Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/12 nk. 4-7
  • Ozali na elimo ya kokaba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali na elimo ya kokaba?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ozali koluka ete moto moko alinga yo?
  • Likabo liuti na motema malamu?
  • Lobanzo na yo ya ntina​—Ezali libaku, to elembo ya bolingo?
  • Elimo ya bokabi na boumeli ya mbula mobimba
  • Bato bazali koluka likabo eleki malamu ya kopesa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • “Ezalaki likabo oyo eleki malamu na makabo nyonso oyo nazwá”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mpo na nini likabo yango ezali na valɛrɛ mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/12 nk. 4-7

Ozali na elimo ya kokaba?

OSILÁ kososola ete ezali na mikano mingi mikeseni nde mipusaka bato na kopesa? Likabo likoki kozala elembo ya bolingo, ya bokabi, ya botɔ́ndi. Nzokande, omoná naino te ete likabo likoki mpe kouta na moto oyo azali koluka ete bálinga ye? To likabo likoki kopesama bobele na kopusama to mpo ete mopesi azali koluka kozwa eloko mosusu.

Likabo likoki kotyama na liboke mpe kokangama na nsinga moko kitoko. Kasi ezali mpe solo ete likabo moko kitoko ekoki mpe kozala liboke ya fololo, bilei, to likambo moko malamu, boye te? Ya solo, makabo oyo maleki kosepelisa mbala mingi matali komipesa ya moto ye moko.

Ozali koluka ete moto moko alinga yo?

Emonanaka mbala mingi ete bato bapesaka makabo mpo na koluka ete bálingama. Na bamboka mosusu elenge mobali oyo azali koluka kolingama na elenge mwasi moko mpo na libala akoki kokabela ye fololo. Kasi mwasi na mayele akosuka te bobele na kotalela likabo. Akotalela soki elimo oyo etindi elenge mobali na kopesa ye likabo ezali solo bolingo oyo ekosala ete azala mobali malamu. Likabo lolenge yango, soki emonisi elimo ya kobanga Nzambe, ekoki komema esengo monene epai na mopesi likabo mpe epai na ye oyo azwi yango.

Biblia ezali kolobela libaku moko wana Abigaili, mwasi ya Nabala, abongisaki nokinoki likabo ya motema malamu mpo na Davidi, oyo ye andimaki lokola moto oyo aponamaki na Nzambe ete na nsima akokóma mokonzi ya Yisalaele. Ye mpe alukaki ete bámonisela ye boboto. Mobali na ye asilaki kotyola Davidi mpe agangelaki bato na Davidi. Wana etambolaki ye liboso na mibali ya etumba 400, Davidi asilaki kozwa ekateli ya koboma Nabala mpe bato nyonso ya ndako na ye. Abigaili asalaki likambo moko, wana atindaki nokinoki bilei lokola likabo ya boboto mpo na Davidi mpe bato na ye. Na nsima, ye moko mpe alandaki, mpe nsima ya kosɛnga bolimbisi na komikitisa nyonso mpo na oyo mobali na ye asalaki, apesaki elembeteli ete azalaki na bososoli monene ntango asosolaki elongo na Davidi.

Azalaki na mokano moko malamu, mpe bosukisi ya likambo emonanaki mpenza malamu. Davidi andimaki likabo na ye mpe alobaki na ye ete: “Kendá na kimya, bino na ndako na yo; nayoki mongongo na yo mpe nandimi elongi na yo.” Na nsima, wana Nabala asilaki kokufa, Davidi atunaki Abigaili na libala, mpe andimaki ye na esengo nyonso.​—1 Samwele 25:13-42.

Nzokande, na bantango mosusu, boboto oyo bato balukaka ekoki kolimbola ezalela ya koponapona, to nkutu kopɛngwisa boyengebene. Na ntango wana, likabo ekómi kanyaka. Mopesi akanisaka ete akozwa litomba, kasi azali ye moko komipimela kimya ya elimo. Likámá lizalaka ntango nyonso ete basusu bakoyeba, noki akozongisa monɔkɔ mpo na misala mabe na ye. Ata soki azwi boboto oyo azalaki koluka, akoki bongo komonana lokola moto oyo azali na mokano mabe. Komonisáká mayele mauti na Nzambe, Biblia ezali kopesa likebisi na ntina na makabo motindo wana.​—Deteronome 16:19; Mosakoli 7:7.

Likabo liuti na motema malamu?

Ntembe ezali te na ntina na yango​—kokabela moto oyo olingaka eloko mpo ete osepelaki kosala bongo ekopesa yo esengo monene koleka kokabela ye mpo ete basusu bapesaki yo makanisi ete osengelaki kopesa.

Na ntina na koyanganisama ya lisungi mpo na baninga baklisto oyo bazalaki na bosɛnga na mosuni, ntoma Paulo amonisaki mitindá malamu ya kopesa na lolenge oyo ekosepelisa Nzambe. Akomaki ete: “Zambi soki mposa ezali, likabo ekoyambama pelamoko na biloko bizali na moto, nde pelamoko na biloko [bizangi] ye te.” Abakisaki ete: “Moto na moto asala pelamoko na motema na ye, na mposa moke te mpe na kopusama te; mpo Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.” (2 Bakolinti 8:12; 9:7) Na yango, ezali kotalela bobele biso. Na esika ya kokɔta nyongo mpo na kopesa makabo na ntango ya bilambo, opesaka engebene makoki na yo? Na esika ya kokanisa ete opusami na kopesa mpenzampenza na ntina na bopusi ya bato to ya batekisi, osalaka oyo osilaki kokana na motema na yo? Na ntina na baklisto ya liboso oyo basalelaki mitindá wana miuti na Nzambe, Paulo akomaki ete: “Balɔmbi biso na etingya ete tópesa bango nzela na kosangana na biso na lisungi kosunga babulami.”​—2 Bakolinti 8:4.

Na kokesana na elimo yango, zulunalo Royal Bank Letter ya Novɛ́mbɛ/Desɛ́mbɛ 1994 elobaki na ntina na bapɔ́sɔ oyo ezalaka liboso na Eyenga ya Mbótama ete: “Eleko yango ekoki komonana lokola yikiyiki oyo etumolami na matomba ya mombongo mpo na kopusa basombi ete básomba biloko oyo mbɛlɛ balingaki te kosomba.” Soki biloko yango bizwamaki na nyongo, bosepeli nyonso ya kopesa makabo ekosila nokinoki wana esengeli bango kofuta nyongo yango.

Lobanzo na yo ya ntina​—Ezali libaku, to elembo ya bolingo?

Omonaka ete opesaka makabo mingimingi na mabaku oyo masɛngaka yango? Soki ezali bongo, mbala mosusu ozali mpenza kozanga esengo oyo ezwamaka wana moto apesi na mokano na ye moko.

Bato mingi basepelaka te na matomba ya kopesa makabo na mikolo oyo miyebani liboso. Mama moko oyo azali mpe mokomi-babúku andimaki ete bana na ye bazalaki komonisa lokoso wana mokolo ya kopesa makabo mozalaki kobɛlɛma. Andimaki ete bosepeli na ye moko na ntina na likabo moko kitoko oyo azwaki esilaki mpamba te atyaki motema ete akozwa eloko mosusu. Balapólo mingi eyebisaki ete mikolo ya biyenga oyo basalaka bafɛti mpe bapesanaka makabo ezalaka mpe ntango oyo bato mingi banyokwamaka na mpasi ya makanisi mpe bamipesaka na kolangwa masanga.

Emonaki ye ete likebi mingi oyo batyaka likoló na kopesa makabo na ntango ya bilambo ezalaka mbala mosusu na bopusi mabe likoló na bana, molakisi moko ya psychologie oyo bakomaki maloba na ye kati na zulunalo The New York Times apesaki toli oyo: “Talá ete kopesa makabo na mikolo misusu ezali lolenge malamu ya kokitisa mokakatano.” Okanisi ete yango ekozala na bopusi malamu?

Tammy, mwana ya mibu 12 na libota moko oyo ekumisaka te Eyenga ya Mbótama mpe mikolo ya kobotama, akomaki ete: “Ezalaka esengo mingi wana ozwi likabo na ntango oyo ozalaki komizela na yango te.” Alobaki ete, na esika ya kopesa ye makabo bobele mbala moko to mbala mibale na mbula, baboti na ye bapesaka ye mpe ndeko na ye ya mobali makabo na boumeli ya mbula mobimba. Kasi ezali na likambo oyo ezali na ntina mingi na miso na ye koleka makabo wana. Lokola alobaki yango, “Nazali na bomoi kati na libota ya esengo mingi.”

Búku moko (Secrets of Strong Families) eyebisi polele ete: “Ntálo monene kati na biso babimisaka mosolo mpe balekisaka ntango mingi mbala na mbala na boumeli ya mbula mpo na koluka makabo ya motuya mpo na bokundoli mikolo ya kobotama, bokundoli mikolo mosusu to mpo na bilambo ete tókabela bato oyo tolingaka. Likabo oyo lileki ntina ekosɛnga mosolo soko moke te. Mpe ozali na mposa ya kokangisa yango na ezipelo te. Soki ondimaka, lokola ntálo monene ya bato, ete bomoi na yo ezali eloko oyo eleki motuya oyo ozali na yango, bongo, ndambo moke ya ntango na yo ezali likabo eleki ntina oyo osengeli kopesa. Topesaka likabo yango ya ntina mingi wana topesaka ntango na biso mpo na baoyo tolingaka bango.”

Okoki kosala ete lolenge wana ya kopesa esuka te bobele na libota na yo. Kopesa na bolingo malamu mpo na kokokisa bosɛnga monene oyo basusu bazali na yango ekomema bosepeli ya solo. Yesu Klisto alendisaki biso na komonisaka komibanzabanza lolenge yango epai na babólá, batɛngumi, mpe bakufeli-miso, mpe abakisaki ete: “Okozala na esengo mpo ete bakoki kozongisa na yo lisusu te.”​—Luka 14:12-14.

Kala mingi te, zulunalo Rockland Journal-News (Etats-Unis) elobelaki ndakisa moko ya lolenge wana ya kopesa. Ntango ndako ya mobangé mwasi moko mokufi-miso ekweaki, baninga na ye batongelaki ye ndako mosusu ya sika. Bakompanyi ya mboka yango epesaki makabo, mpe momonisi ya Leta apesaki mosolo. Zulunalo yango ebakisaki ete: “Nzokande, oyo elekaki ntina, bato soko 150, oyo mingi kati na bango bazali Batatoli ya Yehova ya lisangá ya Haverstraw, bapesaki ntango mpo na kotonga ndako yango.”

Lisoló yango likóbi koloba ete: “Na esika ya botongi, mabóndo ya bisaleli matondanaki penepene ya bamesa oyo etondaki na bilei. Na mikolo mibale basáli wana batongaki ndako oyo ekoki koyamba mabota mibale, oyo ezali molai lokola ndako ya mikili misato. . . . Batatoli ya Yehova bayebani malamu mpo na makoki na bango ya kotonga bandako nokinoki. . . . Nzokande, mosala wana ya nokinoki mokeseni na bosikisiki ya mokumba na bango: kosala na bolingo nyonso mosala oyo ekoumela ntango molai. Atako Mama Blakely akoki te komona ndako na ye ya sika, kasi mabɔkɔ na ye makoki komama yango, mpe motema na ye moyebi bozindo ya mayoki oyo yango esimbami na ntina na mosala wana ya bolingo.”

Elimo ya bokabi na boumeli ya mbula mobimba

Baoyo bazali solo na elimo ya bokabi bazelaka te mikolo miponami. Bomoi na bango bosuki te bobele na kotalela makambo na bango moko. Wana bazwi biloko ya kitoko, basepelaka kokabola yango elongo na basusu. Yango elingi koloba te ete basengeli kopesa ntango nyonso makabo. Yango elingi koloba te ete bapesaka na meko oyo bayeisaka mpenza bobólá na mabota na bango. Yango elingi koloba te ete bapesaka kozanga kokanisa bopusi oyo yango ekosala epai na ye oyo azwi yango. Nzokande, bazali bato oyo “bapesaka,” lokola Yesu ateyaki bayekoli na ye ete básalaka yango.​—Luka 6:38.

Batyaka likebi na ezalela ya baninga to ya bazalani oyo bazali mibangé, na bokɔnɔ, to baoyo bazali na mposa ya kolendisama. “Makabo” na bango makoki kozala bongo kokende kosalisa na kosomba biloko to kosunga na misala ya ndako. Ekoki kozala kokatakata nkoni to kokombola mbulampɛmbɛ. Ekoki kosɛnga komemela bango bilei bilambami to kokamata ngonga moko mpo na kotala moto mpe kotánga elongo na ye. Bakoki bango moko kozala na mosala mingi kasi bazangi te likoki ya kopesa lisalisi. Basili koyekola na makambo oyo bakutanaki na yango ete solo “esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.”​—Misala 20:35.

Ezali solo ete, Mopesi oyo aleki bapesi nyonso ezali bongo Mozalisi na biso, Yehova Nzambe. Ye “akopesaka bato nyonso bomoi, na mpema, na biloko nyonso.” (Misala 17:25) Kati na Biblia, azali mpe kopesa biso bososoli na ntina na mokano na ye ya kotya nsuka na mabe, na bokɔnɔ mpe kufa, mpe ya kokómisa mabelé oyo paladiso. (Nzembo 37:10, 11; Emoniseli 21:4, 5) Nsima ya koyekola yango, baoyo bazali na elimo ya bokabi babatelaka nsango malamu wana mpo na bango moko te. Moko na bisengo na bango oyo eleki monene ezali bongo koyebisa yango epai na basusu. Bazali solo na elimo ya kopesa oyo euti na Nzambe. Ezali elimo yango nde ozali kolóna?

[Bililingi na lokasa 7]

Makabo mosusu oyo mazali na motuya mingi masɛngaka mosolo te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto