Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/3 nk. 14-19
  • Tómonisa bosepeli mpo na makita ya Boklisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómonisa bosepeli mpo na makita ya Boklisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makita oyo mazali kolendisa
  • Tómibongisaka malamu
  • Bandakisa euti na Liloba ya Nzambe
  • Ndakisa oyo eleki malamu
  • Bandakisa ya mikolo na biso
  • Tózala na limemya mpo na mayangani na biso ya bosantu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Yo mpe osalaka mpo makita ya bokristo etonga basusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/3 nk. 14-19

Tómonisa bosepeli mpo na makita ya Boklisto

“Tótala ete [tólendisanaka, “NW”] moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. Tótika koyangana elongo moko te.”​—BAEBELE 10:24, 25.

1, 2. (a) Mpo na nini koyangana na makita ya boklisto ezali libaku malamu? (b) Na ndimbola nini Yesu azali katikati ya bayekoli na ye ntango bayangani?

KOYANGANA na likita ya boklisto ezali solo libaku malamu, ata soki esangisi mwa etuluku moke to mpe bankóto ya basambeli ya Yehova, mpamba te Yesu alobaki ete: “Wana mibale to misato bayangani mpo na nkombo na ngai, ngai nazali kati na bango”! (Matai 18:20) Ya solo, ntango apesaki elaka wana, Yesu azalaki kolobela makambo ya kosambisa oyo masengelaki kotalelama malamu na baoyo bazali kokamba lisangá. (Matai 18:15-19) Kasi, maloba ya Yesu makoki mpe kosalelama lokola etinda mpo na makita nyonso ya boklisto oyo mazali kobanda mpe kosuka na libondeli lisalemi na nkombo na ye? Ɛɛ. Tómikundola ete ntango Yesu atindaki bayekoli na ye ete básala mosala ya kozalisa bayekoli, alakaki ete: “Talá, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.”​—Matai 28:20.

2 Na ntembe te, mokonzi ya lisangá ya boklisto, Nkolo Yesu Klisto, akotyaka likebi mozindo na makita nyonso ya bayekoli na ye ya sembo. Lisusu, tokoki kondimisama ete azali na bango elongo na nzela ya elimo santu ya Nzambe. (Misala 2:33; Emoniseli 5:6) Yehova Nzambe, ye mpe akotyaka likebi na ntango toyangani elongo. Mokano ya libosoliboso ya makita yango ezali ya kosanzola Nzambe “kati na koyangana monene.” (Nzembo 26:12) Koyangana na biso na makita ya lisangá ezali elembeteli ya bolingo na biso mpo na ye.

3. Mpo na bantina nini ya minene tomonisaka bosepeli na makita ya boklisto?

3 Tozali na bantina mosusu ya malamu oyo tomonisaka bosepeli na matika ya boklisto. Liboso ya kolongwa awa na mabelé, Yesu Klisto aponaki bayekoli na ye bapakolami mpo na kosala lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa bilei ya elimo na bato na ndako ya kondima na ntango ebongi. (Matai 24:45) Mwango monene mpo na kopesa bilei ya elimo motindo wana ezali bongo makita ya lisangá mpe lisusu mayangani—ya minene mpe ya mike. Nkolo Yesu Klisto azali kokamba moombo ya sembo yango mpo na koteya makambo ya ntina na makita yango epai na baoyo nyonso balingi kobika na nsuka ya ebongiseli mabe oyo mpe kozwa bomoi na mokili ya sika ya Nzambe epai kuna boyengebene ekozala.

4. “Momeseno” mabe nini elobelami kati na Biblia, mpe nini ekosalisa biso ete tópɛngola yango?

4 Na bongo, moklisto moko te akoki kotika nzela na kokólisa momeseno mabe oyo ntoma Paulo alobelaki, ntango akomaki ete: “Tótala ete [tólendisanaka, NW] moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. Tótika koyangana elongo moko te, pelamoko motindo na bamosusu, kasi tópesana toli. Tósala bongo na koleka, awa emoni bino ete Mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Baebele 10:24, 25) Komanyola likoló na libaku malamu mpe likoló na matomba mazali kozwama na koyangana na makita ya boklisto ekosalisa biso ete tósimba makita yango na bosembo nyonso mpe na motema mobimba.

