Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/5 nk. 30-31
  • Kondima ya baboti epesameli mbano

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima ya baboti epesameli mbano
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Basali na kondima
  • Elɛzi azwami
  • Liteya mpo na biso
  • Moize aponaki kosambela Yehova
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Eloko oyo eleki biloko ya motuya ya Ezipito
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Babikisi Moize
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Bóyembela Yehova”!
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/5 nk. 30-31

Basalaki mokano ya Yehova

Kondima ya baboti epesameli mbano

EPAI na Bayisalaele ya kala, kobotama ya mwana mobali ezalaki likambo ya esengo monene. Yango elimbolaki ete molɔngɔ́ ya bakitani ekolandana mpe ete libula ya mabelé ekotikala na libota. Kasi pene na mobu 1593 L.T.B., mbala mosusu kobota mwana mobali epai na Baebele emonanaki mbala mingi lokola kolakelama mabe kasi lipamboli te. Mpo na nini? Mpamba te Falo, mokonzi ya Ezipito, oyo azalaki kobanga koyikana mbangumbangu ya motángo ya Bayuda kati na mokili oyo ye azalaki koyangela, apesaki etindá ete mwana mobali nyonso oyo akobotama asengelaki kobomama.​—Exode 1:12, 15-22.

Ezalaki na eleko wana ya koluka koboma libota na koyina makasi nde Amalama na Yokebede, babalani mibale Bayuda, babotaki mwana mobali moko kitoko. Ezali mpasi te na kokanisa lolenge oyo esengo na bango ekokaki kosila na bobángi ntango bamikundolaki mobeko ya Falo. Atako bongo, wana Amalama na Yokebede batalaki elɛzi na bango, bazwaki ekateli makasi ete bakosundola ye te, atako yango ekokaki kobendela bango likámá.​—Exode 2:1, 2; 6:20.

Basali na kondima

Na boumeli ya sanza misato Amalama mpe Yokebede babombaki mwana na bango. (Exode 2:2) Nzokande, yango ezalaki likámá, mpamba te Baebele mpe Baezipito bazalaki kofanda penepene. Moto nyonso oyo amonanaki ete azali kobuka etindá ya Falo, na ntembe te asengelaki kozwa etumbu ya liwa​—mpe elɛzi asengelaki kobomama lokola. Na yango, likambo nini baboti wana oyo bazalaki na bobángi Nzambe bakokaki kosala mpo na komibatela mpe kobatela bomoi ya mwana na bango?

Yokebede azwaki bantɔ́ngɔ ya nzeté ebéngami papirise. Papirise ezali mwa nzeté makasi, lokola bambu, mpe mobimbi na yango ezali na bonene ya mosapi. Ekoki kokóma na bolai ya mɛtɛlɛ 6. Baezipito bazalaki kosalela mwa nzeté yango mpo na kosala papyé, matɔkɔ, elamba ya masuwa (voile), mapapa, mpe bwato mike oyo ezali na bozito mingi te.

Yokebede asalaki kitunga na papirise oyo ekoki mpo ete elɛzi akoka kotyama na kati. Na nsima apakolaki mpaka mpe pɔtɔpɔ́tɔ moindo na kitunga yango mpo ete mai makɔta na kati te. Na nsima, Yokebede atyaki mwana na kati ya kitunga yango mpe atyaki yango katikati na matiti na bokúla ya Ebale Nil.​—Exode 2:3.

Elɛzi azwami

Milyami, mwana mwasi ya Yokebede atɛlɛmaki pembeni mpo na kotala likambo oyo likosalema. Bongo mwana mwasi ya Falo ayaki na Ebale Nil mpo na kosukola.a Ekoki kozala ete Yokebede ayebaki ete mwana mwasi ya mokonzi azalaki na momeseno ya kokende na esika yango mpe atikaki kitunga yango na esika oyo ekokaki komonana kozanga nkaká. Ezala bongo to te, mosika te mwana mwasi ya Falo atalaki na ngámbo epai kitunga ebombamaki katikati na matiti, mpe atindaki moko na basali na ye ete akamata yango. Na ntango amonaki elɛzi na kati ya kitunga azali kolela, ayokaki mawa. Ayebaki ete ezali elɛzi ya Moebele. Kasi, ndenge nini akokaki kotika mwana moke kitoko boye ete abomama? Longola mawa ya bomoto, ekoki kozala ete mwana mwasi na Falo apusamaki na endimeli ya Baezipito oyo elobaki ete kokɔta na likoló etalelaki misala malamu oyo moto akokisi na ntango azali na bomoi.b​—Exode 2:5, 6.

Milyami, oyo azalaki kotala na mosika, abɛlɛmaki na mwana mwasi ya Falo. Atunaki “Olingi ete nakenda kolukela yo monungisi kati na basi na Baebele ete anungisa mwana yango mpo na yo?” Mwana mwasi ya Mokonzi ayanolaki ete: ‘Kendá!’ Milyami akimaki mbangu epai na mama na ye. Mosika te, Yokebede akómaki liboso ya mwana mwasi ya Falo. Mwana mwasi ya Mokonzi alobaki na ye ete “Kamatá mwana oyo na yo elongo mpe nungisá ye mpo na ngai mpe nakofutela yo mbano na yo.” Ekoki kozala ete na ntango yango mwana mwasi ya Falo asosolaki ete Yokebede azalaki mama ya mwana.​—Exode 2:7-9.

Yokebede akamataki mwana na ye kino ntango akilisamaki mabɛlɛ.c Yango epesaki ye mabaku mingi ya ntina mpo na koteya ye na ntina na Yehova, Nzambe ya solo. Na nsima Yokebede azongisaki mwana epai ya mwana mwasi ya Falo, ye apesaki mwana mobali nkombo Mose, elimboli “abimisamaki na mai.”​—Exode 2:10.

Liteya mpo na biso

Amalama na Yokebede basalelaki malamu libaku ya ntango mokuse oyo bazalaki na yango mpo na koteya mwana na bango mitindá ya losambo ya solo. Lelo oyo baboti basengeli kosala lolenge yango. Ɛɛ, ezali na ntina mingi ete básala yango. Satana Zabolo “azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukáká soko akolya nani.” (1 Petelo 5:8) Akosepela mingi ete kati na baoyo ye akolya ezala na bana mike oyo bazali na motuya​—mibali mpe basi​—oyo bazali na elikya ya kokóma basaleli ya Yehova. Satana azali na mawa soko moke te mpo na mbula na bango moke! Mpo na yango, baboti ya mayele bazali kolakisa bana na bango ya mike ete bábanga Yehova, Nzambe ya solo.​—Masese 22:6; 2 Timoté 3:14, 15.

Kati na Baebele 11:23, milende ya Amalama na Yokebede mpo na kobomba mwana na bango na boumeli ya sanza na ye misato ya liboso ya bomoi etángami ete ezali mosala ya kondima. Baboti wana oyo bazalaki na bobángi Nzambe batyaki elikya kati na nguya ya Yehova ya kobikisa na koboyáká kosundola mwana na bango, mpe mpo na yango bazwaki mapamboli. Biso mpe tosengeli komonisa bokangami makasi na mitindá mpe mibeko ya Yehova, kozaláká na elikya ete nyonso oyo Yehova atikeli yango nzela ete esalema epai na biso na ntembe te ekosalema mpo na bolamu ya seko mpe esengo na biso.​—Baloma 8:28.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Baezipito bazalaki kosambela Ebale Nil lokola nzambe ya kobota. Bazalaki kondima ete mai na yango mazalaki na nguya ya kopesa makoki ya kobota bana mingi mpe ya kokómisa bomoi molai.

b Baezipito bazalaki kondima ete na ntango moto akufi elimo na ye ekoloba maloba lokola oyo liboso ya Osiris, “Nanyokolaki moto moko te,” “Napimelaki monɔkɔ ya bilɛzi bazali konunga miliki te,” mpe “Napesaki limpa epai na ye oyo azalaki na nzala mpe mai epai na ye oyo azalaki na mposa ya mai.”

c Na ntango ya kala, bana mingi bazalaki komelisama mabɛlɛ na boumeli ya ntango molai koleka lolenge yango esalemaka lelo oyo. Emonani ete Samwele azalaki pene na mbula misato ntango akilisamaki mabɛlɛ, mpe Yisaka azalaki na mbula mitano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto