Tosá ndai na yo ya libala!
MOKOLO ya elambo ya libala ezalaka mokolo ya esengo. Ezalaka mpe libaku moko ya ntina monene. Mwasi ya libala mpe mobali bakopesana elaka ya polele oyo ekozala na bopusi epai na bango na boumeli ya bomoi na bango mobimba. Baoyo bazali wana na molulu ya libala lokola babyangami bazali batatoli ya ndai wana oyo esalemi liboso na bato mingi, kasi Yehova Nzambe nde azali Motatoli ya liboso.
Biblia ezali te kosɛnga myango ya sikisiki to lolenge moko ya milulu ya libala. Nzokande, mpo na komonisa ete euti na Nzambe, na momeseno libala esalemaka liboso na bato mingi na nzela ya ndai ya libala kati na molulu moko ya losambo. Mpo na mwa bambula Batatoli ya Yehova bazali kosalela ndai ya libala oyo elandi: “Ngai——nakamati yo ——lokola mobalani (mwasi/mobali) na ngai, nalapi ndai ya kolinga yo mpe kosepela na yo (Mwasi: mpe komonisela yo botosi ya mozindo) na boyokani ya mibeko ya Nzambe eyebisami kati na Makomami Mosantu mpo na (basi/mibali) baklisto, ntango nyonso oyo tokozala na bomoi awa na mabelé kati na ebongiseli ya Nzambe na ntina na libala.”a
Likambo oyo esengeli kokanisa yango
Soki ozali kokanisa kobala, ezali na ntina mingi kokanisa bozindo mpe ndimbola ya ndai wana liboso ya mokolo ya libala. Salomo alobaki ete: “Kebá na monɔkɔ na yo; tiká te ete motema na yo ebimisa liloba liboso na Nzambe.” (Mosakoli 5:2) Ezali boni soki osilá kobala? Bongo okozwa litomba soki okokanisa likoló na ntina ya ndai oyo olapaki polele liboso ya Yehova. Ozali kotosa yango? Baklisto batalelaka ndai na bango na lisɛki te. Salomo alobi lisusu ete: “[Eloko ekataki yo ndai mpo na yango, futá, NW]. Eleki malamu ete okata ndai te kasi ezali mabe kokata ndai nde kofuta te. Tiká te ete monɔkɔ na yo molekisa yo na masumu; lobá liboso na [anzelu, NW] te ete ezalaki libúngá.—Mosakoli 5:4-6.
Na ntembe te, botaleli ya fraze moko moko ya ndai wana ekokólisa bososoli na yo likoló na elaka oyo epesami liboso na bato mingi.
“Ngai——Nakamati yo”: Wana ezali maloba ya ebandeli ya ndai yango. Ezali komonisa ete yo moko nde ozali na mokumba ya ekateli na yo ya kobala.
Kati na ebongiseli ya boklisto, ezali na mobeko te ya Makomami oyo elobi ete bato banso basengeli kobala. Yesu Klisto ye moko atikalaki monzemba mpe alendisaki baoyo bayebi ‘koyamba yango’ ete bátikala minzemba. (Matai 19:10-12) Na ngámbo mosusu, mingi kati na bantoma ya Yesu bazalaki mibali oyo babala. (Luka 4:38; 1 Bakolinti 9:5) Ezali polele ete ekateli ya kobala ezali likambo ya moto na moto. Moto moko te azali na ndingisa ya Makomami ete apusa basusu na makasi mpo na kobala.
Na yango, yo moko ozali na mokumba ya kopona kobala. Mbala mingi, yo moko nde oponaki ye oyo ozali kobalana na ye. Na ntango olapi ndai ya libala ete, ‘Nakamati yo ——,’ okamati to ondimi moto wana na bizaleli malamu na ye—kasi lisusu na bolɛmbu na ye.
Nsima ya mwa ntango, okoki mbala mosusu mpenza kososola bizaleli mosusu oyo okanisaki te kati na bomoto ya mobalani na yo. Ekozala na mabaku oyo okoyoka mawa. Biblia elobi ete: “bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo na Nzambe.” (Baloma 3:23) Na bongo, ekoki kosɛnga ete osala mbongwana mpo na koyokana na mobalani na yo. Yango ekoki mbala mosusu kozala mpasi, mpe na bantango mosusu okoki koyoka mposa ya kotika. Kasi omikundola ete, ndai ya libala elapamaki liboso ya Yehova. Ye akoki kosalisa yo ete olónga.
“Lokola mobalani (mwasi/mobali) na ngai”: Na libala ya liboso mpenza, ntango Eva apesamaki na libala epai na Adama, Yehova Nzambe alobaki ete: “Mpe bango mibale bakozala nzoto moko.” (Genese 2:24; Matai 19:4-6) Nsinga ya libala ezali boyokani ya penepene oyo ekoki kozala kati na bato mibale. Libala ekokɔtisa yo kati na bondeko ya motindo ya sika. Ondimi ete moto moko azala “mwasi na yo” to “mobali na yo.” Boyokani mosusu te ekokani na yango. Makambo oyo makosala mabe bobele moke kati na boyokani mosusu makoki kosala mabe monene kati na ebongiseli ya libala.
Na ndakisa, kamatá toli ya Makomami oyo ezwami kati na Baefese 4:26. Kuna Biblia elobi ete: “Bóyoka nkanda, nde na lisumu te; tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino.” Ekoki kozala ete osilisaka ntango nyonso nokinoki te mikakatano oyo ozalaka na yango elongo na bandeko mpe baninga na yo lokola osengelaki kosala yango. Kasi mobalani na yo azali penepene na yo koleka bandeko to baninga mosusu nyonso. Kozanga kosilisa mikakatano nokinoki elongo na mobalani na yo ekoki kotya na likámá boyokani wana ya ntina kati na bino.
Opesaka nzela na kozanga boyokani kati na yo mpe mobalani na yo ekóla kino ekóma ntango nyonso ntina ya nkanda mpe kosilika? Kozanga kososola malamu makanisi ya mosusu mpe makambo ya kosilikisa maumelaka mikolo mingi? Mpo na kotosa ndai na yo, na ntango mikakatano mibimi kotika nzela te ete yango ekóba kozanga ete oluka kimya elongo na mobalani na yo. Yango elingi koloba kolimbisa mpe kobosana, mpe kondima mabúngá mpe bolɛmbu na yo moko.—Nzembo 51:5; Luka 17:3, 4.
“Kolinga”: Mobali akolapaka ndai ya “kolinga mpe kosepela” na mwasi na ye. Bolingo wana esangisi mpe bolingo etali kobendana moko epai na mosusu oyo esangisi bango esika moko. Kasi bolingo ya lolenge wana ekoki te. Bolingo oyo moklisto azali kokata ndai na yango epai na mobalani na ye ezali makasi mpe monene koleka.
Baefese 5:25 elobi ete: “Bino babali, bólingaka basi na bino pelamoko Klisto alingaki lingomba.” Bolingo ya Yesu mpo na lisangá ekokaki kozala soko moke te motindo ya bolingo ya kobendana kati na mobali mpe mwasi. Maloba “bólingaka” mpe “alingaki” oyo masalelami kati na molɔngɔ́ oyo mauti na liloba a·gaʹpe, oyo ezali kolobela bolingo oyo etambwisami na mitindá. Awa Biblia ezali kopesa mibali etindá ya komonisela basi na bango bolingo ya ntango nyonso, ya sembo mpe ya libela.
Ezali te bobele liyoki ya lolenge oyo ete “Nalingi yo mpamba te yo olingi ngai.” Mobali alukaka bolamu ya mwasi na ye liboso na bolamu na ye moko, mpe mwasi akolinga mobali na ye bobele bongo. (Bafilipi 2:4) Kokólisa bolingo mozindo mpo na mobalani na yo ekosalisa yo ete otosa ndai ya libala na yo.
“Kosepela”: Engebene diksionɛrɛ moko, “kosepela na” elimboli ‘kopesa motuya mingi, koyoka to komonisa bolingo ya motema mpo na.’ Osengeli komonisa bolingo na yo ezala na maloba to na misala! Mingimingi mwasi alingaka ete mobali na ye amonisela ye ntango nyonso bilembo ya bolingo na ye. Mobali na ye akoki kokokisa malamu bamposa na ye ya mosuni, kasi yango ekoki te. Ezali na basi oyo bazali na bilei mingi mpe na ndako kitoko kasi bazali mpenza na esengo te mpo ete mibali na bango bamibanzabanzaka mpo na bango te.
Na ngámbo mosusu, mwasi oyo ayebi ete alingami mingi mpe ete mobali na ye asepelaka na ye mingi azali na ntina mpenza ya kozala na esengo. Ya solo, ezali mpe ndenge moko mpo na mobali. Bolingo ya solo ekólisamaka na bilembeteli ya solosolo. Kati na Loyembo ya Salomo, mobateli ya bampate oyo azalaki koyoka bolingo angangaki ete: “Ɛ ndeko mwasi na ngai, ɛ mwasi na ngai, bolingo na yo na elɛngi boni! Bolingo na yo eleki vinyo boni! Nsolo malamu na mafuta na yo eleki malasi nyonso!”—Loyembo 4:10.
“Mpe komonisa limemya mozindo”: Na boumeli ya bikeke mingi ezalaki na mibali oyo banyokolaki mpe batiolaki basi. Ata lelo oyo, engebene zulunalo World Health, “konyokola basi ezali kosalema kati na mboka nyonso mpe kati na bato ya etɛlɛmɛlo mpe ezalela ya nkita lolenge nyonso. Kati na bamboka mingi, etalelami lokola ete mobali azali na lotómo ya kobɛta mwasi na ye.” Ntálo monene ya mibali bapamelamaka te mpo na etamboli yango. Emonani ete mibali mingi batyaka mpenza likebi te na makambo matali basi. Yango esali ete, basi mingi batyelaka lisusu mibali motema te. Basi mosusu balobaka ete, “Nalingaka mobali na ngai, kasi nakoki komemya ye te!”
Nzokande, Yehova Nzambe asepelaka mingi na mwasi oyo asalaka milende ete atosa mobali na ye—ata soki na bantango mosusu akokisaka te bilikya na ye. Asosoli ete mobali azali na mokumba to etɛlɛmɛlo oyo epesameli ye na Nzambe. (1 Bakolinti 11:3; Baefese 5:23) Kopesa mobali limemya mozindo ezali bongo eteni ya losambo mpe ya botosi na ye epai na Yehova. Nzambe abosanaka te botosi ya basi oyo babangaka Nzambe.—Baefese 5:33; 1 Petelo 3:1-6; kokanisá na Baebele 6:10.
Kati na libala mobali mpe mwasi basengeli kopesana limemya, mpe yango esengeli kozwama na esika ete elukama to esɛngama na makasi. Na ndakisa, maloba ya kotiola to ya kozokisa mazali na esika te kati na ebongiseli ya libala. Ekozala likambo ya bolingo te to ya limemya te koloba makambo ya kokitisa mobali to kokitisa mwasi na yo. Kobimisa bolɛmbu ya mobalani na yo liboso na basusu to kolobela yango liboso na bato mingi ekobimisa litomba moko te ya malamu. Ata kati na lisɛki tokoki kosala libúngá monene ya kozanga limemya na likambo yango. Maloba oyo mazwami na Baefese 4:29, 32 mazali kosalelama epai na mobali mpe epai na mwasi. Kuna Biblia elobi ete: “Tiká te ete maloba na bosɔtɔ mabima na minɔkɔ na bino kasi bobele yango mazali malamu mpo na kolendisa . . . Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa.”
“Na boyokani na mibeko ya Nzambe kati na Makomami Mosantu”: Nzambe alingi ete tósalela bonsomi na biso ya kopona mpe kosala makambo. Atondisi te likoló na biso molɔngɔ́ molai ya malako mpo na kokamba bomoi ya libala. Nzokande, asili kopesa biso litambwisi mpo na bolamu na biso moko.
Lelo oyo, ezali na ebele ya mikanda ndenge na ndenge na ntina na libala, mpe ebele ya bato bazali na filozofi na bango moko. Kasi kebá! Na likambo litali libala, mateya mingi oyo mazali kopesama mazali na boyokani te na Biblia.
Esengeli mpe koyeba ete ezalela ya makambo ya babalani mibale ekokani te na oyo ya babalani mosusu. Na lolenge moko, babalani bazali lokola bibúki ya mbulampɛmbɛ; na mosika, ekoki komonana lokola ete nyonso bakokani, kasi bakeseni mpenza moko na mosusu, moko na moko na lolenge na bango. Bosangisi ya bomoto na yo mpe ya mobalani na yo ekomonana te epai na babalani mosusu awa na mokili. Na yango, kowela te kondima makanisi oyo bato mosusu bazali na yango. Ezali na mwango te oyo esalemi na bato oyo ekoki kosalelama kati na mabala nyonso!
Nzokande, mitindá nyonso ya Biblia mizali solo mpe mikoki kosalelama. Ntoma Paulo akomaki ete: “Makomi nyonso mapemami na [elimo, NW] na Nzambe, makoki kopesa litomba na mateyo, na mpamela, mpo na kosembola.” (2 Timoté 3:16; Nzembo 119:151) Soki bokotánga Biblia mpe bokondima mateya na yango lokola litambwisi na bomoi na bino ya mokolo na mokolo, bokozala na makoki ya kotosa ndai na bino ya libala.—Nzembo 119:105.
“Ntango nyonso oyo tokozala na bomoi esika moko awa na mabelé”: Oyo ezali komonisa ete bomoi ya kofanda elongo esengeli koumela. Nzambe apesaki etindá ete “yango wana moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye.” (Genese 2:24) Yehova alingi ete bózala esika moko. Bósalela Nzambe esika moko. Bóyekola Liloba na ye esika moko. Bózwa ntango ya kotambola elongo, ya kofanda esika moko, ya kolya esika moko. Bósepela na bomoi elongo!
Babalani mosusu basalaka milende ya kobomba ntango mokolo na mokolo mpo na kosolola. Ata nsima ya mibu mingi na libala, kosala makambo esika moko ezali na ntina mingi mpo na esengo kati na libala.
“Kati na ebongiseli ya Nzambe na ntina na libala”: Libala lizali likabo liuti na Nzambe, oyo atya ebongiseli ya libala. (Masese 19:14) Kozanga kolanda ebongiseli na ye ekotya na likámá bobele bolamu ya libala te kasi lisusu boyokani na bino elongo na Mozalisi. Na ngámbo mosusu, na ntango mobali mpe mwasi bazali kokólisa boyokani malamu elongo na Yehova, emonisami na botosi ya bibongiseli na ye, bakozala na boyokani ya kimya elongo na basusu, ezala mpe moko elongo na mosusu.—Masese 16:7.
Kobosana soko moke te ete Yehova azali Motatoli ya liboso ya ndai ya libala na yo. Landá kotosa elaka wana oyo osalaki liboso ya bato mingi, mpe libala na yo ekozala liziba ya masanzoli mpe ya nkembo mpo na Yehova Nzambe!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na bamboka mosusu bakoki mbala mosusu kosalela motindo mosusu ya ndai oyo mpo na koyokanisa yango na mibeko ya mboka. (Matai 22:21) Nzokande, kati na bamboka mingi baklisto oyo bazali kobala basalelaka ndai oyo ezali awa na likoló.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
Na lolenge moko, babalani bazali lokola ebúki ya mbulampɛmbɛ. Na mosika, ekoki komonana lokola ete bango nyonso bakokani, kasi libala moko ekeseni na mosusu
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Snow Crystals/Dover