Mpo na nini tosengeli kozongisaka matɔ́ndi?
HARLEY atikaki mosala na ye ya kobongisa bamasini mpe akómaki kalaka na biro nsima ya kosala ye lipaso na mokuwa ya mokɔngɔ. Ntango batunaki ye soki azalaki koyoka ndenge nini mpo na mbongwana wana, Harley alobaki ete: “Na motema na ngai mposa ya kosala na bamasini esilá te. Kasi, mpo na koloba solo, nazali kosepela na mosala na ngai ya sika mingi koleka oyo ya liboso.”
Koyebisáká ntina ya esengo na ye, Harley alobaki ete: “Euti na ezalela ya bato oyo nazali kosala na bango. Na bokeseni na esika oyo nazalaki kosala liboso, mokonzi na ngai mpe baninga na ngai ya mosala epai nazali sikawa bazali kosepela na mosala nazali kosala, mpe bakakatanaka te mpo na kopesa ngai longonya. Yango nde bokeseni monene.” Harley azali sikawa mosali oyo azali na esengo mpamba te azali komiyoka ete azali na ntina mpe bazali na mposa na ye.
Maloba ya kopesa longonya mpe botɔ́ndi, soki mabongi, masepelisaka mpenza motema. Nzokande, kozanga botɔ́ndi, esilisaka moto esengo lokola Shakespeare amonisaki yango na maloba oyo: “Pɛpá, pɛpá, mopɛpɛ ya eleko ya mpiɔ, ozali na yo mabe te koleka ezaleli ya kozanga botɔ́ndi oyo bato bamonisaka.” Likambo ya mawa, bato mingi bamoniselaka bango boboto na motindo wana te.
Kebá na kozanga botɔ́ndi
Na mokili ya lelo, maloba ya kozongisa matɔ́ndi oyo mauti mpenza na motema mazali koyokama lisusu mingi te. Na ndakisa, mokomi moko atunaki motuna oyo: “Soki mwasi ya libala azwaki ntango ya kokabola kalati 200 mpo na kobyanga bato na elambo ya libala, mpo na nini akoki kozwa ntango te ya kokoma mwa bankomá ya kozongisa matɔ́ndi mpo na makabo 163 oyo azwaki?” Mbala mingi, ata liloba “melesi” ya mpamba elobamaka lisusu te. Mokemoke moimi ezali kozwa esika ya kozongisa matɔ́ndi. Ezalela yango ezali moko na bilembo oyo ezali komonisa mikolo ya nsuka. Ntoma Paulo akebisaki ete: “Osengeli kososola ete na mikolo ya nsuka ntango ekozala na makama mingi. Bato bakokóma mpenza kotalela bamposa na bango moko . . . Bakozanga mpenza botɔ́ndi.”—2 Timoté 3:1, 2, Phillips.
Na bantango mosusu, kolɛtɛ (flatter) ezali kozwa esika ya botɔ́ndi. Maloba ya kozongisa matɔ́ndi mautaka na motema kozanga likanisi ya kozwa na yango litomba. Nzokande, kolɛtɛ, oyo mbala mingi ezalaka na bosembo te mpe na kolekisa ndelo, ekoki kouta na matindiki mabombami ya koluka kopesamela esika ya lokumu to kozwa litomba mpo na moto ye moko. (Yuda 16) Longola kolɛngola, maloba wana ya elɛngi mamonisaka lofundo to lolendo. Na bongo, nani akolinga kolɛngolama na maloba ya lokuta? Kasi botɔ́ndi ya solosolo epesaka esengo.
Moto oyo azongiselaka baninga botɔ́ndi, ye moko mpe azwaka litomba na kosaláká bongo. Esengo oyo azali koyoka mpamba te azali na botɔ́ndi na motema na ye ezali kobakisela ye bolamu mpe kimya. (Kokanisá na Masese 15:13, 15.) Mpe lokola ezali ezaleli malamu, kozongisa matɔ́ndi ezali kobatela ye ete azala na mayoki mabe te lokola nkanda, zuwa, mpe likunya.
‘Bózalaka na botɔ́ndi’
Biblia ezali kosɛnga biso ete tólóna elimo ya kozongisa matɔ́ndi. Paulo akomaki ete: “Bótɔ́ndaka kati na makambo nyonso, mpo ete oyo ezali mokano na Nzambe mpo na bino kati na Klisto Yesu.” (1 Batesaloniki 5:18) Mpe Paulo apesaki Bakolose toli ete: “Tiká mpe kimya na Klisto ezala na bokonzi kati na mitema na bino . . . Bózalaka mpe na matɔ́ndi.” (Bakolose 3:15) Mikapo mingi ya mokanda ya Nzembo ezali na maloba mingi ya kozongisa matɔ́ndi, yango emonisi ete botɔ́ndi oyo euti na motema ezali ezaleli malamu na miso ya Nzambe. (Nzembo 27:4; 75:1) Ya solo, Yehova Nzambe asepelaka ntango tozali komonisa botɔ́ndi na makambo nyonso ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo.
Kasi, makambo nini mazali kosala ete kolóna ezaleli ya kozongisa matɔ́ndi ezala mpasi mpo na biso kati na mokili oyo ezangi botɔ́ndi? Lolenge nini tokoki komonisa ezalela ya kozongisa matɔ́ndi na bomoi na biso ya mokolo na mokolo? Mituna yango mikolobelama na lisoló lilandi.