Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/5 nk. 15-20
  • Tángá Liloba ya Nzambe mpe salelá ye kati na solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tángá Liloba ya Nzambe mpe salelá ye kati na solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Matomba ya ntango molai
  • Ezali na ntina mpo na bato nyonso
  • Tángá Liloba ya Nzambe na mongongo makasi
  • Mwango ya boyekoli engebene mitó ya masoló
  • Tótambola ntango nyonso kati na solo
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Omipesa na botángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Salá likambo oyo basɛngaki na Mokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tóndima Biblia mpo na oyo yango ezali mpenza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/5 nk. 15-20

Tángá Liloba ya Nzambe mpe salelá ye kati na solo

“Ɛ, [Yehova] teyá ngai nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo.”​—NZEMBO 86:11.

1. Ebimeli ya liboso ya zulunalo oyo na Lingelesi elobaki mpenza nini na ntina na solo?

YEHOVA atindaka pole mpe solo. (Nzembo 43:3) Azali mpe kopesa biso likoki ya kotánga Liloba na ye, Biblia, mpe likoki ya koyekola solo. Ebimeli ya liboso ya zulunalo oyo​—Yulí 1879 (na Lingelesi)​—elobaki ete: “Solo ezali lokola mwa fololo moke kati na esobe oyo ete bomoi, ezingami mpe etikali moke ezipama mobimba na matiti mabe oyo ete mateya ya lokuta, oyo ezali kokóla mingi. Soki omoni yango osengeli kotika te kosɛnzɛla. Soki olingi komona bonzenga na yango osengeli kolongola matiti mabe oyo ete mateya ya lokuta mpe nkamba na nzube oyo ete molende ya mabe. Soki olingi ete ekóma ya yo, osengeli komikitisa mpo na kozwa yango. Kosuka na kobuka bobele fololo ya solo moko te. Soki bobele fololo moko nde ekoki mbɛlɛ Nzambe alingaki kozalisa fololo mingi te. Kóbá ntango nyonso kobuka yango, kóbá ntango nyonso koluka fololo mingi.” Kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe ezali kopesa biso likoki ya kozwa boyebi ya sikisiki mpe ya kotambola kati na solo na ye.​—Nzembo 86:11.

2. Litomba nini emonanaki na ntango Ezela mpe basusu batángelaki Bayuda Mibeko ya Nzambe na Yelusaleme ya kala?

2 Nsima wana bifelo ya Yelusaleme bisilaki kotongama na mobu 455 L.T.B., nganga Ezela mpe basusu batángelaki Bayuda Mibeko ya Nzambe. Yango elandanaki na Elambo ya Mingombo ya esengo, koyambolama ya masumu, mpe basukisaki na kosala “kondimana makasi.” (Nehemia 8:1–9:38) Tozali kotánga ete: “Batángaki kati na mokanda na Mibeko na Nzambe polele; mpe bapesaki ntina ete básosola litángi.” (Nehemia 8:8) Basusu balobaka ete Bayuda wana bayebaki lisusu lokótá ya Liebele malamu te mpe ete bazalaki kolimbwela bango yango na lokótá ya Alameye. Kasi makomi mamonisi te ete bandimbola ezalaki kopesama na ntina na lokótá. Ezela mpe basusu balimbolaki Mibeko mpo ete bato bákoka kososola mitindá oyo mizalaki kati na yango mpe bákoka kosalela yango. Mikanda ya boklisto oyo milimbolaka Biblia mpe makita ezali mpe kosunga mpo na ‘kolimbola’ Liloba ya Nzambe. Bankulutu oyo baponami mpe basalaka bongo, bango bazali ‘balakisi malamu.’​—1 Timoté 3:1, 2; 2 Timoté 2:24.

Matomba ya ntango molai

3. Matomba nini mazwamaka kati na botángi ya Biblia?

3 Soki mabota ya baklisto mazali kotánga Biblia elongo, na ntembe te, makozwa matomba ya ntango molai. Bakoyeba malamu mibeko ya Nzambe mpe bakoyekola solo na ntina na bindimeli, bisakweli, mpe makambo mosusu. Nsima ya kotánga eteni moko ya Biblia, tata ya libota akoki kotuna ete: Bopusi nini makambo oyo esengeli kozala na yango likoló na biso? Ezali na boyokani nini na mateya mosusu ya Biblia? Lolenge nini tokoki kosalela makambo yango kati na mosala ya kosakola nsango malamu? Libota likoki kozwa bososoli mingi soki basangani na yango bazali kotánga Biblia na kosaláká bolukiluki na lisalisi ya búku Index des publications de la Société Watch Tower to ba Index mosusu. Bavolimi mibale ya mokanda Insight on the Scriptures ekoki mpe kosalelama mpe kopesa litomba nyonso.

4. Lolenge nini Yosua asengelaki kosalela malako oyo mazwami kati na Yosua 1:8?

4 Mitindá oyo miuti na Makomami mikoki kokamba biso kati na bomoi. Lisusu, kotánga mpe koyekola ‘Makomi na bulɛɛ, yango ekoki kopesa biso boyebi mpo na kobika.’ (2 Timoté 3:15) Soki totiki Liloba ya Nzambe ete ekamba biso, tokokóba kotambola kati na solo na ye mpe bamposa na biso ya sembo ekokokisama. (Nzembo 26:3; 119:130) Nzokande, tosengeli koluka kozwa bososoli, lokola Yosua, mokitani ya Mose, asalaki yango. “Búku na mobeko” esengelaki kolongwa na monɔkɔ na ye te, nde asengelaki kotánga yango butu na moi. (Yosua 1:8) Kotika te ete “búku na mobeko” elongwa na ye elimbolaki ete Yosua asengelaki kotika te koyebisa basusu makambo kitoko oyo yango ezalaki koloba. Kotánga mibeko butu na moi elimbolaki ete Yosua asengelaki komanyola yango, asengelaki koyekola yango. Ntoma Paulo mpe alendisaki Timoté ete ‘atya motema’​—amanyola likoló na​—etamboli, mosala, mpe lolenge na ye ya koteya. Lokola azalaki nkulutu moklisto, Timoté asengelaki kosɛnzɛla mingi mpenza mpo ete azala na bomoi moko ya ndakisa mpe ete ateya solo ya Makomami.​—1 Timoté 4:15.

5. Tosengeli kosala nini mpo na kozwa solo ya Nzambe?

5 Solo ya Nzambe ezali eloko moko ya motuya mingi mpenza. Mpo na kozwa yango, tosengeli kotimola, koluka na bompikiliki nyonso kati na Makomami. Bobele na motindo ya banakelasi epai na Molakisi Monene nde tozali kozwa mayele mpe tozali kososola bobángi ya Yehova na limemya mozindo. (Masese 1:7; Yisaya 30:20, 21) Ya solo, tosengeli kondimisama na bosolo ya makambo na lisalisi ya Makomami. (1 Petelo 2:1, 2) Bayuda oyo bazalaki na Beloya “balekaki Batesaloniki na malamu mingi, mpo ete bayambi Liloba na mposa mingi, mpe batángi Makomi mokolo na mokolo, kotala soko makambo [oyo Paulo alobaki] mazali boye.” Bato ya Beloya bapesamelaki longonya mpo na yango, kasi bapamelamaki te.​—Misala 17:10, 11.

6. Mpo na nini Yesu amonisaki ete Bayuda mosusu bazwaki litomba te na bolukiluki na bango kati na Makomami?

6 Yesu ayebisaki Bayuda mosusu ete: “Bozali kolukaluka kati na makomi mpo ete bobanzi ete na yango bokozwa bomoi na seko. Mpe izali yango mpenza itatoli mpo na ngai. Kasi bolingi koya epai na ngai te ete bózala na bomoi na seko.” (Yoane 5:39, 40) Bazalaki kosala bolukiluki kati na Makomami na mokano malamu​—ete yango etambwisa bango kati na bomoi. Ya solo, Makomami mazalaki na bisakweli ya Masiya kati na yango, oyo bilobelaki Yesu lokola nzela mpo na kozwa bomoi. Kasi Bayuda babwakaki ye. Na yango bolukiluki na bango kati na Makomami epesaki bango litomba te.

7. Tosengeli kosala nini mpo na kokólisa bososoli na biso likoló na Biblia, mpe mpo na nini?

7 Mpo ete tókoka kokólisa boyebi na biso ya Biblia, tozali na mposa ya litambwisi ya elimo ya Nzambe, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala. “[Elimo akolukaka, NW] makambo nyonso, ata makambo na bozindo na Nzambe” mpo na kobimisa ndimbola na yango polele. (1 Bakolinti 2:10) Baklisto ya Tesaloniki basengelaki ‘komeka makambo nyonso’ kati na bisakweli nyonso oyo bazalaki koyoka. (1 Batesaloniki 5:20, 21) Na ntango Paulo akomaki epai na Batesaloniki (soko na mobu 50 T.B.), eteni bobele moko ya Makomami ya Greke oyo esilaki kokomama ezalaki bongo Evanzile ya Matai. Na yango Batesaloniki mpe bato ya Beloya bakokaki komeka makambo nyonso, ekoki mpenza kozala ete bazalaki kosala bongo na kotaláká kati na libongoli ya la Septante ya Makomi ya Liebele na lokotá ya Greke. Bazalaki na mposa ya kotánga mpe koyekola Makomami, biso mpe tosengeli kosala bongo.

Ezali na ntina mpo na bato nyonso

8. Mpo na nini bankulutu oyo baponami basengeli kozala ndakisa mpo na oyo etali boyebi ya Biblia?

8 Bankulutu baponami basengeli kozala ndakisa mpo na oyo etali boyebi ya Biblia. Basengeli kozala ‘bateyi malamu’ mpe basengeli ‘kosimba makasi Liloba na sembo.’ Mokɛngɛli Timoté asengelaki ‘kosembola liloba na solo.’ (1 Timoté 3:2; Tito 1:9; 2 Timoté 2:15) Mama na ye, Enise, mpe nkɔ́kɔ na ye Loisi basilaki koteya ye makomi na bulɛɛ uta bomwana mpenza, kokɔtisáká bongo epai na ye ‘kondima oyo ezangi bokosi,’ atako tata na ye azalaki mondimi te. (2 Timoté 1:5; 3:15) Batata oyo bazali bandimi basengeli kobɔkɔla bana na bango “kati na disipilini mpe kosembolama ya Yehova,” mpe mingi mpenza bankulutu oyo bazali batata na mabota, baoyo bazali na ‘bana oyo bazali bandimi, baoyo bazali na mobulu te, batomboki mpe te.’ (Baefese 6:4, NW; Tito 1:6) Ata soki ezalela na biso ezali nini, tosengeli bongo kopesa motuya mingi na botángi, na boyekoli, mpe na bosaleli Liloba ya Nzambe.

9. Mpo na nini tosengeli koyekola Biblia elongo na baninga baklisto mosusu?

9 Tosengeli mpe koyekola Biblia elongo na baninga na biso bandimi. Paulo alingaki ete baklisto ya Tesaloniki bálendisana moko na mosusu na lisalisi ya toli na ye. (1 Batesaloniki 4:18) Mpo na kopelisa bososoli na biso likoló na solo, ezali na lolenge mosusu te oyo eleki koyangana elongo na bayekoli mosusu oyo bamipesá mpo na kotalela Makomami. Lisese oyo ezali solo: “Ebende ekotya ebende mosusu na mopotu, boye moto akokokisa elongi na moninga na ye.” (Masese 27:17) Esaleli moko esalemi na ebende ekoki koguga soki ezali kosalelama te to soki epelisami te. Bobele bongo, tosengeli koyanganaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpe kopelisana moko na mosusu na kokaboláká boyebi oyo tosilaki kozwa na nzela ya botángi, ya boyekoli, mpe ya bomanyoli Liloba ya solo ya Nzambe. (Baebele 10:24, 25) Lisusu, ezali bobele na nzela wana nde tokoki kondimisama ete tozali kozwa bingɛngiseli ya elimo.​—Nzembo 97:11; Masese 4:18.

10. Kotambola kati na solo elimboli nini?

10 Kati na boyekoli na biso ya Makomami, tokoki kosambela Nzambe na lolenge lobongi lokola mokomi na Nzembo asalaki yango: “Bimisá pole na yo mpe sembo na yo, yango ikokamba ngai.” (Nzembo 43:3) Soki tolingi ete tóndimama na Nzambe, tosengeli kotambola kati na solo. (3 Yoane 3, 4) Yango esɛngi mpe ete tókangama na masɛngami na ye to tósalela ye na bosembo nyonso. (Nzembo 25:4, 5; Yoane 4:23, 24) Tosengeli kosalela Yehova kati na solo, lokola yango emonisami na Liloba na ye mpe elimbolami polele kati na mikanda ya “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Yango ezali kosɛnga kozala na boyebi ya sikisiki ya Makomami. Na bongo, lolenge nini tosengeli kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe? Tosengeli kobanda kotánga yango uta na Genese mokapo 1, molɔngɔ́ 1, kino kosilisa mikanda nyonso 66 ya Biblia? Ee, moklisto nyonso oyo azali na Biblia ekomami na mobimba na yango na lokótá na ye asengeli kotánga yango uta na Genese kino na Emoniseli. Wana tozali kotánga Biblia mpe mikanda ya boklisto oyo milimbolaka Biblia, mokano na biso esengeli kozala ya kobakisa bososoli na biso likoló na ebele na makambo ya solo ya Makomami oyo Nzambe asili kopesa biso na nzela na ‘moombo na sembo.’

Tángá Liloba ya Nzambe na mongongo makasi

11, 12. Mpo na nini kotánga Biblia na mongongo makasi na ntango ya makita ezali na litomba?

11 Tokoki kotánga na nsé ya motema wana tozali biso moko. Nzokande, na ntango ya kala, wana moto azalaki kotánga mpo na ye moko, asengelaki kosala yango na mongongo makasi. Wana mokube Moetiopia azalaki kotambola likoló na likálo na ye, Filipo, mopalanganisi ya nsango malamu, ayokaki ye azali kotánga kati na esakweli ya Yisaya. (Misala 8:27-30) Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “kotánga” elimboli liboso mpenza “kobénga.” Na yango baoyo, na ebandeli, bakoki bobele kotánga na mongongo makasi mpo na kososola makambo oyo bazali kotánga bakoki kopamelama te mpo ete liloba mokomoko oyo bazali kotánga ezali koyokana na matoi ya basusu. Likambo ya ntina mingi mpenza ezali bongo koyekola solo na kotángáká Liloba likomami ya Nzambe.

12 Kotánga Biblia na mongongo makasi na ntango ya makita ya boklisto ezali na litomba. Ntoma Paulo alendisaki Timoté moninga na ye ya mosala ete: “Kino ekoya ngai, otyaka motema na kotánga makomi polele mpe na kosakola mpe na koteya.” (1 Timoté 4:13) Paulo ayebisaki Bakolose ete: “Soko mokanda oyo ekotángama kati na bino, bótala ete etángama mpe kati na lisangá na Laodikia lokola.” (Bakolose 4:16) Mpe Emoniseli 1:3 elobi ete: “Esengo na motángi mpe na bayoki na maloba na kosakola oyo, mpe baoyo batosi makambo masili kokomama kati na yango, mpo ete elaka ezali penepene.” Na yango, molobi liboso na bato asengeli kotánga makomi na Biblia mpo na kondimisa makambo oyo azali koloba na lisangá.

Mwango ya boyekoli engebene mitó ya masoló

13. Wapi mwango oyo eleki malamu mpo na kokóla mokemoke kati na boyekoli ya makambo ya solo ya Makomami, mpe eloko nini ekoki kosalisa biso mpo na koyeba bisika mikapo mizali?

13 Boyekoli engebene mitó ya masoló ezali mwango oyo eleki malamu mpo na kokóla mokemoke kati na boyekoli ya makambo ya solo ya Makomami. Mikanda Concordances oyo mizali kotya maloba masalelami kati na Biblia na kolandana ya alfabɛ́ na komonisáká biutelo na yango engebene mokanda, mokapo, mpe molɔngɔ́ ya kotánga, epesaka nzela na koyeba epai wapi mikapo oyo mizali na boyokani na motó ya lisoló moko ezwami. Mpe mikapo yango mikoki koyokanisama moko elongo na mosusu mpamba te Mobandisi ya Biblia azali na bongolabongola te. Na nzela ya elimo santu na ye, apemisaki mibali 40 mpo ete bákoma Biblia na boumeli ya bikeke 16, mpe koyekola yango engebene mitó ya masoló eyebani uta kala ete ezali mwango malamu mpo na koyekola solo.

14. Mpo na nini tosengeli koyekola Makomami ya Liebele mpe ya Greke elongo?

14 Bosepeli na biso mpo na solo ya Biblia esengeli kopusa biso ete tótánga mpe tóyekola Makomami ya Greke ya boklisto elongo na Makomami ya Liebele. Yango ekomonisa lolenge nini Makomami ya Greke ya boklisto mazali na boyokani na mokano ya Nzambe mpe ekopesa biso engɛngiseli likoló na bisakweli ya Makomami ya Liebele. (Baloma 16:25-27; Baefese 3:4-6; Bakolose 1:26) Mpo na yango, Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau ezali esaleli oyo ebongi mpenza. Ebongisamaki na basaleli ya Nzambe oyo bamipesi, oyo bazwaki litomba na boyebi oyo emonanaki likoló na makomi ya ebandeli ya Biblia mpe mambi makangani na yango mpe elobeli na yango ya elilingi. Bisaleli mpo na boyekoli ya Biblia oyo Yehova azali kopesa na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele” ezali mpe na ntina mingi.

15. Lolenge nini okoki kondimisa moto ete kotánga maloba mauti na biteni bikeseni kati na Biblia ezali likambo libongi mpenza?

15 Bamoko bakoki koloba ete, ‘Mikanda na bino mizali na ebele ya mikapo ya Biblia, kasi mpo na nini bozwaka yango na biteni bikeseni?’ Na kozwáká maloba mauti na biteni bikeseni kati na mikanda 66 ya Biblia, babúku na biso emonisaka polele ebele ya bilembeteli bipemami mpo na kondimisa bosolo ya liteya moko. Yesu ye moko mpe asalelaki mwango wana mpo na kolakisa. Na ntango asalaki Lisoló na ye likoló na Ngomba, azongelaki mikapo 21 ya Makomami ya Liebele. Kati na lisoló yango azongelaki mbala misato maloba mauti na Exode, mbala mibale na Levitike, mbala moko na Mituya, mbala motoba na Deteronome, mbala moko na Mokanda ya mibale ya Mikonzi, mbala minei na Nzembo, mbala misato na Yisaya, mpe mbala moko na Yilimia. Na kosaláká bongo, Yesu azalaki ‘koluka kondimisa makambo nyonso’? Te, mpamba te ‘ateyaki lokola moto oyo azali na nguya, kasi te lokola bakomeli.’ Yango ezalaki bongo mpamba te Yesu asalaki ete mateya na ye mazwa moboko na yango likoló na nguya ya Liloba likomami ya Nzambe. (Matai 7:29, NW) Ntoma Paulo mpe asalaki bongo.

16. Mikapo nini ya Makomami Paulo asalelaki yango kati na Baloma 15:7-13?

16 Kati na mokapo ya Baloma 15:7-13, Paulo azongelaki maloba ya biteni misato ya Makomami ya Liebele​—Mibeko, Basakoli, mpe Nzembo. Amonisaki ete Bayuda mpe Bapakano basengelaki kosanzola Nzambe, mpe baklisto basengelaki bongo koyamba bato bauti na mabota nyonso. Paulo alobaki ete: “Yango wana bonyangelana pelamoko Klisto asili konyangela bino mpo na nkembo na Nzambe. Mpo ete nalobi na bino ete Klisto akómaki mosaleli epai na baoyo bakatami ngɛnga ete amonisa sembo na Nzambe mpo na kokokisa bilaka bipesami epai na batata, mpe ete bapakano bákumisa Nzambe mpo na boboto na ye. Pelamoko ekomami [kati na Nzembo 18:49] ete, Nakosanzola yo kati na bapakano, mpe nakoyembela nkombo na yo. Mpe lisusu [kati na Deteronome 32:43] ete, Bino bapakano, bosepelaka kati na ye elongo. Mpe lisusu [kati na Nzembo 117:1] ete, Bino bapakano nyonso, bósanzola Nkolo, tiká mpe ete mabota nyonso básanzola ye. Lisusu Yisaya [11:1, 10] alobi ete, Ntina na Yisai ekozala, mpe ye akotɛlɛma ete azala mokonzi na bapakano. Bapakano bakobika mpo na ye. Tiká ete Nzambe na elikya atondisa bino na esengo mpe na kimya nyonso kati na kondima, kino na nguya na [elimo santu, NW], botonda na elikya.” Na lisalisi ya mwango wana ya boyekoli engebene mitó ya masoló, Paulo amonisaki lolenge ya kotánga mikapo mpo na kondimisa makambo ya solo ya Biblia.

17. Na boyokani na ndakisa nini baklisto bazongelaka makambo mauti na bisika bikeseni kati na Biblia mobimba?

17 Mokanda mopemami ya liboso ya Petelo ezongeli mbala 34 maloba mauti na mikanda zomi mikeseni kobanda na mikanda ya Mibeko, ya Basakoli, mpe ya Nzembo. Kati na mokanda na ye ya mibale, azongeli mbala motoba maloba mauti na mikanda misato ya Makomami ya Liebele. Evanzile ya Matai ezongeli mbala 122 maloba mauti na Genese kino Malaki. Kati na mikanda 27 ya Makomami ya Greke, makambo mauti na Genese kino Malaki matángami mbala 320, bakisá mpe ebele ya mikanda mosusu ya Makomami ya Liebele. Na boyokani na ndakisa oyo Yesu atikaki mpe oyo bantoma na ye balandaki yango, na ntango baklisto ya mikolo na biso bazali koyekola Makomami engebene mitó ya masoló, bazali kozongela maloba ezwami na bisika bikeseni ya Biblia mobimba. Yango ebongi mpenza na “mikolo na nsuka” oyo, awa eteni monene mpenza ya Makomami ya Liebele mpe ya Greke ezali kokokana. (2 Timoté 3:1) ‘Moombo na sembo’ asalelaka Biblia na motindo wana kati na mikanda na ye, kasi abakisaka eloko te likoló na Liloba ya Nzambe mpe alongolaka eloko te.​—Masese 30:5, 6; Emoniseli 22:18, 19.

Tótambola ntango nyonso kati na solo

18. Mpo na nini tosengeli ‘kotambola kati na solo’?

18 Tosengeli te kolongola eloko moko kati na Biblia, mpamba te liboke mobimba ya mateya ya boklisto mazwami kati na Liloba ya Nzambe “solo” to “solo na nsango malamu.” Kondima solo yango​—“kotambola” kati na yango​—ezali na ntina mingi mpo na kozwa lobiko. (Bagalatia 2:5; 2 Yoane 4; 1 Timoté 2:3, 4) Lokola boklisto ezali “nzela na solo,” na kosungáká basusu ete bátya matomba na yango na esika ya liboso, tokokóma bongo “basalani na bango na misala na solo.”​—2 Petelo 2:2; 3 Yoane 8.

19. Lolenge nini tokoki ‘kokóba kotambola kati na makambo na solo’?

19 Soki tolingi “kotambolaka kati na makambo na solo,” tosengeli kotánga Biblia mpe komibongisa mpo na kozala bato oyo bakoki kozwa lisungi ya elimo oyo Nzambe azali kopesa na nzela na ‘moombo na sembo.’ (3 Yoane 4) Tiká ete tósala bongo mpo na bolamu na biso moko mpo ete tózala na likoki ya koteya basusu na ntina na Yehova Nzambe, Yesu Klisto, mpe mokano ya Nzambe. Mpe tiká ete tózala na botɔ́ndi mpamba te elimo ya Yehova ezali kosalisa biso ete tósosola Liloba na ye mpe ete tólónga kosalela ye kati na solo.

Biyano na yo bizali nini?

◻ Matomba nini ya koumela tozali kozwa na botángi ya Biblia?

◻ Mpo na nini tosengeli koyekola Biblia elongo na baninga bandimi?

◻ Mpo na nini kotánga maloba mauti na biteni bikeseni kati na Biblia mobimba ezali likambo libongi mpenza?

◻ ‘Kotambola kati na solo’ elimboli nini, mpe lolenge nini tokoki kosala yango?

[Elilingi na lokasa 17]

Baboti, bóteyaka bana na bino Makomami

[Elilingi na lokasa 18]

Kati na Lisoló na ye likoló na Ngomba, Yesu atángaki biteni ndenge na ndenge ya Makomami ya Liebele

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto