Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/11 nk. 24-25
  • Pole na bango ezimisamaki te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Pole na bango ezimisamaki te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Tózala na mpiko lokola Yilimia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • “Nakosilisa mposa ya molimo oyo elɛmbi”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Jérémie: mosakoli na bikateli na Nzambe oyo bato balingaki koyoka yango te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/11 nk. 24-25

Pole na bango ezimisamaki te

NA NTANGO ya Biblia lokola mpe na mikolo na biso, ezalaki na Batatoli ya Yehova ya sembo oyo bazwaki mitungisi mpe mikakatano. Bakutanaki na botɛmɛli mpe kozanga bolóngi. Atako bongo, batikaki te mpo na kolɛmba na motema. Ya solo, pole na bango ezimisamaki te.

Na ndakisa, Yilimia azwaki mokumba lokola mosakoli ya Nzambe liboso na libota ya Yuda oyo lisilaki kopɛngwa. Asakolaki makebisi na ntina na kobomama oyo esengelaki kokwela Yelusaleme. (Yilimia 1:11-19) Na nsima, Yilimia akutanaki na botɛmɛli mingi epai na bato ya mboka na ye, baoyo bazalaki kotalela ye lokola mosakoli ya makambo ya mpasi.

Mokolo mosusu nganga Pasahulu, moto ya liboso kati na ndako na Nzambe, abɛtaki Yilimia mbata na ntina na makambo oyo ye asakolaki mpe atyaki ye na bikangelo. Na ntina na oyo emonanaki lokola kozanga bolóngi, Yilimia amilelaki ete: “Nazali kotyolama mokolo na mokolo, bato nyonso bakosekaka ngai. Zambi ezalaki ngai koloba, nangangaki, nangalaki mpo na makasi mpe na kopunzama, mpo ete liloba na [Yehova] ezalisameli ngai eloko na nsɔ́ni mpe na kotyolama mokolo na mokolo.” Mosakoli wana alɛmbaki kino akanaki ete: “Nakoloba nkombo na ye te, nakoloba mpo na nkombo na ye lisusu te.”​—Yilimia 20:1, 2, 7-9.

Nzokande, Yilimia amitikaki na kolɛmba te. Kolobeláká “liloba na [Yehova],” andimaki ete: “Ezalaki na motema na ngai lokola mɔ́tɔ na kozikisa, mobombami kati na mikuwa na ngai; nalɛmbaki mpo na koboya, nayebaki koyikela yango mpiko te.” (Yilimia 20:8, 9) Lokola ezalaki ye na mposa makasi ya koyebisa maloba ya Nzambe, Yilimia azwaki lisungi ya elimo santu mpe akokisaki mokumba na ye.

Ntoma Paulo mpe azalaki na bantina mingi ya kolɛmba, soki amitikaki na yango. Ayikaki mpiko na makámá ya biloko bizalisami, ya kozinda ya masúwa, ya monyoko mpe ya kobɛtama. Lisusu, ‘mokolo na mokolo bozito na mitungisi na ye mpo na masangá nyonso ekamolaki ye.’ (2 Bakolinti 11:23-28) Ee, mokolo na mokolo Paulo azalaki kokutana na mikakatano, azalaki komitungisa na ntina na masangá ya sika oyo ye asalaki mosala mingi mpo na kofungola yango. Lisusu, azalaki moto ya kozanga kokoka mpe asengelaki kobundana na “monzube kati na nzoto,” oyo ezalaki mbala mosusu motungisi ya komona malamu te. (2 Bakolinti 12:7; Baloma 7:15; Bagalatia 4:15) Nkutu basusu bazalaki kotɔ́nga Paulo, mpe yango ekómelaki ye.​—2 Bakolinti 10:10.

Nzokande, Paulo atikaki nzela na kolɛmba te ete ezindisa ye. Nguya na ye elekaki nguya ya bato mosusu te. (2 Bakolinti 11:29, 30) Nini esalaki ete ‘mɔ́tɔ na ye ya kati’ ezimisama te? Ya liboso, azalaki na baninga oyo bazalaki kosunga ye, oyo basusu kati na bango bakendeki elongo na ye kino na Loma epai abatelamaki na ndako ya bokangami. (Misala 28:14-16) Ya mibale, ntoma yango azalaki kotalela ezalela na ye na lolenge ya bokatikati. Banyokoli mpe batɛmɛli na ye nde bazalaki na libungá, kasi Paulo azalaki na libungá te. Pene na nsuka ya bomoi na ye na mabelé, atalelaki mosala na ye na lolenge ya bolóngi mpe alobaki ete: “Longwa na sasaipi motole na boyengebene ebombami mpo na ngai oyo Nkolo, Mosambisi na sembo, akopesa ngai.”​—2 Timoté 4:8.

Likoló na oyo nyonso, Paulo azalaki ntango nyonso kobɛlɛma na Yehova Nzambe kati na libondeli, mpe ‘Nkolo atɛlɛmaki pembeni na ye mpe akembisaki ye na nguya.’ (2 Timoté 4:17) Paulo alobaki ete, “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13) Kosolola elongo na Nzambe mpe boyokani malamu elongo na baninga baklisto, esika moko na botaleli ya malamu ya mosala na ye, esalisaki Paulo na kokóba kati na mosala ya Yehova.

Nzambe apemisaki Paulo na kokoma ete: “Tólɛmbaka mpo na kosalaka malamu te zambi na ntango oyo ekoki, tokobuka soko tokotika motema te.” (Bagalatia 6:7-9) Kobuka nini? Bomoi ya seko. Na yango, zalá lokola Yilimia, Paulo mpe Batatoli ya Yehova mingi mosusu ya sembo oyo balobelami kati na Makomami. Ee, zalá lokola bango, mpe omitika na kolɛmba te. Tiká te ete pole na yo ezimisama.​—Kokanisá na Matai 5:14-16.

[Bililingi na lokasa 25]

Paulo mpe Yilimia batikaki te ete pole na bango ezimisama

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto