Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/3 nk. 4-7
  • Ntina oyo makamwisi yango moko etongaka kondima te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo makamwisi yango moko etongaka kondima te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini makamwisi matongaka kondima te
  • Ndimbola ya kondima ya solosolo
  • Ndimá ata soki omoni na miso te
  • Makamwisi​—Makambo ya solo to masapo mpamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Makamwisi ya Yesu ekoki koteya yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Osengeli nde kondima makamwisi oyo Biblia elobeli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Makamwisi ya Yesu​—Makambo ya solo to masapo ya mpamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/3 nk. 4-7

Ntina oyo makamwisi yango moko etongaka kondima te

NDIMÁ bobele oyo okoki komona. Yango ezali likanisi ya bato mingi. Basusu balobaka ete bakoki kondimela Nzambe soki amimonisi ye moko na lolenge ya makamwisi. Mbala mosusu ezali bongo, kasi likanisi motindo wana ekoki kopesa nzela na kozala na kondima ya solosolo?

Tókamata ndakisa ya Bayisalaele oyo: Kola, Datana mpe Abilama. Biblia ezali komonisa ete bamonaki na miso na bango mpenza makamwisi minene oyo Nzambe asalaki: malɔ́zi zomi oyo makwelaki Ezipito, kokatisa ya libota ya Yisalaele na Mai Motane, mpe kobomama ya Falo mpe mampinga ya basodá na ye. (Exode 7:19–11:10; 12:29-​32; Nzembo 136:15) Kola, Datana mpe Abilama bayokaki mpe Yehova koloba longwa na makoló na Ngomba Sinai. (Deteronome 4:11, 12) Nzokande, mwa ntango moke na nsima ya makamwisi yango, mibali misato wana batombokelaki Yehova mpe basaleli na ye oyo aponaki.​—Mituya 16:1-​35; Nzembo 106:16-​18.

Nsima ya mbula soko 40, mosakoli moko na nkombo Balama amonaki likamwisi. Ata lisoló na ye elongo na anzelu epekisaki ye te komitya na ngambo ya banguna ya Nzambe, Bamoaba. Atako amonaki likamwisi, Balama akendaki sé liboso mpe atɛmɛlaki Yehova mpe libota na Ye. (Mituya 22:1-​35; 2 Petelo 2:15, 16) Na bongo, kozanga kondima oyo Balama azalaki na yango ekokani na oyo ya Yuda Mokeliota. Atako azalaki moninga ya pene ya Yesu mpe amonaki makamwisi mingi oyo ye asalaki, Yuda atɛkaki Yesu na mosolo bibende ntuku misato.​—Matai 26:14-​16, 47-​50; 27:3-5.

Bakonzi ya lingomba ya Bayuda bayebaki mpe makamwisi mingi oyo Yesu asalaki. Nsima wana asekwisaki Lasalo, balobaki ete: “Moto oyo azali kosala bilembo mingi.” Kasi kozonga na bomoi ya Lasalo ekitisaki mitema na bango mpe epesaki bango kondima? Soko moke te. Kútu baangaki nde mwango ya koboma Yesu mpe Lasalo!​—Yoane 11:47-​53; 12:10.

Ata misala ya Nzambe ye moko elóngaki te kobotisa kondima epai na bato mabe wana. Wana Yesu azalaki kati na tempelo na libaku moko, abondelaki makasi ete: “Tata, kumisá nkombo na yo!” Yehova ayanolaki na mongongo makasi longwa na likoló ete: “Nasili kokumisa yango mpe nakokumisa yango lisusu.” Nzokande, likambo wana ya kokamwa ebotaki kondima te kati na mitema ya baoyo bazalaki wana. Biblia elobi ete: “Ata asili kosala bilembo mingi boye liboso na bango, bandimi ye te.”​—Yoane 12:28-​30, 37; kokanisá na Baefese 3:17.

Mpo na nini makamwisi matongaka kondima te

Ndenge nini kozanga kondima ya motindo wana ekoki komonana atako makamwisi mazali kosalema mingi? Lolenge oyo bakonzi ya mangomba ya Bayuda babwakaki Yesu emonani ete ezali likambo ya kokamwa mpenza soki totaleli ete bobele na ntango oyo abandaki mosala na ye, Bayuda nyonso bazalaki ‘kozela Klisto,’ to Masiya ‘na motema likoló.’ (Luka 3:15, NW) Nzokande, mokakatano mozalaki kati na oyo bazalaki komizela na yango. W. E. Vine, moyekoli ya maloba ya nkóta atángaki nganga-mayele moko ya Biblia oyo ayebani mingi wana alobaki ete Bayuda bakangamaki na likanisi ya Masiya oyo akopesa bango “bolóngi na makambo ya mokili” mpe “bozwi ya mosuni.” Na yango, bamibongisaki te mpo na koyamba Yesu oyo azalaki moto na komikitisa, oyo amikɔtisaki na makambo ya politiki te, moto na Nasaleta, oyo abimaki kati na bango lokola Masiya ya solo na mobu 29 T.B. Bakonzi ya mangomba bazalaki mpe kobanga ete mateya ya Yesu makobulunganisa makambo ya Letá oyo ezalaki na ntango wana mpe makotya etɛlɛmɛlo na bango ya lokumu na likámá. (Yoane 11:48) Makanisi na bango oyo malongobanaki te mpe ezaleli na bango ya moimi ezipaki miso na bango mpo na koyeba ndimbola ya makamwisi ya Yesu.

Na nsima, bakonzi ya mangomba ya Bayuda mpe basusu baboyaki kondima makamwisi oyo mamonisaki ete bayekoli ya Yesu bandimamaki na Nzambe. Na ndakisa, ntango bayekoli na ye babikisaki mobali moko oyo azalaki ebɔ́sɔ́nɔ́ uta kobotama na ye, basangani ya esambiselo monene ya Bayuda oyo bakómaki na nkanda makasi batunaki ete: “Tósala nini na bato oyo? mpo ete eyebani polele na bato nyonso bafandi na Yelusaleme ete elembo esili kosalama na mabɔkɔ na bango. Tokoki koangana yango te, kasi tókebisa bango ete báloba na nkombo oyo lisusu na moto soko moko te, ete likambo oyo eleka kopalangana te.” (Misala 3:1-8; 4:13-​17) Ya solo, likamwisi oyo monene etongaki te to ebotaki kondima te kati na mitema ya mibali yango.

Mposa ya kokokisa mikano mineneminene, lofundo, mpe lokoso ezali makambo oyo mapusi bato mingi na kokómisa mitema na bango mabanga. Yango emonanaki na oyo ekómelaki Kola, Datana mpe Abilama, oyo tolobelaki na ebandeli. Zúwa, bobángi, mpe bizaleli mabe ya bamoko esili kopekisa basusu ete bázala na kondima. Tozali mpe komikundwela baanzelu batomboki, bademó, oyo liboso bazalaki na libaku malamu ya komona elongi mpenza ya Nzambe. (Matai 18:10) Babɛtaka ntembe te ete Nzambe azali. Ya solo, “bademó bakondimaka mpe bakolɛngaka.” (Yakobo 2:19, NW) Nzokande, bandimelaka Nzambe te.

Ndimbola ya kondima ya solosolo

Kondima eleki likambo ya kozala bobele na endimeli mpamba. Eleki mpe mayoki moto azalaka na yango mwa ntango nsima ya komona likamwisi moko. Baebele 11:1 elobi ete: “Kondima ezali elendiseli na biloko bikolikya biso; ezali mpe elimbweli na biloko bizangi komonana.” Moto oyo azali na kondima andimisami kati na motema na ye ete eloko nyonso oyo Yehova Nzambe alaki ekokokisama. Lisusu, elembeteli ya kozanga kobɛta ntembe mpo na makambo oyo mazangi komonana ezali makasi mpenza na boye ete kondima yango moko elobami ete ekokani na elembeteli wana. Ya solo, kondima ezwi moboko na yango likoló na kondimisama. Mpe na ntango ya kala, makamwisi mazalaki na litomba mpo na kokólisa kondima to kotonga yango. Makamwisi oyo Yesu asalaki mapesaki nzela na kondimisa basusu ete azalaki solo Masiya oyo alakamaki. (Matai 8:16, 17; Baebele 2:2-4) Bobele bongo, makabo motindo oyo ya elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala, lokola kobikisa bato na lolenge ya makamwisi mpe koloba na nkóta emonisaki ete Bayuda bazalaki lisusu kondimama na Yehova te kasi Lisangá na ye ya Boklisto nde lindimamaki, oyo lityamaki na Mwana na ye, Yesu Klisto.​—1 Bakolinti 12:7-​11.

Kati na makabo ya makamwisi ya elimo ezalaki mpe na likoki ya kosakola. Ntango baoyo bazangi kondima bazalaki komona likamwisi yango, basusu bapusamaki na kosambela Yehova, kolobáká ete: “Nzambe azali kati na bino.” (1 Bakolinti 14:22-​25) Nzokande, Yehova azalaki na likanisi te ete makamwisi mázala elembo moko ya libela mpo na losambo ya boklisto. Na yango, ntoma Paulo akomaki ete: “Soko bisakweli izali, ikolimwa; soko maloba na ndenge na ndenge, ikosuka.” (1 Bakolinti 13:8) Na ntembe te makabo yango masilaki na ntango bantoma mpe baoyo bazwaki makabo motindo wana na nzela na bantoma basilaki kokufa.

Na bongo, bato bakokaki kotikama kozanga moboko ya kondima? Te, mpamba te Paulo alobaki ete: “[Nzambe] azangi kotatola na ntina na ye mpenza te, mpo ete asali misala malamu mpe apesi bino mbula na likoló mpe bilaka na kobota mbuma mingi, mpe atondisi mitema na bino na biloko na kolya mpe na esengo.” (Misala 14:17) Ya solo, epai na bato ya motema sembo oyo balingaka kofungola makanisi na bango mpe mitema na bango na elembeteli oyo ezali kozinga biso, “makambo na ye [Yehova Nzambe] mazangi komonana, yango nguya na ye ya seko mpe bonzambe na ye, asili koyebisa yango polele epai na makanisi na bato kati na misala na ye. Bongo bazali na mokalo te.”​—Baloma 1:20.

Kozala bobele na likanisi mpamba ete Nzambe azali ekoki te. Paulo apesaki toli oyo: “Bóbilaka makambo na ntango oyo te kasi bóbongwana mpo na kozwa makanisi na sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.” (Baloma 12:2) Yango ekoki kosalema na boyekoli ya molende ya Makomami na lisalisi ya mikanda ya boklisto oyo mikolimbolaka Biblia, lokola zulunalo oyo. Kondima oyo ezwi moboko na yango likoló na boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe, Biblia, ezali motau te to likolólikoló te. Baoyo basili kososola mokano ya Nzambe mpe bazali kosala yango kati na kondima, bazali kokokisela Nzambe mosala ya bulɛɛ.​—Baloma 12:1.

Ndimá ata soki omoni na miso te

Ntoma Toma azalaki na mokakatano ya komonisa kondima na lisekwa ya Yesu. Alobaki ete: “Soko nakomona na matandu na ye nkomá na nsɛ́tɛ́ te mpe nakotya mosapi na ngai esika na nkomá na nsɛ́tɛ́ te mpe soko nakotya lobɔkɔ na ngai na mopanze na ye te, nakondima te.” Na nsima ntango Yesu alataki nzoto ya mosuni oyo emonisaki bampota ya kobákama na ye, Toma andimaki likamwisi yango. Nzokande, Yesu alobaki ete: “Esengo na bango bamoni te nde basili kondima.”​—Yoane 20:25-​29.

Lelo oyo, bamilió ya Batatoli ya Yehova bazali “kotambola na kondima nde na komona te.” (2 Bakolinti 5:7) Atako bamonaki te makamwisi oyo malobelami kati na Biblia, bandimaka mpenza ete yango esalemaki. Batatoli ya Yehova bamonisaka kondima kati na Nzambe mpe Liloba na ye. Na lisalisi ya elimo na ye, bazali na likoki ya kososola mateya ya Biblia mpe motó na likambo na yango​—kobulisama ya nkombo ya Yehova Nzambe na nzela ya Bokonzi ya likoló. (Matai 6:9, 10; 2 Timoté 3:16, 17) Baklisto yango ya solo bazali kosalela batoli ya Biblia kati na bomoi na bango mpo na matomba na bango mpenza. (Nzembo 119:105; Yisaya 48:17, 18) Bandimaka elembeteli oyo ya sikisiki ete bisakweli ya Biblia bizali komonisa ete ntango na biso ezali “mikolo ya nsuka,” mpe bazali na kondima ete mokili ya sika oyo molakami na Nzambe mokómi pene. (2 Timoté 3:1-5; Matai 24:3-​14; 2 Petelo 3:13) Mpo na bango ezali esengo ete bálakisa boyebi ya Nzambe epai na basusu. (Masese 2:1-5) Bayebi ete yango ezali bobele na nzela ya boyekoli ya Makomami nde baoyo bazali koluka Nzambe bakozwa ye mpenza.​—Misala 17:26, 27.

Ozali komikundola Albert, oyo tolobelaki na lisoló oyo lileki? Mwa mikolo na nsima ya libondeli oyo asalaki mpo na komona likamwisi, oyo ezwaki eyano te, mobangé mwasi moko Motatoli ya Yehova ayaki kotala ye mpe atikelaki ye mikanda mikolimbolaka Biblia. Na nsima, Albert andimaki koyekola Biblia elongo na ye kozanga kofuta. Wana akómaki koyeba malamu nsango ya Biblia, mawa na ye ebongwanaki esengo. Nsukansuka amonaki ete azwaki Nzambe oyo azalaki koluka.

Makomami malobi ete: “Bóluka [Yehova] naino akoki komonana, bóbyanga ye naino abelemi penepene.” (Yisaya 55:6) Okoki kosala yango na mikolo na biso na kozeláká likamwisi ya Nzambe te, kasi nde na kozwáká boyebi ya sikisiki ya Liloba na ye. Yango ezali na ntina, mpamba te makamwisi yango moko etongaka kondima te.

[Elilingi na lokasa 5]

Ata lisekwa ya Lasalo na lolenge ya likamwisi epusaki banguna na ye te ete bámonisa kondima

[Bililingi na lokasa 7]

Kondima ezwi moboko na yango likoló na boyebi ya sikisiki ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto