Lolenge Ya Kobatela Esengo Kati Na Mosala Ya Ntango Nyonso
KOKOKISAMA ya bisakweli ya Biblia emonisi polele ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo ezangi bobangi Nzambe. Koyebáká yango, basaleli ya Yehova Nzambe bazali kolekisa ntango mingi engebene makoki na bango mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi na ye. Batatoli ya Yehova koleka 600 000 babongisi makambo ya bomoi na bango mpo na kosangana na mosala ya ntango nyonso. Bamoko na bango bazali basakoli ya ntango nyonso ya Bokonzi, babéngaka bango babongisi-nzela. Basusu bazali kosala na Betele na biró monene ya la Société Watch Tower to na bafiliale na yango. Mpe basusu bazali bamisionere mpe bakɛngɛli-batamboli.
Biblia emonisi ete na mikolo ya nsuka, “ntango na mpasi ekoya.” (2 Timoté 3:1-5) Makomi ya Biblia na Greke esaleli liloba oyo ekoki kobongolama na “Ntango ya kongala oyo etyami.” Na yango, moto moko te akozanga mikakatano na mikolo na biso. Mpo na baministre baklisto mosusu, mikakatano ekoki kozala mpenza mpasi na boye ete bakoki mbala mosusu komituna, ‘Nakoki kokóba na mosala ya ntango nyonso, to nasengeli nde kotika?’
Makambo nini makoki kopusa moto na kotalela lisusu ezalela na ye lokola mobongisi-nzela, mosáli na Betele, mokɛngɛli-motamboli to misionere? Ekoki kozala motungisi ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Mbala mosusu ndeko ya mosuni oyo akómi mobangé to oyo azali na mokakatano na nzoto azali na mposa ya libateli ya ntango nyonso. Ekoki mpe kozala ete babalani babandi kobota bana. Ye oyo akotika mosala ya ntango nyonso mpo na bantina motindo oyo mpe mpo na masɛngami ya Makomami asɛngeli te koyoka nsɔ́ni mpo na mbongwana motindo oyo.
Nzokande, ezali boni soki moto moko azali kokana kotika mosala ya ntango nyonso mpo ete azangi esengo? Mbala mosusu mobongisi-nzela amoni ete matomba mazali mingi te na mosala na ye mpe amituni, ‘Mpo na nini kokóba na motindo ya bomoi ya komipesa wana bobele bato moke nde bazali koyoka?’ Ekoki kozala ete mosali na Betele azali na esengo te mpo na mosala bapesi ye. To mpe ekoki kozala ete azali komitungisa na ntina na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, atako atiki naino mosala ya mobongisi-nzela te, kasi nsukansuka ekosilisa esengo na ye. Lolenge nini bato motindo oyo bakoki kobatela esengo na bango? Tótala oyo bamoko na basakoli oyo baumeli na mosala yango balobaki.
Lolenge ya kolónga mawa
Annie, oyo autaki na ekólo Suisse, akótaki na Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower na 1950. Amizelaki ete akosala mosala ya misionere na mikili mosusu kasi na mikili ya Mpótó te. Ntango bazongisaki ye na mosala na Betele na Mpótó, Annie ayokaki mawa. Atako bongo, andimaki mosala bapesaki ye na departemá ya bobongoli, mpe kino lelo azali kosala mosala yango. Ndenge nini alóngaki mawa na ye? Annie alimboli ete: “Misala ya kosala mizalaki mpe mizali mingi. Mayoki na ngai mpe bamposa na ngai ezali na motuya te koleka mosala.”
Soki toyoki mawa na ntina na mosala bapesi biso, mbala mosusu tokoki kokólisa elimo lokola oyo Annie azalaki na yango. Bamposa na biso moko eleki makambo nyonso te na motuya. Likambo oyo lileki makambo nyonso ezali ete mikumba mikeseni oyo mitaleli kopalanganisa nsango ya Bokonzi misalema malamu. Masese 14:23 elobi na biso ete “na misala nyonso litomba ezali.” Ezala mosala nini bapesi biso, kosala yango na bosembo ekosunga mpo na kokokisa mosala ya Bokonzi. Mpe bosepeli monene ekoki kozala—ɛɛ, esengo—kati na motindo ya mosala oyo Nzambe apesi.—Kokanisá na 1 Bakolinti 12:18, 27, 28.
Koyokana na basusu
Mosala ya ntango nyonso esɛngaka kozala na boyokani ya penepene na bato ya motindo nyonso—kati na mosala ya kosakola, na Betele, na ndako ya bamisionere, to na ntango ya kotala masangá lokola mokɛngɛli-motamboli. Na yango, esengo etalelaka mingimingi meko oyo ozali koyokana malamu na basusu. Nzokande, ‘ntango ya mpasi’ oyo esakolamaki mpo na mikolo oyo ya nsuka ezali kosala bopusi likoló ya boyokani ya bato. Ndenge nini mosakoli akoki kopɛngola kobungisa esengo na ye, ata soki moto moko ayokisi ye nkanda? Ntango mosusu tokoki kozwa mwa batoli epai na Wilhelm.
Wilhelm akómaki mosangani ya libota ya Betele moko na Mpótó na 1947. Na nsima, asalaki mosala ya mobongisi-nzela mpe ya mokɛngɛli-motamboli. Alimboli ete: “Soki ngai na mwasi na ngai tomoni makambo oyo tokanisi ete mazali malamu te to mapesi biso mawa, tokoyebisa Yehova mayoki na biso mpe totikaka makambo nyonso na mabɔkɔ na ye mpo ete asilisa yango.”—Nzembo 37:5.
Mbala mosusu otungisamaki na ntina na etamboli ya moninga moko moklisto oyo alobaki na yo kozanga limemya to kozanga ete akanisa malamu. Omikundola ete biso banso tobɛtaka mabaku mbala mingi na maloba na biso. (Yakobo 3:2) Boye, mpo na nini te kosalela libaku oyo mpo na kobɛlɛma na ye oyo “[a]koyokaka mabondeli”? (Nzembo 65:2) Yebisá Yehova likambo yango, mpe tiká yango na mabɔkɔ na ye. Soki Nzambe asepeli kobongisa likambo yango, akosala yango. Baoyo bazali kofanda na ndako ya bamisionere basengeli kobatela batoli oyo na makanisi soki bazali na mitungisi motindo wana, mpo ete yango ekoki kosunga bango na kobatela esengo na bango kati na mosala ya Yehova.
Ntango nzoto ezali malamu te
Bato oyo bazalaka ntango nyonso na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ bazali moke mpenza. Ata baoyo bazali naino na nguya makasi ya bolenge bakoki konyokwama na makanisi mpe na maladi. Mpo na bamosusu mitungisi ya nzoto ezalaka ntina mpo na kotika mosala ya ntango nyonso, mpe na nsima basalaka mosala malamu lokola basakoli ya Bokonzi. Nzokande, basusu, bazali na likoki ya kokóba na mosala ya ntango nyonso atako mwa mitungisi ya nzoto ezali. Na ndakisa, tótalela Hartmut na Gislind.
Hartmut na Gislind bazali babalani oyo balekisi mbula 30 lokola babongisi-nzela, bamisionere, mpe kati na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Bango mibale babɛlaki bamaladi oyo na bantango mosusu elɛmbisaki mpe ekɔndisaki bango. Ata bongo, basalaki mosala malamu mpe bazalaki na likoki ya kolendisa bato mosusu oyo bazalaki kati na komekama motindo moko. Toli nini bapesi? “Talá mikolo mizali liboso kasi kotala nsima te. Salá likambo nyonso ya malamu oyo ekoki na yo kosala ata na ezalela nini. Mokolo mokomoko ekoki kopesa yo libaku ata moko mpo na kokumisa Yehova. Salelá libaku yango, mpe sepelá na yango.”
Tótalela lisoló ya Hannelore. Atungisamaki na maladi oyo ezalaki kozonga mbala na mbala na boumeli ya mbula 30 ya mosala na ye ya mobongisi-nzela, misionere, mosala ya mokɛngɛli-motamboli elongo na mobali na ye, mpe na mosala na Betele. Hannelore alobi ete: “Nazalaki komanyola likoló na ntembe oyo Satana abimisaki—ete bato basalelaka Yehova kaka ntango makambo na bango mazali malamu. Na koyikeláká komekama mpiko, ngai mpe nakoki komonisa ete Satana alobaki solo te.” Yango ekoki kozala elendiseli makasi. Omikundola ete bosembo na yo epai ya Yehova na ntango ya komekama ezali na ntina mpo na ye.—Yobo 1:8–12; Masese 27:11.
Ntango ozali komeka kozwa ekateli ya bokatikati na ntina na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na yo, talelá makambo mibale ya esakweli ya Yesu Klisto na ntina na nsuka ya biloko ya ntango oyo. Yesu asakolaki ete maladi ekozala na esika moko nsima na mosusu. Alobaki lisusu ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba.” (Matai 24:3, 14; Luka 21:11) Yesu ayebaki ete na mikolo ya nsuka, bayekoli na ye bakonyokwama na maladi. Kasi ayebaki ete mosala ya kosakola ekosalema te bobele na bato oyo bazali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ kasi lisusu na baoyo bazali kobɛla. Soki tozali na likoki ya kokóba na mosala ya ntango nyonso atako mitungisi ya nzoto ezali, Yehova akobosana te bolingo tozali komonisa mpo na nkombo na ye.—Baebele 6:10.
Batelá esengo atako bato bazali komonisa kozanga bosepeli
Ezaleli na biso ekoki kopusama na motindo bato bazali kosepela na mosala ya kosakola. Mosakoli moko ya makoki alobaki ete: “Ezala babongisi-nzela bamonaka ete ezalaka mpasi mpo na kobanda lisoló na nkolo ndako. Biso banso tosengeli kobunda mpo na kobatela esengo na biso.” Ɛɛ, kozanga bosepeli ya bato ekoki kokitisa esengo na biso kati na mosala ya kosakola. Lolenge nini mobongisi-nzela oyo mbala na mbala azali kokutana na kozanga bosepeli akoki kobatela esengo na ye? Basakoli ya makoki bapesi batoli elandi oyo basusu bamekaki mpe bandimaki yango.
Kozanga bosepeli ezali etumba, kasi yango elimboli kokwea te. Bokóli ya kozanga bosepeli yango moko, ezali te ntina ya kotika mosala ya ntango nyonso. Tokoki kobatela esengo na biso liboso ya kozanga bosepeli soki tokobomba ntango ebongi mpo na boyekoli mozindo ya Makomami. Yango ekosala ete ‘tósɛlingwa mpo na misala nyonso malamu,’ oyo kati na yango koloba epai na bango baboyi koyoka nsango malamu. (2 Timoté 3:16, 17) Atako bato baboyaki koyoka mosakoli Yilimia, yango elɛmbisaki ye te. (Yilimia 7:27) Ntango tozali koyekola Biblia na lisalisi ya mikanda ya boklisto, tokoki kozwa litomba monene soki tokosimba malamu makanisi oyo ekolendisa kondima na biso mpe ekosunga biso na kolónga kozanga bosepeli.
Koyebáká ete kozanga bosepeli ezali etumba, tótalela ezalela na biso liboso ya bato oyo tozali koteya. Mpo na nini bazangi bosepeli? Na ndakisa, moko na bantina ya kozanga bosepeli na mikili ya Mpótó, ezali bongo lisoló ya misala mabe ya mangomba ya lokuta. Bato bazali lisusu komona ntina ya lingomba te na bomoi na bango, mpe balingi kozala ata na boyokani moke te na yango. Tosengeli kozala na bokatikati, koyebisa bango makambo oyo mazali kotungisa bango, lokola kozanga mosala, kozanga kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, mobulu, koboya makanisi ya basusu, ezingelo, mpe makámá ya bitumba.
Na bokɔti na lisoló na biso epai ya mokolo ndako tokoki komonisa likambo moko oyo ezali kosepelisa bato ya teritware na biso. Yango nde Dietmar amekaki kosala ntango azalaki koteya na mboka epai kuna bato mingi te basepelaki na nsango na ye. Mobali moko ya mboka yango alobaki ete likámá monene eutaki kokwela mboka na bango na mokolo oyo elekaki. Na bikuke nyonso bilandaki, Dietmar azalaki komonisa mawa ya solo mpo na likámá yango. Alobaki ete: “Na mbala moko, bato babandaki koloba. Bato nyonso bazalaki kokanisa likámá yango. Nasalaki masoló mingi ya kitoko mokolo yango mpamba te namonisaki bosepeli na makambo oyo etali bomoi na bango.”
Tozali na mposa ya kotatola Bokonzi epai na bato ezala esika nini tokuti bango. Litatoli ya libaku malamu ekoki kobota mbuma, mpe tokoki komimesenisa na motindo oyo ya mosala na kosaleláká batoli epesami na mikanda mikolimbolaka Biblia. Esengo ekoki kozwama na mwa maloba mokuse ya boninga to na kotika Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! epai ya mokolo ndako. Soki tosali bozongeli ya sika mpe tobandi boyekoli ya Biblia na moto oyo amonisaki bosepeli, tokoki kozwa bato mosusu na kotunáká ye ete: “Oyebi moto mosusu oyo akosepela koyekola Biblia?” Yango ekoki komema na kobanda boyekoli mosusu ya Biblia. Na mabaku nyonso, tózalaka na elimo ya kolónga, na kotyáká motema mobimba epai na Yehova, tótika nzela te ete kozanga bosepeli elɛmbisa biso.
Elendiseli euti na bato mosusu
Jürgen na Christiane babandaki mosala ya mobongisi-nzela mpe ya mokɛngɛli-motamboli esili koleka mbula 30. Liboso bapesaki bango mokumba ya koteya na teritware epai kuna bato mingi bazalaki komonisa bosepeli te mpe bazalaki bato ya motó makasi. Jürgen na mwasi na ye baokaki mpenza mposa makasi ya kolendisama! Nzokande, mpo na bantina mosusu, bato mosusu kati na lisangá bakokisaki mposa na bango te.
Lokola amesanaki na mosala yango Jürgen ayebaki malamu ete “babongisi-nzela mosusu, mpe bakutanaka na mikakatano. Bazalaka na mposa ya bilendiseli mingi ya bankulutu mpe basakoli mosusu.” Nzambe ayebisaki Mose ete ayikisa Yosua mpiko mpe alendisa ye. (Deteronome 3:26-28) Mpe baklisto basengeli kozala eutelo ya elendiseli bamoko na bamosusu. (Baloma 1:11, 12) Basakoli ya Bokonzi bakoki kolendisa baoyo bazali kati na mosala ya ntango nyonso na maloba ya kotonga mpe na kobimáká na bango na mosala ya kosakola mbala na mbala.
Esengo ya Yehova—Nguya na biso
Baklisto oyo balekisi ntango molai na bomoi na bango lokola babongisi-nzela to bamisionere, basáli na Betele, to kotaláká masangá lokola bakɛngɛli-batamboli basili komona ete mikakatano mingi ezalaka ya ntango mokuse, kasi mosusu eumelaka ntango molai. Ezala mikakatano ya mike oyo emonani lokola ete esilaka te esengeli te kolongola esengo na biso. Ramon, oyo asalaki na mboka mopaya na boumeli ya mbula 45 alobi ete, ntango oyo mikakatano etungisi biso, “tosengeli kokanisa ebele ya mapamboli tozali na yango mpe bankóto ya bato mosusu oyo bazali konyokwama na mpasi makasi koleka.” Ya solo, bandeko na biso bandimi na mokili mobimba bakutanaka na minyoko, kasi Yehova abatelaka biso nyonso.—1 Petelo 5:6-9.
Na yango, soki ezalela na biso epesi biso likoki ya kosala mosala ya ntango nyonso mpe kotikala na yango, tiká ete tóbatela esengo na biso na kotyáká motema epai ya Tata na biso ya likoló. Ye alendisaka basaleli na ye, mpe biso nyonso tosengeli komikundola ete ‘esengo ya Yehova ezali nguya na biso.’—Nehemia 8:10.
[Elilingi na lokasa 21]
“Mayoki na ngai mpe bamposa na ngai ezali na motuya te koleka mosala”
[Elilingi na lokasa 22]
“Toyebisaka Yehova mayoki na biso mpe totikaka makambo nyonso na mabɔkɔ na ye”
[Bililingi na lokasa 23]
“Salá likambo nyonso ya malamu oyo ekoki na yo kosala ezala ata na ezalela nini. Mokolo mokomoko ekoki kopesa yo libaku ata moko mpo na kokumisa Yehova”
Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 23]
“Na koyikeláká komekama mpiko, ngai mpe nakoki komonisa ete Satana alobaki solo te”
[Bililingi na lokasa 24]
“Babongisi-nzela mosusu, mpe bakutanaka na mikakatano. Bazalaka na mposa ya bilendiseli mingi ya bankulutu mpe basakoli mosusu”
[Elilingi na lokasa 24]
“Tosengeli kokanisa ebele ya mapamboli tozali na yango”