Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Kotɛlɛma ngwi na eteyelo epesaka mbano
BIBLIA esakoli ete: “Bana na yo nyonso bakolakisama na [Yehova], mpe kolónga na bana na yo ekozala monene.” (Yisaya 54:13) Na etando monene, “bana na yo nyonso” ekoki kosalelama mpo na lisangá mobimba ya basaleli ya Nzambe awa na mabelé, bakisá mpe bana mike. Lelo oyo, baboti baklisto bazali mpenza kosala makasi ete bana na bango ‘báteyama na Yehova’ na ndako mpe na makita ya boklisto.
Nzokande, wana bazali kokende na eteyelo, bilenge baklisto bazali kokutana na ntembe monene. Mbala mingi esengelaka na bango kokangama ngwi na makambo oyo basili koyekola na Biblia. Ntango bazali kosala bongo, matomba makoki kozwama epai na banakelasi mpe epai na balakisi, lokola yango emonisami na lisoló lilandi oyo liuti na Micronésie.
Na esanga moke ya Tol, oyo ezwami na wɛ́sti ya mai monene ya Pacifique kati na etuluku ya Bisanga Chuuk, balakisi kati na eteyelo ya esika wana bayebisaki bana nyonso ete bámilɛngɛla mpo na kosangana na molulu mobéngami Halloween, oyo mokosalema na eteyelo. Batatoli oyo bazalaki banakelasi bayebaki ete molulu wana ekokaki kosalela biyemi mpe bilamba oyo ekomonisa bademó, bilima, mpe bidɔngɔlɔmiso—nyonso wana eyokani na misala ya bilimu mabe. Na ntina na lisosoli na bango, bana wana bakoki te kosangana na yango.a
Na lisalisi ya mateya mazwi moboko kati na Biblia, mateya oyo bazalaki kozwa na ndako mpe na lisangá ya boklisto, bayebaki ete milulu wana mikosepelisaka Nzambe te, ata soki yango esalelami bobele mpo na kominanola. Mpo na kolimbola etɛlɛmɛlo na bango polele, bana wana babyangaki Barak, moko na bamisionere ya Batatoli na esanga wana, mpo ete alobela bango epai na balakisi na bango.
Nsima na koyoka ndimbola yango, balakisi basalaki ebongiseli mpo na likita mosusu ya mibale, oyo na boumeli na yango Barak akokoka koloba liboso na basáli nyonso ya eteyelo. Na likita yango, Barak apesaki bilembeteli mpo na komonisa eutelo ya solosolo ya Halloween. Bandimbola mingi oyo apesaki azwaki yango na mikanda mikeseni ya Watch Tower mpe na mikanda misusu. Balakisi mpe bakambi bakamwaki mingi na makambo oyo bayokaki na ntina na eutelo ya molulu wana, lisoló na yango, mpe boyokani na yango na makambo ya losambo. Bamonaki malamu koyanganisa basáli nyonso ya eteyelo yango mpo na kozwa ekateli na lolenge ya kosilisa likambo wana.
Mwa mikolo moke na nsima, ekateli moko ya kokamwisa ezwamaki. Bibongiseli nyonso mpo na kolɛngɛla Halloween bipekisamaki. Molulu ya Halloween esengelaki kosalema lisusu te na mbula wana na eteyelo. Oyo nde litomba malamu liuti na ekateli ya bilenge Batatoli wana ya kosala oyo ezali sembo kati na eteyelo! Bilenge basengeli soko moke te kobanga to koyoka nsɔ́ni mpo na kokamata etɛlɛmɛlo ya ngwi mpo na solo ya Biblia.
Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali koteya bana na bango ete báyekola malamu na eteyelo. Bilenge Batatoli bazali mpe koteyama ete bátosa mitindá ya Biblia mpe báyebisa elikya na bango mpe bindimeli na bango epai na banakelasi mosusu wana bazwi libaku. Ata soki bazali kozwa te matomba to soki matomba ezali koya nokinoki te lokola yango esalemaki na ndakisa oyo touti kolobela, bilenge bakoki kondimisama mpe kozala na bosepeli ete bazali kosala oyo ezali sembo. Mpe likambo ya ntina koleka, bakoki kondimisama ete Tata na bango ya likoló azali kosepela mpe akopambola bango mpo na botosi na bango ya sembo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na Halloween mpe eutelo na yango oyo ezali na boyokani na bilimu mabe, talá Lamuká! ya 22 Novɛ́mbɛ 1993 (ebimeli ya Lifalansé), ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.