Tata ya libota oyo azali nkulutu—Lolenge ya kokokisa mikumba oyo mibale
“Zambi soko moto ayebi kobongisa ndako na ye moko te, akobatela [lisangá] na Nzambe boni?”—1 TIMOTÉ 3:5.
1, 2. (a) Na ekeke ya liboso, lolenge nini bankulutu oyo bazalaki minzemba mpe baoyo babalaki kasi bazalaki na bana te, bazalaki kosalela bandeko na bango? (b) Lolenge nini Akila mpe Pilisikila bazali ndakisa mpo na babalani mingi ya mikolo na biso?
NA EBANDELI ya lisangá ya boklisto bakɛngɛli bakokaki kozala mibali minzemba, to mibali babalá oyo bazalaki na bana te, to batata ya mabota oyo bazalaki na bana. Na ntembe te, basusu kati na baklisto wana bazalaki na likoki ya kolanda toli ya ntoma Paulo oyo ezali na mokapo 7 ya mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti, na ntina na kotikala monzemba. Yesu alobaki: “Bamosusu bamizalisi mikube mpo na Bokonzi na Likoló.” (Matai 19:12) Mibali minzemba motindo yango, lokola Paulo mpe mbala mosusu bamoko kati na baninga na ye ya mobembo, basengelaki kozala na bonsomi ya kosala mibembo mpo na kosalisa bandeko na bango.
2 Biblia eyebisi te soki Balanaba, Malako, Sila, Luka, Timoté, mpe Tito bazalaki minzemba. Soki bazalaki bato babalá, na ntembe te bazalaki bongo na mwa bonsomi mingi kati na mikumba na bango ya libota mpo bákoka kosala mibembo mingi mpe kokokisa mikumba mikeseni. (Misala 13:2; 15:39-41; 2 Bakolinti 8:16, 17; 2 Timoté 4:9-11; Tito 1:5) Mbala mosusu bazalaki kokenda nzela moko na basi na bango, lokola ntoma Petelo mpe “bantoma mosusu,” oyo bazalaki bongo kotambola elongo na basi na bango wana bazalaki kokenda esika na esika. (1 Bakolinti 9:5) Akila na Pilisikila bazali ndakisa ya babalani oyo bamonisaki bolingo ya kotika ndako, kolandáká Paulo longwa na Kolinti kino na Efese, na nsima na Loma, mpe lisusu kozonga na Efese. Biblia eyebisi te soki bazalaki na bana to bazalaki na bana te. Mosala ya motema mobimba oyo bazalaki kosala mpo na bandeko na bango ebendelaki bango botɔ́ndi ya “masangá nyonso na bapakano.” (Baloma 16:3-5; Misala 18:2, 18; 2 Timoté 4:19) Lelo oyo, na ntembe te ezali na babalani mingi oyo, lokola Akila na Pilisikila, bakoki kosunga masangá mosusu, mbala mosusu na kokendáká kofanda esika mposa ezali monene.
Kozala tata mpe nkulutu
3. Nini emonisami na likambo oyo ete bankulutu mingi ya ekeke ya liboso bazalaki mibali babalá oyo bazalaki na bana?
3 Emonani lokola ete na ekeke ya liboso T.B., motángo monene ya bankulutu baklisto bazalaki mibali babalá oyo bazalaki na bana. Ntango Paulo ayebisaki masɛngami mpo na kopona moto oyo “azali na mposa na mosala ya mokɛngɛli,” alobaki ete moklisto lolenge wana asengelaki “kobongisa ndako na ye moko malamu, kotosisa bana na ye na sembo na bozito.”—1 Timoté 3:1, 4.
4. Nini ezalaki kosɛngama na bankulutu oyo bazalaki na basi mpe na bana?
4 Lokola tomonaki yango, ezalaki mobeko te mpo na mokɛngɛli ete azala na bana, to mpe azala mobali oyo abalá. Kasi soki azalaki na mwasi, mpo aponama mosaleli na misala to nkulutu, moklisto yango asengelaki kosalela bokonzi na ye na lolenge lobongi mpe na bolingo nyonso likoló na mwasi na ye mpe asengelaki komonisa ete akokaki kobatela bana na ye kati na disipilini oyo ebongi. (1 Bakolinti 11:3; 1 Timoté 3:12, 13) Bopɔtu nyonso ya mokumba ya kokamba bato na ndako na ye ekoki kolongola ndeko mobali mikumba kati na lisangá. Mpo na nini? Paulo alimboli ete: “Zambi soko moto ayebi kobongisa ndako na ye moko te, akobatela [lisangá] na Nzambe boni?” (1 Timoté 3:5) Soki baoyo bazali makila na ye moko baboyi kotosa bokonzi na ye, basusu bakokanisa nini?
“Bana na ye bazali bandimi”
5, 6. (a) Masɛngami nini matali bana Paulo alobeli yango epai na Tito? (b) Nini esɛngami na bankulutu oyo bazali na bana?
5 Wana azalaki kopesa Tito mitindá mpo na kopona bakɛngɛli na masangá ya Kelete, Paulo alobaki ete: “Kotya moto bobele soko azangi lofundo [“efundeli,” NW], mobali na mwasi moko, oyo bana na ye bazali bandimi, baoyo bazali na mobulu te, batomboki mpe te. Zambi, ebongi na mokɛngɛli, ye mosungi na ndako na Nzambe, ete azanga lofundo [“efundeli,” NW].” Nini eyebisami mpenza kati na lisɛngami oyo “bana na ye bazali bandimi”?—Tito 1:6, 7.
6 Liloba “bana bandimi” ezali komonisa bana oyo basili komipesa epai na Yehova mpe bazwi batisimo, to bana mike oyo bazali naino kosala bokóli kino na komipesa mpe kozwa batisimo. Basangani ya lisangá bamizelaka ete bana ya bankulutu bámitambwisa malamu mpe bázala na botosi. Esengeli komonana polele ete nkulutu azali kosala nyonso oyo ekoki na ye mpo na kokólisa kondima ya bana na ye. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene akopɛngwa na yango te.” (Masese 22:6) Kasi ezali boni soki elenge moko oyo azwaki kolakisama motindo wana aboyi kosalela Yehova to asali lisumu monene?
7. (a) Mpo na nini ezali polele ete Masese 22:6 ezali kopesa te mobeko moko makasi? (b) Soki mwana moko ya nkulutu aponi kosalela Yehova te, mpo na nini nkulutu yango akobungisa te mbala moko mikumba na ye?
7 Ezali polele ete maloba ya masese oyo matángami awa mazali te mobeko ya makasi. Yango elongoli te lilako oyo litali bonsomi ya liponi. (Deteronome 30:15, 16, 19) Ntango mwana mobali to mwana mwasi akokisi mbula ya komema mikumba, asengeli kokamata bikateli na ye moko na likambo litali komipesa epai na Nzambe mpe kozwa batisimo. Soki nkulutu asilaki kopesa lisalisi ya elimo, litambwisi, mpe disipilini oyo ebongi, kasi atako bongo elenge yango aponi kosalela Yehova te, yango ekosala te ete mbala moko tata alongolama mikumba na ye ya mokɛngɛli. Na ngámbo mosusu, soki nkulutu moko azali na bana mike mingi na ndako na ye, baoyo, moko nsima na mosusu, bakómi na bokɔnɔ ya elimo mpe bakómi na mikakatano, akotalelama lisusu te lokola moto oyo azali “kobongisa ndako na ye moko malamu.” (1 Timoté 3:4) Likanisi ya ntina lizali boye ete, esengeli komonana polele ete mokɛngɛli azali kosala nyonso oyo ekoki na ye mpo azala na ‘bana bandimi, baoyo bazali na mobulu te, batomboki mpe te.’a
Abalani na “mwasi oyo azali mondimi te”
8. Lolenge nini nkulutu asengeli kosala epai na mwasi na ye oyo azangi kondima?
8 Na ntina na mibali baklisto oyo babalani na basi oyo bazali bandimi te, Paulo akomaki ete: “Soko ndeko moko azali na mwasi oyo azangi kondima mpe ye asepeli kofanda na ye, ekoki na mobali kolongola ye te. . . . Mpo ete . . . mwasi oyo azangi kondima akobulisama na ntina na ndeko mobali. Soko te, bana na bino bakozala na mbindo nde sasaipi basili kobulisama. Zambi . . . yo mobali mpe oyebi soko okobikisa mwasi na yo?” (1 Bakolinti 7:12-14, 16) Liloba “azangi kondima” ezali awa kolobela te mwasi oyo azangi bindimeli ya lingomba kasi moto oyo amipesi te epai na Yehova. Akokaki kozala Moyuda, to mondimi ya banzambe ya bapakano. Lelo oyo, ekoki kozala ete mwasi ya nkulutu azali moto na lingomba mosusu, moto oyo alobaka ete moto te akoki koyeba soki Nzambe azali, to ata moto oyo andimaka te ete Nzambe azali. Soki mwasi yango alingi kofanda elongo na ye, mobali akabwana na ye te na ntina ya kokesena ya bindimeli. Atako bongo asengeli ‘kozala na ye kososola na mayele ete azali mbeki ya motau, mpe kopesa ye lokumu,’ na elikya ete akobikisama.—1 Petelo 3:7; Bakolose 3:19.
9. Kati na mikili epai kuna mibeko epesi mibali mpe basi lotómo lolenge moko ya koteya bana na bango bindimeli na bango ya lingomba, lolenge nini nkulutu asengeli kosala, mpe lolenge nini yango ekozala na bopusi likoló na mikumba na ye?
9 Soki mokɛngɛli azali na bana, akozala na bopusi malamu lokola mobali mpe tata na kobɔkɔláká bango “kati na disipilini mpe kolakisama ya Yehova.” (Baefese 6:4, NW) Kati na mboka mingi mobeko epesaka babalani nyonso mibale lotómo motindo moko ya koteya bana mateya ya lingomba na bango. Na likambo motindo yango mwasi akoki koloba ete azali na lotómo ya koteya bana bindimeli mpe mimeseno ya lingomba na ye, oyo ekoki kosɛnga komema bango na ndakonzambe.b Ya solo, bana basengeli kolanda lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia na likambo litali koboya kosangana na milulu ya mangomba ya lokuta. Lokola azali mokonzi ya libota, tata akosalela lotómo na ye ya koyekola elongo na bana mpe komema bango na makita na Ndako ya Bokonzi wana azali na likoki ya kosala bongo. Ntango bakokóma na bambula oyo bakoki kozwa ekateli bango moko, bakopona bango moko nzela oyo balingi kolanda. (Yosua 24:15) Soki baninga na ye bankulutu mpe basangani mosusu ya lisangá bamoni ete azali kosala nyonso oyo mibeko epesi ye likoki ya kosala mpo na koteya bana na ye malamu kati na nzela ya solo, boye akolongolama te mikumba na ye ya mokɛngɛli.
‘Ekoki na ye kokamba bato ya ndako na ye malamu’
10. Soki tata ya libota azali nkulutu, nini ezali mokumba na ye ya liboso?
10 Ata mpo na nkulutu oyo azali tata ya libota mpe mwasi na ye azali moklisto, ezali likambo ya pɛtɛɛ te kokabola malamu ntango mpe likebi na ye kati na mwasi na ye, bana na ye mpe mikumba na ye na lisangá. Makomami mamonisi polele ete tata moklisto asɛngisami kobatela mwasi na ye mpe bana na ye. Paulo akomaki ete: “Soko moto nani akoleisa bato na ye mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” (1 Timoté 5:8) Kati na nkomá moko wana, Paulo alobaki ete bobele mibali baklisto oyo babalá oyo basilaki komonisa ete bazali mibali mpe batata malamu nde basengelaki koponama lokola bakɛngɛli.—1 Timoté 3:1-5.
11. (a) Na mitindo nini mikeseni nkulutu asengeli “koleisa bato na ndako na ye moko”? (b) Lolenge nini yango ekoki kosunga nkulutu ete akokisa malamu mikumba na ye kati na lisangá?
11 Nkulutu asengeli “koleisa” bato na ye bobele na mosuni te kasi lisusu na elimo mpe na mposa na bango ya mayoki. Salomo, mokonzi na mayele akomaki ete: “Bongisá mosala na yo na libándá, omikokisela yango kati na elanga; boye na nsima, tongá ndako na yo.” (Masese 24:27) Bongo, wana azali kokokisa mposa ya mwasi na ye mpe ya bana na ye na mosuni, na mayoki, mpe mposa ya bopemi, mokɛngɛli asengeli mpe kotonga bango na elimo. Yango ezali kosɛnga ntango—ntango oyo ebongi te kopesa yango mpo na makambo ya lisangá. Kasi ntango yango ekoki kopesa bolamu mingi na elimo mpo na oyo etali bolamu mpe elimo ya libota. Na nsima, soki libota na ye lizali makasi na elimo, ekosɛnga te ete nkulutu alekisa ntango mingi mpo na kosilisa mikakatano kati na libota na ye. Yango ekotikela ye ntango mingi mpo na kotalela makambo ya lisangá. Ndakisa malamu oyo azali kopesa lokola mobali mpe tata malamu ya libota ekopesa lisangá litomba mingi.—1 Petelo 5:1-3.
12. Kati na makambo nini ya libota batata oyo bazali bankulutu basengeli kopesa ndakisa malamu?
12 Kobongisa ndako na lolenge malamu esangisi makambo lokola kotya ntango ya kotambwisa boyekoli ya libota. Ezali likambo ya ntina monene ete bankulutu bápesa ndakisa malamu na likambo yango, mpamba te mabota ya milende makosalaka masangá ya milende. Mokɛngɛli asengeli te kopesa ntango na ye nyonso na mikumba mosusu ya mosala na boye ete azanga ntango ya koyekola elongo na mwasi na ye mpe bana na ye. Soki ezali yango nde esalemaka, asengeli kotalela lisusu manáka na ye. Mbala mosusu asengeli kobongisa lisusu manáka na ye to kokata ntango oyo apesaka na makambo mosusu, to na bantango mosusu koboyáká ata mikumba misusu.
Mokɛngɛli oyo azali na bokatikati
13, 14. Toli nini “moombo ya sembo mpe ya mayele” asili kopesa na bankulutu oyo bazali na mabota?
13 Kopesa toli likoló na ezaleli ya bokatikati kati na mikumba na biso ya libota mpe mikumba na biso ya lisangá ezali likambo ya sika te. Na boumeli ya mibu mingi “moombo ya sembo mpe ya mayele” asili kopesa toli epai na bankulutu na ntina na likambo yango. (Matai 24:45) Esili koleka mibu 37, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛ́mbɛ 1959, nkasa 553 mpe 554 (na Lingelesi), epesaki toli oyo: “Ya solo, esengeli mpenza bokatikati na makambo nyonso oyo mazali kosɛnga ntango na biso, boye te? Na ezaleli yango ya bokatikati tiká ete eteni monene epesama mpo na matomba ya mabota na bino moko. Na ntembe te, Yehova Nzambe akosɛnga te na moto ete asalela ntango na ye nyonso na makambo ya lisangá, mpo na kosalisa bandeko mpe baninga na ye ete bábikisama, nzokande azali te kotya likebi na lobiko ya bato na ndako na ye moko. Mwasi mpe bana bazali mokumba ya liboso ya mobali.”
14 Mosɛnzɛli ya 1 Yúni 1987, lokasa 16, epesaki toli oyo: “Kosakola elongo na libota ekobɛlɛmisa bikanganeli na bino. Nzokande, bamposa ya sikisiki ya bana na yo ezali kosɛnga ete opesa bango ntango na yo mpe bolingo na yo. Yango wana, esengeli kozala na bokatikati mpo na koyeba ntango boni okoki kolekisa na mikumba na yo na . . . lisangá, mpo ete okoka lisusu kotalela bamposa ‘ya libota na yo’ mpo na oyo etali elimo, bolingo mpe biloko ya mosuni. [Moklisto] asengeli ‘koyekola kosalela naino ezaleli ya kobanga Nzambe na ndako na [ye] mpenza.’ (1 Timoté 5:4, 8)”
15. Mpo na nini nkulutu oyo azali na mwasi mpe na bana azali na mposa ya mayele mpe bososoli?
15 Lisese moko ya Makomami elobi ete: “Ndako ekotongama malamu na nzela na mayele; ekokokisama na nzela na bososoli.” (Masese 24:3) Ɛɛ, mpo ete mokɛngɛli akokisa malamu mikumba na ye ya Teokrasi mpe bobele na ntango yango alendisa bato na ndako na ye, na ntembe te asengeli kozala na mayele mpe bososoli. Engebene Makomami, mosala na ye ya mokɛngɛli ezali na biteni mingi. Libota na ye mpe mikumba na ye kati na lisangá etalelami na yango. Azali na mposa ya bososoli mpo na kobatela bokatikati na biteni wana bikeseni. (Bafilipi 1:9, 10) Azali na mposa ya mayele mpo na koyeba makambo nini oyo asengeli kotya na esika ya liboso. (Masese 2:10, 11) Ata soki akanisi ete asɛngisami na kobatela mikumba na ye kati na lisangá, asengeli kososola ete lokola azali mobali oyo abalá mpe tata, mokumba ya liboso oyo Nzambe apesi ye ezali bongo ya kobatela libota na ye mpe komibanzabanza mpo na lobiko na bango.
Bazali batata malamu mpe bankulutu malamu
16. Litomba nini nkulutu oyo azali tata ya libota azali na yango?
16 Nkulutu oyo bana na ye bazali na bizaleli malamu azali litomba monene. Soki ayekolaki kobatela malamu libota na ye, akozala na makoki mingi ya kosunga mabota oyo mazali kati na lisangá. Akoki kososola malamu mpenza mikakatano na bango mpe akoki kopesa toli engebene makambo oyo ye moko akutanaki na yango. Likambo ya esengo, ebele ya bankulutu kati na mokili mobimba bazali kokokisa malamu mikumba na bango lokola mibali oyo babalá, lokola batata, mpe lokola bakɛngɛli.
17. (a) Likambo nini mobali oyo azali tata ya libota mpe nkulutu asengeli soko moke te kobosana yango? (b) Lolenge nini basangani mosusu ya lisangá basengeli komonisela bango bolingo?
17 Mpo ete tata ya libota akóma nkulutu, asengeli kozala moklisto akɔmeli oyo, wana azali kobatela mwasi na ye mpe bana na ye, akoki kobongisa malamu makambo na ye na boye ete akoka kopesa ntango mpe likebi epai na basusu kati na lisangá. Asengeli kobosana soko moke te ete mosala na ye ya kobatela mpate ebandi na ndako na ye moko. Lokola bayebi ete bankulutu oyo bazali na basi mpe bana bazali na mikumba ezala epai na libota na bango to epai na lisangá, basangani ya lisangá bakoluka te kozwela bango ntango koleka ndelo. Na ndakisa, nkulutu oyo azali na bana oyo basengeli kokenda na kelasi lobi na ntɔ́ngɔ́ akoki te kotikala ntango nyonso nsima ya makita na mpokwa. Basangani mosusu ya lisangá basengeli koyeba yango mpe komonisela bango boboto.—Bafilipi 4:5.
Tosengeli kozwa bankulutu na biso na motuya mingi
18, 19. (a) Botaleli na biso ya 1 Bakolinti mokapo 7 epesi biso likoki ya kososola nini? (b) Lolenge nini tosengeli kotalela baklisto motindo wana?
18 Botaleli na biso ya mokapo 7 ya mokanda ya liboso ya Paulo epai na Bakolinti epesi biso nzela ya komona ete, engebene toli ya Paulo, ezali na mibali mingi minzemba oyo bazali kosalela bonsomi na bango mpo na kokólisa matomba ya Bokonzi. Ezali mpe na ebele ya mibali babalá oyo bazali na bana te, baye, wana ezali bango kopesa likebi libongi na basi na bango, bazali kosala mosala malamu lokola bakɛngɛli ya etúká, ya zongazonga, ya masangá, mpe ya bafiliale ya Watch Tower, na lisungi kitoko ya basi na bango. Na nsuka, kati na masangá ya libota ya Yehova pene na 80000, ezali na batata mingi oyo na bolingo nyonso bazali kotalela bobele bamposa ya basi na bango mpe ya bana na bango te kasi lisusu bazali kozwa ntango ya kosalela bandeko na bango lokola babateli ya bampate oyo batondi na bolingo.—Misala 20:28.
19 Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete mibangé baoyo bakobatelaka mosala na malamu bákumisama na lokumu loleki [“mibale,” NW], nde na koleka bango bakosalaka mosala mpo na kosakola mpe kolakisa.” (1 Timoté 5:17) Ɛɛ, bankulutu oyo bazali kobongisa ndako na bango mpe lisangá malamu babongi ete tómonisela bango bolingo mpe limemya. Tosengeli solo ‘kokumisa lolenge oyo na bato.’—Bafilipi 2:29.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Mosenzeli ya 1 Aprili 1980, nkasa 23-24.
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 1 Desɛ́mbɛ 1960, nkasa 735-736 (na Lingelesi).
Bozongeli
◻ Lolenge nini toyebi ete bankulutu mingi ya ekeke ya liboso T.B. bazalaki batata ya mabota?
◻ Nini esɛngami epai na bankulutu oyo babalá mpe bazali na bana, mpe mpo na nini?
◻ Kozala na “bana bandimi” elimboli nini, kasi ezali boni soki mwana moko ya nkulutu aboyi kosalela Yehova?
◻ Na makambo nini nkulutu asengeli “koleisa bato na ndako na ye moko”?
[Elilingi na lokasa 23]
Mabota ya milende masalaka masangá ya milende