Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/4 nk. 6-8
  • Tókumisa Ekaniseli na lolenge lobongi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókumisa Ekaniseli na lolenge lobongi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na motindo mobongi​—Lolenge nini?
  • Bososoli ezali na ntina
  • Bolei ya mpokwa ya Nkolo ezali na ntina nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mpo na nini Elambo ya Mpokwa ya Nkolo ezali na ntina mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ntina oyo tokanisaka liwa ya Nkolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge nini kokanisa bolei ya mpokwa ya Nkolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/4 nk. 6-8

Tókumisa Ekaniseli na lolenge lobongi

EZALAKI na mpokwa ya mokolo mwa 14 Nisan, 33 T.B. nde Yesu abandisaki Ekaniseli.a Autaki kosilisa kosala molulu ya Elekeli elongo na bantoma na ye 12, na yango tokoki kondimisama na ntina na dati yango. Nsima ya kobengana Yuda, mosúli, Yesu “akamati, [limpa], apamboli, abuki yango mpe apesi bango yango, mpe alobi ete, Bókamata, oyo [elimboli] nzoto na ngai. Akamati kɔ́pɔ, mpe esili ye kotɔ́nda, apesi bango yango mpe bango nyonso bameli na yango. Ye alobi na bango ete, Oyo [elimboli] makila na ngai na kondimana, masopani mpo na bato mingi.”​—Malako 14:22-24.

Yesu apesaki bayekoli na ye etindá ya kokundola liwa na ye mpamba te ezali na ntina mingi. (Luka 22:19; 1 Bakolinti 11:23-26) Apesaki mbeka bobele moko oyo ekokaki kosomba bato uta na mbeba ya lisumu mpe ya liwa oyo tosangolaki. (Baloma 5:12; 6:23) Limpa mpe vinyo oyo asalelaki ezalaki bilembo ya nzoto mpe ya makila na ye ya kokoka. Lokola toyebi mokolo ya sikisiki oyo Yesu abandisaki Ekaniseli, tokoki kosala molulu yango na mokolo oyo ekokani na mokolo yango mbula na mbula, lokola ezalaki kosalema mpo na Elekeli ya Bayuda. Kasi tosengeli kosala yango na lolenge lobongi. Mpo na nini?

Ntoma Paulo alobaki ete baoyo basanganaka na bilembo ya mampa mpe vinyo basengeli “[kokóba] kosakola kufa na Nkolo kino ekoya ye.” (1 Bakolinti 11:26) Na bongo, kati na molulu yango likebi lisengeli kotyama mingi likoló na liwa ya Yesu mpe likoló na ndimbola na yango mpo na bato. Esengeli kozala ntango ya ntina mingi, ntango ya komanyola na ntina na malamu ya Yehova mpe na ntina na botɔ́ndi oyo tosengeli kozala na yango mpo na Yehova mpe Mwana ye. (Baloma 5:8; Tito 2:14; 1 Yoane 4:9, 10) Na yango, Paulo apesaki likebisi oyo ete: “Boye soko nani akolya [limpa] mpe akomela kɔ́pɔ na Nkolo na motindo mobongi te, azali na ekweli na ntina na nzoto mpe na makila na Nkolo.”​—1 Bakolinti 11:27.

Na motindo mobongi​—Lolenge nini?

Emonani polele ete, Nzambe akosepela te soki totyoli libaku yango na kosaláká makambo oyo mazangi kolongobana to na kolandáká mimeseno ya bapakano. (Yakobo 1:27; 4:3, 4) Ebongi te ete makambo oyo masalemaka na Pásiká masalema na ntango ya Ekaniseli. Na kolandáká malako ya Yesu ya ‘kosala bongo mpo na ekaniseli na [ye],’ tosengeli kokumisa Ekaniseli na kolanda mpenza lolenge oyo ye moko asalaki yango. (Luka 22:19; 1 Bakolinti 11:24, 25) Yango esengeli kopekisa biloko ya kokembisa oyo esalelamaka kati na molulu ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba. Búku New Catholic Encyclopedia endimi ete “Misa ya lelo ekeseni mpenza na molulu mozangi mindɔndɔ́ oyo Klisto mpe bantoma na ye bazalaki kolanda.” Mpe na kosaláká Misa mbala mingi, ata mpe mokolo na mokolo, boklisto ya nkombo mpamba esili kopɛngwa na mokano ya Yesu mpe bakómisi yango likambo ya mikolo nyonso.

Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti na ntina na kosangana na bilembo wana na lolenge mabe mpamba te likambo moko ebimaki kati na lisangá na ntina na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. Basusu babatelaki te ezalela na yango ya bulɛɛ. Bamemaki bilei na bango mpe balyaki yango liboso to na boumeli ya likita. Mingi mpenza, balyaki mpe bamelaki na kolekisa ndelo. Yango elangwisaki bango mpe elɛmbisaki makoki na bango ya kokanisa. Na kozangáká bokɛngi na makanisi mpe na elimo, bakokaki “te kososola nzoto” mpe na yango bakómaki “na ekweli na ntina na nzoto mpe na makila na Nkolo.” Nzokande, baoyo bamemaki bilei te bazalaki na nzala mpe bazalaki kolanda likita malamu te. Emonanaki ete moko te kati na bango abongaki kokamata bilembo na bososoli mpenza ya ntina monene ya libaku yango​—ete molulu yango mozalaki kosalema mpo na kokundola liwa ya Nkolo. Yango ememelaki bango kosambisama, mpamba te bazangaki botosi, mpe kútu batyolaki yango.​—1 Bakolinti 11:27-34.

Bososoli ezali na ntina

Basusu basili kokamata bilambo ya Ekaniseli na kozanga kolongobana atako, na nsima, bayaki koyeba ete basengelaki kosala bongo te. Baoyo bakamataka yango na bosembo nyonso basilá koponama epai na Nzambe mpe bazali na litatoli ya elimo ya Nzambe mpo na yango. (Baloma 8:15-17; 2 Bakolinti 1:21, 22) Ezali te mokano na bango moko to ekateli oyo moto ye moko azwi nde emonisaka bango ete babongi. Nzambe asilaki kotya motángo ya sikisiki ya baoyo bakoyangela na makoló, ezali bongo 144 000, ezali mpenza motángo moke soki tokokanisi yango na motángo ya bato nyonso mosusu oyo bazali kozwa litomba na mbeka ya Klisto. (Emoniseli 14:1, 3) Koponama na bango ebandaki na eleko ya Yesu, yango wana lelo oyo motángo ya bato yango ezali moke. Mpe wana liwa ezali kokamata basusu kati na bango, motángo yango mosengeli kokita.

Mpo na nini moto akoki kokamata bilembo na lolenge elongobani te? Ekoki kozala mpo na bindimeli ya mangomba oyo azalaki na yango liboso​—ete bato ya sembo nyonso bakokendaka na likoló. To mpe ekoki kozala mpo na mikano ya lokoso to moimi​—liyoki oyo moto akoki kozala na yango ya kokanisa ete ye abongi koleka basusu​—mpe mposa ya kozwa lokumu. Mbala mosusu ekoki kozala bongo mpo na mayoki oyo mabimi na ntina na mikakatano makasi to likambo ya mawa oyo ekosala ete moto asepela lisusu na bomoi awa na mabelé te. Ekoki mpe kozala bongo mpo ete azali na boninga ya pene elongo na moto moko oyo azali na elikya ya kokende likoló. Biso banso tosengeli komikundola ete ezali bobele Nzambe nde azwaka ekateli, kasi biso moko te. (Baloma 9:16) Na yango, soki moto “amimeki,” mpe amoni ete asengelaki mpenza te kosangana na bilembo yango, asengeli sikawa kotika.​—1 Bakolinti 11:28.

Elikya oyo Nzambe asili kopesa epai na eteni eleki monene ya bato ezali bongo oyo ya bomoi ya seko na mabelé kati na paladiso. Yango ezali esengo monene oyo tosengeli kozela na motema likoló, mpe oyo esengeli kosepelisa biso mpenza. (Genese 1:28; Nzembo 37:9, 11) Ezali bongo awa na mabelé nde basembwi bakozonga lisusu na bomoko elongo na balingani na bango oyo bakosekwa mpe bakokutana na bato ya sembo ya ntango na kala, na ndakisa Abalayama, Sara, Mose, Laba, Davidi, mpe Yoane Mobatisi​—baoyo nyonso bakufaki liboso ete Yesu afungola nzela ya bomoi na likoló.​—Matai 11:11; kokanisá na 1 Bakolinti 15:20-23.

Baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé bakumisaka bokundoli ya Elambo ya Mpokwa ya Nkolo na lolenge lobongi na koyanganáká na likita yango mpe na kolandáká yango na limemya nyonso, atako balyaka limpa te mpe bamelaka vinyo te. Bango bazwaka litomba na mbeka ya Klisto, oyo epesaka bango nzela ya kozala na etɛlɛmɛlo ya kondimama epai na Nzambe. (Emoniseli 7:14, 15) Wana bazali koyoka lisukúlu oyo ezali kosalema, botɔ́ndi na bango mpo na biloko ya bulɛɛ ezali koyeisama makasi, mpe mposa na bango ya kobatela bomoko elongo na libota ya Nzambe kati na mokili mobimba ezali kokóla.

Na mbula oyo, na nsima ya kolala ya moi na mokolo ya Minei, 2 Apríli, Ekaniseli ekosalema kati na masangá nyonso koleka 78 000 ya Batatoli ya Yehova na mabelé mobimba. Okoyangana na likita yango?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na Bayuda, mokolo mozalaki kobanda na mpokwa. Engebene manáka ya mikolo na biso, mokolo wana ya 14 Nisan ebandaki na ebandeli na mokolo mwa minei na mpokwa, ya 31 Mársi, kino na kolala ya moi na mokolo ya Mitano na mpokwa, elingi koloba, mwa 1 Apríli. Ekaniseli ebandisamaki na mokolo ya Minei na mpokwa, mpe Yesu akufaki na mokolo ya Mitano na nsima ya nzángá ya mokolo yango ya Bayuda. Asekwisamaki na mokolo ya misato, elingi koloba mokolo ya Lomingo na ntɔ́ngɔ́.

[Elilingi na lokasa 8]

Batatoli ya Yehova bakumisaka Ekaniseli mbala moko na mbula

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto