Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/10 nk. 24-27
  • Nazwaki eloko oyo eleki wolo na motuya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazwaki eloko oyo eleki wolo na motuya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Natelengani na Amerika
  • Nakutani na bandeko na ngai
  • Nasali libota mpe nakufeli mwasi
  • Nayekoli solo
  • Nazongi esika nabotamá
  • Natii solo na esika ya liboso
  • Tokanisaki mozalisi na biso banda na bolenge na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Etumba na ngai monene mpo na kozwa kondima ya solo
    Lamuká!—1995
  • Kobɔkɔla bana mwambe na banzela ya Yehova ezalaki mpasi mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Nakozongisela Yehova nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/10 nk. 24-27

Nazwaki eloko oyo eleki wolo na motuya

LISOLO YA CHARLES MYLTON

Mokolo moko Tata alobaki: “Tótinda Charlie na Amerika esika mbongo ezali mingi mpe kozwa yango ezali mpasi te. Akokóma na mbongo mpe akobanda kotindela biso!”

BATO bazalaki kokanisa ete na Amerika ezali mpasi te mpo moto akóma na bozwi. Na eleko wana, bomoi ezalaki mpasi na Mpoto ya Ɛsti. Baboti na ngai bazalaki na ferme ya moke mpe bazalaki kobɔkɔla mwa bangɔmbɛ na mwa bansoso. Tozalaki na kura te, tozalaki mpe na mai na lopango te. Kutu ata moto moko na zingazinga na biso azalaki na yango te.

Nabotamá mokolo ya 1 Yanuáli 1893, na Hoszowczyk. Sikoyo nalingi nakokisa mbula 106. Hoszowczyk ezalaki na etúká ya Galicie, na Empire Autriche-Hongrie. Lelo oyo, Hoszowczyk ezali na ɛsti ya ekólo Pologne, mosika te na ekólo Slovaquie mpe ekólo Ukraine. Na bileko ya mpiɔ, malili ezalaka makasi kuna mpe mbula mpɛmbɛ ekitaka mingi mpenza. Ntango nazalaki na mbula nsambo, nazalaki kotambola mɛtɛlɛ 500 mpo na kokende kotoka mai na liziba. Nazalaki komema epasola mpo na kotimola ngalasi liboso ya kotɔka mai. Nazalaki komema mai yango na ndako mpe mama azalaki kosalela yango mpo na kolamba mpe kosukola ndako. Azalaki kosukola bilamba na liziba, azalaki kotuta yango likoló ya ngalasi.

Na Hoszowczyk biteyelo ezalaki te, kasi nayekolaki koloba lokota ya Polonais, Russe, Slovaque, mpe Ukrainien. Tokolaki na Lingomba ya Ortodokse, mpe nazalaki servant na ndakonzambe. Kasi atako nazalaki naino elenge, basango bazalaki kosilikisa ngai ndenge bazalaki kopekisa biso kolya mosuni mokolo ya mitano, nzokande bango moko bazalaki kolya.

Baninga na biso mosusu bautaki na Amerika epai bakendaki kosala mosala, bayaki na mbongo mpo na kobongisa bandako na bango mpe kosomba bisaleli mpo na ferme. Yango nde epusaki tata abimisa likanisi ya kotinda ngai na Amerika nzela moko na baninga mosusu oyo bazalaki komibongisa mpo na kokende kuna. Ezalaki na 1907. Ntango yango nazalaki na mbula 14.

Natelengani na Amerika

Namataki na masuwa moko, mpe nsima ya pɔsɔ mibale tokómaki na Amerika. Na eleko wana, esengelaki kozala na dolare 20, soki te bakozongisa yo na mboka na bino. Nazalaki na dolare 20 ya ebende. Nazali kati na ebele ya bato oyo balekaki na libongo ya New York mpo na kokɔta na Amerika. Ya solo, na Amerika, mbongo ezalaki lokola matiti te ndenge tokanisaki. Kutu, ezalaki nde mpasi mpo na kozwa mbongo!

Tomataki na engbunduka kino na engumba Johnstown, na etúká ya Pennsylvanie. Bato oyo tokendaki na bango bafandaki kuna liboso mpe bayebaki mwa lotɛlɛ moke epai nakokaki kofanda. Mposa na ngai ezalaki nakutana na yaya na ngai ya mwasi oyo azalaki kofanda na Jerome, na etúká ya Pennsylvanie. Na nsima nayokaki ete ezalaki bobele na kilomɛtɛlɛ 25 na esika nazalaki. Kasi nazalaki koloba Yarome, na esika ya koloba Jerome, mpamba te “J” ebéngamaka lokola “Y” na lokota na biso. Moto moko te ayebaki mboka nkombo Yarome. Nakómaki mpenza na mboka mopaya, nayebaki mpe Lingelesi malamu te, nazalaki mpe na mbongo mingi te.

Ntɔngɔ nyonso nazalaki kokende koluka mosala. Na biro ya kopesa mosala, bazalaki kozwa bobele bato mibale to misato kati na ebele ya bato oyo tozalaki kosala molɔngɔ na libándá. Yango wana, mokolo na mokolo nazalaki kozonga esika nazalaki kofanda mpo na koyekola Lingelesi ngai moko na lisalisi ya babuku. Na bantango mosusu nazalaki kozwa mwa misala mikemike, mpe nsima ya basanza mbongo oyo nazwaki ezalaki kosila.

Nakutani na bandeko na ngai

Mokolo moko nazalaki koleka liboso ya lotɛlɛ moko penepene na esika bato bazelaka engbunduka. Restora ezalaki na kati ya lotɛlɛ yango. Nayokaki nsolo kitoko ya bilei! Gato, misuni, mpe biloko mosusu ezalaki kopesama ofele soki moto asombi masanga. Bazalaki kotɛkisa kɔpɔ moko ya masanga centimes mitano. Atako nakokisaki naino mbula oyo moto akokaki kosomba masanga te, moto oyo azalaki kotɛkisa masanga ayokelaki ngai mawa mpe atɛkiselaki ngai.

Ntango nazalaki kolya, bato bakɔtaki mpe balobaki na ngai: “Salá nokinoki! Engbunduka oyo ekendaka na Jerome ezali koya.”

Natunaki bango: “Bolobi nini, Yarome?”

Balobaki: “Te, Jerome.” Ezalaki ntango yango nde nayebaki esika yaya na ngai azalaki kofanda. Na kati ya restora, nakutanaki na mobali moko afandaka na balabala moko na yaya na ngai! Nasombaki tike ya engbunduka mpe nsukansuka nakutanaki na yaya na ngai.

Yaya na ngai na mobali na ye bazalaki na mwa lotɛlɛ epai basali ya izini ya makala (charbons) bazalaki kolala. Nafandaki na ndako na bango. Bazwelaki ngai mosala ya kokɛngɛla pompi oyo ezalaki kobenda mai libándá ya izini. Ntango nyonso oyo ezalaki kotika kosala, nazalaki kobénga mekanisiɛ. Bazalaki kofuta ngai centimes 15 na mokolo. Na nsima, nasalaki mosala na kompanyi moko ya engbunduka, nasalaki lisusu na esika basalaka biliki, mpe na kompanyi ya assurance. Nsima na yango, nakendaki na engumba Pittsburgh epai yaya na ngai ya mobali Steve azalaki kofanda. Kuna tosalaki na kompanyi ya kolamba bibende. Mbongo nazalaki kozwa ezalaki mingi te mpo nakoka kotindela baboti na ngai.

Nasali libota mpe nakufeli mwasi

Mokolo moko nazalaki kokende na mosala, namonaki elenge mwasi moko atɛlɛmi liboso ya ndako esika azalaki kosala. Nalobaki, ‘Nzambe, oyo mwasi kitoko.’ Pɔsɔ misato na nsima, na 1917, ngai na Helen tobalanaki. Na boumeli ya mbula zomi, tobotaki bana motoba, moko akufaki naino azalaki mwana mpenza.

Na 1918, nazwaki mosala ya kotambwisa engbunduka na kompanyi ebéngami Pittsburgh Railways. Restora moko ezalaki pene ya esika oyo tozalaki kotɛlɛmisa bingbunduka. Restora yango ezalaki ya Bagreke mibale. Bazalaki kopesa moto eloko noki te soki asɛngi, kasi bazalaki nde koteya ye Biblia. Nalobaki na bango: “Bolingi koloba ete mokili mobimba ezali na libunga bobele bino mibale nde bolobaka solo?”

Balobaki: “Talá yo moko na kati ya Biblia!” Kasi, ntango wana balongaki kondimisa ngai te.

Likambo ya mawa, na 1928, mwasi na ngai Helen azwaki maladi. Mpo ete bana bábatelama malamu, nakendaki kotika bango epai ya yaya na ngai ya mwasi na mobali na ye oyo bazalaki kofanda na Jerome. Na mbala oyo nakutaki basombi ferme. Nazalaki kokende kotala bana mbala na mbala mpe sanza na sanza nazalaki kotika mbongo mpo na kolya na bango. Nazalaki lisusu kotindela bango bilamba. Likambo ya mawa, maladi ya Helen ekómaki makasi koleka, mpe akufaki mokolo ya 27 Augústo 1930.

Namonaki ete natikalaki mpenza likombe, bobele ngai moko. Ntango nakendaki kokutana na sango mpo na bibongiseli ya bokundi, alobaki na ngai: “Yo ozalaka lisusu na lingomba oyo te. Eleki mbula mobimba, opesaka lisusu makabo te.”

Nayebisaki ye ete mwasi na ngai abɛlaki ntango molai mpe nazalaki kotinda mbongo epai ya bana mpo bápesaka makabo na ndakonzambe na Jerome. Kino nadefaki dolare 50 oyo nafutaki nyongo ya makabo ya lingomba nde sango andimaki kokamata bibongiseli mpo na bokundi. Tolelaki Helen na ndako ya yaya na ye ya mwasi epai baninga na bandeko basanganaki mpo na komona Helen mbala ya nsuka. Sango asɛngaki nabakisa lisusu dolare 15 mpo na Misa. Nazalaki lisusu na esika nakokaki kozwa dolare 15 te. Sango alobaki ete akosala Misa soki nandimi ete nakofuta ye mbongo yango na nsuka ya sanza.

Ntango nsuka ya sanza ekokaki, nasombelaki bana sapato na bilamba mpo na kelasi. Soko pɔsɔ mibale na nsima, sango amataki na engbunduka oyo nazalaki kotambwisa. Alobaki: “Ozali na nyongo na ngai ya dolare 15.” Ntango akómaki na esika oyo alingaki kokita, alobaki: “Nakei epai ya mokonzi na bino mpe bakokata yo mbongo na lifuta na yo.”

Ntango nasilisaki mosala, nakendaki epai ya mokonzi na ngai, mpe nayebisaki ye makambo ndenge elekaki. Atako azalaki Mokatolike, alobaki: “Soki sango yango ayei awa, nakoloba na ye polele!” Likambo yango epusaki ngai na kokanisa ete basango bazalaka bobele na mposa ya mbongo na biso kasi bateyaka biso Biblia te.

Nayekoli solo

Ntango nazongaki na restora ya Bagreke wana mibale, tosololaki likambo oyo ekómelaki ngai na sango. Nsukansuka, nabandaki koyekola Biblia na Bayekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na eleko wana. Nazalaki kotánga Biblia na mikanda mikolimbolaka Biblia butu mobimba. Nayekolaki ete Helen azalaki konyokwama na epongelo te ndenge sango alobaki, kasi akufaki solo. (Yobo 14:13, 14; Yoane 11:11-14) Ya solo, nazwaki eloko oyo eleki wolo na motuya—ezalaki bongo solo!

Nsima ya pɔsɔ mibale, nakendaki mpo na mbala ya liboso na likita ya Bayekoli ya Biblia na esika babéngi Garden Theatre na engumba Pittsburgh. Natombolaki lobɔkɔ mpe nalobaki: “Na mpokwa ya lelo nayekoli makambo mingi ya Biblia koleka makambo nyonso oyo nayebaki na bambula nyonso oyo nazalaki kati na lingomba.” Na nsima, ntango batunaki nani alingi kobima na mosala ya kosakola na mokolo oyo ekolanda, natombolaki lisusu lobɔkɔ.

Na mokolo ya 4 Ɔkɔtɔ́bɛ 1931, nazwaki batisimo na mai mpo na komonisa ete namipesi epai na Yehova. Na eleko yango, nazwaki ndako ya kofutela mpe nakamataki bana na ngai, nazwaki lisusu mwana ya mosala mpo na kobatela bango. Atako nazalaki na mikumba na libota, kobanda Yanuáli 1932 kino Yúni 1933, nasalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na mosala yango nazalaki kolekisa ngonga 50 to 60 sanza na sanza na mosala ya koteya bato mosusu Biblia.

Na eleko wana nde nabandaki komona elenge mwasi moko kitoko oyo mbala mingi azalaki komata na engbunduka na ngai ntango azalaki kokende mpe kouta na mosala. Tozalaki kokutanisa miso ntango nazalaki kotala na talatala ya engbunduka. Ezali motindo yango nde ngai na Mary tokutanaki. Tolinganaki mpe tobalanaki na Augústo 1936.

Na 1949, lokola naumelaki na mosala, nakokaki kopona manaka oyo ekokaki kopesa ngai likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela, ndenge babéngaka mosala ya kosakola ntango nyonso. Jean, mwana na ngai ya mwasi ya nsuka abandaki mosala ya mobongisi-nzela na 1945, mpe tosalaki na ye mosala yango. Na nsima, Jean akutanaki na Sam Friend, oyo azalaki kosala na Betele, na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York.a Babalanaki na 1952. Nakobaki mosala ya mobongisi-nzela na Pittsburgh mpe natambwisaki boyekoli ya Biblia mingi, mbala moko nazalaki kotambwisaki mabota 14 pɔsɔ na pɔsɔ. Na 1958, nazwaki epaso na mosala ya kotambwisa engbunduka. Na nsima na yango, mosala ya mobongisi-nzela ekómaki pɛtɛɛ, mpamba te nazalaki lisusu kolekisa ngonga mwambe na mosala ya mosuni te.

Na 1983, Mary azwaki maladi. Nasalaki nyonso mpo na kosunga ye ndenge ye mpe azalaki kosala mpo na ngai pene na mbula 50. Nsukansuka, mokolo ya 14 Sɛtɛ́mbɛ 1986, akufaki.

Nazongi esika nabotamá

Na 1989, Jean na Sam bamemaki ngai na liyangani na ekólo Pologne. Tokendaki mpe kotala esika oyo nakolaki. Ntango basoda ya ekólo Russie babɔtɔlaki ekólo Pologne, babongolaki bankombo ya bingumba mpe bamemaki bato oyo bazalaki kofanda wana bipai mosusu. Bamemaki yaya na ngai moko ya mobali na engumba Istanbul mpe mosusu ya mwasi na ekólo Russie. Bato oyo tozalaki kotuna bayebaki nkombo ya mboka na ngai te.

Kasi, na mosika, namonaki bangomba oyo nayebaki malamu. Ntango topusanaki pene, nabandaki komikundola bilembo mosusu. Na ndakisa, ngomba ya mike, matakanelo ya nzela, ndakonzambe, mpe gbagba (pont). Mbala moko, tomonaki elembo moko na nzela oyo bakomaki “Hoszowczyk”! Mwa mikolo liboso, mboka yango elongwaki na boyangeli ya bakoministe, mpe bazongisaki bankombo na yango ya liboso.

Ndako na biso ezalaki lisusu te, kasi tomonaki bobele kuku epai tozalaki kolamba na libándá, ekundamaki moke na mabelé. Nalakisaki bango nzete moko ya monene mpe nalobaki: “Bótala nzete wana. Nakonaki yango liboso nakende na Amerika. Talá ndenge ekómi monene!” Nsima tokendaki na nkunda, kotala soki tokomona bankombo ya bandeko na biso, kasi tomonaki ata moko te.

Natii solo na esika ya liboso

Mobali ya Jean akufaki na 1993. Na nsima Jean atunaki ngai soki nalingi atika mosala na Betele mpo aya kobatela ngai. Nayebisaki ye soki okosala boye ekozala mabe mpenza. Mayoki na ngai ezali se bongo kino lelo oyo. Nafandaki ngai moko kino ntango nakómaki na mbula 102. Kasi na nsima, bakendaki na ngai na ndako mpo na mibange. Kino sikoyo nazali nkulutu na lisangá ya Bellevue na engumba Pittsburgh, mpe mikolo ya lomingo bandeko bayaka kokamata ngai tokende na makita na Ndako ya Bokonzi. Atako nazali lisusu koteya mingi te, nazali kaka na molɔngɔ ya babongisi-nzela oyo bapesaka ngonga mingi te ndenge bazalaki kopesa liboso.

Nazwaki mabaku mingi ya kolanda mateya na eteyelo ya la Société Watch Tower mpo na kobongisa bankulutu. Na sanza ya Desɛ́mbɛ ya mbula eleki, nazwaki libaku ya kolanda mateya na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi mpo na bankulutu ya masangá. Mokolo ya 11 Apríli ya mbula oyo, Jean amemaki ngai na Ekaniseli ya liwa ya Klisto, elambo oyo nasanganaka na yango mbula na mbula kobanda 1931.

Bato mosusu oyo nayekolaki na bango Biblia, bazali sikoyo bankulutu, basusu bamisionere na Amerika ya Sudi, mpe basusu bakómi bankɔkɔ, bazali kosalela Nzambe na bana na bango. Bana na ngai misato—Mary Jane, John, na Jean na bana na bango mpe bana ya bana na bango bazali kosalela Yehova Nzambe na bosembo. Nabondelaka ete mokolo mosusu mwana na ngai ya mwasi ya liboso na bankɔkɔ na ngai mosusu mpe bana na bango bákóma kosambela Yehova.

Sikoyo nakómi na mbula 105, nalendisaka kaka bato báyekola Biblia mpe báyebisa baninga na bango makambo oyo basili koyekola. Nandimi ete soki okangami na Yehova, okoyoka mawa te. Yo mpe okoki kozwa eloko oyo ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka—solo oyo epesaka biso likoki ya kozala na boyokani malamu na Yehova Nzambe, Mopesi ya bomoi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisolo ya bomoi ya Sam Friend ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augústo 1986, nkasa 22 kino 26 (ebimeli ya Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 25]

Ntango nazalaki kotambwisa engbunduka

[Elilingi na lokasa 26]

Na ndako mpo na mibange esika nazali kofanda

[Elilingi na lokasa 27]

Elembo oyo tomonaki na nzela na 1989

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto