Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/8 nk. 21-25
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala ya ntango nyonso
  • Tokei na esika na biso ya mosala
  • Mosala na bisika mosusu
  • Nazongi na États-Unis
  • Lisusu na Eteyelo ya Gileadi
  • Totindami na Argentine
  • Tozongi lisusu na États-Unis
  • Koluka Liboso Bokonzi​—⁠bomoi Ya Solosolo Mpe Ya Esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Nazali kolanda mokano oyo namityelaki wana ezalaki ngai na mibu motoba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Nazali na ekateli ya kokoba kosalela Mozalisi na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Libula ya boklisto oyo ekomonanaka mingi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/8 nk. 21-25

Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza

LISOLÓ YA EDITH MICHAEL

Na ebandeli ya bambula 1930, tozalaki kofanda pene na engumba St. Louis, na etúká ya Missouri, na États-Unis, ntango Motatoli ya Yehova moko ayaki na ndako na biso. Bobele na ntango yango, nsinga ya kotanda bilamba ekatanaki, na bongo bilamba ya mpɛmbɛ ya mama bikweaki na pɔtɔpɔ́tɔ. Andimaki kozwa babúku oyo balakisaki ye, bobele mpo ete mwasi yango akoka kokenda, mpe atyaki yango na ebombelo ya babúku, mpe abosanaki yango.

EZALAKI bambula ya mpasi na makambo ya nkita, mpe balongolaki papa na mosala. Mokolo moko atunaki soki ezalaki na mokanda moko kati na ndako mpo akoka kotánga. Mama asololaki na ye likambo ya babúku yango. Abandaki kotánga yango, mpe mwa moke na nsima angangaki ete: “Mama, oyo ezali solo!”

Mama ayanolaki ete: “Eh, ezali bobele lingomba oyo lizali koluka mbongo lokola mangomba mosusu nyonso.” Nzokande, papa alendisaki ye ete afanda mpe bátalela mikapo ya Makomami elongo. Ntango basalaki bongo, ye mpe andimaki ete yango ezalaki solo. Na nsima babandaki koluka Batatoli mpe bayaki komona ete bazalaki koyangana kati na ndako moko oyo bazalaki kofutela pene na ntéi ya St. Louis, ndako yango ezalaki mpe kosalelama mpo na mabina mpe makambo mosusu.

Tata na mama bamemaki mpe ngai​—nazalaki soko na mbula misato​—mpe tomonaki ndako yango, kasi ebongiseli ya mabina ezalaki naino kokóba kuna. Bayebisaki papa ntango oyo makita masalemaka, mpe tozongaki lisusu. Tobandaki mpe koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na boyekoli ya Biblia oyo ezalaki kosalema pene na ndako na biso. Ezalaki kosalema kati na ndako ya mwasi oyo ayaki mbala ya liboso kotala biso. Atunaki mama ete: “Mpo na nini boyaka mpe elongo na bana na bino ya mibali te?” Mama azalaki koyoka nsɔ́ni ya koloba ete bazangaki sapato. Na nsima ntango ayebisaki yango, bapesaki bango sapato, mpe bandeko na ngai ya mibali babandaki koyangana na makita elongo na biso.

Bapesaki mama teritware moko penepene na ndako na biso, mpe abandaki mosala ya kosakola ndako na ndako. Nazalaki kokenda elongo na ye, komibombáká nsima na ye. Liboso ete ayekola kokumba motuka, tozalaki kotambola koleka kilomɛtɛlɛ moko liboso ete tókamata bísi mpo na koyangana na makita na St. Louis. Ata na eleko ya mbulampɛmbɛ, tozangisaki makita soko moke te.

Na 1934, mama na papa bazwaki batisimo. Ngai mpe nalingaki kozwa batisimo, mpe natikaki te kolobela yango kino mama asɛngaki na Motatoli moko oyo azalaki nkulutu ete asolola na ngai na likambo yango. Atunaki ngai mituna mingi na lolenge ete nakoka kososola likambo yango. Na nsima ayebisaki baboti na ngai ete basengelaki te kopekisa ngai kozwa batisimo; yango ekokaki kolɛmbisa bokóli na ngai ya elimo. Bongo nazwaki batisimo na eleko ya molungé oyo elandaki, wana nazalaki bobele na mbula motoba.

Nalingaki mingi mwa búku Home and Happiness, oyo nazalaki kotika yango te, kino nazalaki kotya yango na nsé ya kusɛ́ ya motó na ngai ntango nazalaki kolala mpɔngi. Mbala na mbala, nazalaki kosɛnga na mama atángela ngai yango, kino nayebaki makambo oyo mazalaki kati na yango na motó. Na nsima na yango ezalaki na elilingi ya mwana mwasi moko ya moke oyo azali elongo na nkɔsi kati na Paladiso. Nazalaki koloba ete mwana mwasi wana ya moke ezalaki nde ngai. Elilingi wana esalisaki ngai natya miso na libonza ya bomoi kati na mokili ya sika ya Nzambe.

Nazalaki nsɔ́ninsɔ́ni mingi, kasi atako nazalaki kolɛnga, nazalaki ntango nyonso kopesa biyano na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lisangá.

Likambo ya mawa, lokola papa abangaki noki akobungisa mosala na ye, atikaki bongo kosangana elongo na Batatoli ya Yehova. Bandeko na ngai ya mibali basalaki mpe bongo.

Mosala ya ntango nyonso

Mama azalaki kopesa nzela na babongisi-nzela, to basáli ya ntango nyonso, ete bátɛlɛmisa motuka na bango oyo ezalaki kosalelama lokola ndako na nsima ya ndako na biso, mpe na nsima ya kelasi nazalaki kosangana na bango kati na mosala ya kosakola. Nokinoki namonisaki mposa ya kozala mobongisi-nzela, kasi tata aboyaki, mpo akanisaki ete nasengelaki kotánga lisusu kelasi mingi. Nsukansuka mama alóngaki kondimisa ye ete apesa ngai nzela nasala mosala ya mobongisi-nzela. Yango wana, na Yúni 1943, wana nazalaki na mbula 14, nabandaki mosala ya ntango nyonso. Mpo na kosunga libota na mwa mosolo, nasengelaki kosala mosala na ndambo ya mokolo, mbala mosusu nazalaki kosala mokolo mobimba. Atako bongo nazalaki kokokisa mokano na ngai ya bangonga 150 sanza na sanza kati na mosala ya kosakola.

Nayaki kozwa moninga mpo na mosala ya mobongisi-nzela, Dorothy Craden, oyo abandaki mosala ya mobongisi-nzela na Yanuáli 1943, ntango azalaki na mbula 17. Liboso azalaki Mokatolike oyo amipesi mingi, kasi nsima ya sanza motoba ya boyekoli ya Biblia, azwaki batisimo. Na boumeli ya mibu mingi azalaki liziba ya elendiseli mpe ya nguya mpo na ngai, motindo moko ngai mpe nazalaki mpo na ye. Tokómaki na boyokani makasi koleka bandeko ya mosuni.

Uta mobu 1945, tosalaki mosala ya mobongisi-nzela elongo kati na bingumba mike ya Missouri epai kuna masangá mazalaki te. Na engumba Bowling Green tobongisaki ndako moko mpo na makita; mama ayaki kosalisa biso. Na bongo, pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, tozalaki kokende na bandako ya bato na engumba mpo na kobyanga bango na lisukúlu ya bato banso mpe tobyangaki bandeko mibali ya St. Louis ete báya kosala yango. Pɔ́sɔ na pɔ́sɔ bato katikati na 40 mpe 50 bazalaki koyangana na yango. Na nsima tosalaki sé bongo na Louisiane, epai tofutelaki tempelo ya ba Franc-maçons. Mpo na kozwa mosolo ya kofutela esika yango, totyaki sanduku ya makabo, mpe pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mosolo nyonso oyo mosɛngamaki mozalaki kozwama na lolenge yango.

Na nsima tokendaki na engumba Mexico, na etúká ya Missouri, epai kuna tofutelaki ndako na nsima ya magazini moko. Tobongisaki yango mpo na lisangá moke oyo lizalaki kuna. Ndako yango ezalaki na biteni mosusu epai tozalaki kofanda. Lisusu topesaki lisalisi mpo na kobongisa masukúlu ya bato banso na Mexico. Na nsima tokendaki na Jefferson City, mboka-mokonzi ya etúká yango, epai kuna tozalaki kosolola na basáli ya Letá mokolo nyonso na ntɔ́ngɔ́ kati na babiro na bango. Tozalaki kofanda kati na ndako moko oyo ezalaki na etaze likoló na Ndako ya Bokonzi, elongo na Stella Willie, oyo azalaki lokola mama na biso.

Longwa wana biso misato tokendaki na bingumba ya Festus mpe Crystal City, oyo ezali penepene moko na mosusu. Tozalaki kofanda nsima ya ndako ya libota moko ya bato oyo basepelaki na solo, kati na ndako moke oyo kala ezalaki ndako ya nsoso mpe esilaki kobongolama ndako ya kolala. Lokola mobali moko te asilaki kozwa batisimo, biso moko tozalaki kotambwisa makita nyonso. Tozalaki koteka basabuni mpe mafuta ya kopakola, na ndambo ya mokolo. Na mosuni tozalaki na biloko mpenza te. Ya solo, tozalaki kokoka te kobambisa madusu ya sapato na biso, bongo ntɔ́ngɔ́ nyonso tozalaki kotya eteni ya kartɔ́ ya sika kati na yango, mpe na butu mokomoko azalaki kosukola robe bobele moko oyo azalaki na yango.

Na ebandeli ya mobu 1948, ntango nakokisaki mbula 19, ngai na Dorothy tozwaki libyangi mpo na kelasi ya mbala ya 12 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower mpo na kobongisa bamisionere. Nsima ya kolanda mateya na boumeli ya sanza mitano, banakelasi nkámá moko oyo balandaki mateya bazwaki mapɔlɔ́mi na bango na mokolo mwa 6 Febwáli 1949. Ezalaki ntango ya esengo monene. Baboti na ngai basilaki kokenda kofanda na Californie, mpe mama asalaki mobémbo longwa kuna mpo na koya kolanda molulu ya bopesi mapɔlɔ́mi.

Tokei na esika na biso ya mosala

Kati na baye bazwaki mapɔlɔ́mi, ntuku mibale na mwambe batindamaki na Italie​—motoba, kati na bango ngai na Dorothy, totindamaki na engumba ya Milan. Na mokolo ya 4 Mársi 1949, totikaki New York na masúwa ya Italie oyo ebéngamaki Vulcania. Mobémbo yango moumelaki mikolo 11, mpe mingi kati na biso banyokwamaki na kizunguzungu mpo na koningana ya mai monene. Ndeko Benanti ayaki na libóngó ya Genoa mpo na koyamba biso mpe komema biso na Milan na nzela ya engbunduka.

Ntango tokómaki na ndako ya bamisionere na Milan, tomonaki bafololo oyo elenge mwasi moko ya mboka Italie atyaki kati na bandako na biso nyonso ya kolala. Mibu mingi na nsima, elenge mwasi yango, Maria Merafina, akendaki na Gileadi, azongaki na Italie, mpe tosalaki elongo kati na ndako moko ya bamisionere!

Na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo oyo molandaki bokómi na biso na Milan, totalaki libándá na maninisa ya ndako ya kosukola. Na balabála ya nsima ezalaki na ndako moko monene oyo ebebisamaki na bómbi. Mpɛpo ya etumba ya États-Unis ekweisaki bómbi moko kozanga kokanela mpe ebomaki mabota 80 oyo mazalaki kofanda na ndako yango. Na libaku mosusu, bakanelaki kopanza izini moko, kasi bómbi ekendaki kokwea na eteyelo moko mpe ebomaki bana 500. Mpo na yango bato na mboka bazalaki kosepela na Baameriké te.

Bato basilaki kolɛmba etumba. Mingi bazalaki koloba ete soki etumba mosusu ebandi, basengeli kokima bómbi kati na ebombelo te kasi basengeli nde kotikala na ndako na bango mpe kofungola gaze mpe kokufa kuna. Tondimisaki bango ete toyaki na mboka na bango mpo na komonisa États-Unis te to boyangeli mosusu ya bato te, kasi Bokonzi ya Nzambe, oyo esengeli kosilisa bitumba mpe bampasi nyonso oyo eutaka na bitumba.

Kati na engumba monene ya Milan, lisangá bobele moko oyo lizalaki na basangani pene na 20 lizalaki koyangana na ndako ya bamisionere. Bateritware mpo na kosakola ekabolamaki naino te, yango wana tobandaki kopesa litatoli kati na buludingi moko. Na ekuke ya liboso, tokutanaki na Mr. Giandinotti, oyo alingaki ete mwasi na ye atika lingomba ya Katolike, bongo azwaki moko na mikanda na biso. Madame Giandinotti azalaki mwasi ya motema sembo, oyo azalaki na mituna mingi. Alobaki ete: “Nakosepela mingi ntango bokoyekola lokótá Italien, boye bokokoka koteya ngai Biblia.”

Na buludingi na bango palafɔ ezalaki likoló mingi mpe mwinda mozalaki makasi te, mpo na yango na butu azalaki kobutisa kiti na ye likoló na mesa mpo azala pene na mwinda mpe akoka kotánga Biblia. Atunaki ete: “Soki nayekoli Biblia elongo na bino, nakoki mpe kokenda na ndakonzambe?” Toyebisaki ye ete yango etalaki bobele ye. Na Mwalomingo na ntɔ́ngɔ́ azalaki kokenda na ndakonzambe mpe azalaki koya na makita na biso na nsima ya nzánga. Bongo mokolo moko alobaki ete: “Nakokenda na ndakonzambe lisusu te.”

Totunaki ye: “Mpo na nini?”

“Mpo ete bateyaka Biblia te, mpe nasili komona solo na nzela ya boyekoli Biblia elongo na bino.” Azwaki batisimo mpe ayekolaki na basi mingi oyo bazalaki kokenda mokolo nyonso na ndakonzambe. Na nsima ayebisaki biso ete soki toyebisaki ye ete akendaka lisusu na ndakonzambe te, alingaki kokata boyekoli na ye mpe mbala mosusu akokaki soko moke te koyeba lisusu solo.

Mosala na bisika mosusu

Na nsima ngai na Dorothy elongo na bamisionere mosusu minei, totindamaki na engumba Trieste bobele na mboka Italie, oyo na ntango wana eyangelamaki na mampinga ya Grande-Bretagne mpe ya États-Unis. Batatoli bazalaki kuna bobele zomi, kasi motángo yango mokólaki. Tosakolaki na Trieste na boumeli ya mibu misato, mpe ntango tolongwaki kuna, basakoli ya Bokonzi bakómaki soko 40, oyo 10 kati na bango bazalaki babongisi-nzela.

Engumba epai batindaki biso na nsima ezalaki Verona, oyo ezalaki na lisangá te. Kasi na ntango lingomba ya Katolike epusaki bakonzi ya Letá, na yango tosengelaki kolongwa. Ngai na Dorothy totindamaki na engumba Rome. Kuna tofutelaki ndako moko oyo ezalaki na biloko nyonso na kati, mpe tosalaki kati na teritware moko penepene na Vatican. Ezalaki na eleko wana nde Dorothy akendaki na Liban kobalana na ndeko John Chimiklis. Tozalaki elongo mbula soko 12, mpe nayokaki mpenza mawa mpo nazalaki lisusu elongo na ye te.

Na 1955 ndako ya sika ya bamisionere efungolamaki na engumba Rome na balabála oyo ebéngami New Appian Way. Moko na bandeko minei oyo bazalaki na ndako yango ezalaki bongo Maria Merafina, elenge mwasi oyo atyaki fololo kati na bandako na biso na butu oyo tokómaki na Milan. Lisangá ya sika ebotamaki na kartyé yango ya engumba. Nsima ya liyangani ya mikili mingi na Rome na eleko ya molungé wana, nazwaki libaku kitoko ya koyangana na liyangani na engumba Nuremberg, na Allemagne. Ezalaki solo esengo monene kokutana na baye bayikaki mpiko mingi na nsé ya boyangeli ya Hitler!

Nazongi na États-Unis

Na 1956, na ntina na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, nazongaki na États-Unis. Kasi nalongolaki miso na ngai soko moke te na libonza monene oyo eutaka na kosalela Yehova mosala sikawa mpe mpo na libela kati na mokili na ye ya sika. Nakanaki kozonga lisusu na Italie. Nzokande, nakutanaki na Orville Michael, oyo asalaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York. Tobalanaki nsima ya liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na engumba New York na 1958.

Mwa moke na nsima tokendaki kofanda na engumba Front Royal, na etúká ya Virginie, epai tosepelaki kosala elongo na lisangá moko moke. Tozalaki kofanda na ndako moko moke oyo ezalaki nsima ya Ndako ya Bokonzi. Na nsuka, na Mársi 1960 esengelaki tózonga na Brooklyn koluka mosala ya mosuni mpo na kozwa mosolo oyo tokokaki kobikela na yango. Tozalaki kosala na butu, kosukoláká babanki ekeseni mpo tókoka kozwa mosolo mpe kotikala na mosala ya ntango nyonso.

Ntango tozalaki na Brooklyn, tata na ngai akufaki, mpe mama ya mobali na ngai abɛlaki masɛ́lɛ́. Mpo na yango tozwaki ekateli ya kokenda kofanda na etúká ya Oregon pene na bamama na biso. Biso nyonso mibale tozwaki mosala ya mosuni mpo na ndambo ya mokolo mpe tokóbaki mosala na biso ya babongisi-nzela kuna. Na ebandeli ya eleko ya malili ya 1964, biso na bamama na biso tokatisaki États-Unis mpo tókoka koyangana na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society na Pittsburgh, na Pennsylvania.

Na boumeli ya mobémbo na biso na Rhode Island, mokɛngɛli moko ya zongazonga Arlen Meier, mpe mwasi na ye balendisaki biso ete tókenda kofanda na Providence, mboka-mokonzi ya etúká epai kuna mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki monene. Bamama na biso balendisaki biso ete tóndima lipesi wana ya sika ya mosala, na yango nsima ya kozonga na biso na Oregon, totekaki biloko mingi ya ndako mpe tosalaki mobémbo.

Lisusu na Eteyelo ya Gileadi

Na boumeli ya eleko ya molungé ya 1965, toyanganaki na liyangani na Yankee Stadium. Kuna tosɛngaki ete tókɔta Eteyelo ya Gileadi lokola babalani. Pene na sanza moko na nsima, tokamwaki ete tozwaki baformilɛrɛ, oyo esengelaki kozongisama nsima ya mikolo 30. Nazalaki kokakatana mpo na kokenda na mboka mosika mpamba te mama azalaki na kolɔngɔ́nɔ́ malamu te. Kasi alendisaki ngai ete: “Bótondisa baformilɛrɛ wana. Bosengeli ntango nyonso kondima libaku nyonso ya mosala oyo Yehova azali kopesa bino!”

Yango ekataki makambo. Totondisaki baformilɛrɛ mpe totindaki yango. Oyo nde kokamwa ntango tozwaki libyangi mpo na kelasi ya mbala ya 42, oyo esengelaki kobanda na 25 Apríli 1966! Na ntango wana, Eteyelo ya Gileadi ezalaki bongo na Brooklyn, na engumba ya New York. Liboso ete sanza mitano ekoka, biso nyonso bato 106 tozwaki mapɔlɔ́mi na 11 Sɛtɛ́mbɛ 1966.

Totindami na Argentine

Mikolo mibale nsima ya kozwa mapɔlɔ́mi na biso, tosalaki mobémbo mpo na kokenda na Argentine na mpɛpo ya Pérou. Ntango tokómaki na Buenos Aires, mokɛngɛli ya filiale, Charles Eisenhower, ayaki koyamba biso na libándá ya mpɛpo. Asalisaki biso tóleka douane mpe amemaki biso na biro ya filiale. Tozwaki mokolo moko mpo na kobongisa biloko na biso; na nsima tobandaki boyekoli ya lokótá espagnol. Toyekolaki espagnol ngonga 11 na mokolo na boumeli ya sanza ya liboso. Na sanza ya mibale, toyekolaki lokótá ngonga minei na mokolo mpe tobandaki kosangana na mosala ya kosakola.

Toumelaki na Buenos Aires sanza mitano mpe na nsima totindamaki na Rosario, engumba monene oyo ezali na ntáká ya ngonga minei ya mobémbo na engbunduka. Nsima ya kosala mosala kuna na boumeli ya sanza 15, totindamaki lisusu na nɔ́rdi, na Santiago del Estero, engumba moko na etúká ya mokili mokauki. Ntango tozalaki kuna, na Yanuáli 1973, mama na ngai akufaki. Namonaki ye te na boumeli ya mbula minei. Eloko oyo esungaki ngai ete nalónga mawa na ngai ezalaki bongo elikya ya solo kati na lisekwa mpe mpo nayebaki ete nazalaki kosala mosala epai mama alingaki ete nazala.​—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.

Bato ya Santiago del Estero bazalaki na boboto mingi, mpe ezalaki mpasi te kobanda boyekoli ya Biblia. Ntango tokómaki kuna na 1968, bato soko 20 to 30 bazalaki koyangana na makita, kasi mibu mwambe na nsima lisangá lizalaki na basangani koleka monkámá. Lisusu, masangá mibale ya sika oyo mazalaki na basakoli katikati na 25 mpe 50 masilaki kobotama na bingumba ya zingazinga.

Tozongi lisusu na États-Unis

Na ntina na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, na mobu 1976 tozongisamaki na États-Unis lokola babongisi-nzela minene​—na engumba Fayetteville, na etúká ya Caroline du Nord. Bato oyo balobaka espagnol bazalaki kuna mingi, baye bautaki na Amerika ya katikati mpe ya súdi, na République dominicaine, na Porto Rico, mpe ata na Espagne. Tozalaki koyekola Biblia na bato mingi, mpe lisangá moko ya lokótá Espagnol ebandaki. Tolekisaki penepene na mbula mwambe na engumba wana.

Nzokande, esɛngaki ete tózala penepene na bokiló na ngai, oyo asilaki kokóma mobangé mingi mpe akokaki kosala eloko moko te. Ye azalaki kofanda na engumba Portland, na Oregon, mpo na yango batindaki biso na lisangá ya lokótá Espagnol na Vancouver, na Washington, oyo ezali bongo pembeni na Portland. Ntango tokómaki na Desɛ́mbɛ 1983 lisangá yango lizalaki moke, kasi sikawa tozali komona ebele ya bilongi ya sika.

Na Yúni 1996, nakokisaki mibu 53 kati na mosala ya ntango nyonso, mpe mobali na ngai akokisaki mibu 55 na 1 Yanuáli 1996. Na boumeli ya mibu mingi wana, tozwaki libaku ya kosalisa bato mingi ete báyeba solo ya Liloba ya Nzambe mpe bámipesa epai na Yehova. Mingi kati na bango bazali sikawa kosala lokola bankulutu mpe basáli ya ntango nyonso.

Na bantango mosusu batunaka ngai soki nayokaka mawa mpo nabota bana te. Ya solo, Yehova apambolaki ngai ete nazwa bana mpe bankɔ́kɔ mingi na elimo. Ee, bomoi na ngai etondi na bozwi mpo na mosala ya Yehova. Nakoki kokanisa mwana mwasi ya Yefeta, oyo alekisaki bomoi na ye kati na mosala ya tempelo mpe abotaki bana te na ntina na libaku lileki monene ya mosala oyo azalaki na yango.​—Basambisi 11:38-40.

Nazali naino komikundola ntango oyo namipesaki epai na Yehova wana nazalaki bobele mwana mwasi ya moke. Elilingi ya Paladiso ezali naino polele kati na makanisi na ngai lokola ezalaki na ntango wana. Miso mpe motema na ngai etyami bobele na libonza monene ya bomoi ezangi nsuka kati na mokili ya sika ya Nzambe. Ee, mposa na ngai ezali ya kosalela Yehova, bobele na boumeli ya mibu 50 te, kasi mpo na libela​—na nsé ya Bokonzi.

[Elilingi na lokasa 23]

Dorothy Craden, oyo atye mabɔkɔ na mapeka na ngai, mpe baninga na biso babongisi-nzela na 1943

[Elilingi na lokasa 23]

Na Rome, na mboka Italie, elongo na baninga bamisionere na 1953

[Elilingi na lokasa 25]

Elongo na mobali na ngai

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto