa ye ete abongola lingomba na ye.’
Mbuma ya koyinana
Kati na mokili mobimba, mbóto ya koyinana ezali kolónama mpe komwangisama mai na nzela ya bokesene, kokanisela baninga mabe, bolingi ekólo, mpe lingomba. Mbuma oyo yango ezali mpenza kobimisa, ezali bongo nkanda, monyoko, bitumba, mpe koboma. Liloba ya Biblia oyo ezwami na 1 Yoane 3:15 ezali kosunga biso na komona bonene na yango: “Moto na moto oyo akoyinaka ndeko na ye azali mobomi.” Na ntembe te, epai koyinana ezali kokóla, kimya—atako ezali—ezalaka bobele ya likolólikoló.
Elie Wiesel, ye oyo azwaki libonza libéngami Prix Nobel mpe abikaki na kobomama ya ebele ya Bayuda, akomi ete: “Mokumba ya moto oyo abiki ezali bongo ya kopesa litatoli mpo na makambo oyo masalemaki . . . Osengeli kokebisa bato ete makambo yango makoki kosalema, ete mabe makoki kobima. Koyinana na ntina na mposo, mobulu, losambo ya bikeko—ezali naino kokóla.” Lisoló ya makambo ya ekeke ya 20 ezali komonisa polele ete koyinana ezali mɔ́tɔ oyo ekosila yango moko te.
Mokolo mosusu koyinana ekolongolama kati na mitema ya bato? Koyinana ezalaka ntango nyonso mabe, to ezali mpe na bolamu na yango? Tiká tótala.