“Bólendisa mitema na bino”
“Bosɛngi mitema milai ete bósala mokano na Nzambe mpe ete bózwa yango esili ye kolaka.”—BAEBELE 10:36.
1, 2. (a) Likambo nini ekómelaki baklisto mosusu na ekeke ya liboso? (b) Mpo na nini ezali mpasi te ete kondima elɛmba?
NTOMA Paulo alobelaki kondima mbala mingi koleka bakomi mosusu nyonso ya Biblia. Mpe mbala na mbala atángaki bankombo ya bato oyo kondima na bango elɛmbaki to ekufaki. Na ndakisa, Umenai na Alesandala ‘bazindisaki kondima na bango.’ (1 Timote 1:19, 20) Dema asundolaki Paulo mpo ‘alingaki ebongiseli ya biloko ya ntango oyo.’ (2 Timote 4:10, NW) Bato mosusu, mpo na misala mabe na bango oyo eyokani na boklisto te ‘baboyaki kondima.’ Basusu bakosamaki na mayele ya lokuta mpe ‘bapɛngwaki na kondima.’—1 Timote 5:8; 6:20, 21.
2 Mpo na nini baklisto bapakolami wana bakweaki na makambo motindo yango? Tóyeba ete “kondima ezali elendiseli na biloko bikolikya biso; ezali mpe elimbweli na biloko bizangi komonana.” (Baebele 11:1) Tomonisaka kondima na makambo oyo tozali komona te. Tozali na mposa ya kondima te mpo na biloko oyo bizali komonana. Koluka bozwi ya elimo oyo emonanaka te ezali mpasi koleka koluka bozwi ya mosuni oyo ezali komonana. (Matai 19:21, 22) Biloko mingi oyo bimonanaka—lokola “mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso”—elɛngolaka nzoto na biso oyo ezangi kokoka mpe ekoki kolɛmbisa kondima na biso.—1 Yoane 2:16.
3. Moklisto asengeli kokolisa kondima ya motindo nini?
3 Kasi, Paulo alobi: “Ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” Mose azalaki na kondima motindo wana. “Atyaki miso na ye epai na libonza” mpe “ayikaki mpiko lokola ete azali komona ye oyo akomonanaka te.” (Baebele 11:6, 24, 26, 27) Moklisto asengeli kozala na kondima motindo wana. Lokola tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Abalayama apesaki ndakisa malamu na likambo yango.
Ndakisa ya kondima ya Abalayama
4. Kondima ya Abalayama ezalaki na bopusi nini na bomoi na ye?
4 Abalayama azalaki na engumba Ulu ntango Nzambe alakaki ye ete akozala tata ya mombóto oyo ekozala lipamboli mpo na bato ya mabota nyonso. (Genese 12:1-3; Misala 7:2, 3) Mpo na elaka wana, Abalayama atosaki Yehova, akendaki liboso na Halana mpe na nsima na Kanana. Kuna, Yehova alakaki ete akopesa mokili yango na mombóto na ye. (Genese 12:7; Nehemia 9:7, 8) Nzokande, makambo mingi oyo Yehova alakaki ekokisamaki nsima ya liwa ya Abalayama. Na ndakisa, Abalayama azwaki ata eteni moko ya mokili ya Kanana te—longola bobele lidusu ya Makapela, oyo asombaki mpo na kosala lilita. (Genese 23:1-20) Atako bongo, andimaki liloba ya Yehova. Na koleka, azalaki na kondima na “mboka oyo ezali na miboko [ya solosolo], Nzambe azali motongi mpe mozalisi na yango.” (Baebele 11:10) Kondima motindo wana esungaki ye na bomoi na ye mobimba.
5, 6. Ndenge nini elaka ya Yehova etyaki kondima ya Abalayama na komekama?
5 Tozali komona likambo yango mingimingi soki totaleli elaka oyo elobi ete mombóto ya Abalayama ekokóma libota monene. Mpo likambo yango esalema, Abalayama asengelaki kobota mwana mobali. Azelaki ntango mingi liboso ya kozwa mwana. Toyebi te soki azalaki na mbula boni ntango Nzambe alakaki ye mpo na mbala ya liboso, kasi ntango asalaki mobembo molai mpo na kokende na Halana, Yehova apesaki ye naino mwana te. (Genese 11:30) Aumelaki na Halana, yango epesaki ye nzela ya ‘koyanganisa biloko mpe kozwa basali.’ Ntango akendaki na Kanana, azalaki na mbula 75 mpe Sala azalaki na mbula 65. Kasi, bazalaki naino na mwana te. (Genese 12:4, 5) Ntango Sala akómaki na mbula koleka 70, amonaki ete ntango ya kobotela Abalayama mwana eleki. Yango wana, alandaki momeseno moko ya ntango wana, apesaki Agala, moombo na ye ya mwasi epai ya Abalayama, mpe abotelaki ye mwana. Kasi mwana yango azalaki mwana oyo alakamaki te. Na nsima, babenganaki Agala na mwana na ye Yisamaele. Kasi, ntango Abalayama abondelaki mpo na bango, Yehova alakaki ete akopambola Yisamaele.—Genese 16:1-4, 10; 17:15, 16, 18-20; 21:8-21.
6 Na ntango oyo Nzambe aponaki—ntango molai mpenza nsima ya kopesa bango elaka mpo na mbala ya liboso—atako Abalayama akómaki na mbula 100 mpe Sala azalaki na mbula 90, babotaki mwana mobali na nkombo Yisaka. Na ntembe te ezalaki likambo ya esengo! Mpo na babalani yango oyo bakómaki mibange, ezalaki mpenza lokola ete nzoto na bango oyo “ekufá” esekwaki ntango ebimisaki bomoi ya sika. (Baloma 4:19-21) Bazelaki ntango molai, kasi ntango elaka ekokisamaki, bazwaki litomba ya kozela na bango.
7. Boyokani nini ezali kati na kondima mpe koyika mpiko?
7 Ndakisa ya Abalayama ezali komonisa biso ete kondima esengeli kozala bobele mpo na mwa ntango te. Paulo amonisaki ete kondima ezali na boyokani na koyika mpiko ntango akomaki ete: “Bosɛngi mitema milai ete bósala mokano na Nzambe mpe ete bózwa yango esili ye kolaka. . . . Biso tozali kati na bango te baoyo bakozongaka nsima mpe bakobebisama; kasi tozali kati na bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.” (Baebele 10:36-39) Bato mingi bazelaki ntango molai liboso elaka ekokisama. Basusu bazelaki bomoi na bango mobimba. Kondima makasi esungaki bango. Mpe lokola Abalayama, bakozwa libonza na ntango oyo Yehova aponi.—Habakuku 2:3.
Koyoka Nzambe
8. Ndenge nini tozali koyoka Nzambe lelo oyo, mpe ndenge nini yango ekolendisa kondima na biso?
8 Makambo soki minei elendisaki kondima ya Abalayama. Bobele makambo yango ekoki mpe kosalisa biso. Ya liboso, amonisaki ‘kondima na ye ete Nzambe azali’ na ndenge azalaki kotya likebi ntango Yehova azali koloba. Na bongo, akesanaki na Bayuda na ntango ya Yilimia, oyo bandimaki ete Yehova azali kasi bandimaki maloba na ye te. (Yilimia 44:15-19) Lelo oyo, Yehova azali koloba na biso na nzela ya Biblia, Liloba na ye epemami. Petelo alobaki ete yango ezali lokola “mwinda oyo ezali kopela na esika na molili . . . na mitema na bino.” (2 Petelo 1:19) Ntango tozali kotánga Biblia na likebi nyonso, tozali ‘komela maloba ya kondima.’ (1 Timote 4:6; Baloma 10:17) Mpe lisusu, na mikolo oyo ya nsuka, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa “bilei [ya elimo] na elaka na yango.” Azali kolakisa ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia mpe azali kolimbola bisakweli ya Biblia. (Matai 24:45-47) Mpo na kozala na kondima makasi tosengeli koyoka Yehova na banzela nyonso wana.
9. Soki tondimi mpenza elikya ya boklisto tokozwa mbano nini?
9 Kondima ya Abalayama ezalaki na boyokani makasi na elikya na ye. “Mpo na elikya, andimaki ete akokóma tata ya mabota mingi.” (Baloma 4:18, NW) Yango ezali likambo ya mibale oyo ekoki kosalisa biso. Tosengeli kobosana ata moke te ete Yehova “akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” Ntoma Paulo alobaki ete: “Tozali kosalaka mosala mpe kobunda etumba mpo na bongo, zambi tosili kolikya epai na Nzambe na bomoi.” (1 Timote 4:10) Soki tondimi mpenza elikya ya boklisto, tokomonisa kondima yango na bomoi na biso mobimba, ndenge Abalayama asalaki.
Kosolola na Nzambe
10. Mabondeli ya ndenge nini ekolendisa kondima na biso?
10 Abalayama asololaki na Nzambe, mpe yango nde likambo ya misato oyo elendisaki kondima na ye. Lelo oyo, biso mpe tokoki kosolola na Yehova. Mpo na yango, tozali na likabo ya libondeli na nzela ya Yesu Klisto. (Yoane 14:6; Baefese 6:18) Ezali nsima ya koloba lisusu oyo emonisaki ntina ya kobondela ntango nyonso nde Yesu atunaki ete: “Wana ekoya mwana na moto, akokuta kondima awa na nse?” (Luka 18:8) Libondeli oyo elendisaka kondima ezalaka likolólikoló te to mpe bongo na bongo te. Ezalaka mozindo. Na ndakisa, na ntango tolingi kozwa bikateli ya minene to ntango totungisami makasi, libondeli oyo euti mpenza na motema ezalaka na ntina mingi.—Luka 6:12, 13; 22:41-44.
11. (a) Ndenge nini Abalayama alendisamaki ntango afungolaki motema na ye epai ya Yehova? (b) Bomoi ya Abalayama ekoki koteya biso nini?
11 Ntango Abalayama abandaki konuna mpe Yehova apesaki ye naino mombóto oyo alakaki ye te, ayebisaki lobanzo na ye epai ya Nzambe. Yehova akitisaki ye motema. Litomba nini ebimaki? Abalayama “andimaki [Yehova], mpe ye atángelaki ye yango lokola boyengebene.” Na nsima, Yehova apesaki elembo mpo na kolakisa ete maloba na ye ekokokisama. (Genese 15:1-18) Soki tofungoli mitema na biso epai ya Yehova na libondeli, tondimi bilendiseli oyo azali kopesa na kati ya Biblia Liloba na ye, mpe soki totosi ye na kondima nyonso, Yehova akolendisa kondima na biso.—Matai 21:22; Yuda 20, 21.
12, 13. (a) Ndenge nini Abalayama apambolamaki ntango alandaki litambwisi ya Yehova? (b) Makambo nini ekolendisa kondima na biso?
12 Likambo ya minei oyo elendisaki kondima ya Abalayama ezali ndenge oyo Yehova asungaki ye ntango alandaki litambwisi na ye. Ntango Abalayama akendaki kosikola Lota na mabɔkɔ ya bakonzi oyo bayaki etumba, Yehova asalisaki ye alonga etumba yango. (Genese 14:16, 20) Ntango Abalayama afandaki lokola mopaya na mokili oyo mombóto na ye asengelaki kosangola, Yehova apesaki ye biloko mingi ya mosuni. (Talá Genese 14:21-23.) Yehova atambwisaki mosaleli ya Abalayama na milende na ye mpo na koluka mwasi oyo abongaki na Yisaka. (Genese 24:10-27) Ɛɛ, Yehova ‘apambolaki Abalayama na makambo nyonso.’ (Genese 24:1) Yango wana kondima na ye ekómaki mpenza makasi mpe boyokani na ye na Yehova Nzambe ezalaki mpenza makasi na boye ete Yehova abéngaki ye “moninga na ngai.”—Yisaya 41:8; Yakobo 2:23.
13 Lelo oyo, biso mpe tokoki kozala na kondima makasi motindo yango? Ɛɛ. Na ndakisa ya Abalayama, soki tomeki Yehova, elingi koloba totosi mibeko na ye, akopambola biso, mpe yango ekolendisa kondima na biso. Na ndakisa, soki totali lapolo ya mosala na 1998, tokomona ete bato mingi bazwaki mapamboli kitoko mpamba te batosaki etinda na ye ya kosakola nsango malamu.—Malako 13:10.
Litatoli ya kondima lelo oyo
14. Ndenge nini Yehova apambolaki kokabolama ya trakte Nsango ya Bokonzi No. 35?
14 Na Okɔtɔbɛ 1997, trakte Nsango ya Bokonzi No. 35 ekabolamaki na mokili mobimba mpe kampanye yango elongaki mpenza mpamba te bamilio ya Batatoli basalaki yango na molende mpe na esengo. Mosala oyo esalemaki na ekólo Ghana ezali komonisa yango malamu. Bakabolaki pene na trakte milio 2,5 na nkota minei, mpe bato soki 2 000 basɛngaki báyekola Biblia. Na esanga Chypre, Batatoli mibale oyo bazalaki kokabola Nsango ya Bokonzi, bamonaki sango moko azali kolanda bango. Mwa moke na nsima, bapesaki ye lokasa moko ya Nsango ya Bokonzi. Asilaki kozwa lokasa mosusu liboso mpe alobaki ete: “Nsango na yango esepelisi ngai mingi, yango wana nalingi kopesa bakomi na yango longonya.” Na ekólo Danemark, milio 1,5 ya trakte Nsango ya Bokonzi ekabolamaki mpe bazwaki matomba malamu. Mwasi moko oyo asalaka mosala ya koyamba bato alobaki ete: “Nsango ya trakte yango ezali mpo na moto nyonso. Moto akoki mbala moko kokanga ntina na yango, ezali kosimba motema, ezali kopesa mposa ya koyeba makambo mosusu. Ezali mpenza koloba solo!”
15. Makambo nini emonisi ete Yehova apambolaki milende mpo na kokutana na bato na bisika nyonso oyo bazali?
15 Na 1998, molende esalemaki mpo na kosakola epai ya bato bobele na bandako na bango te kasi na bisika nyonso. Na ekólo Côte d’Ivoire, babalani mibale bamisionere bateyaki na masuwa 322 oyo esɛmaki na mabongo. Bakabolaki babuku 247, bazulunalo 2 284, mwa babuku 500, mpe batrakte ebele, mpe lisusu bakasɛti video mpo bato oyo basalaka na masuwa bátalaka ntango bazali kosala mobembo. Na ekólo Canada, Motatoli moko akendaki na esika babongisaka mituka. Nkolo esika asepelaki, mpe ndeko yango alekisaki ngonga minei na ndambo na esika yango, atako ntango nyonso oyo alekisaki na kopesa litatoli epai ya bakiliya ezalaki bobele soki ngonga moko. Na nsuka, ye na nkolo esika bayokanaki ete báyekolaka Biblia na ngonga ya 10 ya butu. Kasi, ntango mosusu, boyekoli ezalaki kobanda na midi ya butu mpe ezalaki koumela kino ngonga ya mibale ya ntɔngɔ. Manaka yango ezalaki mpenza mpasi, kasi mbuma malamu ebimaki. Moto yango azwaki ekateli ya kokanga mosala na ye na mikolo ya lomingo mpo na koyangana na makita. Mosika te, ye na libota na ye babandaki kokola malamu na elimo.
16. Makambo nini emonisi ete mwa buku Azali kosɛnga mpe buku Boyebi ezali bisaleli ya nguya na mosala ya kosakola mpe koteya?
16 Mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? mpe buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko ezali naino bisaleli ya nguya na mosala ya kosakola mpe ya koteya bato. Na ekólo Italie, mamelo moko oyo azalaki kozela bisi azwaki lokasa moko ya Nsango ya Bokonzi. Na mokolo oyo elandaki, basakoli bakutanaki na ye lisusu mpe azwaki mwa buku Azali kosɛnga. Nsima na yango, akómaki koyekola Biblia mikolo nyonso na boumeli ya miniti 10 to 15 na esika oyo bazelaka bisi. Nsima ya sanza moko na ndambo, azwaki ekateli ya kobima na ndako ya bamamelo mpo na kozonga na mboka na ye na Guatemala mpe kokoba boyekoli na ye. Na ekólo Malawi, Lobina, mwasi moko ya molende mpo na losambo, asepelaki te ntango bana na ye mibale ya basi bakómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Kasi, bana yango bayebisaki mama na bango makambo oyo bayekolaki na Biblia ntango bazwaki libaku ya malamu. Na Yuni 1997, Lobina amonaki buku Boyebi mpe akamwaki na maloba “Boyebi oyo ezali komema.” Na Yuli andimaki koyekola Biblia. Na Augusto akendaki na liyangani ya etúká mpe alandaki masolo nyonso na likebi mpenza. Na nsuka ya sanza wana, alongwaki na lingomba na ye mpe akokisaki masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Na Novɛmbɛ 1997, azwaki batisimo.
17, 18. Ndenge nini bakasɛti video ya la Société esalaki mosala monene mpo na kosalisa bato na “komona” makambo ya elimo?
17 Bakasɛti video ya la Société esalisi bato mingi ete “bámona” makambo ya elimo. Na ekólo île Maurice, mobali moko alongwaki na lingomba na ye mpo na bokabwani oyo amonaki kuna. Misionere moko alakisaki ye kasɛti video Unis grâce à l’enseignement divin oyo ezali komonisa bomoko ya Batatoli ya Yehova. Moto yango akamwaki mpe alobaki ete: “Bino Batatoli ya Yehova bozali na kati ya Paladiso!” Andimaki koyekola Biblia. Na ekólo Japon, ndeko mwasi moko alakisaki mobali na ye oyo azali mondimi te kasɛti video Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation. Epusaki mobali yango na kondima koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. Nsima ya kotala kasɛti video Unis grâce à l’enseignement divin, ayokaki mposa ya kokóma Motatoli ya Yehova. Molɔngɔ ya bakasɛti misato La Bible, un récit historique exact, des prophéties dignes de foi esalisaki ye na kotosa mitinda ya Biblia na bomoi na ye. Na nsuka, kasɛti video La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie emonisaki ye ete Yehova alendisaka basaleli na Ye liboso ya minyoko ya Satana. Mobali yango azwaki batisimo na Okɔtɔbɛ 1997.
18 Oyo ezali se mwa ndambo ya makambo mingi oyo bandeko bakutanaki na yango na mobu ya mosala oyo eleki. Ezali komonisa ete Batatoli ya Yehova bazali na kondima oyo ezali kosala mosala mpe ete Yehova azali kolendisa kondima yango na ndenge azali kopambola mosala na bango.—Yakobo 2:17.
Tókolisa kondima lelo oyo
19. (a) Ndenge nini emonani ete tozali na makambo malamu mingi koleka Abalayama? (b) Na mbula eleki, bato boni bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu? (c) Na mbula eleki, mikili nini mizwaki motángo monene ya bayangani na Ekaniseli? (Talá etanda na lokasa ya 12 kino ya 15.)
19 Lelo oyo, tozali na makambo malamu mingi koleka Abalayama. Toyebi ete Yehova akokisaki bilaka nyonso oyo apesaki Abalayama. Bakitani ya Abalayama basangolaki mokili ya Kanana, mpe bakómaki libota monene. (1 Mikonzi 4:20; Baebele 11:12) Lisusu, mbula soki 1 971 nsima wana Abalayama alongwaki na Halana, Yesu, mokitani ya Abalayama, azwaki batisimo ya mai epai ya Yoane Mobatisi mpe na nsima, Yehova ye moko abatisaki ye na elimo santu mpo na kozala Masiya, Mombóto ya Abalayama, na ndimbola oyo eleki monene mpe na elimo. (Matai 3:16, 17; Bagalatia 3:16) Na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., Yesu akabaki bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato nyonso oyo bakondimela ye. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Banda ntango yango, bamilio ya bato bakoki kozwa mapamboli na nzela na ye. Na mbula eleki, bato 13 896 312 bayanganaki na mokolo ya 14 Nisana mpo na kokanisa elembo ya bolingo monene wana. Yango ezali mpenza kokumisa Yehova, Mokokisi Monene ya bilaka!
20, 21. (a) Na ekeke ya liboso, ndenge nini bato ya bikólo nyonso bazwaki mapamboli na nzela ya Mombóto ya Abalayama, mpe ndenge nini bazali kozwa mapamboli lelo oyo?
20 Na ekeke ya liboso, bato mingi oyo bautaki na bikólo nyonso—banda na Yisalaele ya mosuni—bandimelaki Mombóto ya Abalayama mpe bakómaki bana ya Nzambe bapakolami, basangani ya libota ya sika ya elimo ebéngami “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 3:26-29; 6:16; Misala 3:25, 26) Bazalaki na elikya ya solosolo ya bomoi oyo, na nzela na yango bakoki lisusu kokufa te lokola bikelamu ya elimo oyo bakoyangela elongo na Klisto na Bokonzi ya Nzambe. Bobele bato 144 000 bakozwa libaku wana mpe awa na mabelé, bazali lisusu mingi te. (Emoniseli 5:9, 10; 7:4) Na mbula eleki, bato 8 756 batatolaki kondima na bango ete bazali na kati ya bato yango na ndenge balyaki limpa mpe bamelaki vinyo na Ekaniseli.
21 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova pene na nyonso bazali basangani ya “ebele monene” oyo Emoniseli 7:9-17 esakolaki. Lokola bazali kozwa mapamboli na nzela ya Yesu, bazali na elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Emoniseli 21:3-5) Bato 5 888 650 oyo basanganaki na mosala ya kosakola na 1998 bazali komonisa ete ebele yango ezali mpenza “monene.” Ezalaki mpenza esengo na komona ete basakoli baleki 100 000 na ekólo Russie mpe na ekólo Ukraine. Mpe lisusu, États-Unis epesi lapolo malamu mpenza: na sanza ya Augusto basakoli bakómaki 1 040 283! Yango ezali bikólo misato na kati ya bikólo 19 oyo epesaki lapolo ya basakoli koleka 100 000 na mbula eleki.
Elikya oyo etikali moke ekokisama
22, 23. (a) Mpo na nini tosengeli kolendisa mitema na biso sikawa? (b) Ndenge nini tokoki kozala lokola Abalayama, kasi te lokola bato bazangi kondima oyo Paulo alobelaki?
22 Bakundwelaki bato oyo bayanganaki na Ekaniseli ete tokómi mosika na kati ya kokokisama ya bilaka ya Yehova. Na 1914, Yesu afandaki na kiti ya Bokonzi ya Nzambe; banda ntango yango kozala na ye na nguya ya Bokonzi ebandaki. (Matai 24:3; Emoniseli 11:15) Ɛɛ, Mombóto ya Abalayama azali koyangela na likoló! Yakobo ayebisaki baklisto ya ntango na ye ete: “Bózala na mitema milai, bólendisa mitema na bino, mpo ete [kozala, NW] na Nkolo ezali kobɛlɛma.” (Yakobo 5:8) Sikawa, tozali na eleko ya kozala yango! Oyo ezali ntina monene ya kolendisa mitema na biso!
23 Tiká ete boyekoli ya Biblia mokolo na mokolo mpe mabondeli ya mozindo elendisa ntango nyonso elikya na biso na bilaka ya Nzambe. Tiká ete tólanda kozwa mapamboli ya Yehova na ndenge tozali kotosa Liloba na ye. Na ndenge yango, tokozala lokola Abalayama, kasi tokozala te lokola bato oyo Paulo alobaki ete kondima na bango elɛmbaki mpe ekufaki. Eloko moko te ekokabola biso na kondima na biso oyo eleki bosantu. (Yuda 20, NW) Libondeli na biso ezali ete yango ezala bongo mpo na basaleli nyonso ya Yehova na boumeli ya mobu ya mosala 1999 mpe mpo na libela.
Oyebi eyano?
◻ Ndenge nini tokoki koyoka Nzambe lelo oyo?
◻ Mabondeli ya mozindo epai ya Nzambe epesaka matomba nini?
◻ Soki tozali kolanda litambwisi ya Yehova na botosi nyonso, ndenge nini kondima na biso ekolendisama?
◻ Makambo nini esepelisi yo mingi na lapolo ya mbula (na lokasa ya 12 kino ya 15)?
[Etanda na lokasa 12-15]
LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 1998
(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)
[Elilingi na lokasa 16]
Soki tozali koyoka Liloba ya Yehova, elikya na biso na bilaka na ye ekolendisama
[Elilingi na lokasa 18]
Kondima na biso elendisamaka ntango tozali kosangana na mosala ya kosakola