Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/11 lok. 29
  • Bilei bityami na kɔ́pɔ bipesi litatoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilei bityami na kɔ́pɔ bipesi litatoli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Kopesa lisungi kati na bisika bibebisami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Makambo ezali koleka na mokili
    Lamuká!—2011
  • Koningana ya mabele na Haïti—Kondima mpe bolingo emonanaki
    Lamuká!—2011
  • “Komona bolingo ya ndenge wana esepelisaki biso mpenza”
    Lamuká!—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/11 lok. 29

Bilei bityami na kɔ́pɔ bipesi litatoli

NA MIKOLO oyo milandaki koningana ya mabelé na engumba Kobe, na Japon, na Yanuáli oyo euti koleka, bato ya etúká wana bazalaki na mpasi mpo na kozwa bilei. Nzokande, Batatoli ya Yehova bazangaki bilei te mpo na boboto ya baninga na bango. Na boumeli ya mikolo mibale to misato oyo milandaki koningana ya mabelé, masangá ya penepene mapesaki basaani ya loso. Kozanga koumela, baninga ya bolingo bakómaki kopesa bilei bityami na kɔ́pɔ. Mingi bakomaki likoló na bakɔ́pɔ yango maloba mpo na komonisa mawa oyo bazalaki koyokela baoyo bazwamaki na mpasi wana. Baoyo bazwaki bilei yango balobaki ete bilei nyonso “bibakisamelaki mungwa” mpamba te bakokaki te kopekisa mai na miso na bango wana bazalaki kotánga makomi yango.

Batatoli ya Yehova bakabolaki bilei na bango elongo na bato mosusu oyo bazalaki kati na bosɛnga. Motatoli moko azalaki kolya bilei na ye ya midi wana bazalaki kosala mobémbo na motuka elongo na moninga moko oyo basalaka na ye na kompanyi. Na yango, akabelaki ye ndambo ya bilei na moko na bakɔ́pɔ ya bilei oyo ye azwaki.

Moninga na ye ya mosala atunaki ye ete: “Osombaki kɔ́pɔ oyo ya bilei epai wapi?” Ndeko alimbwelaki ye ete azwaki yango na ebongiseli ya kopesa lisungi ya Batatoli. Mobali yango alobaki na botɔ́ndi nyonso ete, “Eleki mikolo mingi nalei ndunda te. Nakobomba mosusu mpo namema yango na ndako mpo na libota na ngai.”

Ntango yango esalemaki mpo na mbala ya misato, moninga wana ya mosala ya ndeko apesaki mosolo 3000 yen (penepene ya badolare 35) epai na Motatoli mpe alobaki ete: “Nayebi mosala na bino malamu, yango wana nalingi kopesa mwa likabo moko mpo na mosala na bino. Nazali na botɔ́ndi mpo ete okaboli bilei na yo elongo na ngai. Solo, baninga na bino bazali bango nyonso bato ya boboto mpenza.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto