Basalaki Mokano ya Yehova
Petelo asakoli na mokolo ya Pantekote
EZALAKI ntɔ́ngɔ́ moko kitoko ya prɛntá na mobu 33 T.B. Esika etondaki na yikiyiki! Bibele na Bayuda mpe baprozelite batondaki na babalabála ya Yelusaleme. Bautaki na bisika lokola Elama, Mesopotamia, Kapadokia, Ezipito mpe Loma. Oyo nde likambo ya kobenda likebi na komona bango na milato ya mboka na bango mpe koyoka nkóta na bango ndenge na ndenge! Basusu basalaki mobembo ya kilomɛtɛlɛ koleka nkóto mibale mpo na kozala wana na libaku yango ya sipesiale. Ezalaki likambo nini? Pantekote—elambo ya esengo ya Bayuda oyo emonisaka nsuka ya kobuka mbuma.—Levitike 23:15-21.
Molinga ezalaki kobima longwa na mbeka likoló na etumbelo ya tempelo, mpe Balevi bazalaki koyemba Hallel (Nzembo 113 kino 118). Liboso ya 9:00 ya ntɔ́ngɔ́, likambo moko ya kokamwisa esalemaki. Longwa na likoló, “lokito lokola lokito na kopepa na mopɛpɛ makasi ebimaki.” Etondisaki ndako mobimba kati na yango bayekoli ya Yesu Klisto soko 120 bayanganaki. Makomami malobi boye: “Ndemo lokola mɔ́tɔ imonani na bango, ikabwani, ifandi mokomoko na motó na moto na moto na bango. Bango nyonso batondaki na [elimo] santu, mpe babandi kosolola na nkota mosusu pelamoko [elimo] apesi bango maloba.”—Misala 2:1-4.
Moko na moko azali koyoka na lokóta na ye
Mosika te, bayekoli mingi babimaki na libándá ya ndako. Likambo ya kokamwa, bakokaki koloba na nkóta ndenge na ndenge oyo bibele bazalaki koloba! Kanisá kokamwa oyo ezalaki ntango moto moko ya Palasa mpe mobotami na Ezipito bayokaki nkóta na bango moko kolobama na Bagalilai. Ya solo, bibele bakamwaki mingi mpenza. Batunaki ete: “Likambo oyo ntina nini?” Basusu babandaki kotyola bayekoli, kolobáká ete: “Basili kotonda na vinyo na elengi.”—Misala 2:12, 13.
Na nsima ntoma Petelo atɛlɛmaki mpe alobaki na bibele. Alimbolaki ete likamwisi oyo ya koloba nkóta ndenge na ndenge ezalaki kokokisama ya elaka ya Nzambe na nzela na mosakoli Yoele: “Nakosopela bato nyonso [elimo] na ngai.” (Misala 2:14-21; Yoele 2:28-32) Ɛɛ, Nzambe asopaki elimo santu na ye likoló na bayekoli ya Yesu. Yango ezalaki elembeteli ya polele ete Yesu asilaki kosekwa longwa na bakufi mpe azalaki sikawa na likoló na lobɔkɔ mobali ya Nzambe. Petelo alobaki: “Na bongo tika ete libota mobimba na Yisalaele báyeba solo ete Nzambe azalisi ye Nkolo mpe Klisto, ye Yesu oyo bino [bokakisi ye na nzeté, NW].”—Misala 2:22-36.
Bayoki basalaki nini? Lisoló elobi ete: “Eyokaki bango bongo bakatani na mitema, mpe balobi na Petelo na bantoma mosusu ete, tosala nini, bandeko?” Petelo ayanolaki ete: “Bongola mitema mpe, batisama mokomoko.” Bato soko 3 000 babatisamaki! Na nsima, “baumeli ntango nyonso na mateyo na bantoma.”—Misala 2:37-42.
Na kobandáká koloba na libaku wana monene, Petelo asalelaki fungola ya liboso kati na “fungola na Bokonzi ya likoló” oyo Yesu alakaki ete akopesa ye. (Matai 16:19) Fungola yango efungolaki nzela ya mabaku ya sipesiale epai na bituluku bikeseni ya bato. Fungola yango ya liboso epesaki likoki epai na Bayuda ete bákóma Baklisto bapakolami na elimo. Na nsima, fungola ya mibale mpe ya misato epesaki libaku bobele moko wana liboso epai na Basamalia mpe na nsima epai na Bapakano.—Misala 8:14-17; 10:44-48.
Liteya mpo na biso
Atako bibele ya Bayuda mpe baprozelite yango bazalaki na ngambo mpo na kufa ya Mwana ya Nzambe, Petelo alobaki epai na bango na limemya, kobéngaka bango ete “bandeko.” (Misala 2:29) Mokano na ye ezalaki ya kopusa bango ete bábongola motema, kasi mpo na kokweisa bango te. Na bongo, lisoló na ye ezalaki ya botongi. Amonisaki makambo mpe andimisaki makanisi na ye na mikapo ya Makomami.
Baoyo lelo bazali kosakola nsango malamu bakosala malamu na kolanda ndakisa ya Petelo. Basengeli koluka boyokani elongo na bayoki na bango mpe na likebi nyonso kososola na bango elongo kati na Makomami. Ntango solo ya Biblia emonisami na lolenge ya botongi, moto ya motema sembo akondima yango.—Misala 13:48.
Molende mpe mpiko ya Petelo na mokolo ya Pantekote ekesanaki mpenza na lolenge awanganaki Yesu soko pɔ́sɔ nsambo liboso. Na libaku wana Petelo akangaki monɔkɔ mpo na bobangi bato. (Matai 26:69-75) Kasi Yesu abondelaki mpo na Petelo. (Luka 22:31, 32) Na ntembe te, ntoma Petelo alendisamaki ntango Yesu abimelaki ye nsima ya lisekwa na ye. (1 Bakolinti 15:5) Lokola litomba, kondima ya Petelo elɛmbaki te. Nsima ya mwa ntango mokuse, azalaki kosakola na mpiko nyonso. Na bongo, asakolaki bobele te na mokolo ya Pantekote, kasi akóbaki kosakola na boumeli ya bomoi na ye mobimba.
Ezali boni soki tosalaki libunga na lolenge moko to mosusu, ata lokola Petelo asalaki? Tiká ete tóbongola mitema, tósɛnga bolimbisi, mpe tósala litambe ya kozwa lisungi na elimo. (Yakobo 5:14-16) Na bongo tokoki kokende liboso na elikya ete mosala na biso ya bulɛɛ endimami na Yehova, Tata na biso ya likoló oyo atondi na ngolu.—Exode 34:6.