Bilambo minene oyo etiká nsango na lisolo ya Yisalaele
“Mbala misato na kati na mbula mibali na yo nyonso bakobima liboso na [Yehova] Nzambe na yo na esika ekopona ye . . . Bakobima liboso na [Yehova] na mabɔkɔ mpamba te.”—DETERONOME 16:16.
1. Tokoki koloba nini na ntina na mabaku ya kosala bilambo na ntango ya lisolo ya Biblia?
NINI ezali koyela yo na makanisi ntango ozali kokanisa elambo? Bilambo mosusu na ntango ya kala bizalaki na makambo ya kolunda mpe komela na lolenge ya kolekisa ndelo mpe na misala ya mbindo. Ezali sé bongo mpo na bilambo mosusu na mikolo na biso. Kasi bilambo oyo bilobelami na Mibeko ya Nzambe epai na Yisalaele bizalaki bongo te. Atako yango ezalaki mabaku ya kosepela, ekoki mpe kolobama ete ezalaki “koyangana na bulɛɛ.”—Levitike 23:2.
2. (a) Mibali ya Yisalaele basɛngisamaki kosala nini mbala misato na mbula? (b) Lolenge esalelami na Deteronome 16:16, liloba “elambo” elimboli nini?
2 Mibali ya sembo na Yisalaele—mbala mingi elongo na mabota na bango—bazalaki kosepela kosala mobembo kino Yelusaleme, ‘esika oyo Yehova aponaki,’ mpe bazalaki kopesa makabo na motema ya bokabi mpo na bilambo misato ya minene. (Deteronome 16:16) Búku Old Testament Word Studies elimboli liloba ya Liebele oyo ebongolami na “elambo” kati na Deteronome 16:16 lokola “libaku ya esengo monene . . . na boumeli na yango bazalaki kokumisa bilakiseli minene ya ngɔlu ya Nzambe na kopesáká mbeka mpe kosepela.”a
Ntina ya bilambo minene
3. Bilambo misato kati na mbula bizalaki kokundola mapamboli nini?
3 Lokola Bayisalaele bazalaki basáli na bilanga, bomoi na bango esimbamaki na lipamboli oyo Nzambe azalaki kopesa na konɔkisáká mbula. Bilambo misato ya minene oyo bilobelami na Mibeko ya Mose bizalaki kosalema na bileko oyo: ya liboso, na eleko ya koyanganisa mbuma ya orge na ebandeli ya prɛntá; ya mibale, na eleko ya koyanganisa mbuma ya nganu (blé) na nsuka ya prɛntá; mpe ya misato, na eleko ya koyanganisa mbuma mosusu nyonso na nsuka ya eleko ya molungé. Yango ezalaki mabaku ya kosepela mingi mpe ya kozongisa matɔ́ndi na Mobateli ya ebongiseli ya mbula mpe Mozalisi ya mabelé makobotaka mbuma. Kasi bilambo yango esangisaki makambo mingi mosusu.—Deteronome 11:11-14.
4. Likambo nini lisalemaki na ntango ya kala lizalaki kokanisama na elambo ya liboso?
4 Elambo ya liboso ezalaki kosalema na sanza ya liboso na manáka ya kala ya Biblia, kobanda na mokolo ya 15 kino mokolo ya 21 Nisana, oyo ekokani na nsuka ya sanza ya Mársi to na ebandeli ya sanza ya Apríli na manáka na biso. Yango ebéngamaki Elambo ya Mampa mazangi mfulu, mpe lokola yango ezalaki kosalema nokinoki nsima ya Elekeli ya 14 Nisana, ezalaki mpe kobéngama “Elambo na Elekeli.” (Luka 2:41; Levitike 23:5, 6) Elambo yango ezalaki kokundwela Bayisalaele kosikolama na bango longwa na bolɔzi na Ezipito, mpe mampa mazangi mfulu mabéngamaki “mampa ya bolɔzi.” (Deteronome 16:3, NW) Yango ezalaki kokundwela bango ete babimaki na Ezipito mbangumbangu mpenza, na boye ete bazalaki na ntango te ya kobakisa mfulu na pɔtɔpɔ́tɔ ya mampa mpe kozela ete evimba. (Exode 12:34) Na boumeli ya elambo yango, ata limpa moko te oyo ezali na mfulu esengelaki kozala na ndako ya Moyisalaele moko. Mosangani nyonso na elambo, ezala mopaya, oyo alyaki limpa etyami mfulu asengelaki kozwa etumbu ya liwa.—Exode 12:19.
5. Libaku malamu nini likokaki kokanisama na elambo ya mibale, mpe banani basanganaki na bosepeli ya elambo yango?
5 Elambo ya mibale ezalaki kosalema pɔ́sɔ nsambo (mikolo 49) nsima ya 16 Nisana, mpe ezalaki kokwea na mokolo ya motoba na sanza ya misato (Siwana), oyo ekokani na nsuka ya sanza ya Máí na manáka na biso. (Levitike 23:15, 16) Yango ebéngamaki Elambo ya Bapɔ́sɔ (na ntango Yesu azalaki awa na mabelé, yango ebéngamaki mpe Pantekote, elingi koloba “Ya ntuku mitano” na Greke), mpe na kati na mobu, ezalaki kosalema pene na eleko oyo Yisalaele ekɔtaki na kondimana ya Mibeko na Ngomba Sinai. (Exode 19:1, 2) Na boumeli ya elambo yango, ekoki kozala ete Bayisalaele ya sembo bazalaki komanyola likoló na libaku malamu bazalaki na yango ya kozala libota ya bulɛɛ oyo Nzambe aponaki. Mpo na kozala libota liponami ya Nzambe basɛngelaki kotosa Mibeko ya Nzambe, na ndakisa etinda ya komibanzabanza mpo na babola mpo ete bango mpe bákoka kosepela na elambo.—Levitike 23:22; Deteronome 16:10-12.
6. Elambo ya misato ezalaki kokundwela libota ya Nzambe likambo nini?
6 Elambo ya nsuka kati na bilambo misato oyo bizalaki kosalema kati na mobu ebéngamaki Elambo ya Kolɔkɔta, to Elambo ya Mingombo. Ezalaki kosalema na sanza ya nsambo (Tisri to Etanimi), kobanda mokolo ya 15 kino mokolo ya 21, oyo ekokani na ebandeli ya sanza ya Ɔkɔtɔ́bɛ na manáka na biso. (Levitike 23:34) Na boumeli na yango, libota ya Nzambe lizalaki kofanda na libándá ya bandako na bango to likoló ya nsamba na bisika oyo basengelaki kozala na boumeli ya mwa ntango (mingombo) oyo esalemaki na bitape mpe nkasa ya nzeté. Yango ezalaki kokundwela bango mobembo ya mbula 40 oyo basalaki longwa na Ezipito kino na Mokili ya Ndaka, wana libota yango esengelaki koyekola kotyela Nzambe motema mpo na bamposa na bango ya mokolo na mokolo.—Levitike 23:42, 43; Deteronome 8:15, 16.
7. Litomba nini tozali kozwa na kotalela bilambo ya Yisalaele ya kala?
7 Sikawa, tótalela bamoko na bilambo yango oyo etiká nsango na lisolo ya Yisalaele, libota ya kala ya Nzambe. Yango esengeli kolendisa biso lelo oyo, mpamba te biso mpe tobyangami koyanganaka elongo pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpe mbala misato na mbula na mayangani mike mpe na mayangani minene.—Baebele 10:24, 25.
Na ntango ya bakonzi ya libota ya Davidi
8. (a) Elambo monene nini oyo etiká nsango esalemaki na mikolo ya Mokonzi Salomo? (b) Kokokisama monene nini ya Elambo ya Mingombo ya solosolo tokoki komizela na yango?
8 Molulu moko ya Elambo ya Mingombo oyo etiká nsango esalemaki na boumeli ya eleko oyo makambo ya bato makólaki mingi na boyangeli ya Mokonzi Salomo, mwana ya Davidi. “Koyangana monene mpenza” ya bato bautaki bipai na bipai ya Mokili ya Ndaka esalemaki mpo na Elambo ya Mingombo mpe bofungoli tempelo. (2 Ntango 7:8) Ntango esilaki, Mokonzi Salomo apalanganisaki bayangani, oyo “bapambolaki mokonzi; bazongaki epai na bango na kosepela mpe na mitema na esengo mpo na malamu nyonso mamonisi [Yehova] epai na Davidi moombo na ye mpe epai na Yisalaele bato na ye.” (1 Mikonzi 8:66) Ya solo, wana ezalaki elambo oyo etiká nsango. Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazali kozela kokokisama monene ya Elambo ya Mingombo ya solosolo na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Salomo Monene, Yesu Klisto. (Emoniseli 20:3, 7-10, 14, 15) Na ntango wana, bato oyo bakozala na bisika nyonso awa na mabelé, bakisa mpe bato oyo bakosekwisama mpe babiki na Armagedon, bakosangana bango nyonso na esengo mpo na kosambela Yehova Nzambe.—Zekalia 14:16.
9-11. (a) Likambo nini epesaki nzela na kosala elambo monene na mikolo ya Mokonzi Hizikiya? (b) Bato mingi oyo bautaki na bokonzi ya mabota zomi oyo ezalaki na nɔ́rdi batikaki ndakisa nini, mpe yango ezali kokundwela biso likambo nini lelo oyo?
9 Elambo mosusu etiká nsango oyo elobelami na Biblia esalemaki nsima ya boyangeli ya mokonzi mabe Ahaza, oyo akangaki tempelo mpe amemaki bokonzi ya Yuda na lipɛngwi. Mokonzi malamu Hizikiya akitanaki Ahaza. Na mbula ya liboso ya boyangeli na ye, wana azalaki na mibu 25, Hizikiya abandisaki mosala monene ya kozongisa lisusu losambo ya solo mpe kokɔtisa mbongwana. Nokinoki afungolaki tempelo mpe azwaki bibongiseli mpo ete ebongisama. Na nsima, mokonzi atindaki nkomá epai na Bayisalaele oyo bazalaki kofanda na bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele na nɔ́rdi, bokonzi oyo ezalaki koyina bango. Abyangaki bango ete báya mpe bákanisa Elekeli mpe bálya Elambo ya Mampa mazangi mfulu. Mingi bayaki, atako baninga na bango batyolaki bango.—2 Ntango 30:1, 10, 11, 18.
10 Elambo yango elóngaki? Biblia elobi boye: “Bato na Yisalaele baoyo bazalaki na Yelusaleme bakumisaki elambo na [mampa, NW] ezangi mfulu kino mikolo nsambo na esengo monene. Balevi mpe banganga basanzolaki [Yehova] mokolo na mokolo na bibɛtelo na miziki na nguya mpo na [Yehova].” (2 Ntango 30:21) Oyo nde ndakisa malamu Bayisalaele wana batikaki mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo, baoyo mingi kati na bango bazali koyika mpiko na botɛmɛli mpe bazali kosala mibembo milai mpo na kokende na mayangani minene!
11 Na ndakisa, tótalela mayangani misato ya etúká oyo mazalaki na motó na likambo “Bobangi Nzambe,” oyo masalemaki na ekólo Pologne na 1989. Kati na bayangani 166 518, mingi bautaki na ex-Union soviétique mpe na mikili mosusu ya Mpótó ya Ɛ́sti epai kuna mosala ya Batatoli ya Yehova mopekisamaki na ntango wana. Búku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieub elobi boye: “Mpo na bamoko kati na baoyo bakendaki na mayangani minene yango, ezalaki mbala na bango ya liboso ya kozala na liyangani monene oyo esangisi basaleli ya Yehova koleka 15 to 20. Mitema na bango mitondaki na bosepeli wana bamonaki bankóto mingi ya bato na mabándá ya masano, basanganaki na bango elongo na libondeli, mpe basangisaki mingongo na bango na nzembo mpo na kosanzola Yehova.”—Lokasa 279.
12. Nini epesaki nzela na elambo moko etiká nsango oyo esalemaki na boyangeli ya Mokonzi Yosiya?
12 Nsima ya liwa ya Hizikiya, bato ya Yudea bakweaki lisusu na losambo ya lokuta na nsé ya boyangeli ya Mokonzi Manase mpe Mokonzi Amona. Na nsima, mokonzi mosusu ya malamu ayangelaki, ezali bongo elenge Yosiya, oyo asalaki na mpiko nyonso mpo na kozongisa losambo ya solo. Ntango azalaki na mibu 25, Yosiya apesaki etinda ete tempelo ebongisama. (2 Ntango 34:8) Wana misala ya kobongisa mizalaki kosalema, bamonaki kati na tempelo Mibeko oyo Mose akomaki. Motema ya Mokonzi Yosiya esimbamaki makasi na makambo oyo atángaki kati na Mibeko ya Nzambe mpe azwaki bibongiseli mpo ete Mibeko yango mikoka kotángama liboso ya bato nyonso. (2 Ntango 34:14, 30) Na nsima, engebene makambo oyo makomamaki, abongisaki elambo ya Elekeli. Mokonzi apesaki mpe ndakisa malamu na kopesáká makabo ya bolingo malamu na libaku yango. Mpo na yango, Biblia elobi ete: “Lolenge oyo na Elekeli ekumisamaki na Yisalaele longwa na mikolo na Samwele te.”—2 Ntango 35:7, 17, 18.
13. Bilambo oyo esalemaki na eleko ya Hizikiya mpe ya Yosiya bizali kokundwela biso likambo nini lelo oyo?
13 Mbongwana oyo Hizikiya mpe Yosiya bakɔtisaki ezali na bokokani na kozongisama lisusu ya losambo ya solo oyo esalemaki kati na baklisto ya solo banda Yesu Klisto atyamaki na kiti ya bokonzi na 1914. Lolenge moko na mbongwana oyo Yosiya akɔtisaki, kozongisama lisusu ya losambo ya solo na mikolo na biso ezwaki moboko na yango likoló na makambo makomami na Liloba ya Nzambe. Mpe, na bokokani na makambo oyo masalemaki na mikolo ya Hizikiya mpe ya Yosiya, kozongisama lisusu oyo esalemi na mikolo na biso emonisamaki na mayangani minene mpe mike epai kuna bapesaki bandimbola ya bisakweli ya Biblia oyo esimbaki motema mpe bamonisaki lolenge ya kosalela mitinda na yango emonisamaki na ntango ebongi. Longola esengo ya koteyama na mabaku wana, bato mingi bazwaki batisimo. Lokola Bayisalaele oyo babongolaki motema na mikolo ya Hizikiya mpe ya Yosiya, bato oyo bautaki kozwa batisimo sika batikaki misala mabe ya mangomba ya boklisto mpe ya biteni mosusu ya mokili ya Satana. Na 1997, bato koleka 375 000 bazwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na bango na Nzambe ya bulɛɛ, Yehova—motuya wana emonisi mwayene ya bato koleka 1 000 mokolo na mokolo.
Nsima ya kouta na boombo
14. Na mobu 537 L.T.B., nini epesaki nzela na kosala elambo oyo etiká nsango?
14 Nsima ya liwa ya Yosiya, libota ezongelaki lisusu losambo ya lokuta mpe ya nsɔni. Nsukansuka, na mobu 607 L.T.B., Yehova apesaki bato na ye etumbu na kosaláká ete mampinga ya Babilone máya kobundisa Yelusaleme. Engumba mpe tempelo na yango ebomamaki, mpe mokili etikalaki mpamba. Bongo, Bayuda bamemamaki na bo ombo na Babilone na boumeli ya mbula 70. Na nsima, Nzambe apesaki makasi na batikali ya Bayuda oyo babongolaki motema, bazongaki na Mokili ya Ndaka mpo na kozongisa lisusu losambo ya solo. Na sanza ya nsambo ya mobu 537 L.T.B., bakómaki na engumba Yelusaleme oyo esilaki kobebisama. Likambo ya liboso basalaki ezalaki bongo kotonga etumbelo mpo na kopesa bambeka mokolo na mokolo lolenge yango emonisamaki kati na kondimana ya Mibeko. Bakómaki na ntango malamu mpo na kosala molulu oyo etiká nsango. “Babatelaki elambo na mingombo lokola ekomami.”—Ezela 3:1-4.
15. Mosala nini ezalaki liboso ya batikali oyo bazongisamaki na mobu 537 L.T.B., mpe lolenge nini likambo ya lolenge moko ezalaki na 1919?
15 Mosala monene ezalaki liboso ya bato yango oyo bautaki na boombo—kotonga lisusu tempelo ya Nzambe mpe kotonga lisusu Yelusaleme mpe bifelo na yango. Bakutanaki na botɛmɛli makasi na mabota ya pembeni oyo bazalaki koyokela bango zuwa. Ntango tempelo ezalaki kotongama, ezalaki “mokolo na makambo mike.” (Zekalia 4:10) Ezalela yango ekokanaki na ezalela ya baklisto bapakolami ya sembo na 1919. Na mbula wana ya ntina mingi, babimisamaki na boombo ya elimo na Babilone Monene, lisangani ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. Bazalaki bobele mwa bankóto mpe mokili ezalaki kotɛmɛla bango makasi. Banguna ya Nzambe bazalaki nde na makoki ya kopekisa ete losambo ya solo ekenda liboso te? Eyano na motuna wana ezali kokundwela biso bilambo mibale ya nsuka oyo bilobelami kati na Makomami ya Liebele.
16. Nini ezalaki likambo monene na elambo oyo esalemaki na mobu 515 L.T.B.?
16 Tempelo esilaki kotongama na sanza ya Adar ya mobu 515 L.T.B., na ntango mpenza ya kosala elambo ya sanza ya Nisana na prɛntá. Biblia elobi ete: “Bakumisaki elambo na [mampa, NW] ezangi mfulu kino mikolo nsambo na esengo; mpo ete [Yehova] asili kosepelisa bango mpe abongolaki motema na mokonzi na Asulia epai na bango mpo na kokembisa mabɔkɔ na bango na mosala na ndako na Nzambe, Nzambe na Yisalaele.”—Ezela 6:22.
17, 18. (a) Elambo nini etiká nsango esalemaki na mobu 455 L.T.B.? (b) Lolenge nini tozali na ezalela motindo moko lelo oyo?
17 Mbula ntuku motoba na nsima, na mobu 455 L.T.B., elambo mosusu etiká nsango esalemaki. Elambo ya Mingombo ya mbula yango esalemaki na ntango oyo basilisaki kotonga bifelo ya Yelusaleme. Biblia elobi ete: “Koyangana mobimba na bango basili kobutwa lisusu longwa na kokangama batongaki mingombo mpe bafandaki na mingombo; zambi longwa na mikolo na Yosua, mwana na Nuni, kino mokolo yango, bana na Yisalaele basalaki bongo te. Basepelaki mingi mpenza.”—Nehemia 8:17.
18 Oyo nde kozongisama lisusu monene ya losambo ya solo ya Nzambe atako botɛmɛli makasi ezalaki! Ezalela yango ekokani na mikolo na biso. Atako botɛmɛli mpe minyoko ndenge na ndenge ezali, mosala monene ya kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe esili kokóma kino na nsuka ya mabelé, mpe nsango ya kosambisa ya Nzambe esili kosakolama mingi mpenza. (Matai 24:14) Ntango ekómi pene mpo ete batikali kati na bapakolami 144 000 bátyama bilembo. “Bampate mosusu,” baninga ya batikali bapakolami, na motuya ya bato koleka milió mitano basili koyanganisama uta na mabota nyonso kati na “etonga moko” elongo na bango. (Yoane 10:16; Emoniseli 7:3, 9, 10) Oyo nde kokokisama kitoko ya elilingi ya esakweli ya Elambo ya Mingombo! Mpe mosala monene ya koyanganisa ekokóba kino na mokili ya sika wana bamilió ya basekwi bakobyangama mpo na kosangana na kosepela na Elambo ya Mingombo ya solosolo.—Zekalia 14:16-19.
Na ekeke ya liboso T.B.
19. Nini esalaki ete Elambo ya Mingombo ya mobu 32 T.B. ezala na ntina mingi?
19 Kati na bilambo minene oyo bilobelami na Biblia, na ntembe te tokoki kotánga oyo Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe ayanganaki na yango. Na ndakisa, tótalela ndenge Yesu ayanganaki na Elambo ya Mingombo na mobu 32 T.B. Asalelaki libaku wana mpo na koteya makambo ya ntina matali solo mpe apesaki motuya na mateya na ye na kotángáká Makomami ya Liebele. (Yoane 7:2, 14, 37-39) Likambo moko ezalaki kosalema mbala na mbala na elambo yango ezalaki bongo momeseno ya kopelisa bakandela [to miinda] minei ya minene na lopango ya kati ya tempelo. Yango ezalaki kobakisa esengo na bosepeli ya elambo oyo ezalaki kokóba kosalema kino na butu. Ekoki kozala ete Yesu akanisaki bakandela minene wana ntango alobaki ete: “Ngai nazali [pole, NW] na mokili. Ye oyo akobila ngai akotambola kati na molili te kasi akozala na [pole] na bomoi.”—Yoane 8:12.
20. Mpo na nini Elekeli ya mobu 33 T.B. ezalaki na ntina mingi?
20 Na nsima, ezalaki bongo Elekeli mpe Elambo ya Mampa mazangi mfulu ya mobu 33 T.B., mobu oyo ezalaki na ntina mingi. Na Mokolo ya Elekeli wana, Yesu abomamaki na banguna na ye mpe akómaki Mwana na Mpate ya Elekeli ya solosolo oyo akufaki mpo na kolongola “masumu na mokili.” (Yoane 1:29; 1 Bakolinti 5:7) Mikolo misato na nsima, na mokolo ya 16 Nisana, Nzambe asekwisaki Yesu na nzoto ya elimo oyo ekoki kokufa te. Likambo yango esalemaki na mokolo ya kopesa mbuma ya liboso ya bobuki orge lokola esɛngamaki na Mibeko. Na bongo, Nkolo Yesu Klisto oyo asekwisamaki akómaki “mbuma na liboso na bango balali [kati na kufa, NW].”—1 Bakolinti 15:20.
21. Likambo nini esalemaki na mobu 33 T.B.?
21 Elambo mosusu ya monene ezalaki bongo Pantekote ya mobu 33 T.B. Na mokolo yango Bayuda mingi mpe baprozelite bayanganaki na Yelusaleme, bakisa mpe bayekoli soko 120 ya Yesu. Wana elambo ezalaki kosalema, Nkolo Yesu Klisto oyo asilaki kosekwisama asopaki elimo santu ya Nzambe likoló ya bayekoli 120. (Misala 1:15; 2:1-4, 33) Na lolenge yango bapakolamaki mpe bakómaki libota ya sika liponami ya Nzambe na nzela ya kondimana ya sika oyo Yesu Klisto azali moyokanisi na yango. Na boumeli ya elambo wana, nganga monene ya Bayuda azalaki kopesa Nzambe mampa mibale matyami mfulu mpe masalemi na mbuma ya liboso na bobuki nganu. (Levitike 23:15-17) Mampa yango matyami mfulu mazali bongo elilingi ya bato ya kozanga kokoka 144 000 oyo Yesu ‘asombaki mpo na Nzambe’ mpo ete básala lokola “bokonzi na banganga . . . bakozala bakonzi na mokili.” (Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3) Likambo oyo ete bato yango oyo bakoyangela na likoló bauti na bituluku mibale ya bato ya masumu, Bayuda mpe bapakano, ekoki komonisama na elilingi ya mampa mibale matyami mfulu.
22. (a) Mpo na nini baklisto bakumisaka bilambo ya kondimana ya Mibeko te? (b) Tokotalela nini na lisolo na biso oyo ekolanda?
22 Ntango kondimana ya sika ebandaki mosala na yango na Pantekote ya mobu 33 T.B., yango elimbolaki ete kondimana ya kala ya Mibeko ezalaki lisusu na motuya te na miso ya Nzambe. (2 Bakolinti 3:14; Baebele 9:15; 10:16) Yango elimboli te ete baklisto bapakolami bazangi mibeko. Bazali na nsé ya mibeko ya Nzambe oyo Yesu Klisto ateyaki mpe oyo ekomami kati na mitema na bango. (Bagalatia 6:2) Na yango, bilambo misato kati na mbula, lokola ezalaki kati na kondimana ya Mibeko, baklisto bakumisaka yango te. (Bakolose 2:16, 17) Atako bongo, tokoki koyekola makambo mingi na lolenge basaleli ya Nzambe oyo bazalaki liboso ya koya ya Klisto, bazalaki kotalela bilambo na bango mpe makita mosusu mpo na losambo. Na lisolo na biso oyo ekolanda, tokotalela bandakisa oyo, na ntembe te, ekopusa biso nyonso na kososola ntina ya koyangana na makita ya boklisto pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisusu búku Insight on the Scriptures, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., Volimi 1, lokasa 820, kolone 1, paragrafe 1 mpe 3, na motó na likambo “Festival.”
b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Mituna ya bozongeli
◻ Bilambo misato ya minene na Yisalaele bizalaki na mokano nini?
◻ Nini emonanaki na bilambo bisalemaki na mikolo ya Hizikiya mpe ya Yosiya?
◻ Elambo nini etiká nsango esalemaki na mobu 455 L.T.B., mpe mpo na nini yango ezali elendiseli mpo na biso?
◻ Nini ezalaki likambo ya ntina mingi na Elekeli mpe na Pantekote ya mobu 33 T.B.?
[Etanda na lokasa 12]
Liteya ya elambo mpo na biso lelo oyo
Baoyo bakozwa litomba ya seko na mbeka ya Yesu oyo ezali kolongola masumu basengeli komitambwisa na boyokani na likambo oyo emonisamaki na Elambo ya Mampa mazangi mfulu. Elambo yango ya solosolo ezali bongo elambo ya esengo oyo baklisto bapakolami bazali kosala mpo na kosikolama na bango longwa na mokili oyo ya mabe mpe kolongolama na bango na ekweli ya masumu na nzela ya lisiko ya Yesu. (Bagalatia 1:4; Bakolose 1:13, 14) Elambo ya Mampa mazangi mfulu ezalaki koumela mikolo nsambo—motuya oyo esalelami kati na Biblia mpo na komonisa eloko oyo ezali ya kokoka na elimo. Elambo oyo na kokokisama na yango ya solosolo ekoumela ntango nyonso oyo lisangá ya baklisto bapakolami ekozala awa na mabelé mpe esengeli kokumisama “na sembo mpe na solo.” Yango elimboli ete basengeli ntango nyonso kokeba na mfulu ya elilingi. Mfulu esalelami na Biblia mpo na komonisa mateya ya mbindo, ya bokosi, mpe ya mabe. Basambeli ya solo ya Yehova basengeli koyina mfulu lolenge wana, basengeli kotika te ete yango ebebisa bomoi na bango mpe basengeli kotika te ete yango ebebisa bopɛto ya lisangá ya boklisto.—1 Bakolinti 5:6-8; Matai 16:6, 12.
[Elilingi na lokasa 9]
Mopiko ya orge ebukami sika ezalaki kopesama mbula na mbula na mokolo ya 16 Nisana, mokolo oyo Yesu asekwisamaki
[Elilingi na lokasa 10]
Ekoki kozala ete Yesu akanisaki miinda oyo mizalaki kopela na eleko ya elambo ntango alobaki mpo na ye moko ete azali “[pole, ”NW”] ya mokili”