Yehova: Alingi boyengebene mpe kosambisa-sembo
ELENGE mwasi moko na Sarajevo amitunaki soki mpo na nini bana ya engumba na bango basengeli konyokwama mingi bongo. Alobaki ete: “Tosali likambo te mpo ete tónyokwama mingi boye.” Na boumeli ya mibu 15, bamama ya mboka Argentine bakendeki mbala na mbala na bisika ya bato banso na engumba Buenos Aires, mpo na komilela na ntina na bana na bango oyo babomamaki. Emmanuel, moto moko ya Afrika, oyo mama na ye mpe bandeko na ye ya basi misato babomamaki pwasa kati na mobulu ya kowelana ya bikólo, azongelaki mbala na mbala maloba oyo: “Moto nyonso asengeli kozwa lifuti ya sembo libongi na ye . . . Tolingi kosambisa-sembo.”
Kosambisa-sembo ezali moko na bizaleli ya ntina ya Yehova Nzambe. Biblia elobi ete, “nzela na ye nyonso boyengebene.” Ya solo, Yehova “alingi boyengebene mpe sembo.” (Deteronome 32:4; Nzembo 33:5) Mpo ete tókoka koyeba Nzambe malamu, tosengeli kososola ezaleli na ye ya kosambisa-sembo mpe koyekola komekola yango.—Hoseya 2:19, 20; Baefese 5:1.
Ekoki kozala ete likanisi oyo tozali na yango na ntina na kosambisa-sembo epusamaki na lolenge oyo bato batalelaka ezaleli yango. Na bamboka mingi, mbala mingi kosambisa-sembo emonisamaka na elilingi ya mwasi moko oyo bazipi elongi na ye, asimbi mopanga mpe kilo na mabɔkɔ na ye. Lolenge ekanisami, kosambisa-sembo ya bato esengelaki te koponapona, elingi koloba esengeli te kotalela bozwi to etɛlɛmɛlo ya bato. Esengeli na likebi mpenza komeka mbeba to kozanga mbeba ya mofundami na kilo. Na mopanga na yango, kosambisa-sembo esengeli kobatela moto oyo asali likambo te mpe kopesa etumbu epai na basáli na mabe.
Búku moko (Right and Reason—Ethics in Theory and Practice) eyebisi ete “kosambisa-sembo ezali na boyokani na mibeko, na lisɛngisi, na ntómo, mpe na mikumba, mpe emekaka bikateli na yango kozanga kotala elongi to engebene lifuti oyo moto abongi kozwa.” Kasi kosambisa-sembo ya Yehova esuki bobele bongo te. Tokoki komona likambo yango na kotaleláká misala mpe bizaleli ya Yesu Klisto, oyo akokani mpenza na Tata na ye ya likoló.—Baebele 1:3.
Matai mokomi ya Evanzile asalelaki maloba ya Yisaya 42:3 epai na Yesu, ete: “Akobuka lititi litutami te, akozimisa lotambe loziki mokemoke te; kino ekosila ye kosambisa na sembo.” Yesu asakolaki nsango ya kobɔndisa epai na bato oyo bazalaki lokola lititi litutami oyo lingunzami mpe kutu linyatami. Bazalaki lokola nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke, lokola nde elikya na bango ya nsuka mpo na bomoi elingaki kozimisama. Na esika ete, na maloba ya elilingi, abuka lititi litutami mpe azimisa nsinga ya mwinda oyo ezalaki kopela mokemoke, Yesu ayokelaki bato banyokwami mawa, ateyaki mpe abikisaki bango, mpe amonisaki polele kosambisa-sembo ya Yehova Nzambe epai na bango. (Matai 12:10-21) Lokola esakweli ya Yisaya eyebisaki yango, kosambisa-sembo lolenge yango ezalaki kopesa elikya.
Motema mawa mpe kosambisa-sembo ya Yehova
Motema mawa ezali eteni moko kati na kosambisa-sembo ya Nzambe. Yango emonanaki polele ntango Yesu azalaki awa na mabelé. Amonisaki na lolenge ya kokoka mitindá ya kosambisa-sembo mpe ya boyengebene ya Nzambe. Nzokande, Bayuda oyo bazalaki bakomeli mpe Bafalisai balukaki kokóma na boyengebene na kolandáká molɔngɔ́ ya mibeko makasimakasi—oyo mingi na yango eutaki na bango moko. Mbala mingi ebongiseli na bango ya kosambisa ezalaki komonisa motema mawa te. Kozanga koyokana mingi kati na Yesu mpe Bafalisai etalelaki likambo oyo: Kosambisa-sembo mpe boyengebene ya solo ezali nini?—Matai 9:10-13; Malako 3:1-5; Luka 7:36-47.
Yesu amonisaki na lisese lolenge tosengeli kosala epai na basusu na kosambisa-sembo mpe na boyengebene. Moto moko oyo azalaki nganga-mibeko atunaki Yesu soki likambo nini lizalaki na ntina mpo ete moto akoka kozwa bomoi ya seko. Kati na eyano na ye Yesu atunaki ye motuna mpe akumisaki ye ntango ayanolaki ete mibeko mibale oyo mileki bonene mizali bongo: kolinga Nzambe na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba mpe kolinga mozalani na yo lokola yo moko. Na nsima mobali yango atunaki ete: “Mozalani na ngai azali nani?” Yesu ayanolaki na kopesáká lisese ya Mosamalia ya boboto.—Luka 10:25-37.
Boyengebene mpe kosambisa-sembo ya Yehova oyo etondi na motema mawa emonisamaki polele kati na lisese ya Mosamalia, oyo Yesu apesaki. Na kosungáká na bolingo nyonso moto moko oyo azokisamaki mpotá, moto oyo ayebanaki na ye te, Mosamalia asalaki likambo moko malamu, ya sembo mpe ya komonisa motema mawa. Yesu ye moko amonisaki elimo motindo yango ntango azalaki awa na mabelé. Azalaki moyengebene mpe sembo. Lisusu, apesaki bomoi na ye mpo na bato oyo bazalaki na mposa ya lisalisi, mpo na bato na masumu mpe ya kozanga kokoka oyo bazalaki konyokwama na mpasi, na bokɔnɔ mpe na kufa. Ntoma Paulo akokanisaki boyengebene na ebongiseli ya lisiko. Akomaki ete: “Bongo, pelamoko libúngá na moto moko eyeisi ekweli mpo na bato nyonso, boye mosala na boyengebene na moto moko eyeisi elónga mpe bomoi mpo na bato nyonso.” (Baloma 5:18) “Mosala na boyengebene” moko wana mozalaki ebongiseli oyo na nzela na yango Nzambe akobikisa bato na botosi longwa na mabe oyo mautaki na lisumu ya Adama, lisumu oyo bango mpenza basalaki te.
Kosambisa-sembo ya Nzambe elukaki na mbala moko kosomba bato ya masumu mpe kolóngisa mitindá ya sembo. Kokanga miso likoló na masumu elingaki kozala kozanga sembo mpe kozanga bolingo, mpamba te yango elingaki kolendisa ezaleli ya kobuka mibeko. Na ngámbo mosusu, soki kosambisa-sembo ya Nzambe esukaki bobele na kopesa mbano to etumbu, mbɛlɛ bato bazali na elikya soko moke te. Engebene Biblia, “masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa” mpe “moyengebeni azali te, ata moko te.” (Baloma 3:10; 6:23) Yehova apesaki mbeka ya lisiko mpo na masumu, oyo esɛngaki ete ye moko mpe Mwana molingami na ye bámonisa ezaleli ya komipimela.—1 Yoane 2:1, 2.
Lisiko lizali komonisa ete kosambisa-sembo ya Nzambe esangani na bolingo oyo etambwisami na mitindá (na Greke, a·gaʹpe). Ya solo, kosambisa-sembo ya Nzambe ezali kokokisama ya mitindá na ye ya sembo—ezali komonisa nini oyo ye atalelaka ete eyokani na bizaleli malamu. Na bongo, ntango yango emonisami na Nzambe, a·gaʹpe ezali bolingo oyo moboko ya kosambisa-sembo ya Nzambe efandi likoló na yango. (Matai 5:43-48) Na yango, soki tososoli mpenza kosambisa-sembo ya Yehova, tokotya elikya na biso mobimba kati na bikateli na ye. Lokola azali “Mosambisi na mokili mobimba” asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo.—Genese 18:25; Nzembo 119:75.
Tómekola kosambisa-sembo ya Yehova
Biblia ezali kolendisa biso ete tózala “bayokoli na Nzambe.” (Baefese 5:1) Yango elimboli komekola kosambisa-sembo na ye mpe bolingo na ye. Nzokande, lokola tozangi kokoka, banzela na biso ezali likoló mingi te lokola oyo ya Yehova Nzambe. (Yisaya 55:8, 9; Ezekiele 18:25) Na yango, lolenge nini tokoki komonisa ete biso tolingaka boyengebene mpe kosambisa-sembo? Na kolatáká “motindo na sika oyo ezali na motindo na Nzambe na boyengebene mpe na bulɛɛ na solo.” (Baefese 4:24) Bongo tokolinga oyo Nzambe alingaka mpe tokoyina oyo ayinaka. “Boyengebene ya solo” ekimaka mobulu, mbindo, bosɔtɔ mpe lipɛngwi, mpamba te makambo yango mabebisaka oyo ezali bulɛɛ. (Nzembo 11:5; Baefese 5:3-5; 2 Timoté 2:16, 17) Kosambisa-sembo ya Nzambe ekopusa lisusu biso ete tómonisa bosepeli ya solo mpo na basusu.—Nzembo 37:21; Baloma 15:1-3.
Lisusu, soki tososoli lolenge ya kosambisa-sembo ya Nzambe oyo etondi na motema mawa, tokopusama te na momeseno ya kosambisa bandeko na biso mibali mpe basi kati na kondima. Lolenge nini tokoki komonisa bososoli epai na bango lokola Yehova? Tokosambisa bango te engebene makanisi na biso moko oyo mazali alima te. Na yango, Yesu akebisi ete: “Bósambisaka te ete básambisa bino te. Zambi na esambiseli ekosambisaka bino, bakosambisa bino na yango; mpe na epimeli ekopimaka bino, bakopimaka bino na yango. Mpo na nini okotala mpumbu oyo ezali na liso na ndeko na yo naino okanisi libaya lizali na liso na yo moko te? Boni okoloba na ndeko na yo ete, Tiká ete nalongola mpumbu na liso na yo, naino libaya lizali na liso na yo mpenza? Yo mokosi, longolá liboso libaya lizali na liso na yo mpe talá, okomona polele mpo na kolongola mpumbu na liso na ndeko na yo.” (Matai 7:1-5) Botaleli ya sembo mpenza na ntina na kozanga kokoka ya biso moko ekopekisa biso ete tósambisa te na kosambisa oyo Yehova akotalela ete ezali na bokesene.
Bankulutu ya masangá oyo baponami bazali na mokumba ya kosambisa masumu minene. (1 Bakolinti 5:12, 13) Na ntango bazali kosala bongo, basengeli komikundola ete kosambisa-sembo ya Nzambe elukaka komonisa motema mawa wana ekoki kosalema. Soki ezali na moboko moko te mpo na yango—lokola epai na basumuki bazangi kobongola motema—ebongi te komonisa motema mawa. Kasi bankulutu bakobimisa mosumuki motindo yango na lisangá te mpo na kozongisa mabe na mabe. Kasi bazali nde na elikya ete kobimisama yango moko ekomema ye na kososola malamu. (Kokanisá na Ezekiele 18:23.) Na nsé ya litambwisi ya Klisto, bankulutu bazali kosala mpo na matomba ya kosambisa-sembo, mpe yango esangisi kozala “[ebombamelo] mpo na mopɛpɛ.” (Yisaya 32:1, 2) Mpo na yango basengeli te koponapona mpe kozala na makambo makasi.—Deteronome 1:16, 17.
Tólóna mbóto kati na boyengebene
Wana tozali kozela mokili ya sika ya boyengebene ya Nzambe, tosengeli “koluka boyengebene” mpo ete Nzambe asepela na biso. (Sefania 2:3; 2 Petelo 3:13) Likanisi yango eyebisami mpenza na lolenge moko kitoko na maloba oyo, na Hoseya 10:12: “Bómikónela boyengebene, bómibukela boboto; bótimola mabelé na bino na mpamba. Zambi ntango ekoki mpo na koluka [Yehova] ete aya mpe anokisa kobuka likoló na bino.”
Kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, tozali na mabaku mingi ya ‘kokóna mbóto kati na boyengebene,’ motindo moko lokola Yesu amonisaki yango kati na lisese ya Mosamalia ya boboto. Yehova akosala ete ‘tómibukela boboto.’ Soki tokóbi kotambola na “nzela na kosambisa-sembo,” tokolanda kozwa malako kati na boyengebene na nsé ya Bokonzi. (Yisaya 40:14) Wana ntango ezali koleka, na ntembe te tokososola malamumalamu ete Yehova alingi boyengebene mpe kosambisa-sembo.—Nzembo 33:4, 5.
[Elilingi na lokasa 23]
Mosamalia ya boboto azalaki elakiseli ya kosambisa-sembo ya Yehova
[Elilingi na lokasa 23]
Yesu azalaki koyokela bato banyokwami mawa, oyo bazalaki lokola matiti matutami