Zalá na mpiko, kosikolama ebɛlɛmi
“Nazali na yo elongo mpo na kobikisa [“kosikola,” “NW”] yo. [Yehova] alobi bongo.”—YILIMIA 1:19.
1, 2. Mpo na nini libota ya bato lizali na mposa ya kosikolama?
KOSIKOLAMA! Oyo nde liloba ya kobɔndisa! Kosikolama elingi koloba kosungama, kolongolama na esika moko ya mabe, ya likámá. Yango elimboli mpe kotyama na ezalela moko oyo eleki ezalela ya liboso na malamu, to ezalela ya esengo.
2 Na eleko oyo, libota ya bato lizali mpenza na mposa ya kosikolama motindo wana! Bipai binso, bato bazali kotungisama mpe balɛmbi na ntina na mikakatano minene—makambo ya nkita, ya ebikelo ya bato, mitungisi ya nzoto, ya makanisi, mpe ya mayoki. Ebele ya bato bazangi esengo, bazali na mawa mpo na lolenge oyo mokili mozali kotambola mpe bazali na mposa ya mbongwana oyo ekobongisa makambo.—Yisaya 60:2; Matai 9:36.
“Ntango na mpasi”
3, 4. Mpo na nini mposa ya kosikolama ekómi mpenza monene na mikolo na biso?
3 Lokola ekeke oyo ya 20 etondi na mpasi koleka bikeke nyonso mosusu, emonani ete mposa ya kosikolama ezali makasi sikawa koleka bileko nyonso ya kala. Lelo oyo, koleka miliare moko ya bato bazali na bobólá makasi, mpe mbula na mbula, bato pene na milió 25 bazali kobakisama na motángo wana. Bana pene na milió 13 bazali kokufa mbula na mbula mpo na kozanga koleisama malamu to mpo na bantina mosusu oyo euti na bobólá—elingi koloba, bana koleka 35 000 bazali kokufa mokolo na mokolo! Lisusu, bamilió ya mikóló bazali kokufa mobesu na ntina na makɔnɔ ndenge na ndenge.—Luka 21:11; Emoniseli 6:8.
4 Bitumba mpe mobulu ya banamboka ezali kobimisa mikakatano oyo ekoki kokanisama te. Búku Liwa oyo liuti na guvernemá (na Lingelesi) elobi ete bitumba, matáta kati na bikólo mpe mangomba, bakisá mpe kobomama ya ebele ya banamboka na baguvernemá na bango moko esili “koboma bato koleka milió 203 na ekeke oyo.” Ebakisi lisusu ete: “Motángo ya bawei ekoki ata kokóma pene na milió 360. Ezali lokola nde libota ya bato lizali kosilisama na bokɔnɔ ebéngami peste noire ya lelo (maladi oyo mabimaki na ekeke ya 14 na Azia mpe na Mpótó). Mpe ezali solo mpenza ete libota ya bato lizali kosilisama, na mikrobe te kasi na bolózi bouti na banguya oyo ezali koyangela.” Mokomi Richard Harwood alobaki ete: “Bitumba ya yauli oyo bisalemaki na bikeke ya kala bizalaki bobele lisano mpamba soki tokokanisi yango na oyo ya lelo.”—Matai 24:6, 7; Emoniseli 6:4.
5, 6. Nini ezali kokómisa eleko na biso mpasi koleka?
5 Longola makambo ya mpasi oyo masalemaki na bambula eleki, totángi lisusu bokóli monene ya ezaleli ya kosala bato mabe, ya pite, mpe kobeba ya mabota. William Bennett, Secrétaire d’État ya kala mpo na makambo matali kolakisama na État-Unis, amonisaki ete, na boumeli ya mbula 30, motángo ya banamboka États-Unis ezwaki bokóli ya 40 %, nzokande kosala bato mabe ezwaki bokóli ya 560 %, motángo ya bana bazangá batata ezwaki bokóli ya 400 %, kokufa ya mabala ezwaki bokóli ya 300 %, mpe motángo ya bilenge oyo bazali komiboma ekolaki na 200 %. John DiIulio, Molakisi na Iniversité ya Princeton, akebisaki na ntina na kobakisama ya bilenge “bankɔi na yauli,” oyo bazali “koboma, kobundisa bato, kosangana na basi na makasi, kobɔtɔla bato biloko na makasi, mobulu, mpe oyo bazali kobimisela bato mikakatano minene. Bayokaka lisusu nsɔ́ni ya kokangama te, babangaka lisusu mpasi ya bolɔ́kɔ te, lisosoli etungisaka bango lisusu te.” Na mokili wana ya États-Unis, koboma bato ekómi sikawa ntina ya mibale mpo na yango bilenge ya mbula 15 kino 19 bazali kokufa. Lisusu, bana mingi oyo bakokisi naino mbula minei te bazali kokufa ntango nyonso, na maladi te, kasi mpo ete baboti bazali konyokola bango.
6 Mabe mpe mobulu motindo wana esuki bobele na mokili moko te. Mimeseno yango mizali komonana na mikili mingi. Eloko mosusu oyo ezali kokólisa mikakatano ezali bongo kosalelama ya bilangwiseli oyo esili kobebisa bamilió ya bato. Zulunalo Sydney Morning Herald, oyo ebimaka na mboka Australie, elobi ete: “Kati na mokili, kotekama ya bilangwiseli na bamboka ekeseni ekómi mombongo ya mibale oyo ezali kokɔtisa mosolo mingi, nsima ya mombongo ya bibundeli.” Eloko mosusu oyo ezali kokólisa mikakatano yango ezali bongo mobulu mpe pite oyo etondi lelo na televizyó. Na mikili mingi, ntango mwana akokisi mbula 18, asili kotala bankóto ya bililingi ya mobulu na televizyó mpe ebele ya bililingi ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo. Yango ezali na bopusi mabe mpenza, mpamba te bomoto na biso elandaka lolenge ya makambo oyo tozali kokɔtisa na elimo na biso.—Baloma 12:2; Baefese 5:3, 4.
7. Lolenge nini esakweli ya Biblia elobelaki makambo ya mpasi oyo mazali komonana na mikolo ya lelo?
7 Esakweli ya Biblia eyebisaki na bosikisiki mpenza ete makambo wana ya nsɔ́mɔ makobima na ekeke na biso. Esakweli yango elobaki ete bitumba minene bikozala, makɔnɔ mabe, nzala, mpe bokóli ya ezaleli ya kobuka mibeko. (Matai 24:7-12; Luka 21:10, 11) Mpe ntango tozali kotánga esakweli oyo ekomami na 2 Timoté 3:1-5, ezali lokola nde tozali koyoka nsango ya makambo mazali kosalema mokolo na mokolo. Esakweli yango ebéngi ekeke na biso ete “mikolo ya nsuka” mpe elobeli bato ya eleko yango ete bazali ‘balingi na bango mpenza, balingi na mosolo, bazangi kotosa baboti, bazangi sembo, bazangi bolingo ya motema, bazangi komipekisa, bato na yauli, bavimbi na lolendo, bato bakolingaka bisengo koleka bolingo epai na Nzambe.’ Wana ezali makambo oyo mazali komonana lelo kati na mokili. Lokola William Bennett andimaki yango: “Ezali na bilembo mingi mpenza . . . oyo bimonisi ete ebongiseli ya makambo oyo esili kopɔla.” Kútu esili kolobama ete mimeseno malamu misukaki na etumba ya liboso ya mokili mobimba.
8. Mpo na nini Nzambe ayeisaki Mpela na mikolo na Noa, mpe lolenge nini likambo yango eyokani na mikolo na biso?
8 Makambo oyo mazali kosalema lelo mazali mpenza mabe koleka makambo oyo mazalaki liboso ya Mpela na mikolo ya Noa, ntango “mokili etondaki na yauli.” Na ntango wana, bato mingi baboyaki kotika banzela mabe na bango. Na bongo, Nzambe alobaki ete: “Mokili etondi na yauli mpo na bango. Mpe nakobebisa bango na mokili elongo.” Mpela esukisaki mokili wana ya mobulu.—Genese 6:11, 13; 7:17-24.
Kosikolama ekoki kouta epai na bato te
9, 10. Mpo na nini tosengeli te kotya elikya epai na bato mpo na kosikolama?
9 Milende oyo bato bazali kosala ekoki nde kosikola biso na makambo oyo ya mpasi? Liloba ya Nzambe liyanoli ete: “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” “Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Nzembo 146:3; Yilimia 10:23) Bankóto ya bambula oyo eleki ya lisoló mobimba ya bato esili kondimisa bosolo ya maloba wana. Bato bameki bibongiseli ndenge na ndenge ya politiki, ya nkita, mpe ya ebikelo malamu ya bato, kasi makambo mazali sé kobeba. Soki bato, na milende na bango, bazwaki mpenza mwango ya kosilisa mikakatano, mbɛlɛ yango esili komonana polele lelo oyo. Kasi, likambo ya solo oyo emonani ezali ete: “moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.”—Mosakoli 8:9; Masese 29:2; Yilimia 17:5, 6.
10 Esili koleka mwa bambula, Zbigniew Brzezinski, mopesi-toli moko ya kala na makambo matali libateli na États-Unis, alobaki ete: “Kati na bolukiluki nyonso oyo esalemi na bosembo mpenza likoló na bizalela ya mokili, bobele bosukisi moko nde ekoki kozwama: yikiyiki na makambo ya bomoi ya bato, yikiyiki na politiki, mikakatano ya nkita, mpe matáta kati na mikili mikeseni ekokóba kofuluka mingi lisusu.” Abakisaki ete: “Mokakatano oyo bato bazali kobunda na yango [ezali] bongo mobulungano oyo ezali komonana bipai binso.” Na mikolo na biso, bosolo ya likanisi wana, oyo limonisi lolenge makambo mazali kotambola na mokili, ezali komonana polele. Wana elobelaki ekeke oyo ya mobulu monene, zulunalo Register, oyo ebimaka na engumba New Haven, na etúká ya Connecticut, eyebisaki boye: “Emonani mpenza ete tosili kokóma mosika kati na ezalela yango, likoki ya kotɛlɛmisa yango ezali lisusu te.” Ɛɛ, kobeba ya mokili oyo ekoki kotɛlɛma lisusu te mpo ete esakweli oyo elobeli ‘mikolo ya nsuka’ elobi lisusu boye: “Bato mabe mpe bakosi bakoleka na mabe, bakozimbisa mpe bakozimbisama.”—2 Timoté 3:13.
11. Mpo na nini milende ya bato mikoki te kobongisa makambo oyo mazali sé kobeba?
11 Bato bakoki soko moke te kobongola lolenge ya makambo oyo mpo ete Satana azali “nzambe na mokili oyo.” (2 Bakolinti 4:4) Ɛɛ, “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19; talá mpe Yoane 14:30.) Biblia elobi na elónga mpenza na ntina na mikolo na biso ete: “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” (Emoniseli 12:12) Satana ayebi malamu ete boyangeli na ye mpe mokili na ye ekómi pene na nsuka na yango; boye akómi lokola “nkosi konguluma, kolukáká soko akolya nani.”—1 Petelo 5:8.
Kosikolama ebɛlɛmi—Mpo na banani?
12. Kosikolama ezali kobɛlɛma mpo na banani?
12 Makambo ya mpasi oyo mazali sé koyikana awa na mabelé mazali mpenza elembeteli monene oyo emonisi ete mbongwana ya solosolo—ɛɛ, kosikolama monene—ebɛlɛmi! Mpo na banani? Kosikolama ezali kobɛlɛma mpo na baoyo bazali kotya likebi na makebisi oyo mazali kopesama mpe bazali kosala oyo esengeli. Yoane ya Liboso 2:17 emonisi likambo oyo bato basengeli kosala: “Mokili [ebongiseli ya biloko ya Satana] ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.”—Talá mpe 2 Petelo 3:10-13.
13, 14. Lolenge nini Yesu amonisaki polele ntina ya kosɛnzɛla ntango nyonso?
13 Yesu asakolaki ete libota ya bato na mikolo na biso lisili kobeba, likobɛlɛma na kobomama na yango ntango likokɔta na eleko moko ya yikiyiki oyo ‘emonaná naino te uta ebandeli ya mokili kino sikawa, ekomonana mpe boye lisusu te.’ (Matai 24:21, NW) Yango wana apesaki likebisi ete: “Kebá na bino ete mitema na bino mikóma makasi mpo na kolunda te, soko na kolangwa te, soko na bitungiseli ya bomoi te. Bongo mokolo yango ebimela bino pwasa lokola motambo te. Mpo ete ekobimela bato nyonso bafandi na mikili. Sɛnzɛlá ntango nyonso, mpe bondelá ete bózala na makasi na kokima makambo oyo nyonso malingi koya.”—Luka 21:34-36.
14 Baoyo bazali ‘kokeba’ mpe ‘kosɛnzɛla’ bakoluka koyeba mokano ya Nzambe mpe bakosala yango. (Masese 2:1-5; Baloma 12:2) Ezali bato yango nde ‘bakozala na makasi ya kokima’ libebi oyo, mosika te, ekokwela ebongiseli ya Satana. Mpe bakoki kozala na elikya makasi ete bakosikolama mpenza.—Nzembo 34:15; Masese 10:28-30.
Mosikoli Monene
15, 16. Nani azali Mosikoli Monene, mpe mpo na nini tondimisami ete bikateli na ye bikozala ya boyengebene?
15 Mpo ete basaleli ya Nzambe básikolama, Satana mpe ebongiseli ya biloko na ye ya mokili mobimba basengeli kolongolama. Likambo yango esɛngi ete eutelo oyo ekosikola ezala na nguya oyo eleki nguya ya moto. Eutelo yango ezali bongo Yehova Nzambe, Mokonzi Monene, Mozalisi ya mɔlɔ́ngɔ́ ya kokamwa oyo aleki na nguya. Ye azali Mosikoli Monene: “Ngai, ngai nazali [Yehova]; mobikisi mosusu azali te, bobele ngai.”—Yisaya 43:11; Masese 18:10.
16 Yehova azali eutelo ya nguya oyo eleki nguya nyonso, ya mayele maleki mayele nyonso, ya boyengebene mpe ya bolingo boleki monene. (Nzembo 147:5; Masese 2:6; Yisaya 61:8; 1 Yoane 4:8) Na yango, ntango azali kokokisa bikateli na ye, tosengeli kondimisama ete misala nyonso akosala ekozala ya boyengebene. Abalayama atunaki ete: “Mosambisi na mokili mobimba akosala sembo te?” (Genese 18:24-33) Paulo alobaki ete: “Nzambe akokata na ekateli mabe? Soko moke te!” (Baloma 9:14) Yoane akomaki ete: “Ɛɛ, Nkolo Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, bikateli na yo bizali na solo mpe na sembo.”—Emoniseli 16:7.
17. Lolenge nini basaleli ya Yehova na ntango ya kala bamonisaki elikya makasi na bilaka na ye?
17 Lokola Yehova alaki kosikolama, akozanga soko moke te kokokisa yango. Yosua alobaki ete: “Moko na ndaka malamu nyonso, oyo [Yehova] atyaki . . . ezangi te [kokokisama].” (Yosua 21:45) Salomo alobaki boye: “Liloba moko ekwei te kati na bilaka na ye malamu oyo elobaki ye.” (1 Mikonzi 8:56) Ntoma Paulo ayebisaki ete Abalayama “abɛtaki elaka na Nzambe ntembe te, . . . andimaki na motema mobimba ete Nzambe akoki kosala yango esili ye kolaka.” Sala mpe ‘atángaki ete [Nzambe] oyo apesaki elaka akokokisa yango.’—Baloma 4:20, 21; Baebele 11:11.
18. Mpo na nini basaleli ya Yehova lelo bakoki kozala na elikya ete bakosikolama?
18 Na bokeseni na bato, Yehova abongi mpenza kotyelama motema, akokisaka liloba na ye. “[Yehova] na bibele akati ndai ete, Lokola mwango mobongisaki ngai, ekozala mpe bongo; lokola mokano mokanaki ngai, ekotɛma mpe bongo.” (Yisaya 14:24) Na yango, ntango Biblia elobi ete “Nkolo ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ezali bango kati na komekama nde kobatela bakeseni kino mokolo na kosamba mpo na kozwa etumbu,” tokoki kozala na elikya makasi ete yango ekosalema solo. (2 Petelo 2:9) Ata na ntango bazali liboso na likámá ya kobomama na banguna oyo bazali na nguya, basaleli ya Yehova bazalaka na mpiko mpo na ezaleli oyo Yehova azali na yango, oyo emonisami na elaka apesaki na moko na basakoli na ye ete: “Bakobundana na yo nde bakoleka yo te zambi ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo. [Yehova] alobi bongo.”—Yilimia 1:19; Nzembo 33:18, 19; Tito 1:2.
Kosikolama ndenge na ndenge na ntango ya kala
19. Lolenge nini Yehova asikolaki Lota, mpe yango emonisi nini mpo na eleko na biso?
19 Tokoki kozwa bilendiseli mpenza na kotaleláká mwa ndambo ya misala ya kobikisa oyo Yehova asalaki na ntango ya kala. Na ndakisa, Lota azalaki “kotungisama” mpo na mabe ya Sodomo mpe Gomola. Mpe Yehova ayokaki ‘bileli’ na ntina na mabe ya bingumba wana. Na ntango oyo ebongi, atindaki bamemi-nsango mpo na koyebisa Lota mpe libota na ye ete bábima nokinoki na esika yango. Nini esalamaki? Yehova ‘abikisaki moyengebene Lota,’ ‘kozikisáká bingumba Sodomo mpe Gomola kino mputulu ya mɔ́tɔ.’ (2 Petelo 2:6-8, NW; Genese 18:20, 21, NW) Lelo lisusu, Yehova azali koyoka bileli na ntina na mabe ya mokili oyo. Soki bamemi-nsango na ye ya mikolo na biso bakómisi mosala na bango ya kopesa litatoli nokinoki kino na ndelo oyo ye moko alingi, akoyeisa libebi na mokili oyo mpe akosikola basaleli na ye lokola asikolaki Lota.—Matai 24:14.
20. Lobelá lolenge Yehova asikolaki Yisalaele ya kala na Ezipito.
20 Na Ezipito ya kala, bamilió ya basaleli ya Nzambe bakómaki baombo. Yehova alobaki na ntina na bango ete: “Nayoki kolela na bango . . . Nayebi bolózi na bango, mpe nakiti mpo na kobikisa bango.” (Exode 3:7, 8) Nzokande, nsima ya kopesa nzela na libota ya Nzambe ete bákende, Falo abongolaki makanisi na ye mpe alandaki bango elongo na limpinga na ye ya nguya. Emonanaki ete Bayisalaele bakozwama na Mai Motane. Kasi Mose alobaki ete: “Bangá te, tɛlɛmá ngwi mpe talá kobikisa na [Yehova] ekosala ye mpo na bino lelo.” (Exode 14:8-14) Yehova akabolaki Mai Motane, mpe Bayisalaele balekaki. Basodá ya Falo balandaki bango, kasi Yehova atindaki nguya na ye na boye ete “mai na monana ebombaki bango; bazindaki lokola mondɔlu kati na mai makasi.” Na nsima, Mose ayembelaki Yehova loyembo ya esengo: “Nani azali lokola yo, na lokumu kati na bulɛɛ, mpe na kobonga na kosambela na kosanzola na misala na kokamwa?”—Exode 15:4-12, 19.
21. Lolenge nini libota ya Yehova ebikisamaki liboso na Amona, Moaba, mpe Seili?
21 Na libaku mosusu, mabota ya Amona, Moaba, mpe Seili (Edome) oyo mazalaki banguna ya Yisalaele, bakanaki koboma libota ya Yehova. Kasi ye alobaki ete: “Bangá te mpe yoká mawa mpo na ebele monene [ya banguna] te zambi etumba ezali na bino te kasi na Nzambe. . . . Ekokoka na bino kobunda na etumba oyo te, tɛlɛmá na bisika na bino, zalá nyɛɛ mpe talá elónga na [Yehova] mpo na bino.” Yehova asikolaki libota na ye na kokɔtisáká mobulungano kati na banguna na boye ete babomanaki bango na bango.—2 Ntango 20:15-23.
22. Kosikolama nini ya kokamwa liboso na Asulia Yehova asalaki mpo na Yisalaele?
22 Ntango Asulia, oyo ezalaki nguya eleki makasi na mokili mobimba, eyaki kobundisa Yelusaleme, Mokonzi Senaheliba atumolaki Yehova na kolobáká epai na bato likoló na efelo ete: “Banani kati na banzambe na mokili [oyo nasili kokamata] babikisi mokili na bango na lobɔkɔ na ngai? [Yehova] akobikisa nde Yelusaleme na lobɔkɔ na ngai?” Alobaki epai na basaleli ya Nzambe ete: “Tiká te ete Hizikiya andimisa bino epai na [Yehova], wana ekoloba ye ete, [Yehova] akobikisa biso.” Bongo, Hizikiya abondelaki na etingya mpenza mpo na kosikolama, “ete makonzi nyonso na mokili báyeba ete yo ozali [Yehova], bobele yo moko [ozali Nzambe, NW].” Yehova abomaki basodá 185 000 ya Baasulia, mpe basaleli ya Nzambe basikolamaki. Na nsima, wana Senaheliba azalaki kosambela nzambe na ye ya lokuta, bana na ye babomaki ye.—Yisaya, mokapo 36 mpe mokapo 37.
23. Mituna nini misengeli kozwa biyano na ntina na kosikolama na mikolo na biso?
23 Tokoki mpenza kozala na mpiko soki totali lolenge ya kokamwisa oyo Yehova asalelaki mpo na kobikisa libota na ye na ntango ya kala. Tokoloba boni mpo na mikolo na biso? Likámá nini oyo etikali moke, basaleli na ye ya sembo bakokoma liboso na yango mpe oyo ekosenga ete asikola bango na lolenge ya kokamwisa? Mpo na nini azali kozela kino sikawa liboso ya kosikola bango? Maloba ya Yesu oyo: “Wana ekobanda makambo oyo kobima, tɛlɛmá alima mpe tombolá mitó na bino, mpo ete lisiko [“kosikolama,” NW ] na bino ezali kobɛlɛma,” makozwa kokokisama nini? (Luka 21:28) Mpe lolenge nini basaleli ya Nzambe oyo basilá kokufa bakosikolama? Mituna oyo mikotalelama na lisoló lilandi.
Mituna ya bozongeli
◻ Mpo na nini tozali na mposa makasi ya kosikolama?
◻ Mpo na nini tosengeli te kotya elikya epai na bato mpo na kosikolama?
◻ Kosikolama ebɛlɛmi mpo na banani?
◻ Mpo na nini tosengeli kotya elikya ete Yehova akosikola?
◻ Bandakisa nini ya kala ya kosikolama ezali mpenza kolendisa?
[Elilingi na lokasa 10]
Abalayama azalaki moko na baoyo batyaki elikya makasi epai na Yehova