“Bóbunda etumba makasi mpo na kondima”!
“Bóbunda etumba makasi mpo na kondima oyo epesamaki na babulami mbala moko mpo na libela.”—YUDA 3, NW.
1. Na ndimbola nini baklisto ya solo bazali na etumba lelo oyo?
NA NTANGO ya etumba, bomoi ya basoda ezalaka mpasi. Kanisá ete basengeli kolata sokoto mpe kotambola bakilomɛtɛlɛ na bakilomɛtɛlɛ na nse ya moi, mbula, mopɛpɛ, mpe makambo mosusu ndenge na ndenge, kanisá mpasi ya koyekola kosalela bibundeli, to komibatela liboso ya makama ndenge na ndenge ya minene oyo makoki koboma to kozokisa. Nzokande, baklisto ya solo bakɔtaka na bitumba ya bikólo te. (Yisaya 2:2-4; Yoane 17:14) Kasi, tosengeli kobosanaka te ete na elimo, biso nyonso tozali na etumba. Satana azali koyina makasi Yesu Klisto mpe bayekoli na ye oyo bazali awa na mabelé. (Emoniseli 12:17) Baoyo nyonso bazali kozwa ekateli ya kosalela Yehova Nzambe, bazali mpenza kokɔta na molɔngɔ ya basoda mpo na kobunda etumba ya elimo.—2 Bakolinti 10:4.
2. Lolenge nini Yuda alimboli etumba ya baklisto, mpe lolenge nini mokanda na ye ekoki kosalisa biso na kopika mpende kati na etumba yango?
2 Na boyokani na likambo yango, Yuda, ndeko ya Yesu akomi ete: “Balingami, atako nazalaki kosala nyonso mpo nakomela bino na ntina na lobiko oyo tozali na yango biso na bino, namonaki ete ezali na ntina nakomela bino mpo na kolendisa bino ete bóbunda etumba makasi mpo na kondima oyo epesamaki na babulami mbala moko mpo na libela.” (Yuda 3, NW) Ntango Yuda azali kolendisa baklisto ete ‘bábunda etumba makasi,’ asaleli liloba oyo eyokani na liloba “monyoko.” Ɛɛ, etumba yango ekoki kozala likambo ya mpasi, ata ya konyokwama! Omonaka ntango mosusu ete ezali mpasi kopika mpende kati na etumba yango? Mokanda ya Yuda, atako ezali mokuse kasi ezali na nguya, ekoki kosalisa biso. Ezali kolendisa biso ete tótɛmɛla misala ya mbindo, tómemya bokonzi oyo etyami na Nzambe, mpe tómibatela kati na bolingo ya Nzambe. Tótalela lolenge oyo tokoki kosalela toli yango.
Tɛmɛlá misala ya mbindo
3. Lisangá ya boklisto ekutanaki na likama nini na mikolo ya Yuda?
3 Yuda amonaki ete baninga na ye baklisto mosusu bazalaki kolonga te kati na etumba mpo na kotɛmɛla Satana. Mokakatano moko monene ezalaki liboso ya etonga. Yuda akomi ete bato mabe basilaki “kokɔta na nkuku.” Bato yango bazalaki kolendisa misala ya mbindo na mayele mabe. Mpe na mayele nyonso bazalaki kolongisa misala na bango, ‘kobaloláká ngɔlu na Nzambe na biso kino bosɔtɔ [“misala ya mbindo,” NW].’ (Yuda 4) Ekoki kozala ete lokola ba Gnostiques ya ntango ya kala, bazalaki kokanisa ete soki moto azali kosala masumu mingi, akozwa mpe ngɔlu ya Nzambe mingi—boye, elekaki malamu kosala masumu mingi! To mbala mosusu bakanisaki ete Nzambe ya boboto akopesa bango etumbu soko moke te. Ezala ndenge nini, bazalaki na libunga.—1 Bakolinti 3:19.
4. Wapi bandakisa misato ya bitumbu Nzambe apesaká oyo Yuda atángi kati na Makomami?
4 Yuda akweisi makanisi mabe na bango na kotángáká ndakisa misato ya bitumbu oyo Yehova apesaki na ntango ya kala: na Bayisalaele oyo ‘bazangaki kondima’; na “[baanzelu, NW] . . . baoyo babatelaki motindo na bango na liboso te kasi batikaki ezaleli na bango mpenza” mpo na kosala masumu na basi; mpe na bafandi ya Sodomo na Gomola, baoyo “basalaki pite na koleka mpe basalelaki nzoto misala milongobani te.” (Yuda 5-7, NW; Genese 6:2-4; 19:4-25; Mituya 14:35) Na likambo mokomoko, Yehova apesaki basumuki etumbu ya makasi.
5. Yuda azongeli maloba ya mosakoli nini ya ntango ya kala, mpe lolenge nini esakweli yango emonisi ete ekoki kozanga kokokisama te?
5 Na nsima, Yuda alobeli etumbu ya monene koleka. Azongeli maloba ya esakweli ya Enoka—maloba oyo mazwami esika mosusu te kati na Makomami mapemami.a (Yuda 14, 15) Enoka asakolaki na ntina na eleko oyo Yehova akopesa etumbu na bato nyonso bazali kotyola Nzambe mpe akosambisa misala na bango ya mabe. Likambo ya kobenda likebi, Enoka asalelaki eleko-eleká (passé), mpamba te, bitumbu ya Nzambe bikokaki kozanga kokokisama te na boye ete amonaki yango lokola ete bisilaki kokokisama. Ekoki kozala ete bato basɛkaki Enoka mpe na nsima basɛkaki Noa, kasi basɛki wana bakufaki na Mpela ya mokili mobimba.
6. (a) Likambo nini esengelaki kokundwela baklisto na mikolo ya Yuda? (b) Mpo na nini tosengeli kotya likebi na makundoli ya Yuda?
6 Mpo na nini Yuda akomaki bitumbu yango ya Nzambe? Mpamba te ayebaki ete bato mosusu oyo bazalaki kosangana na masangá ya boklisto na mikolo na ye bazalaki kosala masumu na lolenge ya bosɔtɔ mpe ya mabe se lokola bato oyo bayeisaki bitumbu na ntango ya kala. Na yango, Yuda akomi ete esengeli kokundwela bandeko na masangá basolo ya moboko ya makambo ya elimo. (Yuda 5) Emonanaki lokola ete babosanaki ete Yehova Nzambe azali komona misala na bango. Ɛɛ, ntango basaleli na ye bazali kobuka mibeko na ye na nko, komibebisáká bango moko mpe kobebisáká bato mosusu, Nzambe amonaka. (Masese 15:3) Misala yango miyokisaka ye mpasi mingi na motema. (Genese 6:6; Nzembo 78:40) Ezali likambo ya nsɔmɔ ete biso bato mpamba tokoki kozala na bopusi likoló ya mayoki ya Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Atalaka biso mokolo na mokolo, mpe ntango tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kolanda matambe ya Mwana na ye, Yesu Klisto, etamboli na biso esepelisaka motema na ye. Na yango, tótyola te makundoli lokola oyo Yuda apesi kasi tótyela yango likebi mpenza.—Masese 27:11; 1 Petelo 2:21.
7. (a) Mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi ete baoyo bamipesi na misala mabe báluka lisalisi nokinoki? (b) Lolenge nini biso nyonso tokoki kokima misala ya mbindo?
7 Yehova asukaka bobele na komona te, kasi asalaka mpe eloko. Lokola azali Nzambe ya boyengebene, ata ndɛlɛ, akopesa etumbu na basali na mabe. (1 Timoté 5:24) Baoyo bakanisaka ete bitumbu na ye ezali se makambo ya kala mpe ete amibanzabanzaka te mpo na mabe oyo bazali kosala, bazali komikosa. Lelo oyo, ezali mpenza likambo ya ntina mingi ete baoyo bamipesi na misala ya mbindo báluka nokinoki lisalisi epai na bankulutu baklisto! (Yakobo 5:14, 15) Biso nyonso tokoki komibanzabanza mpo na likama oyo misala ya mbindo ezali kotyela biso kati na etumba na biso ya elimo. Mbula na mbula ezali na baoyo bazali kokwea—kati na bato oyo bazali kobimisama kati na biso, mingi ezali mpo ete bamipesaki na misala ya mbindo kozanga kobongola motema. Tosengeli kozwa ekateli makasi ya kotɛmɛla masɛnginya nyonso oyo malingi komema biso na nzela motindo wana.—Kokanisá na Matai 26:41.
Komemya bokonzi oyo euti na Nzambe
8. “Bato na nkembo” oyo balobelami na Yuda 8 ezali banani?
8 Mokakatano mosusu oyo Yuda alobeli ezali bongo kozanga limemya mpo na bokonzi oyo euti na Nzambe. Na ndakisa, na vɛrsɛ 8 alobi na ntina na bato mabe yango ete “bakotukaka [bato na] nkembo.” ‘Bato yango na nkembo’ ezalaki banani? Bazalaki bato ya kozanga kokoka, kasi bapesamelaki mikumba na nzela ya elimo santu ya Yehova. Na ndakisa, bankulutu bazalaki kati na masangá, mpe mokumba na bango ezalaki ya kobatela etonga ya Nzambe. (1 Petelo 5:2) Bakɛngɛli-batamboli bazalaki mpe, lokola ntoma Paulo. Mpe lisangani ya bankulutu na Yelusaleme ezalaki lokola lisangani ya mikóló-bakambi, oyo ezalaki kozwa bikateli bitaleli lisangá mobimba ya boklisto. (Misala 15:6) Yuda amibanzabanzaki mingi na likambo oyo ete bato mosusu kati na lisangá bazalaki koloba mabe na ntina na bato yango to kotɔnga bango.
9. Yuda atángi ndakisa nini ya kozanga botosi na bokonzi?
9 Kotɔndɔláká maloba na yango mazangi limemya, na vɛrsɛ 11, Yuda atángi bandakisa mosusu misato mpo na kokundwela bango: Kaina, Balama, mpe Kola. Kaina aboyaki kolanda toli etondi na bolingo oyo Yehova apesaki ye mpe alandaki makanisi na ye ya koyina oyo ememaki ye na koboma moto na nko. (Genese 4:4-8) Balama akebisamaki mbala na mbala na nguya oyo eleki nguya ya bomoto—kutu mpunda na ye moko elobaki na ye! Kasi, na moimi mpenza, akobaki koangela libota ya Nzambe mwango mabe. (Mituya 22:28, 32-34; Deteronome 23:5) Kola azalaki na mokumba monene, kasi, mpo na ye ekokaki bongo te. Apusaki bato ete bátombokela Mose, moto oyo alekaki komisɔkisa na bato nyonso na mokili.—Mituya 12:3; 16:1-3, 32.
10. Lelo oyo, lolenge nini bamoko bazali kokwea na motambo ya “kotuka bato na nkembo,” mpe mpo na nini tosengeli koboya maloba motindo wana?
10 Bandakisa oyo ezali koteya biso mpenza ete tosengeli koyokaka toli mpe komemya baoyo Yehova apesi bango mikumba! (Baebele 13:17) Ezali mpasi te mpo na komona mabunga ya bankulutu oyo baponami, mpamba te bazali se bato ya kozanga kokoka, lokola biso nyonso. Kasi soki totii likebi na biso mingi na mabunga na bango mpe tozangi komemya bango, yango ekoki kolimbola ete tozali ‘kotuka bato na nkembo,’ boye te? Na vɛrsɛ 10 (NW), Yuda alobeli baoyo “bakolobaka mabe mpo na makambo oyo bayebi yango malamu te.” Ntango mosusu, bamoko bakoki kotɔnga ekateli oyo lisangani ya bankulutu to komite mpo na kosambisa ezwi. Kasi, bayebi mpenza makambo nyonso te oyo bankulutu batalelaki mpo na kozwa ekateli wana. Boye, mpo na nini koloba mabe na ntina na makambo oyo bayebi malamu te? (Masese 18:13) Baoyo balingi kotika ezaleli wana te bakoki kokɔtisa bokabwani kati na lisangá mpe ntango mosusu tokoki kokokanisa bango na “mabanga mabombami na kati ya mai” kati na bilambo ya bandeko. (Yuda 12, 16, 19, NW) Tosengeli kokeba ete tótya elimo ya bandeko mosusu na likama te. Kasi, tiká ete mokomoko na biso azala na ekateli ya kopesa motuya na mibali oyo bazali na mikumba na ntina na mosala na bango makasi mpe komipesa na bango mpo na etonga ya Nzambe.—1 Timoté 5:17.
11. Mpo na nini Mikaele amipekisaki koloba mabe na Satana?
11 Yuda apesi ndakisa ya moto oyo atosaki bokonzi oyo etyami. Akomi ete: “Nde wana ezalaki Mikaele, ye mokóló na [baanzelu, NW], kowelana na Satana, kotyana ntembe na ye mpo na nzoto na Mose, azalaki na molende kokitisa ye na maloba na kotuka te, kasi alobi ete, Nkolo apamela yo!” (Yuda 9) Lisolo kitoko oyo, elobelami bobele na Yuda kati na Makomami mapemami mpe ezali koteya biso makambo mibale. Ya liboso, ezali koteya biso ete tosengeli kotika lisambisi na mabɔkɔ ya Yehova. Emonani ete Satana alingaki kosalela nzoto ya mosembwi Mose na lolenge mabe mpo na kotombola losambo ya lokuta. Oyo nde likambo mabe! Kasi, Mikaele, na komikitisa nyonso, amipekisaki kosambisa ye, mpamba te bobele Yehova nde azali na lotomo wana. Na bongo, lolenge kani biso tosengeli mpenza na koleka komipekisa kosambisa bato oyo bazali kosala molende mpo na kosalela Yehova.
12. Baoyo bazali na mikumba kati na lisangá ya boklisto bakoki kozwa liteya nini na ndakisa ya Mikaele?
12 Ya mibale, baoyo bazali na mwa bokonzi kati na lisangá bakoki mpe kozwa liteya na likambo oyo Mikaele asalaki. Atako Mikaele azalaki “mokóló na baanzelu,” asalelaki bokonzi na ye na lolenge mabe te, atako batumolaki ye. Bankulutu ya sembo balandaka ndakisa yango na likebi mpenza, bayebaka ete kosalela bokonzi na bango na lolenge mabe ezali kozanga limemya mpo na bokonzi ya Yehova. Mokanda ya Yuda elobi makambo mingi na ntina na mibali oyo babongaki kopesamela limemya kati na lisangá nzokande basalelaki bokonzi na bango na lolenge mabe. Na ndakisa, na vɛrsɛ 12 kino 14, Yuda atɔndɔli mpenza “babateli na mpate oyo bazali komileisa bango moko kozanga bobangi.” (Kokanisá na Ezekiele 34:7-10.) Na maloba mosusu, lobanzo na bango ya liboso ezalaki matomba na bango moko, kasi etonga ya Yehova te. Bankulutu bakoki kozwa mateya mingi uta na bandakisa mabe motindo wana. Ya solo, maloba ya Yuda mazali komonisa polele motindo ya bato oyo tosengeli kokóma te. Ntango tokwei na ezaleli ya moimi, tokoki kozala basoda ya Klisto te; tokomipesa mingi na koluka matomba na biso moko. Nzokande, tiká ete biso nyonso tólanda maloba oyo ya Yesu: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.”—Misala 20:35.
“Bómibatela kati na bolingo na Nzambe”
13. Mpo na nini biso nyonso tosengeli kozala na mposa makasi ya komibatela kati na bolingo ya Nzambe?
13 Pene na nsuka ya mokanda na ye, Yuda apesi toli oyo ezali kolendisa: “Bómibatela kati na bolingo na Nzambe.” (Yuda 21) Eloko oyo ekosalisa biso koleka kati na etumba ya boklisto ezali bongo kotikala ntango nyonso kati na bolingo ya Yehova Nzambe. Ɛɛ, bolingo ezali ezaleli oyo eleki monene kati na bizaleli ya Yehova. (1 Yoane 4:8) Paulo akomelaki baklisto ya Loma ete: “Nandimi solo ete ata kufa, ata bomoi, ata [baanzelu, NW], ata mikonzi, ata makambo na ntango oyo, ata makambo makoya nsima, ata ndenge na nguya na mokili, ata molai, ata bozindo, ata eloko mosusu nini ekoki kotangola biso te na bolingo na Nzambe bozali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.” (Baloma 8:38, 39) Kasi, ndenge nini tokotikala kati na bolingo yango? Talá bikateli misato oyo tokoki kozwa, engebene Yuda.
14, 15. (a) Kotongama na “kondima” na biso “ya bosantu mingi” elimboli nini? (b) Ndenge nini tokoki kotalela lolenge ya molato mobimba ya etumba na biso?
14 Ya liboso, Yuda ayebisi biso ete tókoba kotongama kati na “kondima” na biso “ya bosantu mingi.” (Yuda 20, NW) Lokola tomonaki yango na lisolo eleki, yango ezali likambo oyo lisengeli kosuka te. Tozali lokola ndako oyo ezali ntango nyonso na mposa ya kolendisama makasi mpo ete mbula, mopɛpɛ, mpe bongo na bongo ebebisa yango te. (Kokanisá na Matai 7:24, 25.) Na yango, tómityela motema koleka te. Nzokande, tóluka esika nini tokoki kotongama na moboko ya kondima na biso, mpo tókóma makasi koleka, basoda mpenza ya Klisto oyo bazali sembo. Na ndakisa, tokoki kotalela eteni mokomoko ya molato mobimba ya etumba ya elimo oyo elobelami na Baefese 6:11-18.
15 Molato na biso ya etumba ya elimo ezali lolenge nini? “Nguba na kondima” na biso ezali mpenza makasi na ndenge esengeli? Soki tokanisi bambula oyo euti koleka, tozali nde komona bilembeteli ya bopɔtu, lokola bolɛmbu mpo na koyangana na makita, kozanga molende na mosala ya kosakola, to mɔ́tɔ mpo na kosala boyekoli na biso moko ekiti? Bilembo wana ezali makambo ya kotalela na lisɛki te! Tosengeli kosala nyonso sikawa mpo na kotongama mpe kolendisama kati na solo.—1 Timoté 4:15; 2 Timoté 4:2; Baebele 10:24, 25.
16. Kobondela na elimo santu elimboli nini, mpe eloko nini tosengeli kosɛngaka na Yehova ntango nyonso?
16 Lolenge ya mibale mpo na komibatela kati na bolingo ya Nzambe ezali bongo kokoba ‘kobondela kati na elimo santu.’ (Yuda 20) Yango elimboli kobondela na bopusi ya elimo ya Yehova mpe na boyokani na Liloba na ye lipemami na elimo. Libondeli ezali mwango ya ntina mingi mpo na kobɛlɛma na Yehova mpe komonisa komipesa na biso epai na ye. Tosengeli soko moke te kopesa motuya moke na libaku malamu boye! Mpe, ntango tozali kobondela, tokoki kosɛnga—ɛɛ, kokoba kosɛnga—elimo santu. (Luka 11:13) Ezali nguya oyo eleki nguya nyonso oyo tokoki kozwa. Na lisungi motindo yango, tokoki ntango nyonso komibatela kati na bolingo ya Nzambe mpe koyika mpiko lokola basoda ya Klisto.
17. (a) Mpo na nini ndakisa ya Yuda na likambo ya komonisa motema mawa ezali mpenza monene? (b) Lolenge nini mokomoko kati na biso akoki kokoba komonisa motema mawa?
17 Ya misato, Yuda apesi biso toli ete tókoba komonisa motema mawa. (Yuda 22) Ndakisa na ye moko na likambo yango ezali mpenza monene. Soki totali malamu, azalaki na elonga ya komitungisa mpo na libebi, misala ya mbindo, mpe lipɛngwi oyo ezalaki kokɔta kati na lisangá ya boklisto. Atako bongo, abungisaki makanisi malamu na ye te, mbala mosusu na kokómáká na makanisi ete makambo mabebi mpenza na boye ete esengeli lisusu komonisa motema mawa te. Nzokande, apesaki bandeko na ye toli ete bákoba komonisa motema mawa mbala nyonso oyo esengeli, básosolisa na boboto nyonso baoyo bazali kobɛta ntembe mpe ata ‘kobɔtɔla na mɔ́tɔ’ baoyo bazali na etamboli oyo ekoki komema bango na kosala lisumu monene. (Yuda 23; Bagalatia 6:1) Oyo nde elendiseli malamu mpo na bankulutu na mikolo oyo etondi na yikiyiki! Bango mpe bazali kosala milende ya komonisa motema mawa soki ntina ya kosala bongo ezali, kasi bazali mpe kotikala ngwi soki esengeli. Bobele bongo, biso nyonso tosengeli komonisa motema mawa bamoko epai na bamosusu. Na ndakisa, na esika ya kobomba nkanda mpo na makambo mikemike, ebongi mpenza tólimbisaka.—Bakolose 3:13.
18. Lolenge nini tokoki komindimisa ete tokolonga etumba na biso ya elimo?
18 Etumba oyo tozali kobunda ezali pɛtɛɛ te. Lokola Yuda alobi yango, ezali “etumba makasi.” (Yuda 3, NW) Banguna na biso bazali makasi mingi. Longola Satana, ezali mpe na mokili mabe na ye mpe ezalela na biso ya kozanga kokoka, nyonso esangani mpo na kobundisa biso. Kasi, tokoki komindimisa ete tokolonga! Mpo na nini? Mpamba te tozali na ngámbo ya Yehova. Yuda asukisi mokanda na ye na kokundoláká ete Yehova azali na lotomo ya kozwa “nkembo, mpe monene mpe nguya mpe bokonzi, liboso na ekeke mobimba, mpe sasaipi, mpe na libela na libela.” (Yuda 25) Yango ezali likanisi ya kokamwa mpenza, boye te? Na bongo, bokoki kobɛta ntembe te ete bobele Nzambe moko wana “akoki kobatela bino ete bókwea te,” boye te? (Yuda 24) Soko moke te! Tiká ete mokomoko na biso azala na ekateli ya kokoba kotɛmɛla misala ya mbindo, ya kotosa bokonzi oyo euti na Nzambe, mpe komibatela kati na bolingo ya Nzambe. Na lolenge yango, biso nyonso elongo tokozwa elonga ya nkembo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Balukiluki mosusu balobaka ete Yuda atángi maloba yango uta na mokanda ebéngami Buku ya Enoka, oyo ezali bongo apokrife [ezali kati na mikanda mipemami te]. Nzokande, Richard Lenski alobi boye: “Totuni boye: ‘Buku ya Enoka, mokanda oyo ezali na makambo ndenge na ndenge, eutá wapi?’ Buku yango ebakisamaki, mpe moto moko te ayebi malamu badati ya kokomama ya biteni na yango ndenge na ndenge . . . ; moto moko te akoki koyeba na bosikisiki soki mbala mosusu maloba na yango mosusu mazwamaki se na mokanda ya Yuda te.”
Mituna ya bozongeli
◻ Lolenge nini mokanda ya Yuda eteyi biso kotɛmɛla misala ya mbindo?
◻ Mpo na nini komemya bokonzi oyo euti na Nzambe ezali na ntina mingi?
◻ Kosalela bokonzi kati na lisangá na lolenge ebongi te ezali mpenza mabe na nini?
◻ Tosengeli kosala lolenge nini mpo na komibatela kati na bolingo ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 15]
Na bokeseni na basoda ya Loma, baklisto bazali kobunda etumba ya elimo
[Elilingi na lokasa 18]
Babateli ya mpate baklisto bazali kosala na moimi te, kasi na bolingo