Makita oyo mazali kolendisa

5. (a) Maloba na biso masengeli kozala na bopusi nini na makita? (b) Mpo na nini tosengeli kozela te kobyanga bato ya sika oyo bazali komonisa bosepeli ete báyangana na makita?

5 Lokola baklisto babondelaka mpo ete elimo santu ya Yehova esala mosala na makita ya boklisto, moyangani mokomoko asengeli kosala nyonso ekoki na ye mpo ete asala na boyokani na elimo yango mpe ‘ayokisa elimo santu ya Nzambe mawa te.’ (Baefese 4:30) Ntango ntoma Paulo akomaki maloba wana mapemami, azalaki kolobela lolenge malamu ya kosalela maloba na biso. Makambo oyo tozali koloba masengeli ntango nyonso kozala “mpo na kolendisa, pelamoko ezali bosɛnga, ete mápesa bayoki ngɔlu.” (Baefese 4:29) Likambo oyo ezali mpenza na ntina mingi na makita ya boklisto. Kati na mokanda na ye epai ya Bakolinti, Paulo abɛtaki nsɛtɛ́ na likambo oyo ete makita masengeli kolendisa, koteya, mpe koyikisa mpiko. (1 Bakolinti 14:5, 12, 19, 26, 31) Bayangani nyonso bazwaka litomba na makita motindo yango, bakisa mpe bato ya sika, oyo bakoki mpenza kokóma na bosukisi ete: “Nzambe azali kati na bino.” (1 Bakolinti 14:25) Na ntina yango, tosengeli kozela te mpo na kobyanga bato ya sika oyo bamonisi bosepeli ete báyangana na biso, mpamba te, koyangana ekosalisa bango ete bákóla noki na elimo.

6. Wapi mwa makambo masalaka ete makita mázala elendiseli?

6 Baoyo nyonso bapesameli mokumba ya kosala masukulu, kotuna mituna, to kosala bilakiseli na makita ya boklisto basengeli komindimisa ete maloba na bango mazali kolendisa mpe mayokani na Biblia, Liloba likomami ya Nzambe. Longola koloba makambo ya sikisiki, tosengeli mpe komonisa mayoki oyo mazali na boyokani na bomoto ya Nzambe mpe ya Klisto oyo etondi na bolingo. Soki baoyo nyonso bazali na mikumba na manáka ya makita bazali komibanzabanza ete bámonisa ‘mbuma ya elimo ya Nzambe,’ lokola esengo, motema molai, mpe kondima, boye bayangani nyonso bakomiyoka ete bazali kotongama na elimo.​—Bagalatia 5:22, 23.

7. Lolenge nini bayangani nyonso bakoki kosunga mpo ete makita mázala elendiseli?

7 Atako bobele bato moke nde bakoki kozala na mikumba na makita ya lisangá, bato nyonso bakoki kosunga mpo ete makita málendisa bayangani. Mbala mingi bayangani bapesamelaka libaku ya koyanola mituna. Yango ezali mabaku ya koyambola kondima na biso liboso ya bato nyonso. (Baloma 10:9) Tosengeli soko moke te kosalela mabaku yango mpo na koteya makanisi na biso moko, to kolakisa makoki na biso, to mpe kotɔ́nga moninga moko mondimi. Kosala bongo ekoyokisa elimo santu mawa, boye te? Tosengeli kosilisa matata elongo na baninga na biso bandimi na nkuku mpe na elimo ya bolingo. Biblia elobi ete: “Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisana mokomoko pelamoko Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.” (Baefese 4:32) Solo, makita ya boklisto mazali kopesa biso libaku kitoko ya kosalela toli malamu oyo! Mpo na yango, bandeko mingi bakómaka na esika ya makita mwa moke liboso ya ngonga mpe batikalaka mwa moke nsima ya makita. Yango mpe esalisaka bato ya sika oyo bazali komonisa bosepeli, oyo bazali na mposa mingi ya komiyoka ete bayambami na esengo. Na yango, baklisto nyonso oyo bamipesi bazali na mokumba ya kokokisa mpo ete makita mátonga na ‘kotaláká ete tólendisanaka moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu.’

Tómibongisaka malamu

8. (a) Milende nini mibongi kopesamela longonya bato mosusu basalaka mpo na koyangana na makita? (b) Ndakisa nini Yehova azali kopesa lokola mobateli ya bampate?

8 Atako koyangana na makita ekoki kozala likambo ya pɛtɛɛ mpo na bamoko, nzokande, mpo na bamosusu, yango esɛngaka ntango nyonso milende makasi. Na ndakisa, moklisto oyo azali mama ya bana mpe asalaka mosala ya mosuni mpo na kosunga na bamposa ya libota na ye mbala mingi azongaka na ndako alɛmbi. Na nsima, asengeli mbala mosusu kolamba bilei mpe kosalisa bana na ye ete bámibongisa mpo na kokende na makita. Baklisto mosusu bautaka mosika mpo na kokende na makita, to bakoki kozala na mikakatano mpo ete bazali bibɔsɔnɔ to mpo ete bakómi mibangé. Na ntembe te Yehova Nzambe ayebaka ezalela ya moyangani mokomoko ya sembo, lolenge moko mobateli ya bampate, oyo azali na bolingo, ayebaka bamposa ya sikisiki ya mpate mokomoko ya etonga na ye. Biblia elobi ete: “[Yehova] akoleisa etonga na ye lokola mobateli, akoyanganisa bana na mpate na mabɔkɔ na ye; akokumba bango na ntolo na ye, akokamba malɛmbɛmalɛmbɛ baoyo bazali konungisa.”​—Yisaya 40:11.

9, 10. Lolenge nini tokoki kozwa matomba koleka na makita?

9 Baoyo basengeli kosala milende makasi mpo na koyangana na makita pɔ́sɔ na pɔ́sɔ bakoki kozala na ntango moke mpo na kobongisa makambo oyo makotalelama. Kolanda manáka ya botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ebakisaka matomba oyo tozali kozwa na koyangana na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Bobele bongo, komibongisa liboso mpo na makita mosusu, lokola boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Boyekoli ya mokanda, epesaka matomba mingi koleka. Na kozwáká ntango ya kotánga liboso makambo tokoyekola mpe na kotaleláká ata ndambo ya mikapo ya Biblia oyo maloba na yango matángami, baoyo bazali na mikumba ya mabota oyo mazali kozwa bango ntango mingi bakozala pene ya kosangana mpe kozwa litomba na boyekoli wana ya Biblia oyo ezali na ntina mingi.

10 Basusu, oyo bazali na mwa ntango mingi, bakoki kosalela yango mpo na kobongisa makita. Na ndakisa, bakoki kosala bolukiluki na mikapo oyo mipesami kasi maloba na yango matángami te. Na lolenge yango, bato nyonso bakoki komibongisa mpo na kozwa matomba mingi koleka na makita mpe kozala basangani malamu oyo bakolendisa lisangá na masolo mpe bakomantere na bango. Na komibongisáká malamumalamu, bankulutu mpe basaleli na misala bakopesa ndakisa malamu na kopesáká biyano ya mikuse mpe ya sikisiki. Mpo na limemya na bibongiseli ya Yehova, bayangani basengeli te kosalaka makambo oyo makoki kopɛngwisa likebi ya bato wana makita mazali kosalema.​—1 Petelo 5:3.

11. Mpo na nini koyangela makanisi na biso esɛngami mpo na kobongisa makita?

11 Misala mpe masano oyo ezali na ntina te mpo na bolamu na biso ya elimo ekoki kozwa biso ntango mingi. Soki ezali bongo, tosengeli komitalela mpe ‘tótika kozala bazoba’ na oyo etali lolenge tozali kosalela ntango na biso. (Baefese 5:17) Mokano na biso esengeli kozala ya ‘kosomba ntango’ na makambo oyo mazali na ntina mingi te mpo ete tólekisa ntango mingi na boyekoli na biso moko ya Biblia mpe na kobongisa makita, mpe mpo na mosala ya kosakola. (Baefese 5:16) Ya solo, yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpe esɛngaka ete tóyeba koyangela makanisi na biso. Bilenge oyo bazali kotya likebi na likambo oyo bazali komityela moboko malamu mpo na bokóli na bango na mikolo mizali koya. Paulo akomelaki moninga na ye Timoté oyo azalaki elenge ete: “Otyaka motema na makambo oyo [toli oyo Paulo apesaki Timoté], omipesa na yango, ete bato nyonso bámona polele ete ozali kotambola liboso.”​—1 Timoté 4:15.

Bandakisa euti na Liloba ya Nzambe

12. Ndakisa monene nini libota ya Samwele etikaki?

12 Tótalela ndakisa malamu oyo libota ya Samwele etikaki. Mbala na mbala, libota yango ezalaki kosangana na bibongiseli mpo na koyangana elongo na basambeli mosusu ntango mongombo ya Nzambe ezalaki na Silo. Bobele mibali nde basɛngisamaki ete bázala na bilambo wana mbula na mbula. Kasi, Elekana, tata na Samwele, amemaki libota na ye mobimba, wana “[mbula na mbula, NW], . . . azalaki kobuta longwa na mboka na ye ete asambela mpe apesa [Yehova] na bibele mbeka epai na Silo.” (1 Samwele 1:3-5) Ekoki kozala ete Lama, mboka oyo Samwele azalaki kofanda ezalaki pene na libongo ya mai, na esika oyo ezali lelo engumba Rentis na ngomba mike ya “ngomba na Efelaima.” (1 Samwele 1:1) Na bongo, mobembo mpo na kokende na Silo esɛngaki kotambola pene na kilomɛtɛlɛ 30, oyo ezalaki mobembo ya mpasi na ntango wana. Libota ya Elekana bazalaki kosala yango na bosembo nyonso “mbula na mbula, mbala nyonso oyo bazali kokende na ndako ya Yehova.”​—1 Samwele 1:7, NW.

13. Bayuda ya sembo batikaki ndakisa nini ntango Yesu azalaki awa na mabelé?

13 Yesu mpe abɔkwamaki na libota moko monene. Mbula na mbula, libota yango ezalaki kosala mobembo longwa na Nazarete oyo ezalaki na ntáká ya kilomɛtɛlɛ pene na 100 na súdi mpo na kokende na elambo ya Elekeli na Yelusaleme. Ezalaki na nzela mibale mpo na kokende na Yelusaleme. Nzela ya semba esɛngaki kokita kino na lobwaku ya Megido mpe na nsima komata pene na mɛtɛlɛ 600 kino na teritware ya Samalia mpe kotambola kino Yelusaleme. Nzela mosusu oyo bato mingi bazalaki kokamata ezali oyo Yesu akamataki ntango asalaki mobembo na ye ya nsuka na Yelusaleme na mobu 33 T.B. Yango esɛngaki kokita kino na Lobwaku ya Yaladene na nsé ya nivo ya mai monene kino kokóma “na mokili na Yuda na ngámbo na Yaladene.” (Malako 10:1) Kolongwa wana, “nzela [kino] na Yelusaleme” ezali na bolai ya kilomɛtɛlɛ soko 30, oyo esɛngi komata ngomba na bolai ya mɛtɛlɛ koleka 1 100. (Malako 10:32) Mbala na mbala, ebele ya bato ya sembo bazalaki kosala mobembo ya mpasi longwa na Galilai kino na Yelusaleme mpo na kokende kokumisa bilambo. (Luka 2:44) Oyo nde ndakisa malamu mpo na basaleli ya Yehova oyo bafandi na mikili ya bozwi lelo oyo, mingi kati na bango bazali na mokakatano te mpo na koyangana na makita ya boklisto, mpamba te bazali na myango ndenge na ndenge mpo na kosala mobembo na mikolo na biso!

14, 15. (a) Ndakisa nini Ana apesaki? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ezalela malamu oyo bayangani mosusu ya sika bazali komonisa?

14 Ndakisa mosusu ezali oyo ya Ana, mwasi-mokufeli-mobali oyo azalaki na mibu 84. Biblia elobi ete “abimaki na tempelo te.” (Luka 2:37) Lisusu, Ana amonisaki komibanzabanza ya bolingo mpo na bato mosusu. Ntango amonaki mwana Yesu mpe ntango ayebaki ete azali Masiya oyo alakamaki, asalaki nini? Atɔ́ndaki Nzambe mpe abandaki ‘kosolola na ntina na mwana yango na bango nyonso oyo bazalaki kotalela lisiko na Yelusaleme.’ (Luka 2:38) Oyo nde elimo malamu, ndakisa ebongi mpo na baklisto lelo oyo!

15 Ɛɛ, koyangana mpe kosangana na makita na biso esengeli kozala likambo ya esengo mpo na biso na boye ete, lokola Ana, tokolinga kozanga yango soko moke te. Bato mingi ya sika bamonisaka bosepeli motindo moko mpo na makita. Lokola bauti na molili mpe bayei na pole kitoko ya Nzambe, bazali na mposa ya koyekola makambo nyonso oyo bakoki koyekola, mpe mingi bazali komonisa esengo monene mpo na makita ya boklisto. Epai mosusu, baoyo baumeli kati na solo basengeli kokeba ete ‘bátika [te] bolingo na bango ya liboso.’ (Emoniseli 2:4) Mikakatano makasi na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto to makambo mosusu oyo maleki makoki ya bomoto ekoki kozangisa moto makita na bantango mosusu. Kasi tosengeli soko moke te kotika nzela na mposa ya koluka biloko mingi ya mosuni, kominanola, to kozanga bosepeli ekómisa biso bato oyo bamibongisaka te, bazangi kotya likebi, to oyo bazangisaka makita.​—Luka 8:14.

Ndakisa oyo eleki malamu

16, 17. (a) Lolenge nini Yesu azalaki kotalela makita mpo na koyekola makambo ya elimo? (b) Momeseno malamu nini baklisto nyonso basengeli komekola?

16 Yesu apesaki ndakisa monene ya komonisa bosepeli mpo na makita mpo na koyekola makambo ya elimo. Ntango azalaki na mibu 12, amonisaki bolingo na ye mpo na ndako ya Nzambe oyo ezalaki na Yelusaleme. Baboti na ye babungisaki ye. Kasi, na nsima, bakendaki kokuta ye wana azalaki kosolola Liloba ya Nzambe elongo na balakisi kati na tempelo. Ntango baboti na ye bomonisaki ete batungisamaki mingi mpo na ye, ayanolaki na limemya nyonso ete: “Boyebaki te ete ekoki na ngai kozala kati na ndako na Tata na ngai?” (Luka 2:49) Na botosi nyonso, elenge Yesu azongaki elongo na baboti na ye na Nazarete. Kuna, akóbaki komonisa bolingo na ye mpo na makita ya losambo na koyanganáká sabata na sabata na eyanganelo. Ntina yango, ntango abandaki mosala na ye ya kosakola, Biblia elobi ete, “Akómaki na Nazarete, mboka babɔkɔlaki ye, mpe na mokolo na sabata akɔtaki na eyanganelo lokola ezalaki motindo na ye, mpe atɛ[lɛ]maki kotánga mokanda.” Nsima wana Yesu atángaki mpe alimbolaki Yisaya 61:1, 2, bayangani “bakamwaki na maloba na ngɔlu mabimaki na monɔkɔ na ye.”​—Luka 4:16, 22.

17 Lelo oyo, makita ya boklisto masalemaka na kolandáká ndakisa wana ya moboko. Nsima ya kofungola likita na nzembo ya masanzoli mpe libondeli, bavɛrsɛ́ ya Biblia (to bavɛrsɛ́ etángami kati na mikanda mikolimbolaka Biblia) ezali kotángama mpe kolimbolama. Baklisto ya solo basɛngisami na komekola momeseno malamu ya Yesu Klisto. Na meko oyo makoki na bango mazali kopesa nzela, bazali kosepela na koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya boklisto.

Bandakisa ya mikolo na biso

18, 19. Bandakisa malamu nini bandeko bafandi na mikili ya bobola bazali kopesa na likambo etali koyangana na makita ya lisangá, na mayangani ya mike mpe ya minene?

18 Na mikili ya bobola, bandeko na biso mingi bazali kopesa ndakisa malamu ya bosepeli mpo na makita ya boklisto. Na ekólo Mozambique, Ndeko Orlando, oyo azali mokɛngɛli ya etúká, ye na mwasi na ye Amélia, batambolaki na makolo na boumeli ya ngonga 45 na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 90 na ngomba molai mpo na kotambwisa liyangani moko kuna. Na nsima basalaki mobembo ya kozonga bobele na nzela yango mpo na kotambwisa liyangani mosusu. Orlando alobaki na bopɔlɔ nyonso ete: “Tomiyokaki ete tosali likambo monene te ntango tokutanaki na bandeko oyo bautaki na lisangá ya Bawa. Mpo na kokóma na liyangani mpe kozonga na mboka na bango basengelaki kosala mobembo na boumeli ya mikolo motoba, kotambola na makolo ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 400, mpe kati na bango ezalaki na ndeko moko ya mibu koleka 60!”

19 Tokoloba boni na oyo etali komonisa bosepeli mpo na makita na biso ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ? Kashwashwa Njamba azali ndeko moko ya mwasi oyo azali na nzoto makasi te mpe azali na mibu koleka 70. Afandaka na Kaisososi, mwa mboka moke oyo ezali na ntáká ya kilomɛtɛlɛ mitano kino na Rundu, esika Ndako ya Bokonzi ezali, na ekólo Namibie. Mpo na koyangana na makita, atambolaka na makolo, kokende mpe kozonga, na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 10 na nzela ya zamba. Basalaki bato mosusu mabe na nzela yango, kasi Ndeko Kashwashwa atikaka te kokende na makita pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Makita mingi masalemaka na nkota oyo ye ayebi te. Na yango, ndenge nini azwaka litomba na koyangana na makita? Ndeko Kashwashwa alobi ete: “Na kolandáká mikapo, namekaka kokanisa soki lisolo ezali kolobela likambo nini.” Kasi ayebi mpe kotánga te, boye ndenge nini alandaka mikapo? Ayanoli ete, “Natyaka likebi na mikapo oyo nayebi na motó.” Mpe nsima ya bambula mingi, asili kobomba mikapo mingi na motó. Mpo na kosalela Biblia malamu koleka, azali kolanda mateya na kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma oyo ebongisami kati na lisangá. Alobi ete: “Nalingaka koyangana na makita. Ezalaka ntango nyonso na makambo ya sika oyo nasengeli koyekola. Nalingaka kosangana na bandeko. Atako nakoki kosolola na bango nyonso te, ntango nyonso bayaka kopesa ngai mbote. Mpe likambo lileki ntina, nayebi ete na koyanganáká na makita, nazali kosepelisa motema ya Yehova.”

20. Mpo na nini tosengeli te kosundola makita ya boklisto?

20 Lokola Ndeko Kashwashwa, bamilió ya basambeli ya Yehova na mokili mobimba bazali komonisa bosepeli oyo ebongi mpenza kopesamela longonya mpo na makita ya boklisto. Awa mokili ya Satana ezali kokende na kobomama na yango, tokoki te kosundola koyangana elongo moko. Nzokande, tiká ete tózala ntango nyonso na bokɛngi na elimo mpe tómonisa bosepeli mozindo mpo na makita ya lisangá, mpo na mayangani ya mike mpe ya minene. Likambo yango ekosepelisa bobele motema ya Yehova te, kasi lisusu, ekopesa biso matomba mingi wana tozali kozwa mateya ya Nzambe oyo mazali komema na bomoi ya seko.​—Masese 27:11; Yisaya 48:17, 18; Malako 13:35-37.

Mituna ya bozongeli

◻ Mpo na nini koyangana na makita ya boklisto ezali libaku malamu?

◻ Lolenge nini bayangani nyonso bakoki kosunga mpo ete makita mázala elendiseli?

◻ Ndakisa monene nini Yesu Klisto atikaki?

◻ Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya bandeko bafandi na mikili ya bobola?

[Etanda na lokasa 17]

Bazali kosepela na makita ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ

Bamilió ya bato bazali kofanda na bingumba epai bato mingi bazali babola mpe bingumba yango bitondi na mobulu. Ata kati na ezalela motindo yango, baklisto ya solo kati na bango bazali komonisa bosepeli oyo ebongi kopesamela longonya mpo na makita ya boklisto. Nkulutu moko na lisangá ya Gauteng, na Soweto, na ekólo Afrika ya Súdi alobi ete: “Na lisangá moko ezali na basakoli 60 (Batatoli mpe basakoli oyo bazwi naino batisimo te), motango ya bayangani ekómaka na 70 mpe na 80, mbala mosusu koleka. Atako bandeko bautaka mosika te mpo na koya na makita, mobulu etondi na eteni wana ya Soweto. Ndeko moko azokisamaki na mokɔngɔ wana azalaki kokende na makita. Bakangaki bandeko mibale ya basi mpo ete babɔtɔla biloko na bango. Kasi yango epekisaka bango te koya na makita. Mokolo ya lomingo, nsima ya libondeli ya nsuka, toyekolaka nzembo ya Bokonzi, na boumeli ya miniti zomi na mitano. Bato 95 likoló na monkama batikalaka mpe bayembaka banzembo nyonso oyo tokoyemba na likita ya pɔ́sɔ ekolanda. Yango esalisaka bato ya sika ete báyekola nzembo mpe báyemba na biso elongo.”

Bafandi na bamboka ya zamba bazali na mokakatano mosusu, lokola oyo ya kotambola nzela molai mpo na koyangana na makita mbala misato na pɔ́sɔ. Mobali moko na mwasi na ye oyo bazali kosepela na solo bafandi na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 15 longwa esika Ndako ya Bokonzi ya Lobatse ezali, na ekólo Botswana. Na mbula oyo eleki, bazalaki koyangana na makita ntango nyonso elongo na bana na bango mibale. Mobali asalaka mosala ya kobongisa basapato mpo na koleisa libota na ye. Mwasi atɛkisaka biloko ya mikemike mpo na kobakisa mwa mosolo mpo na kofuta tiké ya kokende na makita mpe mpo na kozonga.

Na mpokwa moko ya eleko ya molungé, nsima ya likita elongo na mokɛngɛli ya zongazonga, libota oyo batikalaki sé bango moko na esika bazelaka bísi na ngonga ya libwa ya mpokwa. Babísi etikaki kotambola mwa bangonga liboso mokolo yango mpamba te mbula mpe mopɛpɛ makasi ezalaki koya. Mokonzi moko ya basodá atɛlɛmaki na motuka na ye mpe atunaki bango soki bazalaki kosala nini wana. Nsima ya koyoka eyano na bango, ayokelaki bango mawa, mpe akumbaki bango na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 15 kino na ndako. Mwasi, oyo azali mosakoli azwi naino batisimo te, alobaki na mobali na ye ete: “Omoni, soki totye makita na esika ya liboso, Yehova asungaka biso ntango nyonso.” Sikawa, mobali mpe amonisi mposa ya kokóma mosakoli ya nsango malamu.

[Elilingi na lokasa 18]

Batatoli lokola baoyo bafandi na ekólo Roumanie bazali kopesa ndakisa malamu ya komonisa bosepeli mpo na makita ya boklisto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto