Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/9 nk. 10-15
  • Okozala sembo lokola Eliya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okozala sembo lokola Eliya?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Momekano monene mpo na koyeba Nzambe ya solo
  • “Mosakoli Eliya” akoya?
  • Bazali na elimo ya Eliya
  • Sembo kati na komekama
  • Zalá sembo lokola Eliya
  • Nzambe na ye apesaki ye makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nzambe na ye abɔndisaki ye
    Mekolá kondima na bango
  • Esí ekómela yo obanga to ozala lokola mwana ya mawa?
    Teyá bana na yo
  • Alongisaki losambo ya solo
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/9 nk. 10-15

Okozala sembo lokola Eliya?

“Nakotindela bino mosakoli Eliya liboso na koya na mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ na [Yehova].”​—MALAKI 4:5.

1. Mpasi nini ekɔtaki na Yisalaele nsima ya kofanda soko mibu 500 na Mokili ya Ndaka?

YEHOVA apesaki Bayisalaele “mokili [motondi na miliki, NW] mpe na mafuta na nzoi,” nsima ya kosikola bango na minyɔlɔlɔ ya Ezipito na ekeke ya 16 L.T.B. (Exode 3:7, 8) Kasi, nsima ya bikeke mitano, mpe nzala makasi ekɔti sikawa na Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi. Ezali mpasi na komona matiti ya mobesu. Banyama bazali kokufa, mpe mbula ezali konɔka te eleki mbula misato na ndambo. (1 Mikonzi 18:5; Luka 4:25) Nini eyeisi mpasi yango?

2. Nini eyeisaki mpasi na ekólo ya Yisalaele?

2 Ezali bongo lipɛngwi nde eyeisi mpasi yango. Kobukáká Mobeko ya Nzambe, Mokonzi Ahaba abalaki Yezabele, mwana mwasi ya mokonzi ya Kanana mpe atikeli ye nzela ete akɔtisa losambo ya Baala na Yisalaele. Likambo ya mabe koleka, Ahaba atongaki tempelo mpo na nzambe yango ya lokuta kati na Samalia, engumba-mokonzi. Mpo na yango, Bayisalaele balɛngolamaki na likanisi ete losambo ya Baala ekosalisa bango ete milóna na bango míbota mingi! Nzokande, lokola Yehova akebisaki, bazali sikawa na likámá ya ‘kokufa na mokili malamu na bango.’​—Deteronome 7:3, 4; 11:16, 17; 1 Mikonzi 16:30-33.

Momekano monene mpo na koyeba Nzambe ya solo

3. Lolenge nini mosakoli Eliya abendaki likebi likoló ya mokakatano ya solosolo ya Yisalaele?

3 Ntango nzala ekɔti, Eliya, mosakoli ya sembo ya Nzambe ayebisi Mokonzi Ahaba ete: “Lokola [Yehova] Nzambe na Yisalaele azali na bomoi, oyo nazali kotɛlɛma liboso na ye, mamwe mpe mbula ikozala na bilanga oyo te bobele na liloba na ngai.” (1 Mikonzi 17:1) Nsima ya komona bosolo ya maloba yango, mokonzi apameli Eliya ete ye nde ayeisi mokakatano na Yisalaele. Kasi Eliya ayanoli ete esengeli nde kopamela Ahaba mpe bato ya ndako na ye mpo na lipɛngwi na bango ya kosambela Baala. Mpo na kokata likambo, mosakoli ya Yehova asɛngi na Mokonzi Ahaba ete ayanganisa Yisalaele mobimba na Ngomba Kalemele elongo na basakoli 450 ya Baala mpe basakoli 400 ya likonzi ya bulɛɛ. Ahaba mpe bato na ye bayangani kuna, mbala mosusu bakanisi ete na libaku yango mbula ekozonga konɔka na mokili. Kasi Eliya abendi likebi likoló na likambo lileki ntina. Atuni ete: “Kino ntango nini bino bokotambolatambola na nzela mibale ikeseni? Soko [Yehova] azali Nzambe [ya solo, NW], bilá ye; nde soko Baala, bilá ye.” Bayisalaele bazangi maloba.​—1 Mikonzi 18:18-21.

4. Mpo na kokata likambo ya koyeba Nzambe ya solo, Eliya abimisaki likanisi nini?

4 Na boumeli ya bambula mingi, Bayisalaele bamekaki kosangisa losambo ya Yehova mpe losambo ya Baala. Sikawa, mpo na kosukisa likambo ya koyeba nani azali Nzambe ya solo, Eliya apesi likanisi ete básala momekano. Ye akobongisa mwana ya ngɔmbɛ mpo na mbeka, mpe basakoli ya Baala bakobongisa mwana ya ngɔmbɛ mosusu. Na nsima Eliya alobi ete: “Bokobyanga nkombo na nzambe na bino mpe ngai nakobyanga nkombo na [Yehova]; Nzambe oyo akozongisa na mɔ́tɔ, ye azali Nzambe [ya solo, NW].” (1 Mikonzi 18:23, 24) Kanisá ete mɔ́tɔ euta na likoló mpo na koyanola na libondeli!

5. Lolenge nini losambo ya Baala emonisamaki ete ezali mpamba?

5 Eliya asɛngi na basakoli ya Baala ete bábanda. Babongisi ngɔmbɛ mpo na mbeka mpe batye yango likoló na etumbelo. Na nsima babandi kotambolatambola zingazinga ya etumbelo, kobeleláká ete: “Ɛ Baala, zongisela biso!” Basalaki bongo “longwa na ntɔ́ngɔ́ kino midi.” Eliya asɛki bango kolobáká ete “Bónganga na mongongo makasi . . . Soko azali kopema, soko apɛngwi na nzela, soko akei mobembo, soko nde alali mpe ekoki kolongola ye na mpɔngi!” Mosika te basakoli ya Baala bakómi lokola bato ya ligboma. Talá! Bazali komizokisa na bambeli, mpe makila mazali kotanga na bampota na bango. Mpe oyo nde makɛlɛlɛ makasi wana bango nyonso bato 450 bazali konganga kino nsuka ya mingongo na bango! Kasi moto azali koyanola bango te.​—1 Mikonzi 18:26-29.

6. Bibongiseli nini Eliya asali mpo na momekano ya koluka koyeba Nzambe ya solo?

6 Sikawa ekómi ngala ya Eliya. Atongi lisusu etumbelo ya Yehova, asali libulu zingazinga na yango, mpe abongisi mbeka malamu. Na nsima basopi mai likoló na nkoni mpe mbeka. Basopi mai mbeki minene zomi na mibale likoló na etumbelo kino libulu etondi. Kanisá mayoki ya bato wana Eliya azali kobondela ete: “Ɛ [Yehova], Nzambe na Abalayama mpe na Yisaka mpe na Yisalaele, tiká ete eyebana lelo oyo ete yo ozali Nzambe kati na Yisalaele mpe ete ngai nazali moombo na yo mpe ete ngai nasali makambo oyo bobele na liloba na yo. Zongiselá ngai, ɛ [Yehova], zongiselá ngai, ete bato oyo báyeba ete yo, ɛ [Yehova], ozali Nzambe mpe ete yo ozali kobutwisa mitema na bango nsima.”​—1 Mikonzi 18:30-37.

7, 8. (a) Lolenge nini Yehova ayanoli na libondeli ya Eliya? (b) Nini ekokisami na makambo oyo masalemi na Ngomba Kalemele?

7 Lokola eyano na libondeli ya Eliya, ‘mɔ́tɔ na Yehova ekiti, elei mbeka na kotumba mpe nkoni mpe mabanga mpe mputulu mpe mai mazalaki kati na libulu.’ Bato bakwei na bilongi na bango mpe balobi ete: “Yehova azali Nzambe ya solo! Yehova azali Nzambe ya solo!” (1 Mikonzi 18:38, 39, NW) Sikawa Eliya asali likambo na mpiko nyonso. Atindi ete: “Simbá basakoli na Baala, tiká te ete moko na bango akima.” Mpe nsima ya koboma bango na lobwaku ya Kisono, likoló etondaki na mapata ya moindo. Na nsuka mbula moko makasi ebɛti, mpe na bongo esukisi eleko ya kozanga mbula!​—1 Mikonzi 18:40-45; kokanisá na Deteronome 13:1-5.

8 Oyo nde mokolo monene! Yehova alóngi na momekano ya koyeba nani azali Nzambe ya solo. Lisusu, makambo yango masali ete mitema ya Bayisalaele mingi mízonga epai ya Nzambe. Na lolenge yango mpe lolenge mosusu mingi, Eliya amimonisi ete azali mosakoli ya sembo, mpe mosala oyo asali ezali bongo esakweli.

“Mosakoli Eliya” akoya?

9. Malaki 4:5, 6 esakolaki nini?

9 Na nsima, na nzela ya Malaki, Nzambe asakolaki ete: “Talá, ngai nakotindela bino mosakoli Eliya liboso na koya na mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ na [Yehova]. Akobongola mitema na batata epai na bana mpe mitema na bana epai na batata na bango ete naya mpe nabɛta mokili na ekweli mabe te.” (Malaki 4:5, 6) Eliya azalaká na bomoi mibu 500 liboso ya kobimisama ya maloba wana. Lokola yango ezalaki esakweli, Bayuda ya ekeke ya liboso T.B. bazalaki kozela boyei ya Eliya mpo na kokokisa yango.​—Matai 17:10.

10. Eliya oyo asakolamaki ezalaki nani, mpe ndenge nini toyebi yango?

10 Boye, Eliya oyo asengeli koya ezalaki nani? Ye amonisamaki ntango Yesu Klisto alobaki ete: “Longwa na mikolo ya Yoane Mobatisi kino sikawa, bato bazali kopusana na bokonzi ya makoló, mpe baoyo bazali kopusana epai na yango, bazali kozwa yango. Mpo ete, basakoli nyonso mpe Mibeko, basakolaki kino Yoane; soki bolingi kondima yango, Ye mpenza azali ‘Eliya oyo asengeli koya.’” Ɛɛ, Yoane Mobatisi azalaki Eliya oyo asakolamaki. (Matai 11:12-14, NW; Malako 9:11-13) Anzelu moko ayebisaki Zekalia, tata ya Yoane ete Yoane akozala na “[elimo, NW] mpe nguya na Eliya” mpe ‘akobongisela Nkolo libota likobonga mpenza.’ (Luka 1:17) Batisimo oyo Yoane apesaki ezalaki, mpo na ye oyo azwi yango, elembo ya komonisa liboso ya bato nyonso ete abongoli motema na masumu na ye liboso ya Mibeko, oyo esengelaki kokamba Bayuda kino epai na Klisto. (Luka 3:3-6; Bagalatia 3:24) Na ndenge yango, mosala ya Yoane ‘mobongisaki libota libongi mpo na Nkolo.’

11. Na Pantekote, Petelo alobaki nini na ntina na “mokolo ya Yehova,” mpe yango eyaki ntango nini?

11 Mosala ya Yoane Mobatisi lokola “Eliya” momonisaki ete ‘mokolo ya Yehova’ mozalaki pene. Kobɛlɛma ya mokolo yango ntango Nzambe akoboma banguna na ye mpe kobikisa bato na ye emonisamaki mpe na ntoma Petelo. Ye amonisaki ete makambo ya kokamwa oyo masalemaki mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. mazalaki bongo kokokisama ya esakweli ya Yoele na ntina na kosopama ya elimo ya Nzambe. Petelo amonisaki ete yango esengelaki kosalema liboso ya “mokolo na Nkolo, mokolo yango monene, mokolo na nkembo.” (Misala 2:16-21; Yoele 2:28-32) Ezalaki na mobu 70 T.B. nde Yehova akokisaki Liloba na ye na kopusáká mampinga ya Loma ete mákokisa ekateli ya Nzambe likoló na libota oyo liboyaki Mwana na ye.​—Danyele 9:24-27; Yoane 19:15.

12. (a) Paulo mpe Petelo balobaki nini na ntina na “mokolo ya Yehova” oyo esengelaki koya? (b) Mpo na nini eloko moko esengelaki kosalema lokola emonisamaki na mosala ya Eliya?

12 Nzokande, ezalaki na makambo mosusu oyo masengelaki kosalema nsima ya mobu 70 T.B. Ntoma Paulo alobelaki “mokolo ya Yehova” oyo mosengelaki koya elongo na kozala ya Yesu Klisto. Lisusu, ntoma Petelo alobelaki mokolo yango elongo na “likoló na sika mpe nsé na sika” oyo esengelaki koya. (2 Batesaloniki 2:1, 2; 2 Petelo 3:10-13) Tóbosana te ete Yoane Mobatisi asalaki mosala lokola ya Eliya liboso ete “mokolo ya Yehova” eya na mobu 70 T.B. Nyonso wana emonisaki polele ete likambo mosusu lisengelaki kosalema oyo limonisamaki na mosala ya Eliya. Likambo yango nini?

Bazali na elimo ya Eliya

13, 14. (a) Bokokani nini ezali kati na misala ya Eliya mpe oyo ya baklisto bapakolami na mikolo na biso? (b) Boklisto ya lipɛngwi esalaki nini?

13 Mosala ya Eliya ezalaki na boyokani bobele na misala ya Yoane Mobatisi te kasi lisusu na misala ya baklisto bapakolami na ntango oyo ya mpasi oyo ezali komema na “mokolo ya Yehova” oyo ezali koya. (2 Timoté 3:1-5) Na elimo mpe nguya lokola ya Eliya, baklisto bapakolami bazali kosimba na bosembo nyonso losambo ya solo. Mpe yango ezalaki na ntina mpenza! Nsima ya liwa ya bantoma ya Klisto, lipɛngwi likólaki kati na boklisto ya solo, lolenge moko losambo ya Baala ekólaki na Yisalaele na eleko ya Eliya. (2 Petelo 2:1) Baoyo bamilobaki ete bazali baklisto babandaki kosangisa boklisto ya solo na mateya mpe misala ya lokuta. Na ndakisa, bandimaki liteya ya bopakano mpe eyokani na Makomami te oyo elobi ete moto azali na molimo oyo ekufaka te. (Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4) Boklisto ya lipɛngwi etikaki kosalela nkombo ya Nzambe bobele moko ya solo, Yehova. Na esika na yango, bazali kosambela Bosato. Lisusu, bandimaki misala mikokani na oyo ya losambo ya Baala, kofukameláká bililingi ya Yesu mpe ya mama na ye, Malia. (Baloma 1:23; 1 Yoane 5:21) Kasi esuki wana te.

14 Bandá na ekeke ya 19, bakonzi ya mangomba ya boklisto bakómaki kobɛta ntembe likoló na biteni mingi ya Biblia. Na ndakisa, babwakaki lisoló ya mokanda ya Genese na ntina na kozalisama mpe bakumisaki liteya ya evolisyó, kolobáká ete yango “esimbami na siansi.” Yango ezali mpenza na bokeseni na mateya ya Yesu Klisto mpe bantoma na ye. (Matai 19:4, 5; 1 Bakolinti 15:47) Nzokande, lolenge moko na Yesu mpe bayekoli na ye ya liboso, lelo oyo baklisto bapakolami na elimo bazali kosimba lisoló ya Biblia na ntina na kozalisama.​—Genese 1:27.

15, 16. Na bokeseni na mangomba ya boklisto, banani bazangaki bilei ya elimo te, mpe bazwaki yango na nzela nini?

15 Wana mokili ekómaki na “elaka na nsuka,” nzala ya elimo ezwaki mangomba ya boklisto. (Danyele 12:4; Amosa 8:11, 12) Kasi mwa etuluku ya baklisto bapakolami bazalaki ntango nyonso na bilei ya elimo oyo Nzambe azali kopesa “na elaka na yango,” lolenge Yehova asɛnzɛlaki ete Eliya aleisama na eleko ya nzala oyo ezalaki na mikolo na ye. (Matai 24:45; 1 Mikonzi 17:6, 13-16) Basaleli yango ya sembo ya Nzambe, oyo liboso bayebanaki na nkombo ya Bayekoli ya Biblia, na nsima bazwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova, nkombo oyo euti na Makomami.​—Yisaya 43:10.

16 Eliya amitambwisaki engebene nkombo na ye, oyo elimboli ete “Yehova azali Nzambe na ngai.” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo eyebani lokola zulunalo ya basaleli ya Nzambe awa na mabelé, esalelaka ntango nyonso nkombo ya Nzambe. Kútu, ebimeli na yango ya mibale (Augústo 1879, na Lingelesi) emonisaki na komindimisa mpenza ete zulunalo yango esimbami na Yehova ye moko. Zulunalo yango mpe mikanda mosusu ya la Société Watch Tower ezali kotɔndɔla mateya ya mangomba ya boklisto oyo mazangi moboko ya Makomami mpe ezali kotɔndɔla eteni mosusu ya Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba; bobele na ntango yango, ezali mpe kosimba solo ya Biblia, Liloba ya Nzambe.​—2 Timoté 3:16, 17; Emoniseli 18:1-5.

Sembo kati na komekama

17, 18. Yezabele asalaki nini ntango oyokaki ete basakoli ya Baala babomami, kasi ndenge nini Eliya azwaki lisungi?

17 Eyano ya bakonzi ya mangomba na botɔndɔlami wana ekokanaki na oyo ya Yezabele na ntango ayokaki ete Eliya abomaki basakoli ya Baala. Atindelaki mosakoli ya sembo ya Yehova maloba, kolapáká ndai ete akobomisa ye. Yango ezalaki mangungu ya mpamba te, mpo ete Yezabele asilaki liboso kobomisa basakoli mingi ya Nzambe. Lokola abangaki, Eliya akimaki na ngámbo ya súdi-wɛ́sti na Bele-seba. Atikaki mosungi na ye wana, mpe ye akendaki mosika lisusu, kati na mokili mokauki, kobondeláká ete akufa. Kasi Yehova asundolaki mosakoli na ye te. Anzelu moko abimelaki Eliya mpo na kobongisa ye na ntina na mobembo molai kino na Ngomba Holebe. Na yango, azwaki bilei mpo na mobembo ya mikolo 40 na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 300. Na Holebe, Nzambe alobaki na ye nsima ya komonisa ye nguya ya kokamwa kati na mopɛpɛ makasi, koningana ya mabelé, mpe mɔ́tɔ. Yehova azalaki kati na biloko yango te. Ezalaki bongo bilakiseli ya elimo santu na ye, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala. Na nsima Yehova alobaki epai ya mosakoli na ye. Kanisá lolenge likambo yango elendisaki Eliya. (1 Mikonzi 19:1-12) Ekozala boni soki, lokola Eliya, tokómi na bobangi na ntina na makaneli ya banguna ya losambo ya solo? Makambo oyo akutanaki na yango masengeli kosalisa biso na koyeba ete Yehova asundolaka bato na ye te.​—1 Samwele 12:22.

18 Nzambe amonisaki yango polele ete Eliya azalaki naino na mosala ya kokokisa lokola mosakoli. Lisusu, atako Eliya akanisaki ete azalaki sé ye moko mosambeli ya Nzambe ya solo kati na Yisalaele, Yehova amonisaki ye ete bato 7 000 bafukamelaki Baala te. Na yango Nzambe atindaki Eliya ete azongela mosala na ye. (1 Mikonzi 19:13-18) Lokola Eliya, bakoki mpe kolanda biso na banguna ya losambo ya solo. Lokola Yesu asakolaki yango, bakoki konyokola biso makasi. (Yoane 15:17-20) Ntango mosusu, tokoki kozala na bobangi. Nzokande, tokoki kozala lokola Eliya, ye oyo Nzambe alendisaki ye mpe na bongo akóbaki mosala ya Yehova na bosembo nyonso.

19. Makambo nini baklisto bapakolami bakutanaki na yango na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?

19 Na ntina na monyoko makasi oyo bazwaki na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bamoko kati na baklisto babangaki mpe batikaki kosakola. Babungaki nzela na kokanisáká ete mosala na bango awa na mabelé esilaki. Kasi Nzambe abwakaki bango te. Kútu, na motema mawa asungaki bango, lolenge moko apesaki Eliya bilei. Lolenge moko na Eliya, bapakolami ya sembo bandimaki kosembolama na Nzambe mpe bazongelaki mosala. Miso na bango mafungwanaki na libaku monene ya kosakola nsango ya Bokonzi.

20. Lelo oyo, libaku malamu nini epesameli baoyo bazali sembo lokola Eliya?

20 Kati na esakweli na ntina na kozala na ye, Yesu alobelaki mingi mosala oyo esengelaki kokokisama na mokili mobimba liboso ete nsuka ya ebongiseli mabe ya biloko oyo eya. (Matai 24:14) Lelo oyo, baklisto bapakolami mpe bamilió ya baninga na bango oyo bazali na elikya ya bomoi kati na paladiso na mabelé bazali kokokisa mosala yango. Kosakola Bokonzi kino na nsuka ezali libaku malamu oyo epesameli bobele baoyo bazali sembo lokola Eliya.

Zalá sembo lokola Eliya

21, 22. (a) Mosala nini baklisto bapakolami bazali kotambwisa lelo oyo? (b) Mosala ya kosakola ezali kokokisama na lisalisi ya nini, mpe mpo na nini yango ezali na ntina?

21 Na molende lokola oyo ya Eliya, etuluku moke ya baklisto ya solo batikali bapakolami basili kokokisa mosala na bango ya kobatela matomba ya Yesu Klisto, Mokonzi oyo atyami na kiti na ye ya bokonzi. (Matai 24:47) Mpe eleki sikawa mbula 60, Nzambe azali kosalela bapakolami yango mpo na kozala na molɔngɔ́ ya liboso kati na mosala ya kozalisa bayekoli bato oyo asili kopesa elikya kitoko ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Matai 28:19, 20) Bamilió ya bato yango bakoki mpenza kozala na botɔ́ndi ete mwa etuluku moke ya batikali bapakolami bazali na molende mpe bazali sembo mpo na kokokisa mikumba na bango!

22 Mosala ya kosakola Bokonzi ezali kokokisama na bato ya kozanga kokoka mpe ezali bobele na nguya oyo Yehova apesaka na baoyo bazali kotya elikya mobimba epai na ye. Ntango atángaki ndakisa ya mosakoli yango mpo na komonisa nguya ya libondeli ya moto na sembo, moyekoli Yakobo alobaki ete: “Eliya azalaki moto na ezalela lolenge moko na biso.” (Yakobo 5:16-18) Eliya azalaki ntango nyonso kosakola to kosala bikamwiseli te. Azalaki na mayoki ya bomoto mpe bolɛmbu lolenge moko na biso, kasi asalelaki Nzambe na bosembo. Biso mpe, lokola Nzambe azali kosunga biso mpe azali kolendisa biso, tokoki kozala sembo lokola Eliya.

23. Mpo na nini tozali na bantina malamu ya kozala sembo mpe na elimo ya kolónga?

23 Tozali na bantina malamu ya kozala sembo mpe na elimo ya kolónga. Tómikundola ete Yoane Mobatisi asalaki mosala lokola Eliya liboso ete “mokolo ya Yehova” eya na mobu 70 T.B. Na lisalisi ya elimo mpe nguya lokola ya Eliya, baklisto bapakolami basali mosala oyo Nzambe apesaki bango ete bákokisa yango na mokili mobimba lokola Eliya asalaki. Yango emonisi polele ete ‘mokolo monene ya Yehova’ ezali pene.

Okoyanola ndenge nini?

◻ Lolenge nini Yehova amonanaki ete azali Nzambe ya solo na Ngomba Kalemele?

◻ Nani azalaki ‘Eliya oyo asengelaki koya,’ mpe makambo nini akokisaki?

◻ Lolenge nini baklisto bapakolami na mikolo na biso bamonisi ete bazali na elimo ya Eliya?

◻ Mpo na nini biso tozali na likoki ya kozala sembo lokola Eliya?

[Etanda na lokasa 15]

Eliya akendaki na lola oyo wapi?

“MPE ezalaki [Eliya na Elisa] kokenda liboso mpe kolobana, talá likalo na mɔ́tɔ mpe mbalata na mɔ́tɔ ikabolaki bango mibale mpe Eliya abutaki na likoló na mopɛpɛ monene kati na lola.”​—2 Mikonzi 2:11.

Na esika oyo liloba “lola” elimboli nini? Ntango mosusu liloba yango lisalelamaka mpo na kolobela efandelo ya elimo mpo na Nzambe mpe bana na ye, baanzelu. (Matai 6:9; 18:10) “Lola” ekoki mpe kolimbola molɔ́ngɔ́ oyo ezali komonana. (Deteronome 4:19) Mpe Biblia esalelaka liloba yango mpo na kolobela ezingelo oyo ezali likoló ya mabelé, epai bandɛkɛ bazali kopumbwa mpe epai mopɛpɛ ezali koleka.​—Nzembo 78:26; Matai 6:26.

Mosakoli Eliya akendaki na lola oyo wapi? Ya solo, amemamaki na ezingelo oyo ezali likoló ya mabelé mpe akitaki na esika mosusu ya mabelé. Eliya azalaki naino na mabelé bambula mingi na nsima ya likambo wana, mpamba te akomelaki Yolama, Mokonzi ya Yuda mokanda. (2 Ntango 21:1, 12-15) Likambo oyo ete Eliya abutaki te na likoló oyo ezali efandelo ya elimo mpo na Nzambe endimisamaki na nsima na Yesu Klisto, oyo alobaki ete: “Moto mpe te asili kobuta na Likoló bobele ye oyo akitaki longwa na Likoló, ye Mwana na moto” oyo ezali bongo Yesu ye moko. (Yoane 3:13) Mpo na bato ya kozanga kokoka, nzela ya bomoi ya likoló efungwamaki nsima ya liwa, lisekwa mpe kobuta ya Yesu Klisto na likoló.​—Yoane 14:2, 3; Baebele 9:24; 10:19, 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto