Bakonzi kati na bisika ya elimo
NANI nde azali koyangela mokili? Ezali na motindo moko ya litambwisi oyo eleki nguya na bato? To Nzambe asili kotika bato bámibatela bango moko? Wana ezali biso koluka biyano na mituna oyo, tiká ete tótalela likambo moko oyo lisalemaki na eleko ya mosala ya Yesu Klisto awa na mabelé.
Mwa moke nsima ya batisimo na ye, Yesu amekamaki na ekelamu moko ya elimo ezangi komonana oyo ebéngami Satana Zábolo. Kolobeláká moko na masenginya yango, Biblia elobi ete: “Satana atambolisi [Yesu] lisusu na ngomba molai mingi mpe atalisi ye makonzi nyonso na mokili mpe nkembo na yango.” (Matai 4:8) Na nsima Satana alobaki na Yesu ete: “Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, mpo ete esili kopesama na ngai, mpe soko nandimi kopesa nani yango, nakopesa yango na ye. Na bongo, soko okokumbamela ngai, oyo nyonso ekozala na yo.”—Luka 4:6, 7.
Satana alobaki ete azali bokonzi na likoló na bikonzi, to biyangeli nyonso ya mokili oyo. Yesu atyaki ntembe na maloba na ye? Te. Ya solo, na libaku mosusu amonisaki mpenza ete ezali bongo wana abéngaki Satana ete “mokolo na mokili.”—Yoane 14:30.
Engebene Biblia, Satana azali anzelu moko mabe oyo azali na nguya monene. Paulo, ntoma moklisto atángi Satana kati na “nguya ya bilimu mabe” mpe alobi na ntina na bango ete bazali “bakonzi ya mokili ya molili oyo.” (Baefese 6:11, 12, NW) Lisusu, ntoma Yoane alobaki ete “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Emoniseli, moko na babúku ya Biblia elobi ete Satana azali “mozimbisi na bato na mokili mobimba.” (Emoniseli 12:9) Na elobeli ya elilingi, Emoniseli ezali lisusu komonisa Satana lokola dalagona oyo azali kopesa na ebongiseli ya politiki “nguya na ye, na kiti na bokonzi na ye, na bokonzi monene.”—Emoniseli 13:2.
Lisusu, makambo oyo mazali kosalema na mokili mazali kotatola ete nguya moko mabe ezali kosala mosala, kopusáká bato mpo na kopesa bango mpasi. Mpo na ntina mosusu nini biyangeli ya bato bizali kokoka te kotya kimya? Eloko mosusu nini ekokaki kotinda bato na koyinana mpe na kobomana moko na mosusu? Wana abulunganaki mingi mpo na kobomama monene mpe kufa kati na etumba moko ya bana-mboka, mwasi moko oyo amonaki likambo yango alobaki ete: “Nayebi te lolenge nini likambo oyo ekokaki kosalema. Oyo ezali te bobɛlɛ likambo ya koyinana. Ezali elimu moko mabe nde ezali kosalela bato oyo na kobomana moko na mosusu.”
Moto ya solo oyo azali kotɛmɛla Nzambe
Lelo oyo, bato mingi bandimaka te ete Satana Zábolo azali. Atako bongo, ye azali te bobɛlɛ mabe mpamba oyo ezali kati na bato, lokola basusu bakanisaka yango. Biblia elongo na makambo oyo mazali kosalema kati na mokili mazali komonisa ete ye azali moto mpenza. Lisusu, Satana azali mpenza motɛmɛli monene ya Yehova Nzambe. Ezali solo ete Satana akokani na Nzambe te. Lokola Yehova azali Mozalisi aleki nguya, azali na lotómo ya kozala Mokonzi likoló na bikelamo binso.—Emoniseli 4:11.
Nzambe azalisaki elimo moko te ya mabe mpo na kotɛmɛla ye. Nzokande, moko kati na baanzelu “bana na Nzambe” akólisaki mposa ya moimi ya kozwa mpo na ye moko losambo oyo esengeli kopesama bobɛlɛ epai na Yehova. (Yobo 38:7; Yakobo 1:14, 15) Mposa wana ememaki ye na kotombokela Nzambe. Na kotombokáká, ekelamu wana ya elimo amizalisaki ye moko Satana (oyo elimboli “motɛmɛli”) mpe Zábolo (oyo elimboli “motɔ́ngi”). Na kotalela nyonso wana, okoki komituna soki mpo na nini Satana apesamelaki nzela ya koyangela mokili.
Ntina oyo Satana apesamelaki nzela ya koyangela
Ozali komikundola makambo oyo Satana alobaki na Yesu na ntina na bokonzi oyo ezali koyangela mabelé? Satana alobaki ete: “Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso . . . mpo ete esili kopesama na ngai.” (Luka 4:6) Maloba oyo mazali komonisa ete Satana Zábolo azali na bokonzi bobɛlɛ na ndingisa ya Nzambe. Kasi mpo na nini Nzambe atikelaki Satana nzela?
Eyano na motuna oyo ezali na boyokani na makambo oyo malekaki kati na elanga ya Edene, epai kuna Satana abandaki mosala na ye ya mokonzi ya mokili. Kuna Satana abimisaki likanisi ete Nzambe azali koyangela na lolenge mabe na kopimeláká mobali mpe mwasi ya liboso, Adama mpe Eva, eloko moko kitoko. Engebene Satana, soki balyaki mbuma oyo Nzambe apekisaki, basengelaki kosikolama. Adama mpe Eva basengelaki kozala na bonsomi mpe na lipandá liboso na Yehova. Basengelaki kozala lokola Nzambe mpenza.—Genese 2:16, 17; 3:1-5.
Na kobukáká lokuta na lolenge yango mpe na kozimbisáká Eva mpe na nzela na ye komemáká Adama na kobuka mibeko ya Nzambe, Satana atyaki babalani ya liboso na nsé ya bokonzi mpe litambwisi na ye. Na yango Zábolo akómaki nzambe na bango, oyo azalaki kotɛmɛla Yehova. Nzokande, na esika ya kosikolama, Adama mpe Eva bakómaki na nsé na boombo ya Satana, ya lisumu mpe ya kufa.—Baloma 6:16; Baebele 2:14, 15.
Na boyokani na bosembo na ye ya kokoka, Yehova akokaki mbala moko koboma Satana mpe bayekoli na ye mibale wana ya sika. (Deteronome 32:4) Nzokande, ezalaki na likambo moko oyo litalaki bizaleli malamu. Satana atyaki ntembe na bosembo ya lolenge oyo Yehova azali koyangela. Kati na mayele na ye, Nzambe apesaki nzela ete ntango eleka mpo emonana mpenza polele ete kozala na lipandá liboso na ye ekomemaka bobɛlɛ na mpasi. Yehova apesaki batomboki wana nzela ya kozala na bomoi mpo na mwa ntango, kotikáká bongo Adama mpe Eva ete bábota bana.—Genese 3:14-19.
Atako mingi kati na bakitani ya Adama bamityaki na nsé ya bokonzi ya Yehova te, boyokani ya Nzambe elongo na basaleli na Ye esili komonisa ete yango eleki mosusu nyonso. Kondima bokonzi ya Yehova na motema mobimba ememaka esengo mpe libateli ya solo. Nzokande, mawa mpe kozanga libateli eutaki na boyangeli ya bato oyo batambwisami na Satana. Ee, “moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Bato bazwi naino libateli ya solosolo mpe esengo ya koumela te na nsé ya boyangeli ya bato kati na mokili oyo mozali kotambwisama na Satana. Nzokande, tozali na bantina malamu ya kozala na elikya.
Ntango ya Satana etikali moke!
Bopusi ya Satana awa na mabelé ezali bobɛlɛ mpo na ntango moke. Yehova akotika boyangeli ya Satana libela te! Mosika te Zábolo akokangama. Moyangeli moko ya sika akotambwisa mabelé, mokonzi ya boyɛngɛbɛnɛ oyo aponami na Nzambe ye moko. Mokonzi wana ezali bongo Yesu Klisto. Na ntina na kotyama na ye na bokonzi kuna na likoló, Emoniseli elobi ete: “Bokonzi na mokili oyo esili kokóma Bokonzi na Nkolo na biso [Yehova] mpe na Klisto na ye.” (Emoniseli 11:15) Kronolozi ya Biblia, mpe kokokisama ya bisakweli ya Makomami, ezali komonisa ete likambo yango lisalemaki na mobu 1914.—Matai 24:3, 6, 7.
Biblia ezali mpe kolobela makambo oyo masalemaki mwa moke nsima wana Yesu atyamaki na bokonzi. Elobi ete: “Etumba ebimaki kati na likoló; Mikaele [Yesu Klisto] na baanze na ye babundaki etumba na dalagona. Dalagona [Satana Zábolo] abunani, na baanze na ye, nde balóngaki te, mpe esika kati na likoló ezwami mpo na bango lisusu te. Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abyangami Motɛmɛli mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nsé, baanze na ye mpe babwakami na ye elongo.”—Emoniseli 12:7-9.
Kobwakama ya Satana longwa na likoló elingaki kobimisa makambo nini? Baoyo bazali na likoló basengelaki kosepela, kasi ezali boni mpo na bafandi na mabelé? Emoniseli 12:12 elobi ete: “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” Ya solo, kobwakama ya Satana longwa na likoló esili komema mawa na mabelé. Búku The Columbia History of the World elobi ete: “Makámá minene ya Mibu Minei ya Etumba ya 1914–1918 . . . emonisaki epai na mikili ya Wɛ́sti ete bakokaki te kobatela civilisation na bozoba to bopusi ya mabe na bango moko. Mikili ya Wɛ́sti ebikisami naino mpenzampenza te na kobulunganisama wana.”
