Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/3 nk. 24-27
  • Lolenge babateli ya mpate baklisto basungaka yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge babateli ya mpate baklisto basungaka yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobatelama na nini?
  • Mosala ya kotala bampate ezali nini?
  • Mpo na nini mobateli moko ya mpate asengeli kotala yo?
  • Bampate ya kolɔngɔ́nɔ́ malamu bazali na mposa ya libateli
  • Bongisá ntango mpo na mosala ya kotala bampate
  • Mapamboli ya mosala ya kotala bampate
  • Babateli ya mpate ya Klisto, ‘Bófungola mpenza mitema na bino’!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Obatela etonga na Nzambe na bolingo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Botali oyo ekoki kozala lipamboli
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/3 nk. 24-27

Lolenge babateli ya mpate baklisto basungaka yo

NA MIKILI mingi okoki komona lolenge babateli ya mpate basungaka etɔ́nga. Batambwisaka, babatelaka mpe baleisaka bampate. Yango ezali mpenza na ntina mpo na bankulutu baklisto, mpamba te mosala na bango mosangisi mikumba ya kobatela bampate. Ya solo, bazali na mokumba ya ‘kobatela [lisangá] na Nzambe’ mpe ‘kokeba na ntina na etɔ́nga mobimba.’​—Misala 20:28.

Soki ozali mosangani ya lisangá ya boklisto, lolenge nini babateli na mpate ya elimo bakoki kosunga yo? Mpe lolenge nini osengeli kotalela milende na bango mpo na kosalisa yo? Mpo na nini lisangá lizali na mposa ya lisalisi?

Kobatelama na nini?

Na ntango ya kala nkosi mpe nyama mosusu ya zámba izalaki kotya bitɔ́nga na likámá mpe kolya bampate. Babateli ya mpate basengelaki kobatela bango. (1 Samwele 17:34, 35) Satana Zábolo “azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukaka soko akolya nani.” (1 Petelo 5:8) Na nkanda nyonso azali bobele kotumola etumba te mpo na kobundisa lisangá ya Yehova na mobimba na yango awa na mabelé kasi azali lisusu kobundisa mosaleli moko na moko ya Nzambe. Mokano ya Satana mozali nini? Alingi kolɛmbisa basaleli ya Yehova mpe ata kopekisa bango ete ‘bátosa te malako ya Nzambe’ mpe bákokisa te mosala “na matatoli na Yesu.”​—Emoniseli 12:17.

Yehova afundaki bayangeli ya Yisalaele ya kala oyo batalelamaki lokola babateli na mpate ete bazalaki na bopɔtu mpamba te bampate na ye bakómaki ‘kolyama na banyama na zámba.’ (Ezekiele 34:8) Nzokande, bankulutu baklisto bazali na mposa makasi ya kobatela baoyo bazali kati na lisangá ete moko te kati na bango abunga mpo na bopɔtu to na ntina na bopusi ya Satana, ya mokili, to ya “bankoi” bapɛngwi. (Misala 20:29, 30) Lolenge nini babateli ya mpate basungaka basangani nyonso ya etɔ́nga ete bákeba mpe bálala mpɔngi te? Lolenge moko ezali bongo kosala masukúlu mabongisami malamu likoló na Makomami kati na Ndako ya Bokonzi. Lolenge mosusu ezali bosololi malamu, kolendisana liboso mpe nsima ya makita. Nzokande lolenge mosusu oyo epesaka matomba malamu koleka ezali kokende kotala “bampate” na ndako na bango mpenza. (Kokanisá na Nzembo 95:7.) Kasi mosala ya kotala bampate mozali nini? Lolenge nini mosala motindo yango mosengeli kokokisama? Mpe esengeli kotala nani?

Mosala ya kotala bampate ezali nini?

Mosala ya kotala bampate ezali te bobele kokenda kotala baninga mpo na kosolola bobele masoló ya ndenge na ndenge. Nkulutu moko alobaki ete: “Mingi kati na basakoli basepelaka mingi kotánga mokapo moko ya Makomami to kosolola na ntina na moto moko oyo alobelami kati na Biblia. Ezali solo ete, nkulutu akosolola bobele ye moko te. Mosakoli ya Bokonzi oyo bayei kotala akosepela mpe komonisa makanisi na ye na ntina na Biblia, mpe kosala bongo ekolendisa kondima na ye. Nkulutu akoki komema zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká! mpo na kotalela lisoló moko ya kolendisa. Mbala mosusu lisoló wana ya makambo ya elimo nde ezali kokesenisa mosala ya kotala bampate na botalani mpamba kati na baninga.”

Nkulutu mosusu oyo azali na eksperiansi mingi alobaki ete: “Liboso ya kokenda kotala moto, nkulutu akolekisa mwa ntango mpo na kokanisa na ntina na mosakoli oyo alingi kotala. Nini ekoki kolendisa mosakoli yango? Kopesa longonya na motema mobimba ezali eteni ya ntina mingi ya mosala ya kotala bampate, mpamba te yango elendisaka moto mpo akoka koyika mpiko.” Ee, mosala ya kotala bampate ezali te bobele botalani mpamba kati na baninga oyo moto nyonso ya lisangá akoki kosala yango.

Mpo na nini mobateli moko ya mpate asengeli kotala yo?

Ntango nkulutu moko akei kotala libota moko, amibongisi malamu mpo na kolendisa baninga na ye bandimi mpe kosalisa bango ete bázala ngwi kati na kondima. (Baloma 1:11) Na yango ntango nkulutu moko to bankulutu mibale bamonisi mposa ya kotala yo, oyanolaka lolenge nini? Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobaki ete: “Soki mosala ya kotala bampate mozali kosalema bobele ntango mokakatano mobimi, wana likanisi ya kotala moto moko limonisami liyoki na ye ya liboso likozala boye: ‘Likambo nini ya mabe nasalaki?’” Babateli ya mpate ya elimo oyo bazali na bolingo bamekolaka Yehova, oyo abatelaki mokomi ya Nzembo mpe azalaki ntango nyonso ‘kopesa molimo na ye bopemi,’ mingi mpenza na ntango ya mpasi mpe ya bosɛnga.​—Nzembo 23:1-4.

Mokano ya mosala ya kotala bampate mozali ya ‘kolendisa, kasi ya kokweisa te.’ (2 Bakolinti 13:10) Ya solo, maloba ya longonya na ntina na mpiko, molende mpe mosala ya sembo ya moto oyo okei kotala makoyikisa ye mpiko mingi. Nkulutu moko alobaki ete: “Kati na mosala ya kotala bampate, ezali malamu te komonisa ete oyei na mokano ya kolukaluka mpe kolobela mikakatano. Ya solo, mosakoli ye moko akoki komonisa mposa ya kolobela mwa mokakatano mosusu. Mpe soki mpate moko azali kotɛnguma mpe komitangola na etɔ́nga, nkulutu asengeli kosunga ye.”

Na ntembe te babateli ya mpate bakotya likebi ya sikisiki likoló na moto nyonso oyo akokani na baoyo balobelami na maloba oyo: “Nakoluka oyo abungi, mpe nakozongisa oyo akimisami, mpe nakokanga oyo abukani, mpe nakokɛmbisa oyo abɛli.” (Ezekiele 34:16) Ee, bampate bakoki kozala na mposa ete báluka bango, bázongisa bango, bákanga bapotá na bango to bákɛmbisa bango. Babateli ya mpate na Yisalaele batalelaki mikumba na bango na bopɔtu. Kokokisa mosala lolenge yango ezali kosɛnga ete mobateli azala mpenza penepene na mpate moko mpe azali kokokisa mposa na ye. Ya solo, yango nde esengeli kokesenisa mosala ya kotala bampate oyo mozali kosalema na mikolo na biso.

Bampate ya kolɔngɔ́nɔ́ malamu bazali na mposa ya libateli

Tosengeli kosukisa ete babateli ya mpate ya elimo na mikolo na biso basengeli te kotya likebi ya sikisiki epai na bampate oyo bazali na kolɔngɔ́nɔ́ malamu? Wana mpate mpenza akómi na mpasi, kosalisa ye ekozala pɛtɛɛ bobele soki azali te kobanga mobateli na ye. Búku moko ya kopesa litambwisi elobi ete “bampate bazali nyama oyo ibangaka bato, mpe kolongola bango bobángi wana ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te.” Kati na makambo mosusu, búku yango epesi litambwisi ya ntina oyo osengeli kolanda soki olingi ete bampate na yo bábanga yo te: “Sololá na banyama yango ntango nyonso. Bakomesana na mongongo na yo, yango ekolongola bobángi epai na bango. Kendá kotala bampate mbala mingi wana bazali kolya.”​—Alles für das Schaf. Handbuch für die artgerechte Haltung (Nyonso oyo etali bampate. Mokanda mpo na lolenge malamu ya kobatela bango).

Na yango, bokutani ezali na ntina mingi soki mobateli alingi ete boyokani ezangi bobángi ezala kati na ye mpe bampate. Likambo yango lizali mpe solo mpo na lisangá ya boklisto. Nkulutu moko amonisaki ete: “Koyebana kati na lisangá lokola nkulutu oyo atalaka bampate mbala na mbala ekoyeisa pɛ́pɛ́lɛ kotala ndeko moko oyo azali na mikakatano.” Na yango, babateli na mpate ya elimo basengeli te koluka koleisa mpe kobatela bampate bobele kati na Ndako ya Bokonzi. Wana makoki mapesameli bango, bankulutu basengeli koyeba bampate na kotaláká bango na ndako na bango. Moklisto moko amikundoli ete ntango aponamaki sika lokola nkulutu, mokɛngɛli mokambi abéngaki ye na telefone mpe asɛngaki na ye ete akenda kotala mpe kobɔndisa ndeko moko oyo mwana na ye ya mwasi autaki kokufa kati na likámá moko ya nsɔ́mɔ na motuka. Nkulutu yango alobi ete: “Nayokaki mpenza nsɔ́mɔ, mpamba te ata mokolo moko te nasilaki kotala ndeko yango na ndako na ye mpe nayebaki ata te epai wapi azalaki kofanda! Ezalaki libɔndisi monene ntango nkulutu moko oyo akɔmɛli andimaki kokenda elongo na ngai.” Ee, bankulutu basunganaka moko na mosusu kati na mosala ya kotala bampate.

Ntango azali komibongisa mpe kokenda kotala bampate, nkulutu moko akoki kokamata mosaleli na misala moko oyo azali komonisa mposa ya kosala “mosala malamu” ya mokɛngɛli. (1 Timoté 3:1, 13) Mosaleli na misala akomona mpenza motuya monene ya lolenge nkulutu azali kosunga bampate wana ezali ye kosala mosala ya kotala bampate! Bankulutu mpe basaleli na misala bakokóma bongo na boyokani ya penepene kati na lisangá, kokɛmbisáká mpenza ekanganeli ya bolingo ya boklisto mpe bomoko.​—Bakolose 3:14.

Bongisá ntango mpo na mosala ya kotala bampate

Na lisangá moko, ntango lisangani ya bankulutu etikaki ete mosala ya kotala bampate mobongisama na batambwisi Boyekoli ya Mokanda ya lisangá, basakoli nyonso kati na etuluku moko batalamaki kati na sanza motoba, nzokande kati na bituluku mosusu ata mosakoli moko te atalamaki. Yango etindaki nkulutu moko na koloba ete: “Emonani ete bankulutu mosusu bazwaka bango moko likanisi mpe basalaka mingi mosala ya kotala bampate, kasi basusu bazali na mposa ya elendiseli ya baninga na bango bankulutu mpo na kosala bongo.” Na yango, na masangá mosusu lisangani ya bankulutu lizwaka bibongiseli mpo ete babateli na mpate bátala basakoli nyonso kati na mwa ntáká ya ntango.

Ezali solo ete, nkulutu moko to mosakoli mosusu nyonso akoki kotala moto nyonso ya lisangá kozanga kozela ebongiseli ya sikisiki. Liboso ya kosala mosala ya kotala bampate, nkulutu moko abéngaka na telefone mpe alobaka ete, “Natalaka libota moko sanza na sanza. Nakoki koya kotala bino mpo na mwa ngonga moko mokolo mosusu na sanza oyo ezali koya? Ntango nini ekoki kozala malamu mpo na bino?”

Mapamboli ya mosala ya kotala bampate

Wana mikakatano ya ebongiseli mabe oyo mizali sé kobakisama, litomba malamu mpenza lizwamaka wana babateli ya mpate ya bososoli bazali kokenda kotala bampate mpo na koyikisa bango mpiko. Wana baoyo nyonso bazali kati na etɔ́nga bazali koyikisama mpiko mpe kozwa lisalisi na nzela ya mosala ya kotala bampate, mpate moko na moko akomiyoka ete azali na libateli.

Na ntina na lisangá moko oyo kati na yango babateli ya mpate bazalaki kotala mbala na mbala basakoli ya Bokonzi nyonso, elobamaki ete: “Basakoli bakómaki kosepela na mosala ya kotala bampate. Ekómaki kosalema mbala mingi ete mosakoli moko asolola na nkulutu moko mpo na kotuna ye soki ntango nini akolinga koya epai na ye kosala mosala ya kotala bampate, mpamba te ndeko yango oyo azali kosɛnga asepelaki mingi na lisoló oyo basololaki na mbala ya liboso. Mosala ya kotala bampate ezalaki moko na makambo oyo mabongisaki elimo ya lisangá.” Balapólo mosusu ezali komonisa ete ntango babateli na mpate bazali kosala na bolingo nyonso na motindo yango, lisangá likoki kokóla na bolingo, na bomoko mpe na esengo. Oyo nde lipamboli!

Babateli na mpate baklisto batalaka bampate mpo na kosunga bango ete bázala ntango nyonso malamu na elimo. Bankulutu balingi koyikisa mpiko mpe kolendisa baninga na bango bandimi. Soki mokakatano moko monene oyo mozali kosɛnga toli momonani na boumeli ya lisoló, ekoki kozala malamu mingi kozwa bibongiseli mpo na kotalela yango na ntango mosusu, mingimingi soki nkulutu azali elongo na mosaleli na misala. Ata ndenge nini, libondeli libongi mpenza mpo na kosukisa lisoló na libaku nyonso ya mosala ya kotala bampate.

Mobateli ya mpate moko azali kokana kosala mosala ya kotala bampate epai na yo nokinoki na mikolo mizali koya? Soki ezali bongo, zelá na esengo nyonso bilendiseli oyo bibombami mpo na yo. Azali koya mpo na kosunga yo mpe kolendisa yo na ekateli na yo ya kotikala kati na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.​—Matai 7:13, 14.

[Etanda na lokasa 26]

Toli mpo na mosala ya kotala bampate

◻ Bópesana elaka ya bokutani: Mbala mingi, ezalaka malamu kopesa elaka ya bokutani. Soki nkulutu azali kokana kotalela mokakatano moko monene, ekozala malamu ayebisa yango liboso epai na mosakoli.

◻ Komibongisa: Talelá lolenge mpe ezalela ya moto yango. Pesá longonya na sembo nyonso. Zalá na mokano ya kopesa “likabo ya elimo” oyo ekoyikisa mpiko, oyo ekolendisa kondima.

—Baloma 1:11, 12.

◻ Okokende elongo na nani: Nkulutu mosusu to mosaleli na misala

ya makoki mingi.

◻ Ntango lisoló lizali kosalema: Nkulutu asengeli kozala na elongi ya esengo, na bolingo, na elikya mpe na makambo makasi te. Tuná nsango ya libota, bolamu na yango, mpe bongo na bongo. Yoká na likebi nyonso. Soki mokakatano moko ya monene momonisami, ekoki kozala malamu mingi kotalela yango na libaku oyo ekobongisama mpo na yango.

◻ Boumeli ya lisoló: Obatelá ngonga oyo boyokanaki mpo na yango, mpe kenda wana baoyo bayambi yo bazali naino na esengo.

◻ Bosukisi ya lisoló: Libondeli libongi mpenza mpe likosepelisa mingi.​—Bafilipi 4:6, 7.

[Elilingi na lokasa 24]

Babateli na mpate ya elimo bazali mpe kobatela

[Bililingi na lokasa 26]

Mosala ya kotala bampate mopesaka mabaku malamu ya koyikisa mpiko na elimo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto