Nasalelaki Yehova na motema molai uta bolenge na ngai
LISOLÓ YA RUDOLF GRAICHEN
Ntango nazalaki na mibu 12, na mbalakaka, likámá ekwelaki libota na biso. Liboso, bakangaki tata na ngai na bolɔ́kɔ. Na nsima, ngai mpe ndeko na ngai ya mwasi balongolaki biso na makasi na ndako ya baboti mpe batindaki biso kofanda esika moko na bato oyo toyebanaki na bango te. Na nsuka, ngai na mama tokangamaki na Gestapo. Ngai nakendaki na bolɔ́kɔ, mpe ye atikalaki na káa ya bakangami.
KOLANDANA wana ya makambo ezalaki bobele ebandeli ya eleko ya minyoko oyo nazwaki na bolenge na ngai lokola Motatoli ya Yehova. Gestapo ya Nazi oyo eyebanaki na lolenge na yango ya konyokola bato mpe na nsima Stasi na Allemagne ya Ɛ́sti emekaki kokweisa kondima na ngai epai na Nzambe. Sikawa, nsima ya mibu 50 ya komipesa na ngai na mosala na ye, nakoki koloba lokola mokomi na nzembo ete: “Longwa na ntango na bolenge na ngai, batungisaki ngai mbala mingi kasi balekaki ngai te.” (Nzembo 129:2) Oyo nde botɔ́ndi nazali na yango epai na Yehova!
Nabotámá na mokolo ya 2 Yúni 1925, na Lucka engumba moke oyo ezali penepene na Leipzig, na ekólo Allemagne. Ezala liboso ya kobotama na ngai, baboti na ngai, Alfred mpe Teresa, bayebaki solo ya Biblia na nzela ya mikanda ya Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na eleko wana. Nazali komikundola mokolo na mokolo, ntango nazalaki kotala bililingi ya makambo malobelami kati na Biblia oyo bakakisaki na bifelo ya ndako na biso. Elilingi moko ezalaki komonisa mbwa ya zamba mpe mwana na mpate, mwana moke mpe nkoi, mwana na ngɔmbɛ mpe nkosi—bango nyonso bazali na kimya mpe batambwisami na mwana moke. (Yisaya 11:6-9) Bililingi motindo yango esalaki bopusi makasi epai na ngai.
Mbala nyonso oyo likoki ezalaki, baboti na ngai bazalaki kotya ngai na misala ya lisangá. Na ndakisa, na Febwáli ya mobu 1933, mwa mikolo moke nsima wana Hitler akómaki mokonzi, “Photo-drame de la création”—filime oyo esalemaki na bililingi oyo bitambolaka mpe mosusu bininganaka te, na maloba ekotisami na kasɛti—elakisamaki na mwa engumba na biso. Nazalaki mpenza na esengo, mpamba te nazalaki bobele elenge ya mibu nsambo, wana namataki na nsima ya motuka ya monene lokola moko ya bato oyo bazalaki kosakola kolakisama ya “Photo-drame”! Na libaku oyo mpe na mabaku mosusu, bandeko basalaki ete namiyoka mpenza lokola moto ya ntina kati na lisangá atako nazalaki bobele elenge. Na yango, uta bolenge mpenza, nateyamaki na Yehova mpe liloba na Ye ezalaki na bopusi makasi likoló na ngai.
Nabongisamaki mpo na kotyela Yehova motema
Na ntina ya kozanga komikɔtisa na bango na makambo ya politiki, Batatoli ya Yehova bakɔtaki te na politiki ya Nazi. Mpo na yango, na 1933 Banazi babimisaki mibeko oyo mipekisaki biso kosakola, koyangana na makita, mpe kotánga mikanda na biso oyo mikolimbolaka Biblia. Na Sɛtɛ́mbɛ 1937 bandeko mibali nyonso, mpe tata na ngai, bakangamaki na Gestapo. Likambo yango epesaki ngai mawa mingi. Tata na ngai azwaki etumbu ya mibu mitano na bolɔ́kɔ.
Bomoi ekómaki mpasi na ndako na biso. Kasi nokinoki toyekolaki kotyela Yehova motema. Mokolo moko na bozongi na ngai na eteyelo, mama azalaki kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Alingaki kolambela ngai mwa bilei moke, na yango atikaki zulunalo likoló ya lomwale. Nsima ya kolya tozalaki kolongola basaani, babɛtaki ekuke na makasi. Ezalaki sodá moko oyo alingaki kolukaluka kati na ndako na biso soki akokuta mikanda oyo mikolimbolaka Biblia. Nabangaki makasi.
Mokolo yango molungé ezalaki makasi. Likambo ya liboso sodá asalaki ezalaki kolongola ekoti na ye mpe kotya yango likoló ya mesa. Abandaki kolukaluka. Wana azalaki kotala na nsé ya mesa, na nsima ekoti na ye ebandaki kosɛlimwa mokemoke. Nokinoki mama akamataki yango mpe atyaki yango likoló ya lomwale, mpenzampenza likoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli! Sodá yango alukaki malamumalamu kati na ndako na biso kasi amonaki eloko te. Ya solo, akanisaki soko moke te kotala na nsé ya ekoti na ye. Ntango alingaki kokende, asengaki mama na ngai bolimbisi, wana azalaki kozonga nsima mpo na kokamata ekoti na ye alobaki liloba moko mpo na komonisa mawa oyo ayokaki na motindo asalaki. Nayokaki mpenza ete nabɔndisami!
Makambo motindo oyo ebongisaki ngai mpo na mikakatano minene koleka. Na ndakisa, na eteyelo bazalaki kopusa ngai na makasi ete nakɔta na lisangá ya bilenge ya Hitler, oyo kati na yango bilenge bazalaki kobongisama lokola basodá, mpe bazalaki koteya bango mateya ya Nazi. Balakisi mosusu bazalaki na mokano ete bana nyonso bákɔta kati na lisangá wana. Molakisi na ngai, Herr Schneider, amiyokaki ete akolónga te, lokola balakisi mosusu ya eteyelo na ngai, zambi azalaki na mwana kelasi moko oyo aboyaki kokɔta na lisangá yango. Mwanakelasi yango ezalaki ngai.
Mokolo moko Herr Schneider ayebisaki bana kelasi nyonso ete: “Bilenge, lobi kelasi mobimba tokokende kotambola mosika.” Bato nyonso basepelaki na likanisi yango. Na nsima abakisaki: “Bino nyonso bosengeli kolata iniforme na bino ya Bilenge ya Hitler mpo ete ntango tokoleka na balabála, bato nyonso bámona ete bozali mpenza bilenge ya Hitler mpe bozali komitambwisa malamu.” Na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo elandaki bilenge nyonso balataki iniforme na bango ya bilenge ya Hitler longola bobele ngai. Molakisi abéngaki ngai liboso ya banakelasi nyonso mpe atunaki ngai ete: “Talá bilenge mosusu na nsima mpe omitala yo moko.” Abakisaki ete: “Nayebi ete baboti na yo bazali babólá mpe bazali na makoki ya kosombela yo iniforme te, kasi tiká ete nalakisa yo eloko moko.” Amemaki ngai na mesa na ye, afungolaki lomwale, mpe alobaki na ngai ete: “Nalingi kopesa yo iniforme oyo ya sika. Ezali kitoko mingi, boye te?”
Ebongaki na ngai kokufa na esika ya kolata iniforme ya Nazi. Ntango molakisi na ngai amonaki ete nazalaki na likanisi ata moke te ya kolata yango, asilikaki, mpe baninga nyonso ya kelasi babandaki kozomela ngai. Na nsima amemaki biso kotambola kasi amekaki kobomba ngai na kotyáká ngai katikati ya bilenge oyo balataki iniforme. Atako bongo, bato mingi kati na engumba bamonaki ngai lokola nakesanaki na baninga na ngai ya kelasi. Bato nyonso bayebaki ete ngai mpe baboti na ngai tozalaki Batatoli ya Yehova. Nazali kotɔ́nda Yehova na ndenge apesaki ngai makasi ya elimo oyo nasengelaki na yango wana nazalaki naino elenge.
Minyoko ebakisami
Mokolo moko na ebandeli ya 1938, motuka ya basodá ememaki ngai mpe ndeko na ngai ya mwasi longwa na eteyelo na biso kino na eteyelo ya Stadtroda oyo ezalaki na ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 80. Mpo na nini? Esambiselo ekamataki meko ete bálongola biso na mabɔkɔ ya baboti na biso mpe bákómisa biso bilenge ya Nazi. Mosika te basali ya eteyelo ya kosembola bamonaki ete ngai na ndeko na ngai tozalaki na limemya mpe na botosi, atako tozalaki kobatela bokatikati na biso ya boklisto. Mokambi akamwaki mingi na boye ete alukaki kokutana na mama na ngai. Bobele mpo na libaku yango, bapesaki mama likoki ya kokutana na biso. Ndeko na ngai ya mwasi, mama na ngai, mpe ngai moko tozalaki na esengo mpe totɔ́ndaki Yehova mingi na ndenge apesaki biso libaku ya kokutana mpo na kolendisana na boumeli ya mokolo mobimba. Tozalaki mpenza na mposa na yango.
Totikalaki na eteyelo ya kosembolama na boumeli ya sanza pene na minei. Mpe batindaki biso kofanda elongo na libota moko na mboka Pahna. Bapesaki bango malako ete bápesa nzela te ete tókutana na bandeko na biso. Ata mama na ngai apesamelaki nzela te ya koya kotala biso. Kasi, na mwa mabaku moke, azwaki likoki mpo na kosolola na biso. Kosimbáká mwa mabaku oyo ezalaki komonana ntango nyonso te, mama asalaki nyonso ekokaki na ye kosala mpo na koteya biso ekateli ya kotikala sembo epai na Yehova, ezala na komekama ya lolenge nini mpe ezala na makambo nini oyo akotikela yango nzela.—1 Bakolinti 10:13.
Na nsima minyoko makasi eyaki. Na mokolo ya 15 Desɛ́mbɛ 1942, wana nazalaki sé na mibu 17, basodá ya Gestapo bakangaki ngai mpe bamemaki ngai na bolɔ́kɔ na engumba ya Gera. Pene na pɔ́sɔ moko na nsima, mama na ngai mpe akangamaki mpe batyaki ye na bolɔ́kɔ oyo nazalaki. Lokola nakokisaki naino mibu zomi na mwambe te, bakokaki kosambisa ngai te. Na bongo, ngai na mama tolekisaki sanza motoba na bolɔ́kɔ wana esambiselo ezalaki kozela ete nakokisa mibu zomi na mwambe ya kobotama mpo nakoka kosamba. Bobele na mokolo oyo nakokisaki mibu 18, bamemaki ngai na mama na esambiselo.
Liboso ete nayeba makambo oyo mazalaki koleka, kosambisama esilaki. Nayebaki te ete nakomona mama na ngai lisusu te. Mbala ya nsuka oyo namonaki ye afandaki na esambiselo na bifandelo ya mabaya ya moindo na loboko na ngai ya mobali. Biso mibale tokweisamaki. Bakatelaki ngai etumbu ya mibu minei na bolɔ́kɔ mpe mbula moko na ndambo mpo na mama na ngai.
Na mikolo yango ezalaki na bankóto ya Batatoli ya Yehova oyo bakangamaki na bolɔ́kɔ mpe na bakáa. Nzokande, natindamaki na bolɔ́kɔ ya Stollberg, epai kuna Motatoli ya Yehova ezalaki bobele ngai moko. Naumelaki koleka mbula mobimba na eteni oyo nazalaki bobele ngai moko na kati, mbala oyo lisusu Yehova azalaki na ngai elongo. Bolingo oyo nakolisaki mpo na ye uta bomwana na ngai ezalaki fungola ya lobiko na ngai ya elimo.
Na mokolo ya 9 Máí 1945, nsima wana nazalaki na bolɔ́kɔ mbula mibale na ndambo, tozwaki nsango malamu ete etumba esili! Bobele na mokolo yango nabimaki na bolɔ́kɔ. Nsima ya kotambola kilomɛtɛlɛ 110 na makolo, nakómaki na ndako, nabɛlaki na ntina na kolɛmba mpe nzala. Esengelaki na ngai ntango molai mpo ete nzoto ezonga kolɔngɔ́nɔ́.
Nokinoki nsima ya kokóma na ngai, nakutanaki na bansango ya mawa. Ya liboso na ntina na mama na ngai. Nsima ya kosala mbula moko na ndambo na bolɔ́kɔ, Banazi basɛngisaki ye ete atya sinyatili na mokanda moko mpo na kowangana kondima na ye epai na Yehova. Aboyaki. Mpe bongo Gestapo ememaki ye na káa ya bakangami basi, na Ravensbrück. Akufaki kuna na bokɔnɔ babéngi fièvre typhoïde mwa moke liboso ete etumba esila. Azalaki moklisto ya molende mpenza, mobundi ya mpiko oyo azalaki kozonga nsima te. Tiká ete Yehova akanisa ye na boboto nyonso.
Ezalaki mpe lisusu na nsango na ntina na nkulutu na ngai ya mobali, Werner, ye amipesaki na Yehova te. Akɔtaki na limpinga ya Allemagne mpe abomamaki na Russie. Bongo tata na ngai? Ye azongaki na ndako, kasi na mawa nyonso, azalaki moko kati na ndambo ya Batatoli oyo batyaki mabɔkɔ na mokanda ete bawangani kondima na bango. Ntango nazalaki kotala ye azalaki mawamawa mpe abulunganaki na makanisi.—2 Petelo 2:20.
Eleko mokuse ya mosala ya molende na elimo
Na mokolo ya 10 Mársi 1946, nayanganaki mpo na mbala ya yambo na liyangani oyo esalemaki nsima ya etumba na Leipzig. Natondaki na esengo ntango nayokaki ete batisimo ekopesama bobele mokolo wana! Atako nasilaki kopesa bomoi na ngai mobimba epai na Yehova bambula mingi liboso, kasi oyo ezalaki libaku ya liboso mpo na ngai ya kozwa batisimo. Nakobosana mokolo wana soko moke te.
Na mokolo ya 1 Mársi 1947, nsima ya kosala lokola mobongisi-nzela na boumeli ya sanza mobimba, nabéngamaki na Betele ya Magdeburg. Biro ya la Société ebebisamaki mpenza na babɔ́mbi. Oyo nde libaku malamu ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga lisusu! Nsima ya eleko ya molungé, batindaki ngai na engumba ya Wittenberge lokola mobongisi-nzela monene. Na basanza mosusu nazalaki kolekisa ngonga 200 na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai na basusu. Nazalaki na esengo ya kozala lisusu na bonsomi—etumba te, minyoko te, bolɔ́kɔ te!
Likambo ya mawa, bonsomi yango eumelaki ntango molai te. Nsima ya etumba Allemagne ekabwanaki, mpe epai nazalaki ekómaki na nsé ya boyangeli ya Bakoministe. Na Sɛtɛ́mbɛ 1950 Stasi, polisi ya nkuku ya Allemagne ya Ɛ́sti, ebandaki kokanga bandeko nyonso. Bifundeli oyo bafundaki ngai na yango ezalaki ya ntina te. Bafundaki ngai ete nazalaki monɔ́ngi mpo na guvernemá ya Amerika. Batindaki ngai na bolɔ́kɔ mabe mpenza ya Stasi na mboka Brandenburg.
Lisungi ya bandeko na ngai ya elimo
Kuna Stasi etikaki ngai te ete nalala na moi. Mpe bazalaki kotuna ngai mituna butu mobimba. Nsima ya konyokwama boye mwa mikolo, makambo makómaki lisusu mpasi koleka. Mokolo moko na ntɔ́ngɔ́, na esika ete bázongisa ngai na esika oyo nazalaki kolala, bamemaki ngai na esika ebengami U-Boot Zellen (eyebanaki lokola bolɔ́kɔ ya kati ya mai mpamba te ezalaki mosika na kati ya mabele). Bafungolaki ekuke moko ya kala, ya ebende, ekuke yango eguga mpe balobaki na ngai nakɔta kuna. Nasengelaki koleka na ekuke moko molai. Ntango nakitisaki makolo na nsé nayokaki ete nsé nyonso ezalaki na mai. Ekuke ekangamaki makasi mpe esalaki makɛlɛlɛ makasi. Mwinda ezalaki te lininisa mpe ezalaki te. Ezalaki molili tuu.
Lokola mai mazalaki mingi na nsé, nakokaki kotɛlɛma te, kofanda te, to kolala te. Nsima ya kozela ntango molai, babimisaki ngai mpo na kotuna ngai lisusu mituna mingi na esika oyo mwinda ezalaki kongɛnga makasi. Nayebi te eloko nini elekaki mpasi—kotɛlɛma na mai na boumeli ya mokolo mobimba na molili makasi to koyika mpiko na mpasi ya kongɛnga makasi ya mwinda oyo ezalaki kobɛta ngai na miso na boumeli ya butu mobimba.
Mbala mingi bazalaki kobangisa ngai ete bakobeta ngai makasi. Nsima ya kotuna ngai mituna na boumeli ya babutu mingi, mokonzi moko ya basodá ya Russie ayaki kotala ngai. Nazwaki libaku ya koyebisa ye ete Stasi ya Allemagne ezalaki konyokola ngai mingi koleka ndenge Gestapo esalaki ngai. Nayebisaki ye ete Batatoli ya Yehova bakɔtaki te na boyangeli ya Nazi mpe bakokɔta te na boyangeli ya koministe mpe na mokili mobimba epai moko te tosanganaka na makambo ya politiki. Nalobaki ete, na bokeseni, bato mingi oyo bazali lelo bakonzi na Stasi bazalaki basangani ya Bilenge babongisami ya Hitler, epai kuna bateyamaki motindo nini konyokola bato oyo basali eloko te. Wana nazalaki koloba, nazalaki kolɛnga mpo nalɛmbaki, na malili, mpe na nzala.
Likambo ya kokamwa, mokonzi yango atombokaki na ngai te. Nzokande, azipaki ngai na bolangiti, amoniselaki ngai boboto. Mwa moke nsima ya botali na ye, bazongisaki ngai na bolɔ́kɔ na esika oyo ezalaki malamu. Nsima ya mwa mikolo, batindaki ngai na bisambiselo ya Allemagne. Epai kuna likambo na ngai ezalaki naino kotalelama, nazwaki libaku ya kosangana na Batatoli mitano kati na bolɔ́kɔ moko. Nsima ya koyika mpiko na minyoko makasi ya motindo oyo, kosangana na bandeko na ngai ya elimo ezalaki lokola bopemi!—Nzembo 133:1.
Esambiselo ekweisaki ngai ete nazali monɔ́ngi mpe bakatelaki ngai etumbu ya mbula minei na bolɔ́kɔ. Yango etalelamaki lokola etumbu moke. Bandeko mosusu bazwaki etumbu ya bambula koleka zomi. Batindaki ngai na bolɔ́kɔ oyo ekɛngɛlamaki makasi. Nakanisi ete ezala na libándá to na kati ya bolɔ́kɔ ata mpoko ekoki koleka te mpamba te bakɛngɛlaki yango makasi. Kasi, na lisungi ya Yehova, bandeko mosusu balóngaki kokɔtisa Biblia na mayele. Bakabolaki yango ndambondambo engebene mikanda na yango mpe batambwisaki yango epai na bandeko nyonso oyo bazalaki na bolɔ́kɔ.
Lolenge nini totambwisaki yango? Ezalaki mpenza mpasi. Libaku bobele moko tozalaki na yango ya kokutana ezalaki ntango bazalaki komema biso ete tókende kosukola nzoto mbala moko nsima ya mpɔ́sɔ mibale. Na libaku moko, wana tozalaki kosukola nzoto, ndeko moko ayebisaki ngai na litoi ete abombaki mwa bankasa ya Biblia kati na elamba na ye ya kopangusa mai. Ntango nasilisaki kosukola nzoto nazwaki elamba na ye ya kopangusa mai na esika ya kokamata oyo ya ngai.
Mokɛngɛli moko amonaki ndeko koloba na ngai na litoi mpe abɛtaki ye makasi na nzeté. Nakamataki elamba ya kopangusa mai nokinoki mpe nakɔtaki na katikati ya bakangami mosusu. Likambo malamu mpo na ngai, bakangaki ngai te na bankasa ya Biblia. Soki bákangaka ngai, mbɛlɛ manáka na biso ya bilei ya elimo elingaki kotyama na likámá. Tokutanaki na makambo mingi ya motindo oyo. Botángi na biso ya Biblia esalemaki ntango nyonso na kobombama mpe ezalaki na likámá mingi. Maloba ya ntoma Petelo “bómisɛnzɛla, bólala mpɔngi te,” mabongaki mpenza.—1 Petelo 5:8.
Mpo na bantina mosusu, bakonzi bazwaki ekateli ya kotinda bamoko kati na biso mbala na mbala na babolɔ́kɔ mosusu. Na boumeli ya mbula minei, natindamaki na babolɔ́kɔ zomi ekeseni. Kasi nazalaki ntango nyonso na likoki ya kokutana na bandeko. Nakólisaki bolingo mozindo mpo na bandeko yango, mpe nazalaki na mawa mingi mpenza ntango nazalaki kotika bango mpe kokende na bolɔ́kɔ mosusu.
Na nsuka batindaki ngai na Leipzig, nde kuna nabimaki na bolɔ́kɔ. Mokɛngɛli ya bolɔ́kɔ oyo abimisaki ngai alobaki na ngai te ete nakende malamu, kasi alobaki, “Tokomona yo lisusu.” Na makanisi mabe na ye alingaki ete nakangama lisusu. Mbala mingi nakanisaka maloba ya Nzembo 124:2, 3 epai elobi ete: “Soko ezalaki [Yehova] te, oyo azalaki epai na biso wana bato batɛlɛmi kobunana na biso, mbɛ balyaki biso noki, wana esiliki bango mingi epai na biso.”
Yehova asikolaka basaleli na ye ya sembo
Sikawa nakómaki lisusu na bonsomi. Ruth lipasa na ngai ya mwasi, mpe ndeko mwasi Herta Schlensog bazalaki kozela ngai na ekuke ya lopango ya bolɔ́kɔ. Na boumeli ya bambula nyonso ya bolɔ́kɔ, Herta azalaki kotindela ngai liboke moke ya bilei sanza na sanza. Nandimi solo ete soki maboke wana te, mbɛlɛ nakufaki na bolɔ́kɔ. Tiká ete Yehova akanisa ye na boboto nyonso.
Uta kobima na ngai na bolɔ́kɔ, Yehova apambolaki ngai mingi na mosala. Nasalaki lisusu lokola mobongisi-nzela monene, na engumba Gronau, na Allemagne mpe lokola mokɛngɛli ya zongazonga na bitúká ya Bangomba ya Allemagne. Na nsima nabyangamaki kosangana na kelasi ya mbala ya 31 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na kobongisa bamisionere. Tozwaki mapɔlɔ́mi na boumeli ya liyangani ya mikili mingi ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaki na Yankee Stadium na 1958. Nazwaki libaku malamu ya koloba liboso ya ebele ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bayanganaki wana mpe koyebisa bango mwa makambo nakutanaki na yango.
Nsima ya kozwa lipɔlɔ́mi nakendaki na mboka Chili kosala lokola misionere. Kuna nasalaki lisusu lokola mokɛngɛli ya zongazonga, mosika na súdi ya Chili—natindamaki mpenza na nsuka ya mokili. Na 1962, nabalaki Patsy Beutnagel, misionere moko ya bonzenga oyo autaki na engumba San Antonio, na etúká ya Texas na États-Unis. Nalekisaki bambula mingi ya malamu na mosala ya Yehova elongo na ye.
Sikawa nazali na mbula koleka 70, nasili kokutana na bantango mingi ya esengo mpe na makambo mingi ya mpasi. Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Moyengebene azali na makambo mingi ya mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango nyonso.” (Nzembo 34:19) Na mobu 1963, wana tozalaki naino na Chili, ngai na Patsy totungisamaki makasi na liwa ya bébé na biso ya mwasi. Na nsima, Patsy azwaki maladi makasi, mpe tokendaki na Texas. Wana azalaki bobele na mibu 43, akufaki, lisusu na ezalela ya mpasi. Nabondelaka ntango nyonso Yehova ete na boboto na ye akanisa mwasi na ngai ya bolingo.
Sikawa, atako nakómi mobangé mpe bamaladi, nazali na libaku malamu ya kosala lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe nkulutu na engumba Brady, na etúká ya Texas. Ya solo, bomoi ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, mpe ntango mosusu ezali na makambo oyo nasɛngɛli kokutana na yango. Nzokande, lokola mokomi na nzembo nakoki koloba ete: “Ɛ Nzambe, olakisi ngai longwa na bolenge na ngai; kino sasaipi nazali kosakola misala na yo na kokamwa.”—Nzembo 71:17.
[Bililingi na lokasa 23]
(1) Nazali kosala sikawa lokola nkulutu mpe mobongisi-nzela, (2) Elongo na Patsy mwa moke liboso ete tóbalana, (3) Na eteyelo ya Herr Schneider, (4) mama na ngai, Teresa, oyo akufaki na Ravensbrück