Tósanzola Mokonzi ya seko!
“[Yehova] azali Mokonzi libela na libela.”—NZEMBO 10:16.
1. Mituna nini mizali kobima na ntina na boseko?
BOSEKO—ndenge nini yo okoki kolimbola yango? Okanisi ete ntango ekoki mpenza kokóba koumela libela na libela? Ntembe ezali te ete ntango ezali na ebandeli te. Na yango, tokoki te koloba ete ezangi mpe nsuka? Ya solo, Biblia Traduction du monde nouveau ezali kolobela Nzambe ete azali kosanzolama “longwa na bileko bizangi nsuka kino libela na libela.” (Nzembo 41:13, NW) Maloba yango malimboli nini? Tokoki kososola yango soki totaleli eloko mosusu oyo ezali na boyokani na yango—etando.
2, 3. (a) Makambo nini matali etando mazali kosalisa biso mpo ete tósosola boseko? (b) Mpo na nini tosengeli kolinga kosambela Mokonzi na seko?
2 Etando ezali na monene boni? Ezali na bandelo oyo esukisi yango? Esili koleka bambula 400, bato bazalaki naino kokanisa ete mabelé na biso ezali na ntéi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Na nsima, Galilée asalaki télescope mpe yango esalisaki bato ete bákoka komona makoló na bonene mingi koleka. Na ntango yango, Galilée azwaki likoki ya komona minzoto mingi koleka mpe akokaki komonisa ete mabelé mpe baplanɛ́ti mosusu ebalukaka zingazinga ya moi. La Voie lactée ezalaki lisusu komonana te ete ezalaki liboke ya mpɛmbɛ lokola miliki. Yango emonanaki solo ete ezali galaksi, oyo etondi na minzoto, na motángo ya bamiliare soko monkámá. Ata na boumeli ya bomoi na biso mobimba, tokoki soko moke te kotánga ebele ya minzoto wana. Na nsima, banganga mayele ya astronomi bayaki komona bamiliare ya bagalaksi. Yango etandami kozanga nsuka kati na etando, kino na ntáká oyo téléscope oyo eleki mpenza na nguya makasi ekoki komonisa. Emonani ete etando ezali na bandelo te. Ezali mpe bongo mpo na boseko—yango ezali na nsuka te.
3 Emonani ete bɔɔngɔ́ na biso bato, oyo makoki na yango ezali na nsuka, ekoki te kososola likanisi ya boseko. Nzokande, ezali na Moto moko oyo azali kososola yango na lolenge ya kokoka mpenza. Azali na likoki ya kotánga, ɛɛ, ata mpe ya kobénga nkombo ya ebele mpe ebele ya bamiliare ya minzoto kati na bamiliare ya bagalaksi na yango! Ye alobi ete: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na yango na motuya, akobyanga bango nyonso na nkombo; mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga. Oyebi te? Oyoki te ete [Yehova] azali Nzambe libela motongi na nsuka na mokili? Ye akosenzwa te, ye akolɛmba te, bososoli na ye eyebani nsuka te.” (Yisaya 40:26, 28) Oyo nde Nzambe na kokamwisa! Na ntembe te, azali Nzambe oyo tosengeli mpenza kosambela!
“Mokonzi libela na libela”
4. (a) Lolenge nini Davidi amonisaki botɔ́ndi mpo na Mokonzi na seko? (b) Moko na bato minene ya kala ya siansi alobaki nini na ntina na eutelo ya molɔngɔ́?
4 Na Nzembo 10:16, Davidi alobi na ntina na Nzambe yango Mozalisi ete: “[Yehova] azali Mokonzi libela na libela.” Mpe na Nzembo 29:10, azongeli ete: “[Yehova] akofandaka lokola Mokonzi libela na libela.” Ɛɛ, Yehova azali Mokonzi na seko! Lisusu, Davidi atatoli ete Mokonzi yango oyo akumisami azali Moyemi mpe Mokeli ya biloko nyonso oyo tozali komona kati na etando, kolobáká na Nzembo 19:1 ete: “Likoló ekosakolaka nkembo na Nzambe, lola ekoyebisaka misala na mabɔkɔ na ye.” Soko bambula 2 700 na nsima, Sir Isaac Newton, moto na siansi oyo ayebani mingi, andimaki maloba ya Davidi, wana akomaki ete: “Ebongiseli kitoko oyo ya moi, ya baplanɛ́ti mpe ya minzoto ya kongɛnga ekoki kouta bobele na mokano mpe na nguya monene ya moto moko oyo angɛngisami mpe atondi na nguya.”
5. Yisaya mpe Paulo balobaki nini na ntina na Eutelo ya mayele?
5 Tosengeli mpenza komikitisa lokola toyebi ete Yehova Mokonzi Monene ya molɔ́ngɔ́, oyo etando monene na “lola mpe likoló na lola ikoki kozingela ye te,” azali na bomoi seko na seko! (1 Mikonzi 8:27) Yehova, oyo alobelami na Yisaya 45:18 (NW), ete azali “Mozalisi ya makoló, . . . Motongi na mabelé mpe Mokeli na yango,” azali Liziba ya mayele oyo ezali mpenza monene na boye ete bato bakoki kososola yango te. Yehova alobaki, lokola yango emonisami polele na 1 Bakolinti 1:19 ete: “Nakobebisa mayele na bato na mayele, mpe nakoyeisa mpamba boyebi na bayebi.” Likoló na yango, ntoma Paulo abakisaki na molɔngɔ́ 20 ete: “Wapi moto na mayele? Wapi mokomeli? Wapi molobalobi na [ebongiseli ya biloko, NW] oyo? Nzambe akómisi mayele na mokili eloko na bolɛmá te?” Ɛɛ, lokola ntoma Paulo akóbaki koloba, na mokapo 3, molɔngɔ́ 19, “mayele na [mokili, NW] oyo ezali bolɛmá epai na Nzambe.”
6. Mosakoli 3:11 emonisi nini na ntina na “eleko ya seko”?
6 Biloko minene ya likoló bizali eteni ya bozalisi oyo Mokonzi Salomo alobaki na ntina na yango ete: “[Nzambe] asalaki nyonso na kitoko na ntango na yango; atye mpe [eleko ezangi nsuka, NW] kati na mitema na bango, nde moto te ayebi kososola mosala mosalaki Nzambe longwa na ebandeli kino nsuka.” (Mosakoli 3:11) Ya solo, elónami kati na motema ya moto ete ameka kososola ndimbola ya “eleko ezangi nsuka,” elingi koloba, boseko. Kasi akoki nde kokóma na boyebi motindo wana?
Elikya kitoko ya bomoi
7, 8. (a) Elikya nini kitoko ya bomoi etyami liboso na bato, mpe lolenge nini tokoki kozwa yango? (b) Mpo na nini tosengeli kosepela ete kolakisama oyo euti na Nzambe ekokóba mpo na libela na libela?
7 Yesu Klisto alobaki epai na Yehova kati na libondeli ete: “Oyo elimboli bomoi ya seko, ete báyekola koyeba yo Nzambe moko ya solo, mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Ndenge nini tokoki kozwa boyebi motindo wana? Tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe, Biblia Mosantu. Na lolenge yango, tokoki kozwa boyebi ya sikisiki ya mikano minene ya Nzambe, bakisá mpe ebongiseli oyo asalaki na nzela ya Mwana na ye mpo na bomoi ya seko kati na Paladiso awa na mabelé. Yango ekozala “bomoi ya solosolo” oyo elobelami na 1 Timoté 6:19 (NW). Ekozala na boyokani na oyo Baefese 3:11 (NW), ezali kolobela ete “mokano ya seko oyo [Nzambe] abongisaki na boyokani na Klisto Yesu Nkolo na biso.”
8 Ɛɛ, biso bato na masumu tokoki kozwa bomoi ya seko na nzela ya kolakisama euti na Nzambe mpe na kondima kati na mbeka na lisiko ya Yesu. Kolakisama yango ekokóba kino ntango nini? Yango ekolanda kozala libela na libela wana bato bazali kolakisama mokemoke kati na mayele ya Mozalisi na biso. Mayele ya Yehova ezali na ndelo te. Kondimáká likambo yango, ntoma Paulo alobaki ete “Ɛɛ, bozwi mpe boyebi mpe bososoli na Nzambe izali na bozindo boni! Bikateli na ye bikoki koyebana ntina te; bilekelo na ye ikomonana nzela te.” (Baloma 11:33) Ya solo, na lolenge lobongi mpenza, 1 Timoté 1:17 (NW), ebéngi Yehova “Mokonzi na seko”!
Mayele ya kozalisa ya Yehova
9, 10. (a) Misala nini ya kokamwa Yehova asalaki yango na kolɛngɛláká mabelé ete ezala likabo mpo na bato? (b) Lolenge nini mayele maleki monene ya Yehova mamonisami kati na bikelamu na ye? (Talá etanda.)
9 Kanisá libula kitoko oyo Mokonzi na seko asili kopesa mpo na biso bato. Nzembo 115:16 eyebisi biso ete: “Lola mpe likoló-na-lola ezali na [Yehova] kasi apesaki [mabelé epai, NW] na bana na bato.” Okanisi te ete yango ezali mpenza likabo kitoko? Ezali bongo mpenza! Mpe tozali kosepela mpo na ezaleli ya bokɛngi monene mpenza oyo Yehova amonisaki na kolɛngɛláká mabelé ete mazala efandelo na biso!—Nzembo 107:8.
10 Makambo ya kokamwisa masalemaki na mabelé na boumeli ya “mikolo” motoba ya bozalisi oyo mizwami kati na Genese mokapo 1, mokolo na mokolo eumelaki bankóto ya bambula. Na nsuka, misala ya bozalisi na Nzambe, mabelé masengelaki kozipama na matiti kitoko lokola tapi, bazámba kitoko, mpe na bafololo ya lángi ndenge na ndenge. Etondaki na bibele na bikelamu bikeseni ya mai monene, bibele ya bandɛkɛ na mapapu kitoko, ebele ya banyama ya mboka mpe banyama ya zámba, moko na moko kobotanáká “na lolenge na yango.” Nsima ya kolobela kozalisama ya mwasi mpe ya mobali, Genese 1:31 elobi ete: “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe izalaki malamu mingi.” Oyo nde efandelo kitoko ezingaki bato wana ya liboso! Kati na biloko ya kosepelisa oyo bizalisamaki awa na mabelé, tozali komona mayele, bokɛngi, mpe ezaleli ya komibanzabanza ya Mozalisi oyo atondi na bolingo, boye te?—Yisaya 45:11, 12, 18.
11. Lolenge nini Salomo akumisaki mayele ya kozalisa ya Yehova?
11 Salomo azali moko na bato oyo bakamwaki na komona mayele ya Mokonzi na seko. Azalaki mbala na mbala kobenda likebi ya bato likoló na mayele ya Mozalisi (Masese 1:1, 2; 2:1, 6; 3:13-18) Salomo andimisi biso ete “mabelé ekoumela libela na libela.” Atalelaki ebele ya biloko ya kokamwisa ya bozalisi, kati na yango mosala oyo mbula ezali kokokisa na kopolisáká mabelé na biso. Na bongo, akomaki ete: “Bibale nyonso ikotyola kino mai-na-monana; kasi mai-na-monana ekotonda te. Na esika eutaki bibale, bikozongaka bobele wana lisusu.” (Mosakoli 1:4, 7) Na yango, ekómaka ete nsima wana bambula mpe bibale bisili kopolisa mabelé, mai na yango mazali kozongisama lisusu kati na mapata longwa na mai monene. Mabelé oyo elingaki kozala ndenge nini, mpe biso mbɛlɛ tosuká wapi, soki kopɛtolama mpe ebongiseli wana ya mai ezalaki te?
12, 13. Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔ́ndi mpo na bikelamu ya Nzambe?
12 Botɔ́ndi na biso mpo na bibongiseli wana ya kobatela bokatikati ya mabelé esengeli komonisama na misala, lokola Mokonzi Salomo akomaki yango kati na maloba ya nsuka ya Mosakoli, ete: “Tóyoka nsuka na likambo mobimba: Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye; yango ezali mosala na bato nyonso. Mpo ete Nzambe akokómisa misala nyonso epai na kosambisama elongo na makambo nyonso mabombami, soko mazali malamu, soko mazali mabe.” (Mosakoli 12:13, 14) Tosengeli kobanga kosala makambo nyonso oyo mapesaka Nzambe nkanda. Nzokande, tosengeli koluka kotosa ye, kozaláká na bobángi oyo etondi na limemya.
13 Ɛɛ, tosengeli kolinga kosanzola Mokonzi na seko mpo na misala na ye ya bozalisi oyo mizali ya kokamwisa! Nzembo 104:24 elobi ete: “Misala na yo mingi boni, ɛ [Yehova]! Otɛmisaki yango nyonso na mayele malamu; mokili etondi maa na biloko bisalaki yo.” Na esengo nyonso, tiká ete tóloba lolenge moko na molɔngɔ́ ya nsuka ya Nzembo yango epai na biso moko mpe epai na basusu ete: “[Pambolá Yehova, Ɛ molimo na ngai. Bino bato na ye, bósanzola Yah!, NW]”
Bikelamu ya mabelé oyo bileki nyonso
14. Na ndenge nini bato bazali bikelamu oyo bileki mpenza banyama mosika?
14 Bikelamu nyonso ya Yehova bizali ya kokamwisa. Kasi—bato—tozali bongo bikelamu ya mabelé oyo bileki bikelamu nyonso. Adama, mpe na nsima Eva, bazalisamaki lokola bikelamu oyo bisalemaki lokola nsuka ya kozalisama na mokolo ya motoba ya bozalisi na Yehova—bikelamu oyo bileki mbisi, ndɛkɛ mpe nyama mosika mpenza! Atako mingi kati na bikelamu yango bizali na mayele ya loómbí, bato bapesameli nguya ya kososola, bapesameli lisosoli oyo likoki kokesenisa mabe mpe malamu, bapesameli likoki ya kokana makambo mpo na mikolo mizali koya, mpe bapesameli mposa ya kosambela uta kobotama. Makambo wana nyonso mabimaki ndenge nini? Na esika ete auta epai na banyama oyo bazangi makanisi, moto azalisamaki nde na elilingi ya Nzambe. Na ntina yango, bobele moto nde akoki komonisa bizaleli ya Mozalisi na biso, oyo amonisaki ete azali: “Yehova, Yehova, azali Nzambe na motema mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.”—Exode 34:6, NW.
15. Mpo na nini tosengeli kokumisa Yehova na komikitisa nyonso?
15 Tiká ete tósanzola mpe tótɔ́nda Yehova mpo na lolenge ya kokamwisa oyo nzoto na biso esalemá. Na miniti moko na moko, makila na biso, oyo ezali na ntina mingi mpenza mpo na bomoi, ezali kotambola kati na nzoto. Lokola Deteronome 12:23 emonisi yango, “makila ezali bomoi”—bomoi na biso—ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe. Mikuwa makasi, misisa oyo mikongumbamaka, mpe ebongiseli oyo ebéngami système nerveux esimbami na bɔɔngɔ́ oyo eleki mosika mpenza bɔɔngɔ́ ya nyama nyonso mpe oyo etondi na makoki oyo ata ordinatɛrɛ ya monene lokola buludingi ya molai ekoki kokokana na yango te. Yango ezali kopusa yo na komikitisa, boye te? Esengeli mpenza kozala bongo. (Masese 22:4) Mpe talelá lisusu likambo oyo: Mimpululu na biso, enama tozali na yango kati na mongongo oyo ebéngami larynx, lolemo na biso, mino mpe monɔkɔ na biso ekoki kosala elongo mpo na kobimisa maloba na lokótá nyonso kati na bankóto mingi ya nkótá oyo ezali kati na mokili. Davidi ayembaki loyembo oyo ebongi mpenza mpo na Yehova, kolobáká ete: “Nakotɔ́nda yo mpo ete nasalami na motindo na kokamwa mingi; misala na yo izali na kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.” (Nzembo 139:14) Tiká tósangana elongo na Davidi mpo na kosanzola na botɔ́ndi nyonso Yehova, Mokeli mpe Nzambe na biso ya kokamwisa!
16. Loyembo nini mobɛti-miziki moko monene asalaki yango mpo na kokumisa Yehova, mpe tosengeli koyanola na libyangi nini ya nguya?
16 Na yango, mwa búku moko ya nzembo ya koyembela Nzambe oyo ebimisamaki na ekeke ya 18, oyo ekomamaki na Joseph Haydn elobi boye mpo na kosanzola Yehova: “Bópesa ye matɔ́ndi, bino nyonso misala na Ye ya kokamwa! Bókumisa Ye na nzembo, bóyemba mpo na nkembo na Ye, bókumisa mpe bósanzola Nkombo na Ye! Tiká ete masanzoli na Yehova maumela libela na libela, Amen, Amen!” Maloba oyo mapemami mazongelami mbala mingi kati na Nzembo mazali mpe kitoko mingi koleka, lokola libyangi oyo ezongelami mbala minei kati na Nzembo 107: “Ɛ bótɔ́nda Yehova mpo na boboto na ye mpe mpo na misala na ye ya kokamwa epai na bana na bato.” Ozali kosangana kati na masanzoli yango? Osengeli kosangana na yango, mpamba te biloko nyonso oyo bizali mpenza kitoko biuti na Yehova, Mokonzi na seko.
Misala mosusu ya nguya mingi koleka
17. Lolenge nini ‘loyembo na Mose mpe na Mwana na mpate’ ezali kokumisa Yehova?
17 Na boumeli ya bambula nkóto motoba oyo esili koleka, Mokonzi na seko asili kosala misala misusu ya nguya koleka. Na mokanda ya nsuka ya Biblia, na Emoniseli 15:3, 4, tozali kotánga na ntina na baoyo bazali kati na likoló oyo balóngaki banguna na bango bademó ete: “Bayembi loyembo na Mose, moombo na Nzambe, mpe loyembo na Mwana na Mpate ete, Misala na yo minene mpe na kokamwa, ɛ [Yehova] Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Nzela na yo sembo mpe na solo, ɛ Mokonzi [ya seko, NW]. Nani akozanga komemisa yo, [Yehova]? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo? Yo moko ozali mosantu mpe mabota nyonso bakoya kosambela liboso na yo. Mpo ete bikateli na yo sembo bisili komonisama.” Mpo na nini babéngi yango ete ‘loyembo na Mose mpe na Mwana na Mpate’? Tiká tótalela yango.
18. Mosala nini ya nguya ekundolami kati na loyembo oyo ezwami kati na Exode mokapo 15?
18 Esili koleka bambula soko 3 500, ntango limpinga makasi ya Falo ezindaki kati na Mai Motane, Bayisalaele basanzolaki Yehova mpo na kotɔ́nda ye kati na loyembo. Tozali kotánga na Exode 15:1, 18 ete: “Na nsima Mose mpe bato na Yisalaele bayembaki loyembo oyo epai na [Yehova] ete, Ngai nakoyembela [Yehova] mpo ete ye alóngi na nkembo; ye abwaki mbalata mpe motamboli na yango kati na mai. [Yehova] akozala mokonzi lobiko na lobiko.” Bikateli ya sembo ya Mokonzi na seko bimonanaki na lolenge asambisaki mpe apesaki etumbu epai na banguna oyo batyaki ntembe na lotómo na ye ya kozala mokonzi.
19, 20. (a) Mpo na nini Yehova asalaki libota ya Yisalalaele? (b) Lolenge nini Mwana na mpate mpe basusu bayanolaki na ntembe oyo Satana abimisaki?
19 Mpo na nini likambo yango likómaki na ntina mingi? Ezalaki kati na elanga na Edene nde Nyoka oyo na mayele mabe amemaki baboti na biso ya liboso kati na lisumu. Yango ebimisaki ezaleli ya kozanga kokoka etondi na masumu oyo batikelaki bato banso. Nzokande, na boyokani na mokano na ye ya ebandeli, Mokonzi na seko azwaki nokinoki bibongiseli oyo esengelaki komema na kolongolama ya bayini na ye longwa na efandelo ya mabelé mpe kozongisama ya paladiso. Mokonzi na seko abongisaki libota ya Yisalaele mpe apesaki Mibeko na ye mpo ete emonisa lolenge oyo akokokisa likambo yango.—Bagalatia 3:24.
20 Nzokande, na nsima, Yisalaele yango moko ezangaki mpenza sembo, mpe ezalela wana ya mawa ekokisaki likambo moko oyo eleki mabe mpenza na ntango bakonzi na Yisalaele bapesaki Mwana-mobotami bobele moko ya Nzambe epai na Baloma na ntina ete anyokolama makasi mpe abomama. (Misala 10:39; Bafilipi 2:8) Nzokande, bosembo ya Yesu kino kufa lokola “Mwana na mpate” apesami mbeka epesaki eyano ya polele na ntembe oyo Satana abimisaki, ye monguna ya kalakala ya Nzambe—ete moto moko te na mabelé akoki kotikala sembo epai na Nzambe na kati na minyoko makasi. (Yoane 1:29, 36; Yobo 1:9-12; 27:5) Atako basangolaki ezaleli ya kozanga kokoka na ntina na lisumu uta na Adama, bamilió ya bato mosusu oyo babangaka Nzambe basili kolanda matambe ya Yesu na kobateláká bosembo na bango liboso ya bobundisi ya Satana.—1 Petelo 1:18, 19; 2:19, 21.
21. Na boyokani na Misala 17:29-31, tokolobela nini na lisoló lilandi?
21 Sikawa ntango esili kokoka mpo ete Yehova apesa mbano epai na basembwi mpe asambisa baoyo nyonso bazali banguna ya solo mpe ya boyengebene. (Misala 17:29-31) Lolenge nini yango ekokokana. Lisoló na biso lilandi likolobela yango.
Bozongeli
◻ Mpo na nini Yehova azali na lotómo ya kobéngama “Mokonzi na seko”?
◻ Lolenge nini mayele ya Yehova emonani kati na bikelamu na ye?
◻ Nini emonisi ete moto azali ekelamu eleki ntina mpenza kati na bikelamu ya Nzambe?
◻ Misala nini mipusaki koyembama ya ‘loyembo na Mose mpe na Mwana na mpate?’
[Etanda na lokasa 12]
Mayele ya Yehova maleki mayele nyonso
Mayele ya Mokonzi na seko mamomisami na lolenge mingi kati na misala na ye oyo asalaki awa na mabelé. Talá maloba oyo ya Agulu: “Liloba na liloba na Nzambe ezali pɛto; ye azali nguba epai na bango bakotalela ye.” (Masese 30:5) Na nsima, Agulu alobeli bikelamu mingi ya bomoi oyo Nzambe asalaki, ya minene mpe ya mike. Na ndakisa, na molɔngɔ́ 24 kino molɔngɔ́ 28, alobeli “biloko minei bizali mike kati na mokili, nde izali na [mayele ya loómbí, NW].” Ezali bongo nsɛlɛlɛ, dama, mayoyo, mpe mosɛlɛkɛtɛ.
“Mayele ya loómbí”—ee, nyama asalemi na lolenge wana. Bakanisaka makambo te lokola bato basalaka yango, batambwisami na mayele oyo babotamaka na yango. Likambo yango esilá naino kokamwisa yo te? Bazali bikelamu oyo bibongisami mpenza! Na ndakisa, bansɛlɛlɛ babongisami na bituluku, oyo kati na bango mokonzi-mwasi azali, basáli, mpe mibali. Epai na lolenge mosusu ya bansɛlɛlɛ, basáli bayanganisaka bipimbweli mosusu kati na ezingelo ya ebokwelo oyo basilaki kotonga. Bamelaka mabɛ́lɛ ya bipimbweli wana bansɛlɛlɛ oyo bakokisaka mokumba ya basodá bazali kobengana banguna. Elendiseli epesami kati na Masese 6:6: “Kendá epai na nsɛlɛlɛ, yo moto na goigoi, banzábanzá mpo na nzela na ye, ozala mpe na mayele.” Bandakisa oyo esengeli kopusa biso bato ete tózala na “mingi ya kosala kati na mosala ya Nkolo,” boye te?—1 Bakolinti 15:58.
Moto asilá kosala mpɛpɔ minene. Kasi bandɛkɛ bakoki kosala makambo ndenge na ndenge, kati na bango ndɛkɛ oyo babéngi colibri, oyo bozito na ye ezali bobele 30 gm! Mpepo Boeing 747 esengeli kokumba 180 000 litɛlɛ ya esansi, bakumbi na yango basengeli kozala bato oyo bakɔtelá yango bakelasi milai, mpe basengeli kosalela bamasini ya kolakisa nzela mpo na koleka likoló na mai monene. Nzokande, ndɛkɛ moke oyo colibri ezali bobele na mposa ya 1 gm ya esansi, oyo ezali bongo mafuta ya nzoto na ye, mpo ete akoka kolongwa na Amerika ya Nɔ́rdi, kokatisa Golf ya Mexique, mpe kokende na Amerika ya Súdi. Azali na mposa te ya ebele ya esansi, azali na mposa te ya koyekola kokumba, azali na mposa te ya bakálati to baordinatɛrɛ etondi na makambo ndenge na ndenge! Likoki wana euti bobele na ebongiseli moko ya pwasa ya evolisyó? Soko moke te! Ndɛkɛ wana moke ezali na mayele ya loómbí, Mozalisi, Yehova Nzambe asilá kotya litambwisi kati na bɔɔngɔ́ na ye.
[Elilingi na lokasa 10]
Bikelamu ndenge na ndenge ya “Mokonzi na seko” bizali kokumisa nkembo na ye
[Elilingi na lokasa 15]
Lokola Mose mpe Bayisalaele nyonso bakumisaki bolóngi ya Yehova na Mai Motane, esengo monene ekozala na nsima ya Armagedon