Bampasi ya bato na libota oyo esuki te bobɛlɛ na elimo ya kobulunganisama. Yesu asakolaki ete: “Libota moko ekotɛlɛmɛla libota mosusu mpe bokonzi moko ekotɛlɛmɛla bokonzi mosusu; nzala mpe koningana na mokili ikozala na esika na esika.” Asakolaki lisusu makɔnɔ mabe. (Matai 24:7, 8; Luka 21:11) Lisusu, Biblia elobi ete na “mokolo na nsuka” ya ebongiseli oyo ya Satana, bato mingi bakozala “bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, . . . bato bazangi kokumisa baboti, . . . bayini na malamu.” Bato basengelaki mpe kozala “bato balingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe.”—2 Timoté 3:1-5.
Bitumba, maladi mabe, nzala, koningana ya mabelé mpe kobeba ya bizaleli—makambo oyo nyonso masili kosalema kobanda 1914 na motindo oyo naino esalemaki liboso te, bobɛlɛ lokola esakolamaki na Biblia. Yango ezali komonisa ete monguna ya Nzambe mpe ya moto oyo azali na nkanda monene—Satana Zábolo—asilaki kobwakama longwa na likoló mpe sikawa azali kosilisa nkɛlɛ na ye awa na mabelé. Kasi Biblia ezali lisusu komonisa ete Satana akopesamela lisusu ntango molai te mpo na kolanda mosala na ye. Atikali bobɛlɛ na “mwa elaka mokuse” oyo etikali kino Armagedon, ntango Nzambe akoboma ebongiseli ya mokili oyo motambwisami na Satana.
Nini ekokómela bongo Satana? Ntoma Yoane akomaki ete: “Namonaki mwanze kokita na likoló, azalaki na lifungola na libulu bozindo, na monyɔlɔ́lɔ monene na lobɔ́kɔ na ye. Asimbi dalagona, ye nyoka yango na kalakala, oyo azali Motɛmɛli, Satana, mpe akangi ye na monyɔlɔ́lɔ mbula nkóto. Abwaki ye na libulu bozindo, azipi yango, mpe atii elembo likoló na yango.” (Emoniseli 20:1-3) Oyo nde kobɔndisama mpo na bato oyo bazali na mpasi!
Bosepeli na nsé ya boyangeli ya Bokonzi
Wana Satana asili kokangama, Bokonzi ya Nzambe oyo etambwisami na Yesu Klisto ekokamba makambo nyonso ya bato. Na esika ete biyangeli bizala mingi na mabelé, bobɛlɛ boyangeli moko ya likoló ekotikala mpo na koyangela etando mobimba. Etumba ekokóma likambo ya kala, mpe kimya ekozala bipai binso. Na nsé ya Bokonzi ya Nzambe, bato nyonso bakofanda elongo kati na bolingo ya bondeko na mokili mobimba.—Nzembo 72:7, 8; 133:1; Danyele 2:44.
Yesu akozala mokonzi ya lolenge nini? Ntango azalaki awa na mabelé, amonisaki bolingo ya mozindo epai na bato. Na motema mawa nyonso Yesu apesaki bilei na baoyo bazalaki na nzala. Abikisaki bato na bokɔnɔ mpe azongisaki miso na bakufi-miso, maloba epai na bibubu mpe kolɔngɔ́nɔ́ epai na batɛngumi. Nkutu Yesu azongisaki bakufi na bomoi! (Matai 15:30-38; Malako 1:34; Luka 7:11-17) Bikamwiseli wana bizalaki elakiseli ya makambo ya kokamwa oyo Mokonzi akosala na mikolo mizali koya. Oyo nde esengo kozala na mokonzi oyo akopesa bolamu motindo wana!
Baoyo bazali kotosa boyangeli monene ya Yehova bakozwa mapamboli wana oyo ekosila te. Makomami mapesi elaka oyo ete: “Bongo miso na bakufeli miso makofungolama, mpe matoi na bimimi makozipolama; bongo, motengumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemu na ebubu ekoyemba na esengo.” (Yisaya 35:5, 6) Kolobeláká liboso na ntina na mokolo yango monene, ntoma Yoane akomaki ete: “Nayoki mongongo makasi kobima na kiti na bokonzi ete, Talá! Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4.
Bisengo oyo boyangeli ya Yehova ekopesa na nzela ya Mwana na ye, Yesu Klisto, ekoleka mosika kobondisama nyonso oyo mbala mosusu tozwaki yango kati na ebongiseli oyo etambwisami na Satana Zábolo. Kati na mokili ya sika oyo elakami na Nzambe, bato bakomitungisa soko moke te ete, ‘Nani mpenza azali koyangela?’ (2 Petelo 3:13) Bato na botosi bakozala na esengo mpe na libateli na mabelé oyo mayangelami na Bakonzi oyo bazali na bisika ya elimo, Yehova Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Klisto. Mpo na nini te koyamba elikya ya kozala kati na bato oyo bakoyangelama na bango?
[Maloba na elilingi ya lokasa 7]
Bato bakozala na libateli kati na mabelé mayangelami na Bokonzi ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 4]
Photo NASA