Kimya ya solo—Ekouta wapi?
“ [Yehova] akosukisa bitumba kino nsuka na mokili.”—NZEMBO 46:9.
1. Elaka kitoko nini na ntina na kimya ezwami na esakweli ya Yisaya?
“MOSALA na boyengebene ekozala kimya mpe nsuka na boyengebene ekozala kimya mpe [kobatelama, NW] libela. Bato na ngai bakofanda na efandelo na kimya na bifandelo na solo mpe na ndako na bolɔ́zi te.” (Yisaya 32:17, 18) Oyo nde elaka kitoko! Ezali elaka ya kimya ya solo oyo Nzambe akoyeisa.
2, 3. Yebisá ndenge kimya ya solo ekozala.
2 Kasi kimya ya solo ezali nini? Ezali nde bobele kozanga ya bitumba? To bobele eleko oyo na boumeli na yango bato bazali komilɛngɛla mpo na etumba oyo ekolanda nsima? Kimya ya solo ezali sé ndɔ́tɔ mpamba? Wana ezali mituna oyo tosengeli kozwa biyano ya sikisiki mpo na yango. Ya liboso, kimya ya solo ezali ndɔ́tɔ mpamba te. Kimya oyo Nzambe alaki eleki mpenza makambo nyonso oyo mokili ekoki kokanisa. (Yisaya 64:4) Ezali kimya ya mwa bileko to ya mwa bambula te. Ekoumela seko! Mpe ezali kimya oyo esuki bobele na ndambo ya bato minene te—kútu yango esangisi nde likoló mpe mabelé, baanzelu mpe bato. Epesameli bato ya mabota nyonso, ya bikólo nyonso, ya minɔkɔ nyonso, mpe ya mposo nyonso. Eyebi bandelo te, eyebi bikabwanelo te, etalelaka bolɛmbu te.—Nzembo 72:7, 8; Yisaya 48:18.
3 Kimya ya solo ezali kimya ya mikolo nyonso. Elakisi kolamuka ntɔ́ngɔ́ na ntɔ́ngɔ́ kozanga likanisi ya etumba, kozanga komitungisa mpo na bomoi na yo, to bomoi ya bana na bana na yo na mikolo mizali koya. Elimboli kimya ya makanisi. (Bakolose 3:15) Yango elimboli ete koboma bato, mobulu, bokabwani ya mabota, bato bazanga ndako, bato bazali na nzala to bazanga mwango ya komibatela na malili, mpe bato bazanga elikya bazali lisusu te. Na koleka, kimya ya Nzambe elimboli mokili mozangi makɔnɔ, mozangi mpasi, mozangi mawa, mpe mozangi liwa. (Emoniseli 21:4) Oyo nde elikya monene tozali na yango ya kosepela na kimya ya solo seko na seko! Oyo ezali lolenge ya kimya mpe ya esengo oyo biso banso tozali koluka, boye te? Ezali lolenge ya kimya oyo tosengeli kobondela mpe kosala mosala mpo na yango, boye te?
Milende mpamba ya bato
4. Milende nini mabota masalaki mpo na kopesa kimya, mpe yango ebimisaki litomba nini?
4 Uta bikeke mingi, bato mpe mabota bazali kolobela kimya, bazali kopesana makanisi na ntina na kimya, bazali kotya mabɔkɔ na mikanda mingi ya boyokani mpo na kimya. Kasi litomba nini ezwami? Na boumeli ya mbula 80 oyo iuti koleka, ezalaki ata na eleko moko te oyo etumba ezangaki kosalema kati na libota moko to kati na etuluku moko. Emonani polele ete kimya esili kokima bato. Motuna oyo mozali kotunama: Mpo na nini milende ya bato mpo na kotya kimya na mokili mobimba mizali kolónga te, mpe mpo na nini bato bazangi makoki ya kopesa kimya oyo ekoki koumela?
5. Mpo na nini milende oyo bato bazali kosala mpo na kopesa kimya mizali ntango nyonso kolónga te?
5 Eyano ya moboko ezali ete bato babalolaki te miso na bango epai na eutelo ya sikisiki ya kimya ya solo. Lokola bapusami na Satana, bato basili kosala bibongiseli oyo bizali kobebisama mpo na bolɛmbu mpe makambo mabe na bango moko—lokoso mpe mposa mabe na bango, bilulela na bango ya kozwa bokonzi mpe kozala na etɛlɛmɛlo monene. Bakendeki na biteyelo minene minene mpe basali bibongiseli mpe bisika ya koyekola, makambo oyo mabimisi bobele myango mosusu ya konyokola mpe ya koboma bato. Bato batyaki likebi na bango na eutelo nini? Batalaki epai na nani?
6, 7. (a) Lisangá ya Mabota elóngaki na mikumba na yango? (b) Lisangá ya Mabota Masangani elóngaki na mikumba na yango?
6 Na mobu 1919, mikili batyaki motema na bango na Lisangá ya Mabota [Société des Nations] mpo na kotya kimya oyo ekoumela. Elikya wana ebebaki na 1935 ntango mampinga ya Mussolini makɔtaki na Éthiopie mpo na kobundisa yango mpe na 1936 ntango etumba ya banamboka ebimaki na Espagne. Na mobu 1939, Lisangá yango likweaki ntango Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba ebandaki. Kimya wana ya lokuta eumelaki ata mbula 20 te.
7 Ezali boni mpo na Mabota Masangani [O.N.U.]? Masili kopesa bato elikya ya kimya ya solo na mabelé mobimba? Soko moke te. Bitumba mpe matáta koleka 150, epai kuna mandoki masalelamaki, esili kobima uta ntango likanisi ya kosala Mabota Masangani ezwamaki na 1945! Ezali likambo ya kokamwa te ete Gwynne Dyer, moto na Canada, nganga-mayele na makambo matali bitumba mpe biutelo na yango, alobaki na ntina na Mabota Masangani ete yango ezali “lisangá ya babomi minene na nyama, baoyo babongwani babateli na nyama, kasi yango ezali etuluku ya basantu te,” mpe ezali “ebongiseli ya maloba mpamba oyo mazangi nguya.”—Kokanisá na Yilimia 6:14; 8:15.
8. Atako babongisaki bokutani mpo na kolobela kimya, mabota mazali kosala nini? (Yisaya 59:8)
8 Atako bazali kolobela kimya, mabota bazali ntango nyonso kobimisa mpe kosala bibundeli. Mikili oyo mindimaka mokumba ya kofuta mosolo mpo na kosalama ya makita matali kimya mizali mbala mingi na molɔngɔ́ ya liboso mpo na kosala bibundeli. Matomba minene ya mombongo kati na mikili yango mazali kolendisa kosalama ya bibundeli wana ya koboma, bakisá mpe bamine oyo bakundaka na mabelé, oyo, mbula na mbula, ezali koboma to kokata binama ya nzoto ya bana mpe ya mikóló soko 26 000, oyo bazali basodá te. Lokoso mpe moimi ezali nguya makasi oyo ezali kopusa bango. Kanyaka mpe koyiba mituya minene ya mbongo [ya Letá to ya kompanyi] ezali likambo oyo lizali komonana mingi kati na mombongo ya bibundeli na mokili mobimba. Bamoko kati na bato ya politiki basili komikómisa bazwi na nzela ya makambo yango.
9, 10. Banganga-mayele ya mokili bamonaki makambo nini na ntina na bitumba mpe milende ya bato?
9 Na Desɛ́mbɛ 1995, Joseph Rotblat, moto na siansi na mboka Pologne mpe molóngi ya Prix Nobel, asɛngaki na mabota ete bátika bowelani na bango ya koluka kozala na bibundeli mingi mpe ya makasi koleka. Alobaki ete: “Mwango bobele moko mpo na kopekisa [bowelani ya kozala na bibundeli mingi mpe ya makasi koleka] ezali ya kosala ete etumba esila nyɛɛ.” Okanisi ete likambo yango likoki mpenza kosalama? Uta 1928, mikili 62 bandimaki mokanda ya boyokani oyo babéngi Pacte de Kellogg-Briand, oyo na nzela na yango bamonisaki ete batiki kosalela etumba lokola mwango ya kosilisa matáta. Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba emonisaki polele ete boyokani yango ezalaki mpamba.
10 Mpo na koloba solo—bitumba bizali mokakatano oyo libota ya bato ezali kokutana na yango ntango nyonso na boumeli ya lisoló na bango mobimba. Gwynne Dyer akomaki ete: “Etumba ezali ebongiseli moko ya ntéi na makambo ya bomoi ya bato, mpe boumeli ya lisoló na yango ekokani na boumeli ya moto.” Ɛɛ, sivilizasyó nyonso mpe bokonzi na bokonzi ezalaki na basodá na yango ya mpiko oyo bamipesaki mpe bakumisamaki, mampinga na yango oyo mabongisamaki, bitumba na yango ya lokumu, biteyelo minene mpe ya lokumu mpo na kobongisa basodá, mpe ebele na bibombelo na yango ya bibundeli. Nzokande, na boumeli ya ekeke na biso, bitumba bimonani mingi koleka bikeke mosusu nyonso; ezala na kobebisa biloko to na koboma bato.
11. Bakonzi ya mokili babosanaki likambo nini ya ntina wana ezalaki bango kolukaluka kimya?
11 Emonani polele ete bakonzi ya mokili bayebi te mayele ya moboko oyo mazwami kati na Yilimia 10:23 ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” Soki Nzambe atyami pembeni, kimya ya solo ekoki kozwama te. Kasi, nyonso wana elingi nde koloba ete etumba ekoki soko moke te kopɛngolama kati na libota ya bato oyo lisili kokóla na boyebi ya makambo mingi? Elingi nde koloba ete kimya—kimya ya solo—ezali ndɔ́tɔ oyo ekoki te kokóma likambo ya solo?
Tósosola eutelo ya likambo
12, 13. (a) Biblia ezali komonisa nini mpo na oyo etali eutelo ya bitumba oyo ezangi komonana? (b) Lolenge nini Satana apɛngolaki likebi ya bato mosika na nzela ya solosolo mpo na kosilisa mikakatano ya mokili?
12 Mpo na koyanola na mituna wana, tosengeli naino kososola biutelo ya etumba. Biblia emonisi polele ete anzelu motomboki, Satana, azali “mobomi na bato” longwa na ebandeli mpe “mobuki na nkuta” mpe ete “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (Yoane 8:44; 1 Yoane 5:19) Asalaki nini mpo na kokokisa mikano na ye? Totángi kati na 2 Bakolinti 4:3, 4 ete: “Soko mpe Nsango Malamu na biso ezipami, ezipami bobele mpo na baoyo bazali kobeba. Nzambe na mokili oyo azimisi miso na makanisi na bango baboyi kondima ete bámona pole na Nsango Malamu na nkɛmbo na Klisto te. Ye azali elilingi na Nzambe.” Satana azali kosala nyonso mpo na kopɛngwisa likebi ya bato longwa na Bokonzi ya Nzambe oyo ezali mwango mokosilisa mikakatano ya mokili. Azali kozipa miso ya bato mpe kopɛngwisa likebi na bango na nzela ya makambo oyo mazali kokɔtisa bokabwani na lolenge ya bomoi ya bato, na makambo ya politiki mpe na makambo matali lingomba, kosaláká ete makambo yango mámonana lokola nde maleki boyangeli ya Nzambe na ntina. Ndakisa moko ya makambo motindo wana oyo euti komonana kala mingi te ezali bongo bokóli ya bolingo mozindo mpo na ekólo.
13 Satana azali kolendisa bolingo ya ekólo mpe ya monɔkɔ ya mboka, bakisá ezaleli ya kokanisa ete libota boye, to loposo boye to mpe ekólo boye eleki mosusu nyonso. Koyinana makasi oyo elóngamaki na boumeli ya bikeke mingi ezali sikawa kolamuka mpo na kopusa bato na bitumba mpe na matáta. Federico Mayor, mokambi ya UNESCO, abendaki likebi likoló na momeseno yango, kolobáká ete: “Ata na bisika oyo ezaleli ya kondima bapaya ezalaki komonisama mingi, mbongwana emonani polele mpo ete balandi ezaleli ya koyina bapaya, mpe bolingo makasi ya ekólo to koyina bato ya mposo mosusu, oyo ekómaki lokola makambo ya kala, ezali kolobelama mbala na mbala.” Yango ebimisaki litomba nini? Kobomana ya nsɔ́mɔ na ex-Yougoslavie mpe kosopama ya makila kati na etumba ya bato na bitúlúká bikeseni na Rwanda ezali bobele bandakisa mibale ya makambo motindo wana oyo ezali kolobelama mingi na bopanzi nsango.
14. Lolenge nini Emoniseli 6:4 ezali kolobela bitumba mpe bopusi na yango na ntango na biso?
14 Biblia esakolaki yango polele ete na ntango ya nsuka ya ebongiseli oyo, mpunda moko ya lángi motane, oyo ezali elilingi ya etumba, esengelaki kotambolatambola na mabelé mobimba. Totángi boye kati na Emoniseli 6:4: “[Mpunda, NW] mosusu motane ebimi. Nguya epesami na mofandi na yango ete alongola kimya na mokili na ntina ete bato bábomana, mpe mopanga epesami na ye.” Uta 1914, tozali komona lolenge motamboli na mpunda yango ya elilingi azali ‘kolongola kimya’ mpe mabota mazali kolanda kobunda mpe komikɔtisa na bitumba.
15, 16. (a) Mokumba nini mangomba mazalaki na yango kati na bitumba mpe kobomana? (b) Lolenge nini Yehova azali kotalela misala ya mangomba?
15 Tosengeli te kobosana mokumba ya mangomba kati na bitumba mpe mabomi yango. Mingi kati na ebele ya makila oyo masopami na boumeli ya lisoló mobimba ya bato euti na bopusi ya mangomba ya lokuta oyo mazali kozimbisa bato na litambwisi na yango mabe. Hans Küng, moto na teoloji na lingomba ya Katolike akomaki ete: “Ntembe ezali te ete [mangomba] mazalaki mpe mazali ntango nyonso kosala bopusi mabe mpe ya koboma likoló na bato. Ebele ya bitumba mpe matáta oyo ezali kosopa makila, ya solo mpenza ‘bitumba ya mangomba,’ esengeli kotángama na motó na bango; . . . ezali mpe bongo mpo na bitumba mibale ya mokili mobimba.”
16 Yehova azali na mayoki nini mpo na mokumba oyo mangomba ya lokuta ezali kokokisa kati na libomi mpe bitumba? Lokola lisoló ya bato emonisi yango, mangomba ya lokuta mabongi mpenza na efundeli oyo Nzambe afundi bango kati na Emoniseli 18:5, oyo elobi ete: “Libondo na masumu na ye likómi kino na likoló, mpe Nzambe asili kokanisa misala mabe na ye.” Myango mabe oyo mangomba ya lokuta mazali kosala elongo na bakonzi ya mokili ebimisi kosopana ya makila nyonso wana, ebimisi libondo ya masumu motindo wana, na boye ete Nzambe akoki soko moke te kotala yango mpamba. Mosika te akobebisa nyɛɛ epekiseli wana ya kimya ya solo.—Emoniseli 18:21.
Mwango mpo na kotya kimya
17, 18. (a) Mpo na nini kondima ete kimya ya seko ekotyama ezali ndɔ́tɔ mpamba te? (b) Yehova asali nini mpo ete kimya wana ya solo ekoka kotyama?
17 Lokola bato bakoki te kotya kimya ya solo mpe ya seko na nzela ya bibongiseli lokola Mabota Masangani, kimya ya solo ekouta wapi, mpe ndenge nini ekoya? Kondima ete kimya ya seko ekozwama ezali bobele ndɔ́tɔ mpamba? Te, soki tobaluki epai na eutelo ya solosolo ya kimya, yango ekozwama solo. Nani azali Eutelo yango? Nzembo 46:9 epesi eyano na koyebisáká biso ete Yehova “akosukisa bitumba kino nsuka na mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likonga, akozikisa mpe makalo kati na mɔ́tɔ.” Mpe Yehova asilaki kobanda mosala ya kosukisa bitumba mpe ya kotya kimya ya solo. Lolenge nini? Na kotyáká Yesu Klisto na kiti ya Bokonzi ya sembo uta mobu 1914, mpe na kolendisáká kampanye eleki monene na lisoló ya bato mpo na kolakisa bato kimya. Maloba ya esakweli oyo mazwami na Yisaya 54:13 mazali kolendisa biso ete: “Bana na yo nyonso bakolakisama na [Yehova], mpe [kimya, NW] na bana na yo ekozala monene.”
18 Esakweli oyo ezali lokola ndakisa mpo na liteya ya mɔ́tɔ mpe mólinga—elingi koloba ete mólinga nyonso ezali na mɔ́tɔ oyo ebimisi yango. Na likambo oyo tozali kolobela, mateya ya Yehova—mɔ́tɔ—mazali kobongola bato oyo balingaki bitumba mingi mpe ekómisi bango bato oyo balingaka kimya, baoyo bafandi na kimya elongo na Nzambe. Mólinga ezali mbongwana ya motema oyo ezali kokómisa bango bato oyo balingaka kimya. Mateya yango, oyo mazali kobongola mitema mpe makanisi ya bato, mazali kopalangana sikawa kati na mokili mobimba, wana bamilió ya bato bazali kolanda ndakisa ya ‘Nkolo na Kimya,’ Yesu Klisto.—Yisaya 9:6.
19. Yesu ateyaki nini na ntina na kimya ya solo?
19 Yesu ateyaki nini na ntina na kimya ya solo? Alobelaki te kimya oyo ekosangisa bobele mikili mikeseni kasi alobelaki nde kimya kati na bato na oyo etali boyokani na bango mpe kimya ya motema oyo euti na lisosoli malamu. Na Yoane 14:27, tozali kotánga maloba ya Yesu epai na bayekoli na ye ete: “Nazali kotikela bino kimya, nazali kopesa bino kimya na ngai moko. Napesi bino pelamoko ekopesaka mokili te. Tiká ete mitema na bino mitumolana te, mibanga mpe te.” Na lolenge nini kimya ya Yesu ekesanaki na oyo ya mokili?
20. Yesu akomema kimya ya solo na nzela nini?
20 Ya liboso, kimya ya Yesu ezalaki na bokangani makasi na nsango na ye ya Bokonzi. Ayebaki ete boyangeli ya sembo na likoló, oyo esangisi Yesu mpe bato 144 000 oyo bakoyangela esika moko na ye, esengelaki kosilisa bitumba mpe baoyo bazali kolendisa bitumba. (Emoniseli 14:1, 3) Ayebaki ete yango esengelaki komema bizalela kitoko ya Paladiso oyo alakaki epai na mosáli na mabe oyo akufaki pembeni na ye. Yesu alakaki ye esika kati na Bokonzi ya likoló te, kasi alobaki ete: “Ya solo, nazali koloba na yo lelo ete: Okozala na ngai na Paladiso.”—Luka 23:43, NW.
21, 22. (a) Elikya nini ya kokamwa ezali kati na kimya ya solo? (b) Tosengeli kosala nini mpo na komona mapamboli wana?
21 Yesu ayebaki lisusu ete Bokonzi na ye esengelaki kopesa libɔndisi epai na baleli nyonso oyo bazali komonisa kondima epai na ye. Kimya na ye esangisi mpe elikya ya lisekwa oyo ezali kopesa elendiseli monene. Kanisá maloba na ye ya kolendisa oyo mazwami kati na Yoane 5:28, 29 ete: “Bókamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda [na kokanisama, NW] bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima; baoyo basalaki malamu kino lisekwa na bomoi; baoyo basalaki yauli kino lisekwa na kosambisama.”
22 Ozali kozela ntango yango na esengo? Osilá kobungisa balingami na yo kati na liwa? Ozali na mposa makasi ya komona bango lisusu? Boye ndimá kimya oyo Yesu azali kopesa. Zalá na kondima lokola Malata, ndeko mwasi ya Lasalo, oyo alobaki na Yesu ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo na nsuka.” Kasi talá eyano oyo ezali kosimba motema Yesu apesaki na Malata: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika; mpe moto na moto oyo azali na bomoi mpe andimi ngai, libela akokufa te. Ozali kondima oyo?”—Yoane 11:24-26.
23. Mpo na nini boyebi ya sikisiki ya liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na kozwa kimya ya solo?
23 Yo mpe okoki kondima elaka wana mpe kozwela yango litomba. Lolenge nini? Bobele soki ozwi boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe. Talá lolenge Paulo abɛtaki nsɛ́tɛ́ likoló na boyebi ya sikisiki: “Totiki kobondela mpo na bino te. Tokolɔmbaka ete bótonda na boyebi [ya sikisiki, NW] na mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli na [elimo, NW]. Na bongo, bótambola na sembo na Nkolo mpe bósepelisa ye na makambo nyonso. Bóbota mbuma na misala nyonso malamu, bókóla mpe na boyebi [ya sikisiki, NW] koyeba Nzambe.” (Bakolose 1:9, 10) Boyebi yango ya sikisiki ekondimisa yo ete Yehova Nzambe azali eutelo ya kimya ya solo. Mpe ekomonisa yo nini osengeli kosala sikawa mpo ete osangisa mongongo na yo na oyo ya mokomi na nzembo ete: “Nakolala, ɛɛ nakolala mpɔ́ngi na kimya, zambi bobele yo [Yehova] okobatela ngai na esika na ngai.”—Nzembo 4:8.
Okoki kolimbola?
◻ Mpo na nini milende ya bato mpo na kotya kimya mizali ntango nyonso kolónga te?
◻ Nini ezali eutelo mpenza ya bitumba?
◻ Mpo na nini kimya oyo ekoumela ezali ndɔ́tɔ mpamba te?
◻ Nini ezali eutelo ya kimya ya solo?
[Elilingi na lokasa 8]
Kimya ya solo ezali ndɔ́tɔ mpamba te. Ezali elaka ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 10]
Uta mobu 1914 motambwisi ya mpunda motane ya elilingi asili kolongola kimya na mabelé
[Elilingi na lokasa 11]
Mangomba mpe Mabota Masangani ekoki nde komema kimya?
[Eutelo ya bafɔtɔ]
UN photo