Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/8 nk. 25-29
  • Ndenge ba Huguenots bakimaki mpo na kozwa bonsomi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ba Huguenots bakimaki mpo na kozwa bonsomi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Batɛmɛlaki yango longwa na ebandeli
  •  Mibeko ekómi makasi koleka
  • Makambo ezongi lokola na ebandeli
  • Basengelaki kobombama, kobunda, to kokima?
  • Bayambami malamu epai bakendaki
  • Bato bazwaki nde liteya na likambo yango?
  • Bitumba ya mangomba na France
    Lamuká!—1997
  • Boyokani ya Westphalie ebongolá mpenza makambo na Mpoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/8 nk. 25-29

Ndenge ba Huguenots bakimaki mpo na kozwa bonsomi

“Na nkombo ya Mokonzi mpe ya Mokonzi-mwasi, . . . tolobi ete, Baprotesta nyonso ya ekólo France oyo bakoluka ebombamelo mpe bakoya na ekólo na biso, tokobatela bango . . . mpe tokosala makasi na ndenge ekoki mpo na kosunga bango, kopesa bango biloko mpe kosalisa bango . . . mpo ete báfanda malamu mpe bányokwama te.”

WANA ezali maloba oyo William, mokonzi ya Angleterre na Mary mokonzi-mwasi, balobaki na mobu 1689. Kasi, mpo na nini Baprotesta ya ekólo France, to ba Huguenots, nkombo oyo bayebanaki na yango na nsima, bazalaki na mposa ya esika ya komibomba mpe ya komibatela na libándá ya ekólo France? Mpo na nini kokima na bango ekólo France, likambo oyo esalemá esili koleka mbula 300 ezali kobenda likebi na biso lelo oyo?

Na ekeke ya 16, bitumba mpe kowelana kati na mangomba ezalaki kosalema na Mpoto. Bitumba ya mangomba (mobu 1562 kino 1598) kati na Bakatolike mpe Baprotesta ekɔtisaki yikiyiki na ekólo France. Nzokande, na mobu 1598, Henry IV, mokonzi ya ekólo France, atyaki sinyatili na Mobeko ya Nantes, oyo endimaki mangomba mingi na ekólo France, yango epesaki Baprotesta ya France mwa bonsomi ya losambo. Mibeko oyo endimaki mangomba mibale ezalaki na mboka mosusu te na Mpoto. Na ebandeli, mobeko yango esilisaki yikiyiki oyo eningisaki ekólo France na ekeke ya 16 na boumeli ya mbula koleka 30.

Na mobu 1685, basalaki Mobeko ya Fontainebleau mpe balongolaki Mobeko ya Nantes oyo basalaki mpo ete etikala “seko mpe elongwa te.” Na nsima, Voltaire, moto ya filozofi na ekólo France, alobelaki kolongolama ya mobeko wana lokola “moko na makambo oyo epesaki mawa monene na France.” Nsima ya mwa ntango, likambo yango esalaki ete ba Huguenots soko 200 000 bákima na mikili mosusu. Nzokande, na nsima likambo yango ebimisaki mbuma mabe mingi. Kasi, mpo na nini balongolaki mobeko ya liboso oyo endimaki mangomba mingi?

Batɛmɛlaki yango longwa na ebandeli

Atako Mobeko ya Nantes esalelamaki mbula soko 90, nganga-mayele moko ya istware alobi ete ezalaki lisusu na nguya te “liboso ete bálongola yango na mobu 1685.” Ɛɛ, mobeko yango ezalaki na moboko ya makasi te. Longwa na ebandeli, epesaki nzela na oyo elobelamaki lokola “kowelana” kati ya bakonzi ya Lingomba ya Katolike mpe “R.P.R.” (Église reformée). Uta ntango ebimaki na mobu 1598 kino pene na mobu 1630, botɛmɛli na Mobeko ya Nantes ezalaki komonana na masolo ya ntembe kati na Bakatolike na Baprotesta mpe na mikanda oyo bazalaki kobimisa. Nzokande, botɛmɛli ezalaki mitindo mingi.

Nsima ya kobundisa Baprotesta kobanda na mobu 1621 kino na mobu 1629, guvernema ya France elukaki kokómisa bango Bakatolike na makasi, na kotyeláká bango ebele ya mibeko ya makasimakasi. Mitungisi yango ebakisamaki na boyangeli ya Louis XIV, “Mokonzi Moi.” Mwango na ye ya konyokola Baprotesta ememaki ye na kolongola Mobeko ya Nantes.

 Mibeko ekómi makasi koleka

Lokola mibeko ekómaki makasi koleka, ntomo ya Baprotesta ebandaki kolongolama mokemoke. Kati na mobu 1656 mpe mobu 1685, babimisaki mibeko pene na 300, mbala mingi eutaki epai ya bakonzi ya lingomba, mpo na kotɛmɛla ba Huguenots. Mibeko wana etalelaki makambo nyonso ya bomoi na bango. Na ndakisa, bapekisaki ba Huguenots ebele ya misala, lokola kozala monganga, zuzi, mpe ata kobotisa basi. Mpo na mosala ya kobotisa basi, nganga-mayele moko ya istware alobaki boye: “Ebandi boni opesa bomoi na mabɔkɔ ya Huguenot oyo azali na mokano ya kobebisa ebongiseli oyo lingomba mpe politiki esili kondima?”

Minyoko ekómaki lisusu makasi na mobu 1677. Huguenot nyonso oyo azwamaki ete azali kosala ete Mokatolike moko akɔta na lingomba na ye azalaki kofuta lomande ya livres 1 000, mosolo ya France. Bazalaki kosalela mosolo ya Leta oyo ezalaki kouta na mpako ya ntalo makasi mpo na kopusa ba Huguenots ete bákóma Bakatolike. Na mobu 1675, bakonzi ya Lingomba ya Katolike bapesaki Mokonzi Louis XIV mosolo livres 4 500 000, balobaki na ye ete: “Sikawa osengeli kokoba komonisa biso botɔndi na kosaleláká bokonzi na yo mpo na kosilisa lipɛngwi.” Lolenge oyo ya “kosomba” bandimi esalaki ete pene na mbula misato na nsima, bato soko 10 000 bákóma Bakatolike.

Na mobu 1663, mibeko epekisaki bato bákóma Baprotesta. Mibeko ekatelaki ba Huguenots bisika oyo bakokaki kofanda. Ndakisa moko oyo emonisi ete mibeko yango elekaki ndelo yango oyo: ntango bana bakómi na mbula nsambo bakokaki kokómisa bango Bakatolike na makasi ata soki baboti na bango baboyi. Bálinga, bálinga te, baboti oyo bazalaki Baprotesta basengelaki kofuta mosolo mpo na mateya oyo bana na bango bazalaki kozwa epai ya basango oyo babéngaka bango ba Jésuites mpe balakisi mosusu ya Katolike.

Ebundeli mosusu basalelaki mpo na kolimwisa ba Huguenots ezalaki Lingomba ya nkuku babéngi Saint-Sacrement (Lingomba lya sakramento esantu). Janine Garrisson, nganga-mayele ya istware alobi ete ebongiseli wana ya Bakatolike ekokanaki na “lisangá monene” oyo ezalaki na France mobimba. Lokola bazalaki na bato minene, na mosolo, bazalaki mpe na banɔngi oyo bazalaki komemela bango bansango. Garrisson alimboli ete bazalaki na myango mingi: “Longwa na kotindika na makasi kino na kotya bipekiseli, kokosa kino na kofunda, Lingomba yango esalelaki mayele nyonso mpo na kolɛmbisa Baprotesta.” Atako bongo, ebele ya ba Huguenots batikalaki na France na eleko wana ya minyoko. Garrisson alobi ete: “Ezali mpasi koyeba mpo na nini ebele ya Baprotesta balongwaki na France te atako monyokoli ezalaki se kobakisama.” Nzokande, emonanaki ete basengelaki kokima mpo na kozwa bonsomi.

Makambo ezongi lokola na ebandeli

Boyokani ya kimya oyo basalaki na engumba Nimègue (mobu 1678) mpe boyokani mpo na kotika bitumba oyo basalaki na Ratisbonne (mobu 1684) esalaki ete mikili mosusu etika kobundisa Mokonzi Louis XIV. Na Febwáli ya mobu 1685, Mokatolike moko akómaki mokonzi ya Angleterre. Louis XIV akokaki kosimba libaku wana ya sika. Mwa bambula moke liboso, bakonzi ya Lingomba ya Katolike na France babimisaki mikanda minei ya lipanda, kati na yango baboyaki koyangelama na pápa. Pápa Innocent XI oyo azalaki na eleko wana “atalelaki Lingomba ya France lokola ete ebandaki kokabwana na bango.” Na yango, ntango alongolaki Mobeko ya Nantes, Louis XIV akokaki kozongisa lokumu na ye oyo ebebaki mpe kozongisa boyokani malamu na pápa.

Mabe oyo mokonzi azalaki kosala Baprotesta ekómaki sikawa polele. Emonanaki ete alongaki te ntango asalelaki mwa boboto (kondimisa mpe mibeko). Kasi, azwaki matomba ntango asalelaki basoda mpo na konyokola bato.a Na mobu 1685, Louis XIV atyaki sinyatili na Mobeko ya Fontainebleau oyo elongolaki Mobeko ya Nantes. Monyoko oyo ebimaki nsima ya kolongola Mobeko ya Nantes etyaki ba Huguenots na mpasi koleka ndenge bazalaki liboso ya Mobeko ya Nantes. Basengelaki kosala nini sikawa?

Basengelaki kobombama, kobunda, to kokima?

Ba Huguenots mosusu baponaki kosambela na kobombana. Lokola bisika na bango ya losambo ebebisamaki mpe bapekisaki bango kosambela na polele, bakómaki ‘kosambela na bituluku mikemike,’ to na nkuku. Basalaki bongo atako mobeko moko ebimaki na Yulí ya mobu 1686 elobaki ete bato oyo bazalaki koyangana bazalaki na likama ya kozwa etumbu ya liwa. Ba Huguenots mosusu baboyaki lingomba na bango, bakanisaki ete bakozongela yango nsima. Bato yango bamonisaki bondimi ya solosolo na Lingomba ya Katolike te, mpe mabota ya nsima bamekolaki lolenge ya bondimi wana ya likolólikoló.

Guvernema esalaki nyonso mpo na kokɔtisa bato na Lingomba ya Katolike. Mpo na kozwa mosala, bato oyo bakɔtaki na Lingomba ya Katolike sika basengelaki kolakisa kalati oyo ezali na sinyatili ya sango ya parwasi mpo na kondimisa ete azali Mokatolike, sango azalaki kolandela soki bato yango bakɔtaka misa. Soki bana bazwaki batisimo te mpe babokwamaki lokola Bakatolike te, bakokaki kobɔtɔla bango na mabɔkɔ ya baboti na bango. Biteyelo bisengelaki kolakisa mateya ya Lingomba ya Katolike. Basalaki milende mpo na kobimisa mikanda oyo mizalaki kolongisa Lingomba ya Katolike mpe bazalaki kopesa yango na “bato ya Buku [Biblia],” ndenge bazalaki kobénga Baprotesta. Guvernema ebimisaki babuku koleka milio moko mpe etindaki yango na bisika oyo motuya monene ya bato babongwanaki. Bipekiseli bilekaki ndelo na boye ete soki moto moko oyo azalaki kobɛla makasi aboyi ete sango apakola ye mafuta-nsuka mpe na nsima abiki, azalaki kozwa etumbu ya bolɔkɔ to kokóma moombo kati na masuwa bomoi na ye mobimba. Mpe na nsima soki akufi, bazalaki kobwaka nzoto na ye lokola bosɔtɔ, mpe bazalaki kobɔtɔla biloko na ye.

Ba Huguenots mosusu basimbaki mandoki mpo na kobunda. Na mobu 1702, na etúká ya Cévennes, oyo eyebanaki mpo na molende na makambo ya losambo, ba Huguenots oyo babéngamaki ba Camisards batombokaki. Lokola ba Camisards babandaki kotyela basoda ya guvernema mitambo mpe kosala mobulu na butu, basoda ya guvernema batumbaki bamboka mingi. Atako mwa mobulu oyo ba Huguenots bazalaki kosala ekobaki mwa ntango, na mobu 1710 mampinga ya nguya ya Mokonzi Louis XIV esilisaki ba Camisards.

Ba Huguenots mosusu bakimaki ekólo France. Ndenge balongwaki na ekólo France ebéngamaki lipalangana (diaspora) ya solosolo. Ba Huguenots mingi bazalaki na eloko te ntango bakimaki, mpamba te Leta ebɔtɔlaki biloko na bango, mpe Lingomba ya Katolike ezwaki ndambo ya bozwi na bango. Ezalaki mpasi mpo na kokima. Guvernema ya ekólo France ezwaki meko nokinoki na likambo yango, etyaki bakɛngɛli na banzela ya kobima mpe na bamasuwa. Bayibi bazalaki kokɔtela bamasuwa oyo ezalaki kouta na France, mpamba te bazalaki kozwa mosolo soki bakangi bato [ba Huguenots] oyo bazalaki kokima. Ba Huguenots oyo bazalaki kokangama bazalaki kozwa etumbu makasi. Banɔngi oyo bazalaki kati na bakartye bayeisaki lisusu makambo mpasi na ndenge bazalaki koluka koyeba bankombo ya bato oyo bazali kokana kokima mpe koyeba banzela oyo bakokima. Kobɔtɔla nkoma, bokosi mpe mayele mabe ekómaki mingi.

Bayambami malamu epai bakendaki

Kokima ya ba Huguenots na France mpe koyambama na bango na mikili ya bapaya eyebanaki lokola ebombamelo. Ba Huguenots bakendaki na Hollande, Suisse, Allemagne, mpe na Angleterre. Na nsima basusu bakendaki na Scandinavie, na Amerika, na Irlande, na Antilles, na Afrika ya Sudi, mpe na Russie.

Bikólo mosusu ya Mpoto bibimisaki mibeko oyo elendisaki ba Huguenots ete bákende kofanda epai na bango. Kati na mabaku malamu oyo bapesaki bango tokotánga likambo ya komikómisa mwanamboka, kofuta mpako te, mpe bonsomi ya kokɔta na lisangá ya bato ya mombongo. Elisabeth Labrousse, nganga-mayele ya istware alobi ete, ba Huguenots mingi bazalaki “bilenge mibali . . . basali na misala, banamboka ya mpiko oyo bazalaki mpenza na bizaleli malamu.” Na yango, ntango ekólo France ezalaki na nguya mingi, ebungisaki basali ya makoki na makambo mingi. Ya solo, “biloko, bozwi mpe mayele” ekendaki na mikili ya bapaya. Makambo ya lingomba mpe ya politiki esalisaki mpo na koyamba ba Huguenots. Kasi matomba nini ebimaki nsima ya kolongwa na bango na ekólo France?

Bikólo mingi na mokili bisepelaki te ndenge balongolaki Mobeko ya Nantes mpe ndenge bazalaki konyokola ba Huguenots. William d’Orange akómaki mokonzi ya ekólo Pays-Bas mpamba te akomaki mokanda oyo kati na yango amonisaki ete asepelaki te na bato ya ekólo France oyo bazalaki konyokola baninga na bango. Na lisalisi ya ba Huguenots oyo bazalaki bakonzi ya basoda, akómaki lisusu mokonzi ya ekólo Grande-Bretagne, na esika ya James II oyo azalaki Mokatolike. Philippe Joutard, nganga-mayele ya istwre alimboli ete “moko ya bantina minene oyo balongolaki James II na bokonzi [mpe] basalaki lisangá babéngaki Grande alliance [Boyokani monene], ezalaki mpo ete Louis XIV anyokolaki Baprotesta. . . . Makambo [yango] ememaki mbongwana na lisolo ya mikili ya Mpoto, ekitisaki nguya ya France mpe etombolaki Angleterre.”

Ba Huguenots bakokisaki mokumba monene na mimeseno ya Mpoto. Na bonsomi oyo bazwaki sika, babimisaki mikanda oyo esungaki bato na kososola mwango mpe makanisi ya komemya baninga. Na ndakisa, Moprotesta moko ya ekólo France abongolaki mikanda ya John Locke, moto ya filozofi, mwanamboka Angleterre, oyo ezalaki komonisa ntomo ya moto. Bakomi mosusu Baprotesta balobelaki mingi ntina ya bonsomi ya lisosoli. Likanisi oyo balobelaki mingi emonisaki ete botosi epai na bakonzi ezali na ndelo mpe soki bakonzi babebisi boyokani oyo ezali kati na bango na bato nyonso, banamboka bakotosa yango te. Na yango, Charles Read, nganga-mayele ya istware alimboli ete, kolongolama ya Mobeko ya Nantes ezalaki “moko na makambo ya polele oyo ebimisaki Botomboki na ekólo France (Révolution française).”

Bato bazwaki nde liteya na likambo yango?

Marquis de Vauban, mopesi toli ya Mokonzi Louis XIV na makambo ya basoda, amonisaki matomba mabe oyo minyoko ebimisaki mpe ndenge bato mingi ya makoki bakimaki mboka, asɛngaki mokonzi ete azongisa Mobeko ya Nantes, alobaki boye: “Likambo ya kobongola bato mitema ezali ya Nzambe ye moko.” Mpo na nini guvernema ya ekólo France ezwaki liteya na likambo wana te mpe ebongolaki ekateli na yango te? Moko na bantina ezalaki ete mokonzi abangaki ete akozanga bato oyo bakosunga guvernema na ye. Lisusu, esengelaki kosepelisa Bakatolike oyo baboyaki mangomba mosusu na France na ekeke ya 17.

Makambo oyo mabimaki ntango balongolaki Mobeko ya Nantes epusaki bato mosusu na kotuna boye: “Libota moko ekoki kopesa nzela mpe kondima mangomba boni?” Ya solo, ndenge nganga-mayele ya istware amonisi yango, tokoki te kolobela lisolo ya ba Huguenots kozanga kokanisa “nguya mpe lolenge mabe ya kosalela yango.” Lelo oyo bisika nyonso oyo bato bafandi ezali na bato ya mposo mpe mangomba ndenge na ndenge, kokima ya ba Huguenots mpo na kozwa bonsomi, ekundweli bato makambo ebimaka ntango politiki oyo epusami na mangomba ebandi kobosana balamu ya bato.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá etanda na lokasa 28.

[Etanda na lokasa 28]

Mosala ya ba dragons

Kobangisa bato mpo bábongwana

Bato mosusu bazalaki kotalela ba dragons lokola “bamisionere ya malamu mpenza.” Nzokande, kobanga ekɔtaki kati na ba Huguenots, mpe na bisika mosusu mboka mobimba ezalaki kokɔta na Lingomba ya Katolike soki bayoki ete ba dragons bazali koya. Kasi ba dragons yango bazalaki banani??

Ba dragons bazalaki basoda oyo bazalaki na mandoki ya makasi mpe ya minene. Bazalaki kofanda na bandako ya ba Huguenots mpo na kobangisa bango. Mosala ya ba dragons ezalaki kobéngama dragonnade. Mpo na kobakisela mabota mpasi, bazalaki kotinda kati na ndako basoda mingi koleka bafandi ya mabota yango. Ba dragons bazwaki ndingisa ya kosala mobulu na mabota, kotungisa bango ete bázwa mpongi te, mpe kobebisa biloko na bango. Soki bato ya libota wana balobi ete batiki Lingomba ya Protesta, ba dragons bazalaki kotika bango.

Basalelaki ba dragons mpo na kokɔtisa bato na lingomba mosusu na mobu 1681 na Poitou, na wɛsti ya ekólo France, etuluka oyo etondaki na ba Huguenots. Nsima ya mwa basanza moke, kobanda bato 30 000 kino bato 35 000 bakómaki na Lingomba ya Katolike. Basalaki mpe ndenge wana na bisika mosusu oyo ba Huguenots bazalaki kofanda. Na basanza moke mpamba, bato soko 300 000 to 400 000 baboyaki lingomba na bango ya Protesta. Jean Quéniart, nganga-mayele ya istware, alobi ete bolongi ya ba dragons “epesaki nzela na kolongolama [ya Mobeko ya Nantes oyo endimaki mangomba mingi], mpamba te sikawa likoki ya kokɔtisa moto na lingomba mosusu emonanaki.”

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Cliché Bibliothèque Nationale de France, Paris

[Elilingi na lokasa 25]

Esakola oyo ya mobu 1689 epesaki ebombamelo na Baprotesta ya ekólo France oyo bazalaki koluka esika ya kokima minyoko mpo na lingomba na bango

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya Huguenot Library, Huguenot Society of Great Britain and Ireland, London

[Elilingi na lokasa 26]

Kolongolama ya Mobeko ya Nantes, na mobu 1685 (Oyo lokasa na yango ya liboso)

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Documents conservés au Centre Historique des Archives nationales à Paris

[Elilingi na lokasa 26]

Batempelo mingi ya Baprotesta ebebisamaki

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Cliché Bibliothèque Nationale de France, Paris

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto