Mangomba nyonso masepelisaka Nzambe?
Okanisaka ete mangomba nyonso masepelisaka Nzambe? Lolenge ya losambo oyo oyebi mbala mosusu elendisaka etamboli malamu, na meko moko boye. Kasi yango ekoki mpo na kosepelisa Nzambe?
BASUSU balobaka ete ‘Zalá bobele sembo na losambo na yo, mpe Nzambe akosepela na yo. Makambo malamu mazali kati na mangomba nyonso.’ Na ndakisa, lingomba ebéngami Foi Bahai ekamataki likanisi yango kino kokɔtisa kati na bindimeli na yango mangomba libwa minene ya mokili. Lingomba yango likanisaka ete mangomba yango nyonso mauti na Nzambe mpe mazali bilongi oyo bizali komonisa solo bobele moko. Ndenge nini yango ekoki kozala mpenza bongo?
Lisusu, ozali na elónga ya komituna ndenge nini lingomba ekoki kosepelisa Nzambe na ntango ezali kotinda basangani na yango ete bátya babɔmbi na bisika bato mingi balekaka mpe bafandaka, na likoki ya koboma ebele ya bato. Bifundeli yango esalemaki mpo na lingomba moko na Japon. Nzokande, Nzambe asepelaka na lingomba oyo ezali kosala ete basangani na yango bábomaka bato? Esili koleka mwa bambula, yango esalemaki epai na bandimi ya lingomba ya mokambi Jim Jones.
Soki totali na ntango ya kala, tokoki mpenza komituna, mangomba makoki kosepelisa Nzambe ntango mazali kobimisa bitumba, lokola yango esalemaki na oyo ebéngami Etumba ya mbula ntuku misato, kobanda 1618 kino 1648? Engebene búku The Universal History of the World, matátá wana kati na bakatolike mpe baprotestá ezalaki “moko ya bitumba bileki mabe ya lisoló ya mokili ya Mpótó.”
Bitumba bibéngami croisades kobanda na ekeke ya 11 kino ekeke ya 13 bisopaki mpe makila mingi. Na ndakisa, na ntango ya etumba ya croisade ya liboso, baoyo bamibéngaki ete baklisto bilombe ya croisade babomaki na lolenge mabe mpenza Bamizilmá mpe Bayuda oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme.
Tótalela mpe oyo esalemaki na ntango ya inquisition, oyo ebandaki na ekeke ya 13 mpe eumelaki mbula soko 600. Bankóto ya bato banyokolamaki mpe batumbamaki na etinda ya bakonzi ya mangomba. Kati na búku na ye Vicars of Christ—The Dark Side of the Papacy, Peter De Rosa alobi ete: “Na nkombo ya pápá, [ba inquisiteurs] basalelaki bato mpo na konyokola na lolenge mabe mpenza mpe balendisaki kotuka lokumu ya bomoto kati na lisoló ya [bato].” Na oyo etali Torquemada ya Espagne, inquisiteur Dominicain, De Rosa alobi ete: “Aponamaki na 1483, ayangelaki na konyokoláká na boumeli ya mibu zomi na mitano. Bato oyo abomaki bazalaki na motángo ya 114 000 kati na bango 10 220 batumbamaki.”
Ya solo, mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba ezali bobele yango moko te oyo ezali na ngambo ya makila. Kati na búku na ye Pensées, Blaise Pascal mofilozofe ya mboka France alobaki ete: “Moto asila naino te kosala mabe na lolenge nyonso mpe na nkó nyonso lokola ntango basalaka yango na kopusama na kondima ya lingomba.”
Bayebani na misala na bango
Engebene Nzambe, kondimama ya lingomba epai na ye etaleli bobele likambo moko mpamba te. Mpo ete lingomba moko lindimama na ye, mateya mpe misala na yango esengeli koyokana na Biblia, Liloba na ye ya solo likomami. (Nzembo 119:160; Yoane 17:17) Mbuma ya losambo oyo endimami na Nzambe esengeli koyokana na mitindá ya Yehova Nzambe.
Kati na lisoló na ye likoló na ngomba, Yesu Klisto amonisaki ete basakoli na lokuta bakozala mpe bakoloba ete bazali komonisa Nzambe. Yesu alobaki ete: “Bókeba mpo na basakoli na lokuta baoyo bakoya liboso na bino na bilamba na mpate nde katikati bazali nkoi na kongala. Bokoyeba bango mpo na mbuma na bango. Bakozwa mbuma na miwiti epai na nzube soko mbuma na misuke epai na matiti mpamba? Bongo, nzeté malamu na nzeté malamu ekobota mbuma malamu nde nzeté mabe na nzeté mabe ekobota mbuma mabe. Nzeté malamu ekoki kobota mbuma mabe te mpe nzeté mabe ekoki kobota mbuma malamu te. Nzeté na nzeté oyo ekobotaka mbuma malamu te ekokatama mpe ekobwakama na mɔ́tɔ. Bongo bokososola yango na mbuma na yango.” (Matai 7:15-20) Maloba yango mazali komonisa ete tosengeli kokeba na elimo. Tokoki kokanisa ete mokambi ya lingomba moko to etuluku endimami na Nzambe mpe na Klisto, kasi tokoki kozala na libunga.
Mposa ya likebi
Atako lingomba moko lizali komiloba ete lindimami na Nzambe mpe baministre na yango batángaka mikapo ya Biblia, yango elingi koloba te ete ezali lolenge ya losambo oyo ezali kosepelisa Nzambe. Bakambi na yango bakoki kutu kosala bikamwiseli oyo ekomonana lokola nde Nzambe azali kosala misala kati na bango. Atako bongo, lingomba ekoki kozala bobele mabe, kozanga kobota mbuma oyo endimami na Nzambe. Banganga ya Ezipito oyo bazalaki kosala mají na mikolo ya Mose bazalaki na likoki ya kosala bikamwiseli, kasi bandimamaki na Nzambe te.—Exode 7:8-22.
Lelo oyo lokola ezalaki kala, mangomba mingi mazali kolendisa makanisi ya bato mpe ya filozofi na esika ya kotalela oyo Nzambe azali koloba ete ezali solo. Na bongo, likebisi ya Biblia oyo libongi mpenza: “Bókeba ete moto te apunza bino na maloba na ye na mayele, na bibanzabanza na ye na motindo na Klisto te kasi na motindo na bizaleli na bato mpe na makambo mikemike na mokili.”—Bakolose 2:8.
Nsima na koloba na ntina na mbuma malamu mpe mbuma mabe, Yesu alobaki ete: “Moto na moto oyo akolobaka na ngai, Nkolo! Nkolo! akoingela kati na Bokonzi na likoló te kasi ye oyo akosalaka mokano na Tata na ngai oyo azali na Likoló. Mingi bakolobaka na ngai na mokolo yango, Nkolo! Nkolo! tosakolaki nkombo na yo te? Tobimisaki milimo mabe na nkombo na yo te? Mpe na nkombo na yo, tosalaki misala na nguya te? Nakoyambola liboso na bango ete, Nayebi bino soko moke te! Bolongwa na ngai, bino bato na misala na lofundo.—Matai 7:21-23.
Talelá mbuma
Na yango, emonani polele ete ezali na ntina kotalela mbuma ya lingomba liboso ya koloba ete endimami na Nzambe. Na ndakisa, lingomba yango emikɔtisaka na makambo ya politiki? Na bongo, talá maloba oyo makomami na Yakobo 4:4: “Moto nani akani ete azala moninga na mokili amizalisi moyini na Nzambe.” Lisusu, Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ya solo ete: “Bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te.” (Yoane 17:16) Lingomba oyo ezali malamu na miso ya Nzambe esanganaka na makambo ya politiki ya mokili oyo te, oyo “ezali kolala kati na oyo mabe,” ekelamo ya elimo oyo ezangi komonana, Satana Zabolo. (1 Yoane 5:19) Nzokande, lingomba oyo Nzambe andimaka ezali kotatola na bosembo nyonso na ntina na Bokonzi na ye na nsé ya litambwisi ya Yesu Klisto mpe kosakola nsango malamu etaleli boyangeli wana ya likoló.—Malako 13:10.
Lingomba likoki kondimama na Nzambe soki lizali kotɛmɛla bokonzi ya Letá? Eyano ezali polele soki tolandi toli ya Ntoma Paulo oyo ete: “Kanisela bango ete bámisɔkisa liboso na mikóló mpe mikonzi, bázala na botosi mpe báselingwa na misala nyonso malamu.” (Tito 3:1) Ya solo, Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengelaki “kopesa na Kaisala biloko na Kaisala mpe na Nzambe biloko na Nzambe.”—Malako 12:17.
Kanisá ete lingomba moko lizali kolendisa kosangana na bitumba ya bikólo. Petelo ya liboso 3:11 ezali kokebisa biso ete ‘tósala oyo ezali malamu’ mpe ‘tóluka kimya mpe kolanda yango.’ Ndenge nini lingomba likoki kosepelisa Nzambe soki basangani na yango bazali kolinga koboma kati na bitumba baninga na bango basambeli ya mokili mosusu? Basangani ya lingomba oyo lizali kondimama na Nzambe bazali komonisa ezaleli na ye ya ntina mpenza—bolingo. Mpe Yesu alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Bolingo yango ezali na boyokani soko moke te na koyinana makasi oyo ezali komonana kati na bitumba ya bikóló.
Lingomba ya solo libongolaka baalinga-bitumba na kokóma balingi ya kimya. Yango eyebisamaki na maloba oyo: “Bakotula mipanga na bango ete mízala bitimweli, mpe makonga na bango ete mázala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” (Yisaya 2:4) Na esika ya kobimisa maloba ya koyina, baoyo basalelaka losambo ya solo batosaka etinda oyo: “Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.”—Matai 22:39.
Baoyo bazali kosalela losambo ya solo basalaka milende ya kotambwisa bomoi na bango engebene mitindá mitombwami ya Yehova Nzambe, koboyáká kozala na lolenge ya bomoi ya mbindo. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Boyebi te ete bato na masumu bakosangola libula na Bokonzi na Nzambe te? Bomizimbisa te, moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsɔ́ni mpe mibali bamibebisi na mibali mpe bayibi mpe bato na bilulela mpe balangi masanga mpe batuki mpe babotoli bakosangola Bokonzi na Nzambe te. Bamosusu na bino bozalaki bongo. Kasi bosili kosukwa, bosili kobulisama, bosili kozwa boyengebene na Nkombo na Nkolo Yesu Klisto mpe na [Elimo, NW] na Nzambe na biso.”—1 Bakolinti 6:9-11.
Ntango ya kozwa ekateli ya nguya
Ezali na ntina kososola bokeseni kati na losambo ya lokuta mpe lingomba ya solo. Kati na Emoniseli, mokanda ya Biblia, lisangani ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba emonisami lokola “Babilone Monene,” mwasi na pite na elilingi oyo “bakonzi na mokili basali na ye pite.” Azali na nyongo ya makila mpe asimbi kɔ́pɔ na wolo “etondaki na bosɔtɔ mpe na mbindo na pite na ye.” (Emoniseli 17:1-6) Ezali na eloko moko te oyo Nzambe akoki kondima epai na ye.
Oyo ezali ntango ya kozwa ekateli ya nguya. Epai na bato na sembo oyo bazali naino kati na Babilone Monene, Mozalisi na biso atondi na bolingo azali kotinda mbela oyo ete: “Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye te.”—Emoniseli 18:4.
Soki okolinga kosalela lingomba oyo lizali kosepelisa Nzambe, mpo na nini te koluka koyebana malamu na Batatoli ya Yehova? Etánda oyo ezwami mpembeni ezali komonisa mwa bamoko ya bindimeli na bango, elongo na bantina ya Makomami mpo na yango. Fungolá Biblia na yo mpo na komona soki bindimeli ya Batatoli ya Yehova ezali na boyokani na Liloba ya Nzambe. Salá bolukiluki mpo na koyeba soki lingomba na bango ezali kobimisa lolenge ya mbuma oyo okoki komona ete ezali ya losambo ya solo. Soki omoni ete ezali bongo, okoyeba lingomba oyo ezali kosepelisa Nzambe.
[Etanda na lokasa 5]
BINDIMELI YA BATATOLI YA YEHOVA
BINDIMELI OYO EZWI MOBOKO KATI NA BIBLIA
Nkombo ya Nzambe ezali Yehova Exode 6:3; Nzembo 83:18
Biblia ezali Liloba ya Nzambe Yoane 17:17; 2 Timoté 3:16, 17
Yesu Klisto azali Mwana na Nzambe Matai 3:16, 17; Yoane 14:28
Moto abimaki na pwasa te Genese 1:27; 2:7
kasi akelamaki
Liwa ya bato euti na lisumu Baloma 5:12
ya moto ya liboso
Molimo esukaka kozala na bomoi Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4
na ntango ya kufa
Lifelo ezali nkunda ya bato Yobo 14:13; Emoniseli 20:13,
nyonso King James Version
Lisekwa ezali elikya Yoane 5:28, 29; 11:25; Misala 24:15
mpo na bakufi
Yesu apesaki bomoi na ye ya Matai 20:28; 1 Petelo 2:24;
mabelé lokola lisiko mpo 1 Yoane 2:1, 2
na bato na botosi
Mabondeli masengeli kopesama Matai 6:9; Yoane 14:6, 13, 14
bobele epai na Yehova na nzela na Klisto
Mibeko ya Biblia na ntina na 1 Bakolinti 6:9, 10
bizaleli malamu misengeli kotosama
Bikeko bisengeli kosalelama Exode 20:4-6; 1 Bakolinti 10:14
te kati na losambo
Misala ya bilimu mabe misengeli Deteronome 18:10-12;
koboyama Bagalatia 5:19-21
Esengeli kotya makila te Genese 9:3, 4; Misala 15:28, 29
kati na nzoto ya moto
Bayekoli ya solo ya Yesu Yoane 15:19; 17:16; Yakobo 1:27; 4:4
bakabwani na mokili
Baklisto batatolaka, Yisaya 43:10-12;
kosakoláká nsango malamu Matai 24:14; 28:19, 20
Batisimo na kozindisamáká Malako 1:9, 10; Yoane 3:22;
mobimba na mai elakisaka Misala 19:4, 5
komipesa na Nzambe
Batitre ya mangomba Yobo 32:21, 22; Matai 23:8-12
euti na Makomami te
Tozali kobika na Daniele 12:4; Matai 24:3-14;
“ntango ya nsuka” 2 Timoté 3:1-5
Kozala ya Klisto ezali ya Matai 24:3; Yoane 14:19;
kozanga komonana 1 Petelo 3:18
Satana azali motambwisi ya Yoane 12:31; 1 Yoane 5:19
mokili oyo azangi komonana
Nzambe akoboma ebongiseli mabe Daniele 2:44;
ya biloko ya ntango oyo Emoniseli 16:14, 16; 18:1-8
Bokonzi ya Nzambe na nsé ya Yisaya 9:6, 7; Daniele 7:13, 14;
litambwisi ya Klisto ekoyangela Matai 6:10
mokili kati na boyengebene
“Etonga moke” bakoyangela Luka 12:32;
elongo na Klisto Emoniseli 14:1-4; 20:4
Bamosusu oyo bandimami na Luka 23:43; Yoane 3:16;
Nzambe bakozwa bomoi ya seko Emoniseli 21:1-4
kati na paladiso awa na mabelé
[Elilingi na lokasa 4]
Bankóto ya bato babomamaki na boumeli ya inquisition
[Elilingi na lokasa 6]
Bitumba bibéngami croisades bisopaki makila mingi
[Elilingi na lokasa 7]
Lingomba ya solo eyebani na mbuma na yango malamu
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Cover: Garo Nalbandian