Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/12 nk. 5-8
  • Solo na ntina na Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Solo na ntina na Yesu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Biblia elobi
  • Moboko ya kondima
  • Ntina mpo na yango bazali kondima te
  • Koyeba Yesu ya solo
  • Yesu oyo ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Biyano na mituna oyo tomitunaka mpo na Yesu Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Esalemaki mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mokanda ya Biblia nimero 40—Matai
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/12 nk. 5-8

Solo na ntina na Yesu

EMONANI ete makanisi mpamba mpe bindimeli bizangi moboko ezali mingi mpenza na ntina na Yesu; azalaki nani mpe makambo nini asalaki. Kasi ezali boni mpo na Biblia yango moko? Ezali koloba na biso nini na ntina etali Yesu Klisto?

Oyo Biblia elobi

Na kotángáká Biblia na likebi nyonso, okomona makambo oyo ya ntina mingi:

◻ Yesu azali Mwana-mobotami bobele moko ya Nzambe, mobotami ya liboso kati na bozalisi.​—Yoane 3:16; Bakolose 1:15.

◻ Esili koleka pene na mibu nkoto mibale, Nzambe akɔtisaki bomoi ya Yesu na libumu ya ngɔndɔ mwasi moko moyuda mpo ete abotama lokola moto.​—Matai 1:18; Yoane 1:14.

◻ Yesu azalaki te bobele moto malamu. Na makambo nyonso azalaki elilingi ya kokoka ya bomoto kitoko ya Tata na ye, Yehova Nzambe.​—Yoane 14:9, 10; Baebele 1:3.

◻ Na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu akokisaki na bolingo nyonso bamposa ya bato banyokwami. Asalaki bikamwiseli ya kobikisa bato ya maladi, ata mpe kosekwisa bakufi.​—Matai 11:4-6; Yoane 11:5-45.

◻ Yesu asakolaki Bokonzi ya Nzambe ete ezali elikya bobele moko mpo na libota linyokwami ya bato, mpe abongisaki bayekoli na ye mpo na kokóba mosala wana ya kosakola.​—Matai 4:17; 10:5-7; 28:19, 20.

◻ Na mwa 14 Nisana (pene na mwa 1 Apríli), na mobu 33 T.B., Yesu akangamaki, asambisamaki, akatelamaki etumbu, mpe abomamaki na ntina na efundeli ya lokuta ete azalaki kozimbisa bato.​—Matai 26:18-20, Mt 26:48–27:50.

◻ Liwa ya Yesu ezali kopesa bonsomi, kosikoláká bato oyo bazali kondima ete bálongolama na ezalela na bango ya bato ya masumu mpe na bongo kofungoláká nzela na bomoi ya seko mpo na baoyo nyonso bazali komonisa kondima epai na ye.​—Baloma 3:23, 24; 1 Yoane 2:2.

◻ Na mwa 16 Nisana, Yesu asekwaki, mpe mwa moke na nsima amataki na likoló mpo na kopesa motuya ya mbeka ya bomoi na ye ya kokoka liboso ya Tata na ye.​—Malako 16:1-8; Luka 24:50-53; Misala 1:6-9.

◻ Lokola Mokonzi aponami na Yehova, Yesu oyo asekwaki azali na bokonzi nyonso mpo na kokokisa mokano ya Nzambe na ebandeli mpo na bato.​—Yisaya 9:6, 7; Luka 1:32, 33.

Na bongo, Biblia ezali komonisa Yesu lokola moto oyo aleki monene kati na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Kasi ndenge nini tokoki kondimisama ete ye azali mpenza Yesu ya solo​—Yesu oyo alobelami kati na lisoló ya makambo ya kala, oyo abotamaki na Beteleme mpe oyo azalaki na bomoi awa na mabelé esili koleka sikawa soko mibu 2 000?

Moboko ya kondima

Ntembe mingi ekoki kolongolama bobele na kotangáká Makomami ya Greke ya boklisto kozanga elimo ya kokanisa mabe. Na kosaláká bongo, okomona ete Biblia ezali te mokanda ya masoló mpamba, lokola ezalaka mikanda ya masapo. Nzokande, bankombo, bantango ya sikisiki, mpe bisika ya sikisiki elobelami. (Na ndakisa, talá Luka 3:1, 2.) Lisusu, bayekoli ya Yesu Klisto balobelami na bosembo ya kokamwisa, na polele oyo ezali kotinda motángi ete atyela yango motema. Bakomi babombi mabe ya moto moko te​—ata oyo ya bango moko—​na ntina ete bákoma lisoló ya sembo. Ɛɛ, okomona ete Biblia ezali mpenza koloba solo.​—Matai 14:28-31; 16:21-23; 26:56, 69-75; Malako 9:33, 34; Bagalatia 2:11-14; 2 Petelo 1:16.

Kasi bilembeteli mosusu bizali. Bokundoli ya arkeoloji esili mbala mingi kolóngisa bosolo ya lisoló ya Biblia. Na ndakisa, soki okeyi kotala Musée ya Israël na Jérusalem, okomona libanga oyo lizali na makomi oyo matángi nkombo ya Ponti Pilata. Bokundoli mingi mosusu ya Arkeoloji endimisi kozala ya Lusania mpe Selegi Paulo, oyo Biblia elobeli bango lokola bato ya solo oyo bazalaki mpenza, kasi te lokola bato bauti na makanisi mpamba ya Baklisto ya liboso. Makambo oyo malobelami na Makomami ya Greke ya boklisto (Testamá ya sika) mandimisami ete mazali solo mpamba te bakomi ya ntango ya kala batangaki yango kati na mikanda na bango, na ndakisa Juvénal, Tacite, Sénèque, Suétone, Pline le jeune, Lucien, Celsius, mpe Josèphe, moyuda mokomi ya makambo ya ntango ya kala.a

Masoló oyo malobelami na Makomami ya Greke ya boklisto mandimamaki na bankóto mingi ya bato oyo bazalaki na bomoi na ekeke ya liboso. Ata banguna ya boklisto babɛtaki ntembe te na bosolo ya oyo elobelami ete ezali maloba mpe misala ya Yesu. Na ntina na likanisi oyo ete bomoto ya Yesu ekokaki kokembisama na makambo mosusu oyo bayekoli na ye babakisaki nsima ya liwa na ye, profesɛrɛ Frederick F. Bruce alobi ete: “Na kokesena na oyo bakomi mosusu bakoki kokanisa, ezalaki pɛtɛɛ te, na bambula wana ya ebandeli, na koloba ete maloba mosusu mpe bikela mosusu ezalaki ya Yesu, wana mingi kati na bayekoli na ye bazalaki naino na bomoi, baoyo bakokaki komikundola makambo oyo masalemaki solo mpe oyo masalemaki te. . . . Bayekoli bakokaki kozala na makoki te ya kokoma makambo ya lokuta (na koleka, bakokaki te kobongola na mayele mabe makambo oyo masalemaki), oyo mbɛlɛ elingaki nokinoki kotondolama na baoyo bazalaki na mposa makasi ya kosala yango.”

Ntina mpo na yango bazali kondima te

Atako bongo, banganga mayele mosusu bazali naino kokakatana. Atako bakanisi ete masoló ya Biblia mazali masapo mpamba, bazali kokɔtela na mposa makasi makomi ya apokrife mpe bazali kondima yango ete mazali solo! Mpo na nini? Na ntembe te ezali mpo ete masoló ya Biblia mazali na makambo mingi oyo banganga-mayele mingi na eleko na biso bazali na mposa ya kondima yango te.

Kati na búku na ye Union Bible Companion, oyo ebimisamaki na 1871, S. Austin Allibone abimisaki motuna moko ya mpasi mpo na bato oyo babɛtaka ntembe. Akomaki: “Tuná moto nyonso oyo azali kobɛta ntembe na bosolo ya lisoló ya Evanzile soki elembeteli nini azali na yango mpo na kondima ete Kaisala akufaki na Capitole, to mpe ete pápa Léon III akómisaki amperɛrɛ Charlemagne mokonzi ya Wɛ́sti na mobu 800? . . . Tondimaka makambo nyonso . . . oyo malobami na ntina na bato wana; mpe ezali mpo ete tozali na bilembeteli ya ntango ya kala mpo na bosolo na yango. . . . Soki, na ntango tozali kopesa bilembeteli lokola oyo, ezali na bato bazali naino kobɛta ntembe, tokotika bango mpo ete bato yango bazali mpenza bilɛma to mpe bazoba oyo elikya ezali te ya kolónga kolakisa bango. Bongo, tokoloba nini, mpo na bato oyo, atako ebele na bilembeteli oyo bisili kopesama na ntina etali bosolo ya Makomami Mosantu, bazali kolanda koloba ete bandimisami te? . . . Bazali na mposa te ya kondima likambo oyo ekokitisa lolendo na bango, mpe oyo ekosɛngisa na bango ete bábongola lolenge na bango ya bomoi.”

Ya solo, bato mosusu oyo bazali kobɛta ntembe bazali na bantina ebombami oyo ezali kopusa bango na kobwaka Makomami ya Greke ya boklisto. Mokakatano na bango etaleli mpenza bosolo na yango te kasi nde mitinda na yango. Na ndakisa, Yesu alobaki mpo na bayekoli na ye ete: “Bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te.” (Yoane 17:14) Nzokande, mingi ya baoyo bazali komibenga ete baklisto basangani mpenza na makambo ya politiki ya mokili oyo, komikotisáká kútu na bitumba oyo ezali kosopa makila. Na esika ya koyokanisa bomoi na bango na mitinda ya Biblia, bato mingi bakolinga ete Biblia nde eyokana na mitinda na bango.

Lisusu, tólobela likambo litali mitinda ya bizaleli malamu. Yesu apesaki toli ya mpiko na lisangá ya Tyatire mpo ete bazalaki kotika nzela na pite. Alobaki na bango ete: “Ngai moluki kati na makanisi [“bangei,” NW] na mitema, mpe nakopesa bino lokola ebongi na misala na moto na moto.”b (Emoniseli 2:18-23) Nzokande, mingi na baoyo bazali komiloba ete bazali baklisto mbala mingi bazali koboya kolanda mitinda ya bizaleli malamu, boye te? Bakosepela koboya oyo Yesu alobaki na esika ya koboya etamboli na bango ya mabe.

Lokola bazali pene ya kondima Yesu te na lolenge oyo Biblia elobeli ye, banganga-mayele bamisaleli Yesu mosusu engebene makanisi na bango moko. Bakómi na ngambo mpo ete basali masapo ya lokuta oyo bazali kolobela na bokosi nyonso ete bakomi ya Biblia basalaki yango. Bakangami na biteni ya masoló ya bomoi ya Yesu oyo bazali na mposa ya kondima yango, mpe bazali koboya nyonso mosusu, mpe bazali kobakisa mwa makambo mosusu euti na makanisi na bango moko. Mpo na koloba solo, oyo bango bazali kobenga ye ete moto ya mayele oyo azalaki koyengayenga to oyo alingaki kobongola lolenge ya bomoi ya bato ezali te Yesu oyo alobelami kati na masoló ya ntango ya kala oyo balobi ete bazali kolukaluka ye; kasi ezali nde Yesu oyo auti na makanisi matɔndi na lolendo ya banganga-mayele.

Koyeba Yesu ya solo

Yesu asalaki molende ya kolamwisa mitema ya baoyo bazalaki mpenza na mposa ya solo mpe boyengebene. (Matai 5:3, 6; 13:10-15) Bato motindo wana bazali koyanola na libyangi ya Yesu ete: “Boyá liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe na kopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe boyekola na ngai; zambi ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”​—Matai 11:28-30.

Tokoki te koyeba Yesu ya solo na nzela ya mikanda mikomami na banganga-mayele ya ntango na biso; akoki mpe komonana te na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba, oyo esili kokóma esika malamu mpo na kokólisa mateya ya bonkɔ́kɔ masalami na bato. Okoki koyeba Yesu ya solo na nzela ya Biblia na yo moko. Okolinga koyekola makambo mingi na ntina na ye? Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo mpo na yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kati na Biblia, bangei ezali mbala mosusu kolimbola makanisi mpe mayoki ya mozindo epai na moto.

b Mpo na kozwa bandimbola mosusu, Talá búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Etanda na lokasa 6]

BIKEKE MINGI YA KOBƐTA NTEMBE

Kobɛta ntembe likoló na Makomami ya Greke ya boklisto ebandaki uta bambula koleka 200, ntango Hermann Samuel Reimarus, filozofe moto na Allemagne (1694-1768) alobaki ete: “Tozali na elongá ya kosala bokeseni ya sikisiki kati na mateya ya Bantoma na makomi na bango mpe makambo oyo Yesu ye moko asakolaki mpe ateyaki na boumeli ya bomoi na Ye.” Bandá na Reimarus, banganga mayele mingi basili koteyama na kokanisa lolenge yango.

Búku The Real Jesus (Yesu ya solosolo) emonisi ete bato mingi oyo babɛtaki ntembe na ntango ya kala bamitangaki te ete bazalaki bapɛngwi. Kútu, “baminonaki bango moko ete bazalaki mpenza baklisto ya solosolo mpe ete basikwamaki na minyololo ya mateya ya mangomba mpe na biyambayamba.” Na likanisi na bango, kobɛta ntembe ezalaki “lolenge ya Boklisto oyo epɛtolami.”

Likambo ya mawa ezali ete Boklisto ya nkombo mpamba esili kokóma esika malamu mpo na bokóli ya mateya ya bonkɔ́kɔ ya bato. Mateya lokola oyo ya kozanga kokufa ya molimo, ya Bósato, mpe ya mɔ́tɔ ya lifelo ezali wana mwa ndambo ya mateya oyo mayokani te na Biblia. Kasi bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto bazalaki na ngambo te mpo na lolenge oyo solo ebebisami. Kútu, babundisaki makasi bilembo ya liboso ya mateya ya lokuta na katikati ya ekeke ya liboso, ntango Paulo akomaki ete lipɛngwi kati na baoyo bamibengaki baklisto esilaki kobanda ‘kosala mosala.’ (2 Batesaloniki 2:3, 7) Tokoki kondimisama ete oyo ezali kati na Makomami ya Greke ya boklisto ezali masoló mpe mateya ya solo.

[Etanda na lokasa 7]

BAEVANZILE EKOMAMAKI NTANGO NINI?

Banganga-batyoli mingi ya Tɛstamá ya Sika bazali kolobela makasi likanisi oyo ete Baevanzile ekomamaki nsima mpenza wana makambo malobelami na kati masilá kosalema mpe na bongo bandimisami ete makambo ya lokuta makoki kozanga te na kati.

Nzokande, bilembeteli bizali komonisa ete Evanzile ya Matai, ya Malako, ya Luka, ekomamaki na dati oyo ezali pene na ntango makambo mazali na kati masalemaki. Bilembo oyo ezwami na bakopi mosusu ya bamaniskri ya Matai bimonisi ete ekomamaki liboso ya mobu 41 T.B. Emonani ete Evanzile ya Luka ekomamaki katikati na mibu 56 mpe 58 T.B., mpo ete mokanda ya Misala (oyo emonani ete esilaki kokomama na 61 T.B.) emonisi ete mokomi na yango, Luka, asilaki kokoma ‘mokanda na ye ya liboso,’ oyo ezali Evanzile. (Misala 1:1) Evanzile ya Malako etalelamaka ete ekomamaki na Loma na eleko oyo ntoma Paulo akangamaki na mbala ya liboso to na mbala ya mibale​—ekoki kozala kati na mibu 60 mpe 65 T.B.

Profesɛrɛ Craig L. Blomberg andimi ete Baevanzile ekomamaki na dati oyo ezali pene na ntango makambo yango masalemaki. Alobi ete ata soki tobakisi Evanzile ya Yoane, oyo ekomamaki na nsuka ya ekeke ya liboso, “Soki tokokanisi yango na masoló mosusu oyo mazali kolobela bomoi ya bato tokomona ete ekomamaki pene na ntago oyo makambo malobelami na kati na yango masamlemaki. Na ndakisa, Arrian mpe Plutarque, bato mibale oyo bakomaki masoló ya bomoi ya Alexandre le Grand, bakomaki yango koleka mbula nkama minei nsima ya liwa ya Alexandre na mobu 323 L.T.B., nzokande banganga-mayele ya makambo ya ntango ya kala bazali kondima yango ete ezali masoló ya solo oyo bakoki kotyela yango motema. Masapo na ntina na bomoi ya Alexandre mayikanaki na boumeli ya bileko bilandaki nsima, kasi mingi kati na masapo yango mayikanaki na boumeli ya bikeke mingi na nsima ya bakomi wana mibale.” Na ntembe te, bosolo ya biteni ya Makomami ya Greke ya Boklisto ebongi kotyelama motema lolenge moko tozali kotya motema na masolo ya makambo ya kala ya mokili.

[Elilingi na lokasa 8]

Esengo ekozala monene mpo na bato nyonso kati na paladiso oyo ekoya mosika te na mabelé

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto