Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/2 nk. 9-14
  • Kelasi​—⁠Salelá yango mpo na kosanzola Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kelasi​—⁠Salelá yango mpo na kosanzola Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koyekola kotánga malamu
  • Koyeba kokoma malamu
  • Kokóla na mayele,na bizaleli malamu mpe na elimo
  • Kobongisama oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa ya mokolo na mokolo
  • Biblia epekisi kotánga kelasi?
    Lamuká!—1998
  • Ndenge oyo Batatoli ya Yehova batalelaka kelasi
    Batatoli ya Yehova mpe kelasi
  • Kelasi mpe kolakisama na ntango ya kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ntina ya kelasi mpe kolakisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/2 nk. 9-14

Kelasi​—Salelá yango mpo na kosanzola Yehova

“Ye oyo akosololaka na motema na ye moko azali koluka lokumu na ye mpenza. Nde ye oyo akolukaka lokumu na Motindi na ye azali sembo.”​—YOANE 7:18.

1. Ntango nini mpe lolenge nini kolakisama ebandaki?

KOLAKISAMA ebandá uta kala, kala mpenza. Kolakisama ebandaki na ntango Yehova Nzambe, Moteyi mpe Molakisi Monene, azalisaki Mwana na ye mobotami-ya-liboso. (Yisaya 30:20; Bakolose 1:15) Mwana wana nde moto oyo ayekolaki mpenza epai na Molakisi Monene ye moko! Kozaláká penepene na Tata na ye na boumeli ya bankóto mingi ya bambula, Mwana yango​—oyo ayaki koyebana na nkombo ya Yesu Klisto⁠—​azwaki kolakisama ya motuya mpenza na ntina na bizaleli, misala mpe mikano ya Yehova Nzambe. Na nsima, ntango abotamaki lokola moto awa na mabelé, Yesu akokaki koloba ete: “Nazali kosala likambo moko na motema na ngai te kasi pelamoko Tata asili kolakisa ngai, nakosololaka makambo oyo.”​—Yoane 8:28.

2-4. (a) Engebene Yoane mokapo 7, makambo nini masalemaki wana Yesu ayanganaki na Elambo ya Mingombo ya mobu 32 T.B.? (b) Mpo na nini Bayuda bakamwaki na ntina na makoki na Yesu ya koteya?

2 Lolenge nini Yesu asalelaki kolakisama oyo azwaki? Na boumeli ya mbula misato na ndambo ya mosala na ye awa na mabelé, alɛmbaki te mpo na kolakisa basusu makambo oyo ayekolaki. Nzokande, yango esalemaki na mokano moko ya ntina mpenza. Bongo mokano yango ezalaki nini? Tótalela maloba ya Yesu oyo mazali na Yoane mokapo 7, epai kuna azali kolimbola eutelo mpe mokano ya mateya na ye.

3 Libosoliboso, tótalela ntango oyo likambo yango lisalemaki. Ezalaki na Automne ya mobu 32 T.B., pene na mbula misato nsima ya batisimo ya Yesu. Bayuda basanganaki na Yelusaleme mpo na Elambo ya Mingombo. Na boumeli ya mikolo ya liboso ya elambo yango, bato bazalaki kosolola mingi na ntina na Yesu. Ntango elambo ekómaki na katikati, Yesu akendaki na tempelo mpe abandaki koteya. (Yoane 7:2, 10-14) Lokola momeseno, amimonisaki ete azalaki moteyi monene.​—Matai 13:54; Luka 4:22.

4 Molɔngɔ́ 15 ya Yoane mokapo 7 elobi: “Bayuda bakamwi, balobi ete, Moto oyo ayebi mikanda na nzela nini awa eyekoli ye [na biteyelo, NW] te?” Bokoki koyeba ntina nini bakamwaki? Yesu ayekolaki ata na eteyelo moko te ya Balabi, na yango azalaki moto oyo ayebaki mokanda te​—engebene likanisi na bango! Nzokande, Yesu azalaki kozwa mpe kotánga mikapo kati na Makomi Mosantu kozanga nkaká. (Luka 4:16-21) Kutu, moto yango ya Galilai oyo azalaki mosáli na mabaya alakisaki bango makambo oyo mazalaki kati na Mibeko ya Mose! (Yoane 7:19-23) Lolenge nini yango ekokaki kosalema?

5, 6. (a) Lolenge nini Yesu alimbolaki eutelo ya kolakisama na ye? (b) Lolenge nini Yesu asalelaki kolakisama oyo azwaki?

5 Lokola tozali kotánga yango na molɔngɔ́ 16 mpe molɔngɔ́ 17, Yesu alimboli ete: “Mateyo na ngai mazali na ngai te kasi na Motindi na ngai. Soko moto nani azali na mposa na kosala mokano na [Ye], akoyeba mpo na mateyo, soko mauti na Nzambe, soko nazali kosolola na motema na ngai moko.” Balingaki koyeba soki Yesu alakisamaki na nani mpe ye ayebisaki bango polele ete alakisamaki na Nzambe!​—Yoane 12:49; 14:10.

6 Lolenge nini Yesu asalelaki kolakisama na ye? Lokola yango ekomami na Yoane 7:18, ayanolaki ete: “Ye oyo akosololaka na motema na ye moko azali koluka lokumu na ye mpenza. Nde ye oyo akolukaka lokumu na motindi na ye azali sembo mpe bokesene ezali kati na ye te.” Likambo oyo ete Yesu asalelaki kolakisama na ye mpo na kopesa lokumu epai na Yehova, “[Oyo akoki, NW] na boyebi nyonso,” ezalaki mpenza likambo libongi!​—Yobo 37:16.

7, 8. (a) Lolenge nini tosengeli kosalela kolakisama? (b) Tángá mikano minei ya moboko ya kolakisama ya bokatikati?

7 Na yango, tozali kozwa toli ya motuya epai na Yesu ete​—Kolakisama esengeli kosalelama te mpo na komikumisa biso moko, kasi mpo na kosanzola Yehova. Ezali na lolenge mosusu te oyo eleki malamu mpo na kosalela kolakisama. Kasi lolenge nini tokoki kosalela kolakisama mpo na kosanzola Yehova?

8 Kolakisa elimboli “koyekolisa na nzela ya mateya mpe ya mosala, [mingimingi] kati na tekiniki moko, na mosala ya mabɔkɔ, to na mosala mosusu.” Tiká tótalela sikawa mikano minei oyo kolakisama ya bokatikati esengeli kokokisa mpe tótala lolenge oyo moko na moko na yango ekoki kosalelama mpo na kosanzola Yehova. Kolakisama ya bokatikati esengeli kosalisa biso (1) na kotánga malamu, (2) na kokoma malamu, (3) na kokóla na mayele mpe na bizaleli malamu, mpe (4) na kozwa kobongisama ya malamu oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa ya mokolo na mokolo.

Koyekola kotánga malamu

9. Mpo na nini ebongi kozala motángi malamu?

9 Likambo ya liboso ezali bongo: koyekola kotánga malamu. Mpo na nini kozala motángi malamu ezali likambo ya ntina? Búku The World Book Encyclopedia eyebisi ete: “Kotánga . . . ezali moboko mpo na koyekola mpe ezali moko ya makoki maleki ntina kati na bomoi ya mokolo na mokolo. . . . Batángi malamu basungaka mingi mpo na kosala libota ya bato babongi mpe oyo lizali kokóla malamu. Bobele na ntango yango, bango moko mpe bazali na bomoi botondi na bosepeli mpe ya esengo.”

10. Lolenge nini kotánga Liloba ya Nzambe ekosalisa biso ete tózala na bomoi malamu, ya kosepelisa?

10 Soki kotánga makambo ndenge na ndenge, ekoki kosalisa biso mpo na kozala na “bomoi botondi na bosepeli mpe ya esengo,” boye ezali solo ete kotánga Liloba ya Nzambe ekopesa mpenza matomba mingi koleka! Botángi yango bozali kofungola elimo mpe mitema na biso mpo na kozwa makanisi mpe mikano ya Yehova, mpe mpo na kozwa bososoli ya polele ya makanisi mpe ya mikano yango ezali kosala ete bomoi na biso bozala na ntina. Lisusu, Baebele 4:12 elobi ete: “Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.” Wana tozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe tozali komanyola likoló na yango, tozali kobendama makasi epai na Mobandisi na yango, mpe topusami na kosala mbongwana kati na bomoi na biso mpo na kopesa ye esengo mingi koleka. (Bagalatia 5:22, 23; Baefese 4:22-24) Topusami ete tóyebisa mpe epai na basusu solo kitoko oyo tozali kotánga. Makambo nyonso wana mazali komema makumisi epai na Molakisi Monene, Yehova Nzambe. Ya solo, ezali na lolenge mosusu te ya malamu koleka oyo mpo na kosalela likoki na biso ya kotánga!

11. Manaká malamu ya boyekoli ya moto ye moko masengeli kosangisa nini?

11 Tózala mikóló to bana mike, biso banso tosengeli koyekola kotánga malamu, mpamba te kotánga ezali kokokisa mokumba monene kati na bomoi na biso ya boklisto. Longolá botángi ya mokolo na mokolo ya Liloba ya Nzambe, manáka ya boyekoli ya moto ye moko oyo ezali na bokatikati esengeli kosangisa botaleli ya mokapo ya Biblia kati na mwa búku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo, botángi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!, mpe komibongisa mpo na makita na biso. Lisusu, ezali boni mpo na mosala na biso ya boklisto? Emonani polele ete kosakola liboso ya bato banso, kozongela bato oyo bamonisaki bosepeli, mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia, nyonso wana ezali eteni ya ebongiseli mobimba ya kolakisama oyo euti na Nzambe mpe ezali kosɛnga koyeba kotánga malamu.

Koyeba kokoma malamu

12. (a) Mpo na nini koyekola kokoma malamu ezali likambo ya ntina? (b) Wapi makomi oyo maleki mosusu nyonso kino lelo?

12 Mokano ya mibale oyo tosengeli kobatela kati na makanisi na biso ezali ete kolakisama ya bokatikati esengeli kosalisa biso tóyeba kokoma malamu. Makomi mazali komonisa epai na basusu bobele maloba mpe makanisi na biso te, kasi mazali lisusu kobatela yango. Esili koleka bikeke mingi mpenza, Bayuda soko 40 bakomaki likoló na papirise to mposo ya nyama maloba oyo mayaki kosala Makomami mapemami. (2 Timoté 3:16) Ya solo, yango ezalaki mpenza makomi oyo maleki nyonso mosusu! Na ntembe te, Yehova atambwisaki bosalemi ya mbala na mbala ya bakopi ya maloba wana ya bulɛɛ na boumeli ya bikeke mingi, na boye ete yango ekómeli biso na lolenge lobongi na kotyelama motema. Tozali na botɔ́ndi lokola Yehova apesaki nzela ete maloba na ye mákomama, na esika ete asuka bobele na koyebisáká yango bobele na monɔkɔ mpamba, boye te?​—Kokanisá na Exode 34:27, 28.

13. Nini ezali komonisa ete Bayisalaele bayebaki kokoma?

13 Na ntango ya kala, bobele etuluku moke ya bato oyo bazalaki bato minene nde bayebaki kotánga mpe kokoma, na ndakisa bakomeli na Mésopotamie mpe na Ezipito. Na kokesana monene, moto nyonso na Yisalaele alendisamaki ete ayeba kotánga mpe kokoma. Atako yango emonani ete ezali maloba ya elilingi, etindá oyo ezali na Deteronome 6:8, 9 mpo na Bayisalaele, ete basengelaki kokoma likoló ya bikuke ya ndako na bango ezali mpe komonisa ete bayebaki kokoma. Na bomwana mpenza, bana bazalaki kolakisama lolenge ya kokoma. Manáka ya Geser, oyo ezali moko ya bandakisa eumeli mingi mpenza ya makomi ya kala ya Liebele, ekanisami na bamoko ya bato na mayele ete ezalaki komimekisa ya mwanakelasi mpo na kokólisa likoki ya bobombi makambo na motó.

14, 15. Wapi mitindo ya malamu mpe ya pɛtɔ ya kosalela makoki ya kokoma?

14 Kasi motindo nini tokoki, na litomba nyonso mpe na lolenge malamu, kosalela likoki na biso ya kokoma? Na ntembe te na kozwáká banɔ́ti na makita ya lisangá, na mayangani ya mike mpe ya minene. Nkomá, ata soki ekomami “na maloba moke,” ekoki kopesa elendiseli epai na ye oyo azali na bokɔnɔ to komonisa botɔ́ndi epai na ndeko mobali to ndeko mwasi oyo azalaki na boboto to boyambi epai na biso. (1 Petelo 5:12, NW) Soki moto moko kati na lisangá akufeli molingami na ye, nkomá mokuse to kálati ekoki “koloba na kobɔndisa nyonso” mpo na biso. (1 Batesaloniki 5:14, NW) Ndeko mwasi moko oyo mama na ye akufaki na kanser ayebisi ete: “Moninga moko atindelaki ngai nkomá moko ya kosepelisa. Yango esalisaki ngai mingi mpamba te nazalaki kotánga yango mbala na mbala.”

15 Lolenge kitoko mpenza ya kosalela likoki ya kokoma mpo na kosanzola Yehova ezali ya kotinda nkomá mpo na kopesa litatoli na ntina na Bokonzi. Mbala mosusu, ekoki kozala na ntina ete tóbatela ntango nyonso boninga elongo na bato ya sika oyo bazali kosepela na solo, baoyo bafandaka na bisika oyo bitangwi mosika. Bokɔnɔ ekoki, mpo na mwa ntango moke, kosala ete ozala lisusu te na likoki ya kokende ndako na ndako. Na bongo, nkomá ekoki komonisa oyo olingaki mpenza koloba soki yo moko ozalaki wana.

16, 17. (a) Likambo nini oyo lisalemaki lizali komonisa motuya ya nkomá mpo na kopesa litatoli? (b) Okoki koyebisa likambo mosusu ya lolenge yango?

16 Tótalela lisoló oyo lilandi. Esili koleka bambula mingi, ndeko mwasi moko atindaki nkomá ya kopesa litatoli na ntina na Bokonzi epai na mwasi-mokufeli mobali moko oyo liwa ya mobali na ye esakolamaki na zulunalo ya mboka wana. Mwasi yango ayanolaki te. Na nsima ya bambula koleka 21, na Novɛ́mbɛ 1994, ndeko mwasi ayambaki nkomá oyo eutaki epai ya mwana mwasi ya mwasi yango. Mwana yango ya mwasi akomaki ete:

17 “Na Apríli 1973, okomelaki mama na ngai mpo na kobɔndisa ye nsima ya liwa ya tata na ngai. Nazalaki na mbula libwa na ntango wana. Mama na ngai ayekolaki Biblia, kasi kino sikawa azali mosaleli ya Yehova te. Nzokande, boyekoli na ye ememaki ngai mpenza na koyeba solo. Na 1988, nabandaki koyekola Biblia​—mbula 15 nsima ya kozwa nkomá na yo. Na mokolo ya 9 Mársi 1990, nazwaki batisimo. Nazali na botɔ́ndi mingi mpo na nkomá na yo oyo otindaki esili koleka bambula mingi mpe nazali na esengo monene ya koyebisa yo ete mbóto oyo okónaki ekólaki mpenza na lisalisi ya Yehova. Mama apesaki ngai nkomá na yo ete nabomba yango, mpe nalingi koyeba soki yo ozali nani. Nazali kolikya ete nkomá oyo ekokómela yo.” Nkomá ya mwana mwasi yango, oyo ezalaki na adresi na ye mpe nimero na ye ya telefone, ekómaki mpenza epai na ndeko mwasi oyo akomelaki mama na ye esili koleka bambula mingi. Kanisá naino bokamwi oyo elenge mwasi azalaki na yango ntango ndeko mwasi wana abéngaki ye na telefone​—oyo azali naino kino lelo kotinda nkomá mpo na koyebisa elikya ya Bokonzi epai na basusu!

Kokóla na mayele,na bizaleli malamu mpe na elimo

18. Na ntango ya Biblia, lolenge nini baboti bazalaki kokokisa bamposa ya kolakisama ya bana na bango na oyo etali kokólisa mayele mpe bizaleli malamu?

18 Mokano ya misato oyo tosengeli kobatela na makanisi na biso ezali ete kolakisama ya bokatikati esengeli kosalisa biso ete tókóla na mayele mpe na bizaleli malamu. Na ntango ya kala, kolakisama ya bana na ntina etali mayele mpe bizaleli malamu etalelamaki lokola moko na mikumba ya liboso ya baboti. Bana bazalaki koteyama bobele kotánga mpe kokoma te kasi, oyo eleki ntina, bateyamaki kati na Mibeko ya Nzambe mpe yango esangisaki misala na bango nyonso ya bomoi. Na yango, kolakisama esangisaki koteyama na ntina etali masɛngami ya lingomba na bango, mitindá oyo mizali kotambwisa libala, boyokani ya libota, bizaleli malamu na ntina etali kosangisa nzoto, bakisá mpe mikumba na bango liboso ya bazalani. Kolakisama motindo wana esalisaki bango ete bákóla, bobele na mayele mpe na bizaleli malamu te kasi lisusu na elimo.​—Deteronome 6:4-9, 20, 21; 11:18-21.

19. Epai wapi tokoki kozwa kolakisama oyo ekolakisa biso bizaleli malamu mpe oyo ekosalisa biso na kokóla na elimo?

19 Ezali boni mpo na mikolo ya lelo? Mateya malamu ya kelasi ya mokili mazali na ntina. Yango ezali kosalisa biso na kokóla na mayele. Kasi epai wapi tokoki kozwa kolakisama oyo ekolakisa biso bizaleli malamu oyo bileki na motuya mpo na kolanda yango mpe oyo bikosalisa biso ete tókóla na elimo? Kati na lisangá ya boklisto, tozali na likoki ya kolanda manáka ya kolakisama ya teokrasi oyo ekoki kozwama na esika mosusu te na mabelé mobimba oyo. Na lisalisi ya boyekoli na biso moko ya Biblia mpe ya mikanda mikolimbolaka Biblia, bakisá mpe mateya oyo mazali kopesama na makita ya lisangá, na mayangani ya mike mpe na mayangani ya minene, tokoki kozwa kolakisama ya motuya monene mpe oyo ezali sé kolandana​—kolakisama oyo Nzambe azali kopesa​—kozanga kofuta mosolo! Yango eteyi biso nini?

20. Kolakisama oyo euti na Nzambe ezali koteya biso nini, mpe ezali kopesa matomba nini?

20 Ntango tobandi boyekoli ya Biblia, tozali koyekola mateya ya ebandeli ya Makomami, ‘makambo mikemike ya liboso.’ (Baebele 6:1) Wana tozali kokóba, tozali kolya “bilei makasi”​—elingi koloba, solo ya mozindo koleka. (Baebele 5:14) Nzokande, na koleka oyo wana, tozali koyekola mitindá ya Nzambe oyo mizali koteya biso lolenge ya kozala na bomoi oyo Nzambe alingi ete biso tózala na yango. Na ndakisa, tozali koyekola lolenge ya kopɛngola mimeseno mpe misala oyo mizali ‘kobebisa nzoto’ mpe kozala na limemya epai na bakonzi, na bomoto mpe na biloko ya basusu. (2 Bakolinti 7:1; Tito 3:1, 2; Baebele 13:4) Lisusu, toyei koyeba ntina ya kozala na kolongobana mpe ya kozala basáli mpenza kati na mosala na biso mpe toyei koyeba motuya ya kozala na bomoi engebene mibeko ya Biblia na makambo matali kosangisa nzoto. (1 Bakolinti 6:9, 10; Baefese 4:28) Wana tozali kokende liboso na kosaleláká mitindá yango kati na bomoi na biso, tozali kokóla na elimo, mpe boyokani na biso elongo na Nzambe bozali kokóma makasi. Lisusu, etamboli na biso ya kobanga Nzambe esalaka ete tózala bana-mboka ya malamu, ata tozali kofanda wapi na mokili. Mpe yango ekoki kopusa basusu ete bápesa makumisi epai na eutelo ya kolakisama ya bonzambe​—Yehova Nzambe.​—1 Petelo 2:12.

Kobongisama oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa ya mokolo na mokolo

21. Kobongisama nini malamu bana bazalaki kozwa na ntango ya kala?

21 Mokano ya minei ya kolakisama ya bokatikati ezali bongo ya kopesa na moto kobongisama oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa na ye ya mokolo na mokolo. Na ntango ya kala, kolakisama oyo baboti bazalaki kopesa esangisaki mpe kobongisama ya malamumalamu. Bana basi bazalaki kolakisama lolenge ya kosala misala ya ndako. Mokapo ya nsuka ya Masese mozali komonisa ete misala yango misengelaki mpenza kozala mingi mpe ya ndenge na ndenge. Na yango, bana basi bakómaki na makoki mingi mpo na kotonga mpe kosɔna bilamba, kolamba, kobatela ndako, kosala mwa mombongo moke, mpe kosala boyokani mpo na kozwa bilanga. Bana mibali bazalaki koteyama mingi misala ya mosuni oyo batata na bango bazalaki kosala, ezala mosala ya bilanga to mosala ya mabɔkɔ. Yesu ayekolaki mosala ya mabaya epai na tata-mobɔkɔli na ye, Yosefe; na yango, abéngamaki te bobele “mwana na mosáli na mabaya” kasi lisusu “mosáli na mabaya”.​—Matai 13:55; Malako 6:3.

22, 23. (a) Kolakisama esengeli kobongisa bana mpo na likambo nini? (b) Nini esengeli kozala mokano na biso wana toponi kotánga bakelasi milai soki yango esɛngami?

22 Lelo mpe, kotánga kelasi ya bokatikati esangisi mpe kobongisama mpo na kokokisa bamposa ya libota na biso mokolo mosusu. Maloba ya ntoma Paulo oyo mazali na 1 Timoté 5:8 mazali komonisa ete kokokisa bamposa ya libota ezali mokumba ya bulɛɛ. Akomaki ete: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” Na bongo, kolakisama esengeli kobongisa bana mpo na kokokisa mikumba oyo bakozwa kati na bomoi na bango mpe esengeli kosalisa bango ete bákóma bato oyo basalaka mosala makasi na mboka na bango.

23 Esengeli na biso kolekisa mbula boni na kelasi? Yango etali mboka na mboka. Soki mpo na kozwa mosala ezali kosɛnga kobakisa bambula mosusu ya kelasi likoló na oyo esɛngami na mibeko, baboti nde basengeli kosunga bana na bango na kokamata ekateli ya malamu na likambo ya kobakisa bambula ya kelasi to ya koyekola mosala, na kotaleláká matomba mpe makámá ya boyekoli motindo yango. Nzokande, mokano na biso mosengeli kozala nini wana toponi kotánga bakelasi milai soki yango esɛngami bongo? Esengeli soko moke te kozala na mposa ya kozala na bozwi mingi, nkembo, to koluka lokumu na biso moko. (Masese 15:25; 1 Timoté 6:17) Omikundola liteya oyo tozwi na ndakisa ya Yesu​—kolakisama esengeli kosalelama mpo na kopesa Yehova masanzoli. Soki toponi kotánga bakelasi milai, yango esengeli kozala mpo na kosalela Yehova malamu koleka kati na mosala ya boklisto.​—Bakolose 3:23, 24.

24. Liteya nini toyekoli epai na Yesu tosengeli soko moke te kobosana yango?

24 Na yango, tiká ete tózala na molende mpo na kozwa kolakisama ya mosuni oyo ezali na bokatikati. Tiká ete tózwa mpenza litomba na ebongiseli ya kolakisama oyo euti na Nzambe, kolakisama oyo ezali kopesama kati na lisangá ya Yehova. Mpe tiká ete tóbosana soko moke te liteya oyo ya ntina mingi oyo toyekoli epai na Yesu, moto oyo alakisamaki koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabelé​—ete kolakisama esengeli kosalelama, mpo na komikumisa biso moko te, kasi mpo na kopesa masanzoli epai na Molakisi oyo aleki balakisi nyonso, Yehova Nzambe!

Okopesa eyano nini?

◻ Lolenge nini Yesu asalelaki kolakisama oyo azwaki?

◻ Mpo na nini ezali likambo ya ntina koyekola kotánga malamu?

◻ Lolenge nini tokoki kosalela makoki na biso ya kokoma mpo na kosanzola Yehova?

◻ Lolenge nini kolakisama oyo euti na Nzambe ezali kosalisa biso na kokóla na bizaleli malamu mpe na elimo?

◻ Kolakisama ya bokatikati esengeli kotalela kobongisama nini ya malamu?

[Etanda na lokasa 13]

Lisungi libongi mpo na balakisi

Na Mayangani ya Etúká “Basanzoli na esengo” na boumeli ya mobu 1995/1996, la Société Watch Tower ebimisaki mwa búku moko ya sika na motó ya likambo Batatoli ya Yehova mpe kelasi. Mwa búku wana ya nkasa 32, ya lángi ndenge na ndenge ebimisamaki mpenzampenza mpo na kosalisa balakisi. Kino sikawa yango esili kobongolama na nkótá 58.

Mpo na nini mwa búku moko mpo na balakisi? Mpo na kosalisa bango ete báyeba malamu bindimeli ya banakelasi oyo bazali bana ya Batatoli ya Yehova. Makambo nini mazali kati na mwa búku yango? Na elobeli moko ya polele mpe ya kolendisa, yango ezali kolimbola lolenge nini totalelaka likambo ya kotánga bakelasi milai, bokundoli ya mokolo ya kobotama mpe Eyenga ya Mbótama, mpe kopesa losako na bɛndɛlɛ. Mwa búku yango ezali mpe kondimisa balakisi ete tolingaka ete bana na biso bázwa litomba monene na kelasi na bango mpe ete tosepelaka mingi kosala na boyokani na balakisi, kopesáká bongo motuya monene na kelasi ya bana na biso.

Lolenge nini mwa búku Kelasi esengeli kosalelama? Lokola yango ebongisamaki mpo na balakisi, tiká ete tókabola yango epai na balakisi, bakambi ya biteyelo mpe bakonzi mosusu ya biteyelo. Tiká ete mwa búku wana ya sika esalisa balakisi nyonso lolenge yango ete báyeba malamu makanisi mpe bindimeli na biso mpe bantina oyo na bantango mosusu tosɛngaka ntómo oyo ikeseni na oyo ya basusu. Baboti balendisami na kosalela mwa búku yango lokola moboko ya masoló elongo na balakisi ya bana na bango.

[Elilingi na lokasa 10]

Na Yisalaele ya kala kolakisama etalelamaki na motuya mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto