Ebongi kotinda mwana na yo na Mbola?
KANISÁ ete ofandi na engumba moke na mokili moko ya bobólá. Ozali na bana mingi oyo bazali kotánga na eteyelo ya ebandeli, kasi ntango bakokokisa mbula 12, bakokɔta na eteyelo ya katikati. Na etúká na bino, biteyelo ya katikati bitondi mɛkɛ na bana kelasi, biteyelo yango bizangi bisaleli malamu, mpe balakisi bazali mingi te. Balakisi bazali ntango mosusu koboya kotángisa mpe yango ezali kosala ete biteyelo bikangama na boumeli ya bapɔ́sɔ to mpe na boumeli ya basanza mingi.
Moto moko apesi yo trakte moko kitoko oyo ezali kolakisa mbola (internat) moko na engumba. Kati na yango omoni bililingi ya banakelasi bazali na esengo, balati malamu, bazali kotánga na bandako oyo ezali na bisaleli bibongi, bazali na laboratware, mpe na bibliotɛkɛ. Banakelasi bazali kosalela ordinatɛrɛ mpe bazali kolala na bandako ya pɛto mpe oyo ezali kosepelisa. Otángi ete moko ya mikano ya eteyelo yango ezali mpo na kosunga banakelasi ete “bákoka kozwa kolakisama eleki malamu oyo bango bakoki kopesa yango.” Otángi lisusu ete: “Banakelasi nyonso basɛngisami na kotosa mitindá ya etamboli miyokani na oyo bato bamizelaka ete mimonana kati na mabota epai kuna makambo lokola bonkóndé, limemya, botosi epai na baboti mpe mikóló, kosalisana, kondima bokeseni ya makanisi, boboto, kolongobana mpe bosembo, ezali kotyelama mpenza likebi.”
Elilingi ya elenge mobali oyo azali kosɛka etyami wana mpe bakomi maloba na ye ete: “Baboti na ngai bapesaki ngai libaku malamu ya koyekola na eteyelo ya malamu koleka.” Elenge mwasi moko alobi ete: “Koyekola na eteyelo ezali etumba monene mpe ezali kosɛnga kolónga mikakatano. Awa koyekola ekomi likambo ya pɛtɛɛ.” Okotinda mwana na yo ya mwasi to ya mobali na mbola motindo wana?
Kolakisama mpe ezaleli ya elimo
Baboti nyonso oyo bazali komibanzabanza mpo na bolamu ya bana na bango balingaka kopesa bango ebandeli malamu na bomoi, mpe mpo na yango kolakisama malamu, mpe ya bokatikati ezali na ntina. Mbala mingi kotánga kelasi ya mokili epesaka nzela na libaku malamu ya kozwa mosala na mikolo mizali koya mpe esungaka bilenge ete bákola kino kokóma mikóló oyo bakoki kokokisa bamposa na bango mpe ya mabota oyo bakosala.
Okoki komituna ete ‘soki mbola ezali kopesa kolakisama malamu mpe mwa litambwisi mpo na bizaleli malamu, mpo na nini te kosalela libaku yango?’ Mpo na kopesa eyano na motuna wana, baboti baklisto basengeli kotalela na bozindo mpenza likambo moko ya ntina mingi—kolɔngɔ́nɔ́ ya elimo ya bana na bango. Yesu Klisto atunaki ete: “Zambi litomba nini ekozala na moto oyo akozwa mokili mobimba mpe akoboma bomoi na ye?” (Malako 8:36) Ya solo, ezali na litomba soko moke te. Na yango, liboso ya kozwa ekateli ya kotinda bana na bango na mbola, baboti baklisto basengeli kotalela bopusi oyo yango ekoki kozala na yango likoló na elikya ya bana na bango mpo na bomoi ya seko.
Bopusi ya banakelasi mosusu
Mbola mosusu ekoki kozala na manáka malamu mpenza ya mateya. Kasi ezali boni mpo na etamboli ya baoyo bazali koyekola kuna to mbala mosusu ya bamoko ya bato oyo bazali kokamba biteyelo yango? Na kotaleláká lolenge ya bato oyo basengelaki koyikana na “mikolo ya nsuka” oyo tozali na yango, ntoma Paulo akomaki ete: “Na m[i]kolo na nsuka ntango na mpasi ekoya. Zambi bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matɔ́ndi, bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batɔngi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nkó, bato bavimbi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo na Nzambe, bato bazali na lolenge na kosambela nde bazali kowangana nguya na yango. Opɛngwa ndenge yango.”—2 Timoté 3:1-5.
Kobeba wana ya bizaleli malamu mpe ya makambo ya elimo ezali komonana na mokili mobimba, yango ezali koyeisa mokakatano epai na Batatoli ya Yehova mpo na komitambwisa engebene mitindá ya Biblia. Banakelasi oyo bazongaka mikolo nyonso na ndako bazali komiyoka ete mwa ntango moke bazali kofanda elongo na baninga na bango ya kelasi oyo bazali bilenge ya mokili, ekoki kosala bopusi mabe likoló na elimo na bango. Kolónga bopusi wana ekoki kozala etumba mpo na bana oyo bazali Batatoli, atako bazali mokolo na mokolo kozwa lisungi, toli, mpe elendiseli ya baboti na bango.
Na yango, ezali boni mpo na bana oyo batindami mosika na ndako na bango mpo na kokende kotánga na mbola? Batangwi, bazangi lisungi ya elimo ya baboti na bango ya bolingo. Lokola bazali na baninga na bango ya kelasi butu na moi, bopusi ya kolanda bibele ezali kosala likoló na bɔɔngɔ́ mpe mitema na bango ya bolenge koleka banakelasi oyo bazali kofanda na ndako. Mwanakelasi moko alobaki ete: “Mwanakelasi oyo azali na mbola azali na likámá na elimo bandá ntɔ́ngɔ́ kino mpokwa.”
Paulo akomaki: “Bómizimbisa te; kotambola na bato mabe ekobebisa malamu na motema.” (1 Bakolinti 15:33) Baboti baklisto basengeli komikosa te na kokanisáká ete bana na bango bakozanga likámá wana bazali ntango nyonso elongo na baoyo bazali basaleli na Nzambe te. Na boumeli ya ntango, bana oyo bazali na bokangami epai na Nzambe bakoki koboma lisosoli na bango ya mitindá ya boklisto mpe kobungisa bosepeli nyonso na makambo ya elimo. Mbala mosusu yango ekomonana te epai na baboti kino nsima wana bakolongwa na mbola. Mbala mingi ekomonana wana ntango ekozala lisusu te mpo na kosembola makambo.
Likambo likomelaki Clément ezali mpenza ndakisa ebongi. Alobi boye: “Liboso ete nakende na mbola, nazalaki kolinga solo mpe nazalaki kobima na mosala ya kosakola elongo na bandeko mibali na lisangá. Mingi mpenza, nazalaki kosepela kosangana na boyekoli ya Biblia na libota na biso mpe na boyekoli ya mokanda na lisangá. Nzokande, bobele na ntango nakendaki na mbola, wana nazalaki na mbula 14, natikaki mpenza solo. Na boumeli ya mbula mitano oyo nalekisaki na mbola, nazalaki koyangana na makita soko moke te. Na ntina na bopusi ya baninga mabe, nakómaki kosalela bilangwiseli, komela likaya mpe masanga makasi.”
Bopusi ya balakisi
Na biteyelo nyonso ekoki kozala na balakisi ya etamboli mabe oyo bazali kosalela etɛlɛmɛlo na bango ya bokonzi mpo na kosala makambo mabe. Bamoko bazali bato mabe mpe bazali na makambo makasi, basusu bazali kolengola banakelasi na bango mpo na kosangisa na bango nzoto. Na mbola, misala mabe ya balakisi motindo wana mifundamaka mingi mpenza te.
Nzokande, balakisi mingi bazali komeka kolakisa bana mpo ete bákóma bato ya ntina kati na mboka, ete bákoka kozwa esika na mokili epai bazali, bámiyokanisa na makambo ya mokolo na mokolo ya bomoi. Kasi mokakatano mosusu ezali wana mpo na bana oyo bazali Batatoli. Mitindá ya mokili mizali ntango nyonso te na boyokani na mitindá ya boklisto. Wana balakisi bazali kolendisa banakelasi ete bamizwela esika na mokili oyo, Yesu, na ngámbo na ye, alobaki ete bayekoli na ye basengeli kozala “bato na mokili te.”—Yoane 17:16.
Ekozala boni soki mokakatano mobimi na ntango bana bazali kolanda mitindá ya Biblia? Soki bana bazali kokende na eteyelo ya penepene mpe bazali kofanda na ndako, bakoki kosolola mikakatano yango na baboti na bango. Na nsima, baboti bakoki kopesa litambwisi epai ya bana na bango mpe ata kosolola na molakisi. Mpo na yango, mikakatano mpe mindɔndɔ́ misilisamaka nokinoki.
Na mbola makambo mazali ndenge mosusu. Bana motindo wana bazali ntango nyonso na nsé ya litambwisi ya balakisi na bango. Soki bana bazali kotosa mitindá ya boklisto, bakosala yango kozanga lisungi ya baboti na bango mokolo na mokolo. Na bantango mosusu, bana bazali kosala nyonso mpo ete bátikala sembo epai na Nzambe kati na ezalela motindo wana. Nzokande, mbala mingi, basalaka yango te. Mwana akozala mingi pene na kotosa mokano ya molakisi.
Mibeko mpo na kotambola
Na kokesana na eteyelo monene, epai kuna mbala mingi bayekoli bazali na bonsomi ya kobima mpe kozonga ndenge balingi, na mbola mibeko mizali na ntina na kobima mpe kokɔta. Mingi na biteyelo yango bipesaka nzela te na banakelasi ete bábima libándá ya lopango ya eteyelo longola bobele na Mwalomingo, mpe biteyelo mosusu kútu bipesaka nzela te ata na mokolo yango. Eru, mwanakelasi ya mbula 11 oyo atángaka na mbola alobi ete : “Bakambi ya eteyelo bapesaka biso nzela te ya kokende na makita, ata mpe ya kobima na mosala ya kosakola. Na kati ya eteyelo, mísa esalemaka bobele mpo na Bakatolike mpe Bamizilmá. Mwanakelasi mokomoko asengeli kopona moko kati na mangomba wana mibale soki te bakobimisela ye botɛmɛli ezala na balakisi mpe na banakelasi. Banakelasi basɛngisamaka na makasi ete báyemba nzembo mpo na kokumisa ekólo mpe nzembo ya lingomba.”
Ntango baboti bakomisi bana na bango na eteyelo motindo wana, likanisi nini bazali kopesa na bana na bango? Likanisi ekoki mpenza kozala ete kolakisama na biteyelo ya mokili ezali na motuya koleka koyangana mpo na losambo mpe kosangana na mosala ya kozalisa bayekoli—mpe eleki ata kozala sembo epai ya Nzambe.—Matai 24:14; 28:19, 20; 2 Bakolinti 6:14-18; Baebele 10:24, 25.
Na mbola misusu, banakelasi oyo bazali Batatoli basalaka bibongiseli ya koyekola Biblia elongo, kasi ata likambo wana ezali sé mpasi. Elenge mwasi moko ya mbula 16, na nkombo Blessing alobi boye mpo na mbola epai atángaka: “Mikolo nyonso baklisto ya nkombo mpamba bayanganaka mpo na kobondela. Biso Batatoli tomekaka kosɛnga na bango ete tósala boyekoli biso moko, kasi banakelasi ya mikóló bayanolaka biso ete lingomba na biso liyebani te. Na yango bamekaka kotindika biso na makasi mpo ete tóbondela na bango elongo. Soki toboyi, bakopesa biso etumbu. Soki tofundi epai na balakisi ezali sé koluka mindɔndɔ́. Bakotyola biso na kopesáká biso bankombo ndenge na ndenge mpe bakotinda banakelasi oyo bazali mikóló ete bápesa biso etumbu.”
Kozala na etamboli ekeseni
Soki banakelasi oyo batángaka na mbola bayebani malamu ete bazali Batatoli ya Yehova, likambo yango ekoki kosalisa bango. Bakambi ya eteyelo bakoki kopesa bango ndingisa ya kosangana te na milulu ya mangomba ya lokuta, oyo miyokani te na bindimeli ya Batatoli. Baninga ya kelasi bakoki kotika komeka kokɔtisa bango na makambo mpe na masoló ya mabe. Ekoki kofungola nzela mpo na kopesa litatoli na baninga ya kelasi mpe na balakisi. Lisusu, baoyo bazali kolanda mitindá ya boklisto bakokanisela bango mabe te soki mbeba moko esalami, mpe na bantango mosusu balakisi mpe baninga na bango ya kelasi bakoki kopesa bango limemya.
Nzokande, makambo mazalaka ntango nyonso ndenge wana te. Kozala na etamboli ekeseni esalaka mbala mingi ete elenge anyokolama mpe atyolama na banakelasi mpe na balakisi lokola. Yinka, elenge mobali ya mbula 15 oyo atángaka na mbola, alobi ete: “Na eteyelo, soki oyebani ete ozali Motatoli ya Yehova, okomi moto ya kotumola. Lokola bayebi mitindá na biso ya elimo mpe etamboli na biso, bazali kotya mitambo mpo na kozwa biso.”
Mokumba ya baboti
Molakisi moko te to mpe eteyelo moko te ekokoka mpenza komeka kokokisa mokumba ya kobongisa bana ete bákoma basaleli ya Yehova oyo bamipesi. Yango ezali mosala na bango te mpe mokumba na bango te. Liloba ya Nzambe emonisi ete baboti bango moko nde basengeli kokokisa mposa ya elimo ya bana na bango. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bino batata mpe bóyokisa bana na bino nkanda te, kasi bóbɔkɔla bango na mateyo mpe na mpamela na Nkolo.” (Baefese 6:4) Lolenge nini baboti bakosalela toli wana oyo euti na Nzambe soki bana na bango bazali na mbola epai kuna bazali na ndingisa ya kokende kotala bango bobele mbala moko to mbala mibale na sanza?
Ezalela ya makambo ekesanaka mingi, kasi baboti baklisto bazali kosala milende ya kosala engebene maloba oyo mapemami: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto azangi kondima.”—1 Timoté 5:8.
Myango mosusu mizali?
Baboti bakoki kosala nini soki emonani ete bazali bobele na maponi mibale—mbola to mpe eteyelo ezangi bisaleli na esika bafandi? Bamoko oyo bazalaki kati na ezalela wana babongisaki makambo na boye ete bana na bango bázwa mateya mosusu na ndako likoló na oyo bazali kozwa na eteyelo ya esika bafandi. Baboti mosusu bazali komibombela ntango mpo na kolakisa bana na bango na ndako.
Mbala mosusu baboti bapengolaka mikakatano na kobongisáká makambo liboso mpenza ete bana na bango bákóma na mbula ya kokɔta na eteyelo ya katikati. Soki ozali na bana mike to mpe ozali kokanisa kosala libota, okoki koluka koyeba soki ezali na eteyelo moko malamu ya katikati na etúká na bino. Soki ezali te, ekozala malamu bókende kofanda na esika oyo ezali pene na eteyelo malamu.
Lokola baboti bayebi yango malamu, ezali kosɛnga makoki, motema molai, mpe ntango mingi mpo na kokɔtisa epai na mwana bolingo mpo na Yehova. Soki yango ezali mpasi wana mwana azali na ndako, ekozala lisusu mpasi mingi koleka soki mwana azali kofanda mosika! Lokola bomoi ya seko ya mwana etalelami, baboti basengeli kozwa ekateli yango na mayele nyonso mpe na nsima wana bamanyoli soki ebongi mpenza kotinda mwana na bango na mbola, na kotaleláká makámá na yango. Oyo nde kozanga komona mosika soki bakobebisa matomba ya elimo ya mwana na bango mpo na matomba ya kolakisama oyo ezali kopesama na mbola! Yango ekozala lokola nde kokɔta kati na ndako oyo ezali kozika mpo na koluka kobimisa eloko moko ya motuya moke oyo ezali na kati—mpe na bongo kozikisama na mɔ́tɔ.
Liloba ya Nzambe elobi ete: “Moto na mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba; nde bazoba bakoleka wana mpe bakozwa etumbu.” (Masese 22:3) Eleki malamu kopengola ezalela mabe na esika ya kobongisa wana yango esili kosalema. Ekozala malamu kotalela yango soki ozali komituna, ‘Nasengeli kotinda mwana na ngai na mbola?’
[Etanda na lokasa 28]
Makanisi ya bilenge Batatoli na ntina na mbola
“Na mbola, bana oyo bazali Batatoli ya Yehova bazwaka lisusu bolamu ya boninga na bandeko ya elimo te. Ezali mpenza esika mabe oyo ezali na bopusi makasi mpo ete moto asala oyo ezali mabe.”—Rotimi, oyo azalaki na mbola ntango azalaki katikati na mibu 11 mpe 14.
“Koyangana na makita ezalaki mpasi mingi. Nazalaki na likoki ya koyangana bobele na Mwalomingo, mpe mpo na kosala yango, nasengelaki kokima wana banakelasi bazalaki na molɔngɔ́ mpo na kokɔta na ndakonzambe. Nazalaki na esengo soko moke te, mpamba te soki nazongi na ndako nazalaki na momeseno ya kosangana na makita nyonso ya lisangá, mpe nazalaki kobima na mosala ya kosakola na Mwapɔ́sɔ mpe na Mwalomingo. Eteyelo etongaki ngai soko moke te. Nazangaki makambo mingi.”—Esther, oyo azalaki ntango nyonso kobɛtama fimbo na balakisi mpo ete azalaki kosangana na milulu ya ndakonzambe te.
“Kopesa litatoli epai na baninga ya kelasi ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te na mbola. Ezali pɛtɛɛ te kozala na etamboli ekeseni na bato mosusu. Nazalaki na mposa ya kolanda etuluku. Mbala mosusu mbɛlɛ nalingaki kozala na molende koleka soki nazalaki na likoki ya kokende na makita mpe kosangana na mosala ya kosakola. Kasi nazalaki na likoki ya kosala yango bobele soki nazali na lói, oyo ezalaki kosalema bobele mbala misato na mbula. Soki ozali na mwinda mpe ozali kotondisa pitɔlɔ́ mbala na mbala te, pole na yango ekokita mokemoke. Ezalaki lolenge moko na eteyelo.”—Lara, oyo azalaki na mbola bandá azalaki na mbula 11 kino na mbula 16.
“Sikawa nazali lisusu na mbola te, nazali na esengo ete nakoki koyangana na makita nyonso, kosangana na mosala ya kosakola, mpe kotalela mokapo ya mokolo elongo na libota na biso mobimba. Atako kozala na eteyelo ezalaki na mwa matomba, eloko moko te ezali na motuya koleka boyokani na ngai na Yehova.”—Naomi, oyo andimisaki tata na ye ete alongola ye na mbola.