Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/11 nk. 30-31
  • Yesu alekisaki ntango na bana mike

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu alekisaki ntango na bana mike
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yesu ayambi bana mike
  • Liteya mpo na biso
  • Ozali na “makanisi ya Klisto”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bana bazali libula ya motuya mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Teyá mwana na yo asalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mokanda ya Biblia nimero 41—Malako
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/11 nk. 30-31

Basalaki mokano ya Yehova

Yesu alekisaki ntango na bana mike

YESU akómaki pene ya kosukisa mosala na ye ya kosakola oyo eumelaki mbula misato na ndambo. Etikalaki moke akɔta na Yelusaleme epai akokufa liwa ya mpasi. Ayebaki malamu makambo oyo ezalaki kozela ye, mpamba te ayebisaki bayekoli na ye ete: “Mwana na moto akopesama na mabɔkɔ na bato mpe bakoboma ye.”​—Malako 9:31.

Ya solo, Yesu alingaki kosalela malamu mokolo, ngonga, mpe miniti mokomoko oyo etikalaki liboso akufa. Esengelaki kotyela bayekoli na ye likebi. Yesu amonaki ete esengelaki kobenda bango matoi na likambo etali komikitisa mpe kobɛtisa baninga mabaku, mpamba te yango ezalaki likama ya ntango nyonso. (Malako 9:35-37, 42-48) Esengelaki lisusu koteya bango na ntina na libala, koboma libala, mpe bonzemba. (Matai 19:3-12) Lokola ayebaki ete etikali moke akufa, na ntembe te, Yesu ayebisaki bayekoli na ye likambo yango polelepolele mpe amonisaki bango ete makambo makosalema na lombangu mpenza. Ezalaki ntango ya kolekisa na makambo ya mpambampamba te. Yango wana, makambo oyo Yesu asalaki na nsima ezali mpenza kokamwisa.

Yesu ayambi bana mike

Biblia elobi: “Bayei na bana mike epai na ye ete [asimba] bango.” Ntango bayekoli bamonaki bongo, basepelaki te. Mbala mosusu bakanisaki ete Yesu azali moto ya lokumu mingi to azali na ntango ya kosolola na bana mike te. Kasi, bayekoli bakamwaki ntango Yesu asilikaki na bango! Alobaki na bango ete, ‘Tiká bana mike báya epai na ngai, bópekisa bango te, zambi Bokonzi na Nzambe ezali na bato motindo na bango.’ Na nsima Yesu alobaki lisusu: “Solo, nalobeli bino ete, soko moto nani akoyamba Bokonzi na Nzambe lokola mwana moke te, akokɔta wana te.”​—Malako 10:13-15.

Yesu amonaki bizaleli malamu epai ya bana mike. Mbala mingi bazalaka ntango nyonso na mposa ya koyeba makambo mingi mpe batyaka motema na makambo oyo bayebisaka bango. Bandimaka maloba ya baboti na bango mpe kutu balongisaka baboti na bango liboso ya bana mosusu. Bandimaka toli, mpe balingaka ete báteya bango. Baoyo balingi kokɔta na Bokonzi ya Nzambe basengeli kolanda ndakisa na bango. Ndenge Yesu alobaki: “Bokonzi na Nzambe ezali na bato na motindo na bango.”​—Kokanisá na Matai 18:1-5.

Kasi, Yesu azalaki kosalela bana mike wana bobele mpo na elakiseli te. Lisolo emonisi polele ete Yesu azalaki kosepela mpenza kofanda na bango. Malako alobi ete Yesu “azingeli bango na mabɔkɔ na ye, apamboli bango, kotya mabɔkɔ likoló na bango.” (Malako 10:16) Bobele lisolo ya Malako nde elobeli likambo oyo ete Yesu “azingeli bango na mabɔkɔ na ye.”a Yesu asalaki makambo mingi koleka oyo mikóló bazalaki kokanisa. Bango bamemelaki ye bana mpo “asimba” bango bobele kosimba.

Ntango Biblia elobi ete Yesu ‘atyaki mabɔkɔ’ likoló na bana, yango elimboli nini? Awa ezali molulu ya losambo te, lokola batisimo. Atako na bantango mosusu, kotya mabɔkɔ likoló na moto elimbolaki ete baponi ye mpo na mokumba moko, nzokande, na mabaku mosusu elimbolaki bobele ete bapesi ye lipamboli. (Genese 48:14; Misala 6:6) Na yango, ekoki kozala ete Yesu azalaki bobele kopambola bana mike.

Ata soki ezalaki ndenge nini, Malako asaleli liloba ya nguya mpo na “lipamboli” (ka·teu·lo·geʹo), oyo ezali komonisa mposa makasi. Yango epesi likanisi ete Yesu apambolaki bana mike na mposa makasi, na bolingo, mpe na mɔ́tɔ. Ya solo, Yesu azalaki kotalela bana mike lokola mokumba oyo ezali kolekisa ntango mpamba te.

Liteya mpo na biso

Lolenge Yesu azalaki kofanda na bana mike mpe mikóló emonisi ete azalaki kobangisa bango te, to mpe kotyola bango te. Buku moko elobi ete “azalaki komungamunga soki esengeli mpe kosɛka na esengo.” Na ntembe te, bato ya mbula nyonso bazalaki komiyoka malamu soki bafandi na ye esika moko. Soki tokanisi na ndakisa ya Yesu, tokoki komituna boye, ‘Napesaka bato mposa báya epai na ngai?’ ‘Namonaka ete nazali na ntango te ya komitungisa na misala mpe makambo ya bato mosusu?’ Soki tokolisi bolingo mpo na bato, yango ekopusa biso tómipesa na bango, ndenge Yesu asalaki. Basusu bakomona ete tosepelaka na bango mpenza mpe bakoya esika tozali.​—Masese 11:25.

Ndenge lisolo ya Malako emonisi yango, Yesu azalaki kosepela kofanda na bana mike. Emonani ete azwaki ntango ya kotala bango wana bazalaki kosakana, mpamba te, alobeli masano na bango na lisese moko asalelaki. (Matai 11:16-19) Mbala mosusu bana mosusu oyo Yesu apambolaki bazalaki naino mike mpenza mpe bayebaki te soki azali nani mpe bayebaki mateya na ye te. Kasi, yango epusaki ye na kokanisa te ete azali kolekisa ntango na ye mpamba. Alekisaki ntango na bana mike mpo alingaki bango. Na ntembe te, bana mike mingi oyo Yesu akutanaki na bango na mosala na ye, na nsima basepelaki na bolingo na ye, mpe bakómaki bayekoli na ye.

Soki Yesu alekisaki ntango na bana mike na bapɔsɔ ya mpasi na nsuka ya bomoi na ye, biso mpe tosengeli kosala bongo atako tozali na misala mingi. Tosengeli mpenza kokanisa baoyo babongi kozwa likebi mingi, lokola bitike. Ɛɛ, bana mike nyonso bazalaka na esengo ntango bazali kotyela bango likebi. Mpe mokano ya Yehova ezali ete tósala nyonso oyo ekoki mpo na kolinga bango mpe kosunga bango.​—Nzembo 10:14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Libongoli moko elobi ete Yesu “ayambaki bango.” Libongoli mosusu elobi ete “amemaki bango na mabɔkɔ na ye.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto