“Zelá ngai”
“Boye, [Yehova] alobi ete, Zelá ngai.”—SEFANIA 3:8.
1. Likebisi nini mosakoli Sefania apesaki, mpe ezali na ntina nini mpo na bato oyo bazali na bomoi lelo oyo?
“MOKOLO monene na [Yehova] ebɛlɛmi.” Ezalaki na lolenge wana nde mosakoli Sefania angangaki mpo na kopesa likebisi na katikati ya ekeke ya nsambo L.T.B. (Sefania 1:14) Na nsima ya bambula 40 to 50, esakweli yango ekokisamaki na mokolo oyo Yehova akweisaki bikateli na ye likoló na Yelusaleme mpe likoló na bikólo oyo batɛmɛlaki lotómo ya koyangela ya Yehova na konyokoláká libota na ye. Mpo na nini esengeli kobenda likebi ya bato oyo bazali na bomoi pene na nsuka ya ekeke oyo ya 20? Tozali kobika na eleko oyo mokolo na nsuka mpe “mokolo monene” ya Yehova ezali koya na lombangu mpenza. Bobele lokola ezalaki na eleko ya Sefania, etikali moke “nkɛlɛ” ya Yehova ekopela likoló na ebongiseli oyo ekokani lelo na Yelusaleme ya kala—boklisto ya nkombo mpamba—mpe bikólo nyonso oyo bazali konyokola libota ya Yehova mpe bazali kotɛmɛla lotómo na ye ya koyangela likoló na molɔngɔ́ mobimba.—Sefania 1:4; 2:4, 8, 12, 13; 3:8; 2 Petelo 3:12, 13.
Sefania—Motatoli ya mpiko
2, 3. (a) Makambo nini mayebisameli biso na ntina na Sefania, mpe nini emonisi ete azalaki motatoli ya mpiko ya Yehova? (b) Makambo nini mapesi biso Nzela na koyeba ntango mpe esika oyo Sefania azalaki kosakola?
2 Makambo mingi mayebani te na ntina na mosakoli Sefania, oyo nkombo na ye (na Liebele, Tsephan·yahʹ) elimboli “Yehova asili kobomba (kobatela malamu).” Nzokande, na bokeseni na basakoli mosusu, Sefania ayebisaki kolandana ya milɔngɔ́ ya libota na ye kino na molɔngɔ́ ya minei, kozonga kino na “Hizikiya.” (Sefania 1:1; kokanisá na Yisaya 1:1; Yilimia 1:1; Ezekiele 1:3.) Lokola likambo motindo oyo emonanaka mpenza mingi te, banganga-mayele mingi balobi ete nkɔ́kɔ ya nkɔ́kɔ na ye ezalaki bongo Mokonzi Hizikiya. Soki yango ezali bongo, boye Sefania autaki na libota ya bokonzi, mpe yango ekokaki kopesa ndimbola monene na ekateli makasi oyo asakolaki yango likoló na mikóló ya Yuda mpe emonisaki ete azalaki motatoli ya mpiko mpe mosakoli ya Yehova. Boyebi na ye mozindo ya etando ya mabelé ya Yelusaleme mpe ya makambo oyo mazalaki kosalema kati na ndako ya mokonzi emonisi ete mbala mosusu asakolaki mpe bikateli ya Yehova kati na mboka-mokonzi mpenza.—Talá Sefania 1:8-11, maloba na nsé ya lokasa na NW.
3 Ezali na ntina tósimba likambo oyo ete, atako Sefania asakolaki bikateli ya Yehova likoló na “mikóló” ya Yuda (bankumu, to bakonzi na bitúlúká) mpe likoló na “bana na mokonzi,” alobelaki mokonzi te kati na maloba na ye ya kokweisa.a (Sefania 1:8; 3:3) Yango emonisi ete na ntango yango elenge Mokonzi Yosiya asilaki komonisa mposa na ye ya kosalela losambo ya solo atako, na kotalela makambo oyo Sefania akweisaki, emonanaki polele ete na eleko wana abandaki naino te kokɔtisa mbongwana na ye na makambo matali losambo. Oyo nyonso emonisi ete Sefania asakolaki kati na Yuda na boumeli ya bambula ya ebandeli ya boyangeli ya Yosiya, oyo ayangelaki kobanda na 659 kino 629 L.T.B. Na ntembe te, esakweli ya Sefania oyo ezali na nguya esalisaki elenge Yosiya na komona lisusu malamu koleka ete losambo ya bikeko, mobulu, mpe libebi eyikanaki mingi kati na Yuda na eleko wana, mpe elendisaki mpe kampanye na ye oyo asalaki na nsima mpo na kokweisa losambo ya bikeko.—2 Ntango 34:1-3.
Bantina ya nkɛlɛ ya Yehova
4. Na maloba nini Yehova amonisaki nkɛlɛ na ye likoló na Yuda mpe likoló na Yelusaleme?
4 Yehova azalaki na ntina malamu ya koyoka nkanda mpo na bakambi mpe bafandi ya Yuda mpe mboka-mokonzi na yango, Yelusaleme. Na nzela ya mosakoli na ye Sefania, alobaki ete: “Nakosembola lobɔkɔ na ngai likoló na Yuda mpe likoló na bafandi na Yelusaleme; nakozenga longwa na esika na likita na Bala, mpe nkombo na basáli na bikeko mpe banganga na yango lokola; baoyo bazali kokumbama likoló na nsamba epai na ebolo na lola, baoyo bazali kokumbama mpe kokata ndai na [Yehova], nde bakati ndai mpo na Malakama.”—Sefania 1:4, 5.
5, 6. (a) Ezalela ya makambo ya losambo ya Yuda ezalaki lolenge nini na eleko ya Sefania? (b) Ezalela ya makambo ya bakonzi ya Yuda mpe ya bayangelami na bango ezalaki lolenge nini?
5 Yuda ebebisamaki na ebele ya milulu mabe ya losambo ya Bala mpo na kobota bana, na astroloji, mpe na losambo ya Malakama, nzambe ya bapakano. Soki Malakama ezali bobele ye wana Moleki, lokola basusu balobaka yango, na bongo, mbeka mabe ya koboma bana ezalaki mpe kati na losambo ya lokuta ya Yuda. Misala ya losambo motindo wana mizalaki mbindo na miso na Yehova. (1 Mikonzi 11:5, 7; 14:23, 24; 2 Mikonzi 17:16, 17) Ebendelaki bango nkɛlɛ na ye monene mpenza mpamba te basambeli ya bikeko bazalaki atako bongo kokata ndai na nkombo ya Yehova. Atikaki lisusu nzela soko moke te na bosɔtɔ ya losambo motindo wana mpe abomaki bapakano lolenge moko na banganga oyo bazalaki bapɛngwi.
6 Lisusu, bakambi ya Yuda babebisamaki. Bankumu na yango bazalaki lokola “bankosi na konguluma” mpe ya lokoso, mpe basambisi na yango bakokanaki na “bambwa na zamba” oyo batondaka te. (Sefania 3:3) Basaleli na bango bafundamaki ete ‘batondisaki bandako na bankóló na bango na yauli mpe na bokosi.’ (Sefania 1:9) Ezaleli ya koluka ebele ya biloko ya mosuni eyikanaki mingi. Bato mingi bazalaki kosalela libaku wana mpo na konduka ebele ya bozwi.—Sefania 1:13.
Ntembe na ntina na mokolo ya Yehova
7. Sefania asakolaki na boumeli ya bambula boni liboso ete “mokolo monene na [Yehova]” ekóma, mpe Bayuda mingi bazalaki kati na ezalela nini ya elimo?
7 Lokola tosilaki komona yango, mabe oyo etondaki mingi kati na makambo ya losambo na eleko ya Sefania emonisi ete akokisaki mosala na ye lokola motatoli mpe mosakoli liboso ete Mokonzi Yosiya abanda kampanye na ye ya kokweisa losambo ya bikeko, soko na mobu 648 L.T.B. (2 Ntango 34:4, 5) Ekoki mpenza kozala ete na ntango yango, Sefania asilaki kosakola na boumeli ya bambula pene na 40 liboso ete “mokolo monene na Yehova” eya likoló na bokonzi ya Yuda. Na boumeli ya eleko yango, Bayuda mingi bazalaki kobɛtabɛta ntembe mpe ‘batikaki’ kosalela Yehova, mitema na bango mikómaki makasi. Sefania alobeli baoyo “bazali koluka [Yehova] te mpe bazali kotuna ye te.” (Sefania 1:6) Na ntembe te, bato na Yuda bazalaki na mitema makasi, bazalaki komitungisa te na ntina na Nzambe.
8, 9. (a) Mpo na nini Yehova asengelaki kotala na mozindo “baoyo bazali kofanda na mbindo na bango”? (b) Na nzela nini Yehova asengelaki kotya likebi likoló na bafandi ya Yuda mpe likoló na bakonzi na bango ya mboka mpe bakonzi na bango ya lingomba?
8 Yehova asilaki koyebisa mikano na ye ya kotala na mozindo baoyo bazalaki komiloba ete bazalaki bato na ye. Kati na bato oyo bazalaki komibénga basambeli na ye, asengelaki koluka baoyo bazalaki kobɛtabɛta ntembe na ntina na likoki to mokano na ye ya kotya mabɔkɔ kati na makambo ya bato. Alobaki ete: “Na ntango oyo nakolukaluka kati na Yelusaleme na miinda, nakopesa bato bitumbu, baoyo bazali kofanda na mbindo na bango, baoyo bazali koloba na mitema na bango ete, [Yehova] akosala malamu te mpe akosala mabe te.” (Sefania 1:12) Liloba “baoyo bazali kobomba mbindo na bango” (na kotalela lolenge basalaka vinyo) ezali kotalela baoyo bafandi bobele kimya, lokola bosɔtɔ na nsé ya mbeki oyo babombaka masanga kati na yango, baboyi bongo kotungisama mpo na kosakolama oyo elobi ete mosika te Nzambe akotya mabɔkɔ kati na makambo ya bato.
9 Yehova atyaki likebi likoló na bafandi ya Yuda mpe ya Yelusaleme mpe likoló na banganga na yango oyo basangisaki losambo na ye na losambo ya bopakano. Soki bakanisaki ete bazalaki na libateli, lokola nde bazalaki kati na molili ya butu kati na bifelo ya Yelusaleme, asengelaki koluka bango lokola na miinda ya kongɛnga makasi oyo esengelaki kokɔta kino kati na molili ya elimo oyo kati na yango bamibombaki. Abulunganisaki ezaleli na bango ya kozanga kosepela na makambo ya losambo, liboso atindelaki bango bansango ya nsɔ́mɔ ya kokweisama, mpe na nsima akokisaki bikateli yango.
“Mokolo monene na Yehova ebɛlɛmi”
10. Lolenge nini Sefania alobelaki “mokolo monene na Yehova”?
10 Na kopemama na Yehova, Sefania akomaki ete: “Mokolo monene na [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbangu mpenza; mongongo na mokolo na [Yehova] ezali na bololo.” (Sefania 1:14) Mikolo na bololo mpenza mizalaki kozela bango nyonso—banganga, bankumu, mpe bato nyonso—oyo baboyaki kolanda likebisi mpe baboyaki kozongela losambo ya pɛto. Kolobáká na ntina na lolenge mokolo ya kokokisama ya ekateli yango ekozala, esakweli ekóbi: “Mokolo yango ezali mokolo na nkanda, mokolo na mpasi mpe mikakatano; mokolo na mobulu mpe libebi, mokolo na molili mpenza kozanga pole; mokolo na mapata mpe molili tuu; mokolo na mondule mpe konganga na etumba, kotɛmɛla mboka na makasi mpe bisika milai bityami makasi.”—Sefania 1:15, 16, maloba na nsé ya lokasa na NW.
11, 12. (a) Nsango nini ya kokweisa esakolamaki likoló na Yelusaleme? (b) Bozwi ya mosuni ekokaki kobikisa Bayuda?
11 Na nsima, bambula elekaki mingi, wana mampinga ya Babilone mabebisaki Yuda. Yelusaleme emibikisaki te. Ntéi ya engumba na yango ebebisamaki. “[Yehova] alobi boye ete, Na mokolo yango, mongongo ekoyokana na ekuke na Mbisi, kolela longwa na Mboka-na-mibale, makɛlɛlɛ monene na kokweakwea longwa na ngomba. Bólela, bino bafandi na Makatese [eteni moko ya Yelusaleme], mpo ete Bakanana bazali lisusu te, nyonso baoyo bazali kopimaka mosolo bazengami.”—Sefania 1:10, 11.
12 Lokola baboyaki kondima ete mokolo ya Yehova ezalaki penepene, Bayuda mingi bamikɔtisaki na mosala ya koluka mbongo. Kasi na nzela ya Sefania mosakoli na ye ya sembo, Yehova asakolaki ete bozwi na bango esengelaki ‘kopunzama mpe bandako na bango esengelaki kobebisama.’ Bakokaki te komela vinyo oyo bango moko basalaki, mpe “palata na bango mpe wolo na bango ikolónga kobikisa bango te na mokolo na nkanda na [Yehova].”—Sefania 1:13, 18.
Mabota mosusu oyo masambisamaki
13. Nsango nini ya kokweisa Sefania asakolaki yango likoló na Moaba, Amona, mpe Asulia?
13 Na nzela ya mosakoli na ye Sefania, Yehova amonisaki mpe nkanda na ye likoló na bikólo oyo banyokolaki libota na ye. Asakolaki ete: “Nayoki kotuka na Moaba mpe maloba mabe na bana na Amona; oyo batukaki bato na ngai na yango mpe balobaki na lolendo mpo na molelo na bango. Boye, lokola ngai nazali na bomoi, [Yehova] na bibele alobi bongo, ye Nzambe na Yisalaele, Moaba akozala lokola Sodomo mpe bana na Amola lokola Gomola; mokili motondi na matiti mabe mpe na mabulu na mongwa, esika ebebi libela na libela. . . . Akosembola lobɔkɔ na ye epai na likoló mpe akobebisa Asulia; akozalisa Ninive esika na mpamba, esika ekaoki lokola lisobe.”—Sefania 2:8, 9, 13.
14. Elembeteli nini emonisi ete mabota ya bapaya ‘batukaki’ Yisalaele mpe Nzambe na bango, Yehova?
14 Moaba mpe Amona bazalaki banguna ya Yisalaele uta kalakala. (Kokanisá na Basambisi 3:12-14.) Libangá ya Moaba, oyo lizwami kati na Musée de Louvre na Paris, lizali na makomi oyo mamonisi maloba ya lolendo ya Mesa mokonzi ya Moaba. Na lolendo nyonso, alobeli lolenge akamataki bingumba mingi ya Bayisalaele na lisalisi ya Nzambe na ye Kemosi. (2 Mikonzi 1:1) Yilimia, ye oyo azalaki na bomoi na eleko moko na Sefania, alobaki na ntina na Baamona oyo bazwaki etúká ya Gada na nkombo ya nzambe na bango Malakama. (Yilimia 49:1) Mpo na Asulia, Mokonzi Salamanesele V abundisaki mpe akamataki Samalia pene na ekeke moko liboso ya eleko ya Sefania. (2 Mikonzi 17:1-6) Mwa moke na nsima, Mokonzi Saneheliba abundisaki Yuda, akamataki bingumba na yango ya makasi, akanelaki ata mpe Yelusaleme. (Yisaya 36:1, 2) Molobeli ya mokonzi ya Asulia atukaki Yehova wana asɛngaki ete Yelusaleme ekamatama.—Yisaya 36:4-20.
15. Lolenge nini Yehova ayokisaki nsɔ́ni epai na banzambe ya mabota oyo batukaki bato na ye?
15 Nzembo 83 etángi bamboka lokola Moaba, Amona, mpe Asulia, baoyo batukaki Yisalaele, baoyo balobaki na lolendo nyonso ete: “Bazali koloba ete, Yaká, tókata libota mobimba na bango ete nkombo na Yisalaele eyebana lisusu te.” (Nzembo 83:4) Mosakoli Sefania asakolaki na mpiko nyonso ete mampinga ya Yehova makoyokisa bikólo nyonso wana ya lolendo nsɔ́ni. “Oyo ekozala epai na bango na esika na lipombo na bango, mpo ete batukaki mpe balobaki na lolendo kotɛmɛla bato na [Yehova] na bibele. [Yehova] akopesa nsɔ́mɔ monene epai na bango, ee, akokondisa banzambe nyonso na mokili. Bakokumbamela ye, moko na moko na esika na ye, mikili nyonso na mabota.”—Sefania 2:10, 11.
“Zelá”
16. (a) Kobɛlɛma ya mokolo ya nkanda ya Yehova epesaki esengo epai na banani, mpe mpo na nini? (b) Libyangi nini ya nguya epesamaki epai na batikali oyo bazalaki sembo?
16 Wana ezaleli ya gɔigɔi ya elimo, ezaleli ya kobɛtabɛta ntembe, losambo ya bikeko, kobebisama mpe elimo ya koluka biloko mingi ya mosuni eyikanaki mingi kati na bakonzi mpe bafandi mingi ya Yuda mpe Yelusaleme, emonani ete Bayuda mosusu ya sembo bayokaki bisakweli ya Sefania oyo bizalaki kopesa likebisi. Bayokaki mawa mpo na misala ya mbindo oyo bankumu, basambisi, mpe banganga ya Yuda bamipesaki na yango. Makambo oyo Sefania asakolaki mapesaki libɔndisi epai na bato wana ya sembo. Na esika ete epesa bango mawa, kobɛlɛma ya mokolo ya Yehova epesaki bango esengo, mpamba te esengelaki kosukisa misala wana ya mbindo. Batikali wana ya sembo balandaki etindá oyo Yehova abimisaki: “Boye, [Yehova] alobi ete, Zelá ngai, mpo na mokolo wana ekotɛlɛma ngai lokola motatoli. Mpo ete mokano na ngai ezali koyanganisa mabota ete nayeisa makonzi elongo, mpo na kosopa nkɛlɛ na ngai likoló na bango, ee, mɔ́tɔ nyonso na nkanda na ngai.”—Sefania 3:8.
17. Ntango nini mpe lolenge nini nsango ya kokweisa oyo Sefania asakolaki ebandaki kokokisama likoló na mabota?
17 Baoyo balandaki likebisi wana bakamwaki te. Mingi bamonaki kokokisama ya esakweli ya Sefania. Na 632 L.T.B., lisangani ya bato ya Babilone, ya Madai, bituluku ya bato ya nɔ́rdi, mbala mosusu mpenza bato ya Scythes, bakamataki mpe babebisaki Ninive. Will Durant, ye mokomi na makambo ya kala, ayebisi ete: “Limpinga moko ya Babilone oyo etambwisamaki na Nabopolasala esanganaki na limpinga moko ya Madai oyo etambwisamaki na Siyazalese mpe etuluku moko ya bato ya Scythes oyo bautaki na Caucase, mpe na bolɛmbu nyonso mpenza mpe nokinoki bakamataki bisika makasi ya nɔ́rdi. . . . Bobele na mbala moko, Asulia ebomamaki mpo na libela.” Yango ezalaki mpenza oyo mosakoli Sefania asakolaki.—Sefania 2:13-15.
18. (a) Lolenge nini ekateli ya Nzambe ekokisamaki likoló na Yelusaleme, mpe mpo na nini? (b) Lolenge nini esakweli ya Sefania ekokisamaki likoló na Moaba mpe Amona?
18 Bayuda mingi oyo bazalaki kozela Yehova bamonaki kokweisama ya bikateli na ye likoló na Yuda mpe likoló na Yelusaleme. Na ntina na Yelusaleme, Sefania asakolaki ete: “Mawa epai na ye oyo atomboki mpe abebi na mbindo, ye mboka na minyoko. Ayokaki mongongo te, ayambaki mpamela te, atalelaki [Yehova] te, abɛlɛmaki na Nzambe na ye te.” (Sefania 3:1, 2) Mpo na ezalela na yango ya kozanga bosembo, Yelusaleme ebundisamaki mbala mibale na bato ya Babilone mpe na nsuka ekamatamaki mpe ebebisamaki na mobu 607 L.T.B. (2 Ntango 36:5, 6, 11-21) Engebene Josèphe, ye Moyuda mpe mokomi na makambo ya kala, na mbula ya mitano nsima ya kokwea ya Yelusaleme, bato ya Babilone babundisaki Moaba mpe Amona mpe babɔtɔlaki yango. Na bongo, lokola esakolamaki, bamboka wana elimwaki.
19, 20. (a) Lolenge nini Yehova apesaki mbano epai na baoyo bazelaki ye? (b) Mpo na nini makambo yango mataleli biso, mpe tokotalela nini kati na lisoló likolanda?
19 Kokokisama na yango mpe ya makambo mosusu ya sikisiki oyo elobelamaki kati na esakweli ya Sefania elendisaki kondima ya Bayuda mpe ya bato oyo bazalaki Bayuda te, baoyo bazalaki kozela Yehova. Kati na baoyo babikaki na kobebisama oyo ekwelaki Yuda mpe Yelusaleme, tokoki kotánga Yilimia, Ebede-meleke Moetiopia, mpe bato na ndako ya Yonadaba, moko kati na libota na Lekaba. (Yilimia 35:18, 19; 39:11, 12, 16-18) Bayuda ya sembo oyo bazalaki na boombo mpe bana na bango oyo batikaki te kozela Yehova bakómaki basangani ya batikali ya esengo oyo basikolamaki uta na Babilone na mobu 537 L.T.B., mpe bazongaki na Yuda mpo na kozongisa losambo ya pɛto.—Ezɛla 2:1; Sefania 3:14, 15, 20.
20 Oyo nyonso elimboli nini mpo na mikolo na biso? Na makambo mingi, ezalela oyo ezalaki na eleko ya Sefania ekokani na makambo ya mbindo oyo ezali lelo kati na boklisto ya nkombo mpamba. Lisusu, bizaleli ndenge na ndenge ya Bayuda na eleko wana ekokani na bizaleli oyo tokoki komona yango lelo oyo, mbala mosusu ata mpe kati na basaleli ya Yehova. Ezali bongo makambo oyo tokotalela na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekomonana ete liloba “bana na mokonzi” esalelami mpo na kobénga bankumu ya mokonzi, mpamba te bana na ye moko Yosiya bazalaki naino mike mpenza na eleko wana.
Bozongeli
◻ Ezalela ya makambo ya losambo ezalaki lolenge nini kati na Yuda na eleko ya Sefania?
◻ Makambo nini mayikanaki mingi epai na bakonzi, mpe ezaleli ya bato mingi ezalaki lolenge nini?
◻ Lolenge nini mabota batukaki basaleli ya Yehova?
◻ Likebisi nini Sefania apesaki epai na Yuda mpe epai na mabota mosusu?
◻ Baoyo bazelaki Yehova bazwaki mbano nini?
[Elilingi na lokasa 9]
Libangá ya Mesa endimisi ete Mesa, mokonzi ya Moaba, abimisaki maloba mabe mpo na Yisalaele
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Libangá ya Moaba: Musée de Louvre, Paris
[Elilingi na lokasa 10]
Kondimisáká esakweli ya Sefania, etánda ya Chronique babilonien oyo ekomami na makomi ebéngami cunéiforme elobelaki kobebisama ya Ninive na mampinga masangani
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Etánda ya Cunéiforme: na ndingisa ya bolingo malamu ya British Museum