Mibeko oyo mikomamaki te—Mpo na nini bakomaki yango nsima?
MPO na nini Bayuda mingi na ekeke ya liboso baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya? Moto moko oyo amonaki makambo yango na miso alobi boye: “Eingeli [Yesu] na Tempelo, banganga minene na mikóló na bato bayeli ye wana [azalaki koteya, NW], balobi ete, Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini? Nani mpe apesi yo bokonzi oyo?” (Matai 21:23) Mpo na bango, Mozwi-na-Nguya-Nyonso apesaki libota ya Bayuda Torah (Mibeko), mpe yango nde epesaki mibali mosusu bokonzi oyo euti na Nzambe. Yesu azalaki na bokonzi motindo yango?
Yesu azalaki komemya Torah mpe mibali oyo Torah epesaki mpenza bokonzi. (Matai 5:17-20; Luka 5:14; 17:14) Kasi, mbala mingi azalaki kotɔndɔla bato oyo bazalaki kobuka mibeko ya Nzambe. (Matai 15:3-9; 23:2-28) Bato yango bazalaki kolanda mibeko ya bonkɔkɔ oyo na nsima balobaki ete ezali mibeko oyo mikomamaki te. Yesu andimaki mibeko yango te. Yango wana, Bayuda mingi baboyaki kondima ye lokola Masiya. Bazalaki kokanisa ete Nzambe akoki kosunga bobele moto oyo azali kotosa mateya ya bato oyo bazali na bokonzi na kati na bango.
Mibeko oyo mikomamaki te miutaki wapi? Ndenge nini Bayuda bakómaki kotalela yango lokola nde ezali na bokonzi ndenge moko na Mibeko ya Mose oyo mikomami na Biblia? Soki mibeko yango mikomamaki liboso te, kasi mpo na nini ekomakaki nsima?
Mateya yango mautaki wapi?
Yehova Nzambe asalaki kondimana na Bayisalaele na Ngomba Sinai na 1513 L.T.B. Na nzela ya mosakoli Mose, apesaki bango mibeko ya kondimana. (Exode 24:3) Soki batosaki mibeko yango balingaki ‘kozala bulɛɛ lokola Yehova Nzambe na bango.’ (Levitike 11:44) Na nse ya kondimana ya Mibeko, losambo ya Yehova esɛngaki ete banganga oyo baponamaki bápesaka bambeka. Esengelaki kozala na esika ya losambo—na nsima ekómaki na tempelo na Yelusaleme.—Deteronome 12:5-7; 2 Ntango 6:4-6.
Mibeko ya Mose mimonisaki ebongiseli mobimba ya losambo ya Yehova na libota ya Yisalaele. Nzokande, makambo mosusu malimbolamaki polelepolele te. Na ndakisa, mobeko epekisaki kosala mosala mokolo ya Sabata, kasi elimbolaki polelepolele te bokeseni kati na makambo oyo makoki kotalelama lokola mosala mpe oyo makoki kotalelama lokola mosala te.—Exode 20:10.
Soki Yehova amonaki ete ebongi kosala bongo, akokaki kopesa mibeko ya sikisiki na likambo mokomoko. Kasi azalisaki bato na lisosoli, mpe atikeli bango nzela básalela ye na bonsomi na nzela ya mibeko na ye. Mibeko elobaki ete banganga, Balevi, mpe basambisi nde basengelaki kokataka makambo. (Deteronome 17:8-11) Lokola makambo makómaki mingi, bibongiseli mosusu bityamaki, mpe na ntembe te ndambo na yango ekómaki kino na mabota oyo mayaki na nsima. Batata bazalaki koyebisa bana na bango lolenge ya kokokisa mikumba ya bonganga na kati ya tempelo ya Yehova. Lokola libota yango eumelaki mingi, mibeko ya bonkɔkɔ mpe ekómaki mingi.
Atako bongo, losambo ya Yisalaele esimbamaki mpenzampenza na Mibeko mikomami oyo Mose azwaki. Exode 24:3, 4 elobi ete: “Mose akómaki mpe atɔndɔlaki bato maloba na [Yehova] nyonso mpe mibeko nyonso, mpe bato nyonso bazongisaki na mongongo moko ete, Tokosala yango nyonso elobi [Yehova]. Mose akomaki maloba na [Yehova] nyonso.” Nzambe asalaki kondimana ya mibeko na Yisalaele na nzela ya mibeko mikomami. (Exode 34:27) Kutu, esika moko te Biblia ezali koloba na ntina na mibeko oyo mikomamaki te.
“Nani mpe apesi yo bokonzi oyo?”
Mobeko ya Mose epesaki libosoliboso bokonzi ya lingomba mpe ya koteya na banganga, bakitani ya Alona. (Levitike 10:8-11; Deteronome 24:8; 2 Ntango 26:16-20; Malaki 2:7) Nzokande, nsima ya bikeke, banganga mosusu bazalaki lisusu sembo te mpe bamibebisaki. (1 Samwele 2:12-17, 22-29; Yilimia 5:31; Malaki 2:8, 9) Na eleko ya boyangeli ya Bagreke, banganga mingi bapɛngwaki. Na ekeke ya mibale L.T.B., Bafalisai—etuluku moko ya sika na kati ya Lingomba ya Bayuda oyo bazalaki kondimela banganga te—babandisaki mibeko oyo milobaki ete moto nyonso akoki komitalela ete azali bulɛɛ ndenge moko na nganga. Bato mingi basepelaki na mateya yango, nzokande yango ezalaki kobakisa elɔkɔ moko na Mobeko ya Mose—likambo oyo epesamaki nzela te.—Deteronome 4:2; 12:32 (Mibeko 13:1, Liloba lya Nzambe).
Bafalisai bakómaki sikoyo balakisi ya sika ya Mibeko, babandaki kosala mosala oyo bamonaki ete banganga bazali kosala yango te. Lokola bokonzi na bango eutaki na Mobeko ya Mose te, babimisaki lolenge ya sika ya kolimbola Makomami, kasi ezalaki polelepolele te mpe ezalaki bobele kolongisa makanisi na bango.a Lokola bazalaki babateli mpe babandisi ya mibeko yango, bakómisaki mibeko yango eloko ya sika oyo ezali kopesa bato bokonzi na Yisalaele. Na ekeke ya liboso T.B., Bafalisai bakómaki etuluku oyo elekaki nguya na Lingomba ya Bayuda.
Lokola basangisaki mibeko oyo mikomamaki te na ntango wana mpe balukaki koyokanisa yango na Makomami mpo na kotya mibeko na bango moko, Bafalisai bamonaki ete esengeli kopesa mibeko na bango bokonzi mingi. Likanisi ya sika ebimaki mpo na komonisa esika mateya yango euti. Balabi babandaki koteya ete: “Mose azwaki Torah na Sinai mpe apesaki yango na Yosua, Yosua apesaki yango na mikóló, mpe mikóló bapesaki basakoli. Mpe basakoli bapesaki yango na mibali ya liyangani monene.”—Avot 1:1, Mishnah.
Ntango bazalaki koloba ete, “Mose azwaki Torah,” Balabi bazalaki kokanisa bobele Mibeko ya Mose te kasi mibeko na bango oyo mikomamaki te. Bazalaki koloba ete mibeko yango—oyo bato babandisaki mpe bakolisaki—Nzambe apesaki yango na Mose na Ngomba Sinai. Bazalaki koteya ete makambo oyo makomamaki te na Torah, Nzambe apesaki moto nzela ya kolimbola yango te, kasi Nzambe ye moko alimbolaki na monɔkɔ makambo yango oyo elobelami te na Mobeko ya Mose. Balobaki ete, Mose apesaki mobeko yango na banganga te, kasi na bakonzi mosusu ya lingomba, mpo ete ekóma kino na mabota oyo ekoya nsima. Bafalisai batutaki ntolo ete bokonzi na bango euti na mibeko wana oyo “esengeli kosuka te.”
Mobulungano ekɔti na Mibeko —Baluki mayele ya sika
Yesu, moto oyo bakonzi ya Lingomba ya Bayuda batyelaki bokonzi oyo Nzambe apesaki ye ntembe, asakolaki kobebisama ya tempelo. (Matai 23:37–24:2) Nsima wana Baloma babebisaki tempelo na 70 T.B., bambeka mpe mosala ya bonganga oyo esɛngisamaki na Mobeko ya Mose ekokaki lisusu kosalema te. Nzambe asalaki kondimana ya sika na mbeka ya lisiko ya Yesu. (Luka 22:20) Kondimana ya Mobeko ya Mose esukaki.—Baebele 8:7-13.
Na esika bámona ete makambo yango ezalaki elembo ete Yesu azali Masiya, Bafalisai balukaki nde mayele ya sika. Bamipesaki bokonzi mingi lokola oyo ya banganga. Lokola tempelo ebomamaki, bazwaki likoki ya kolekisa lisusu ndelo. Bakómisaki eteyelo ya Balabi na mboka Yavneh esika monene mpo na kobongisa lisusu Sanedrina—esambiselo monene ya Bayuda. Na mboka Yavneh, na litambwisi ya Yohanan ben Zakkai na Gamaliele II, Lingomba ya Bayuda ezwaki ebongiseli ya sika. Misala ya Balabi na eyanganelo ezwaki esika ya losambo na tempelo oyo etambwisamaki na banganga. Na esika ya kopesa bambeka, bakómaki nde kosala mabondeli mingimingi na mokolo ya mbɔndi. Bafalisai bakanisaki ete mibeko oyo mikomamaki te oyo Mose azwaki na Ngomba Sinai esilaki koyebisa mpe kolɛngɛla makambo yango.
Biteyelo ya Balabi bikómaki na lokumu mingi. Mokano na bango ezalaki ya kosala masolo ya mozindo, kokanga makambo na motó, mpe kosalela mibeko oyo mikomamaki te. Na ebandeli, balobaki ete mibeko oyo mikomamaki te mizalaki mpo na kolimbola Makomami—Midrash. Sikoyo, babandaki koteya mpe kobongisa ebele ya mibeko yango na bitenibiteni. Bakómisaki mobeko mokomoko oyo mokomamaki te mokuse, na maloba ya pɛtɛɛ mpo moto akanga yango na motó, mbala mingi bazalaki koyemba yango lokola nzembo.
Mpo na nini kokoma mibeko oyo mikomamaki te?
Lokola biteyelo ya balabi bikómaki mingi mpe mitinda na bango ebakisamaki, yango ebimisaki mokakatano mosusu. Adin Steinsaltz, nganga-mayele na mateya ya Balabi alobi ete: “Molakisi mokomoko akomaki mibeko mpe azalaki kolimbola yango na lolenge na ye moko. . . . Ebongaki kaka te komesana na mateya ya molakisi moko, kasi moyekoli asengelaki komesana na mateya ya balakisi mosusu . . . Yango wana, bayekoli bapusamaki kokanga na motó makambo mingi mpamba te ‘mateya elekaki ebele.’” Lokola mateya makómaki ndenge na ndenge, moyekoli azalaki konyokola bɔɔngɔ kino kobɛla mpasi ya motó.
Na ekeke ya mibale T.B., Bar Kokhba, apusaki Bayuda bátombokela Baloma, yango wana Baloma banyokolaki Balabi oyo bazalaki banganga-mayele. Babomaki Akiba, Labi oyo alekaki lokumu mpamba te andimelaki Bar Kokhba; babomaki mpe Balabi mosusu. Balabi bakómaki kobanga soki monyoko ezongi lisusu mibeko oyo mikomamaki te mikokaki kolimwa. Bakanisaki ete eleki malamu koyebisa mibeko yango na monɔkɔ, elingi koloba molakisi epai na moyekoli na ye, kasi mbongwana yango ememaki bango na kosala milende mpe kokamata ebongiseli mpo na kobatela mateya ya bato ya bwanya, noki bato bábosana yango libela.
Na boumeli ya eleko oyo Baloma batikaki bango mwa kimya, Judah Ha-Nasi, Labi oyo alekaki lokumu na nsuka ya ekeke ya mibale mpe na ebandeli ya ekeke ya misato T.B., ayanganisaki banganga-mayele mpe akomaki ebele ya mibeko oyo mikomamaki te na kati ya buku moko ya biteni motoba ya minene. Eteni mokomoko ekabwanaki na biteni mikemike 63. Buku yango ebéngamaki Mishnah. Ephraim Urbach, molakisi ya mibeko oyo mikomamaki te alobi boye: “Longola bobele Torah, buku mosusu ezali te oyo [Bayuda] bandimaki mpe bapesaki bokonzi koleka Mishnah.” Baboyaki Masiya, tempelo ebomamaki, kasi lokola mibeko oyo mikomamaki te mibatelamaki na ndenge bakomaki yango na Mishnah, eleko ya sika ebandaki na kati ya Lingomba ya Bayuda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Motindo oyo ya kolimbola Makomami ebéngami midrash.
[Elilingi na lokasa 26]
Mpo na nini Bayuda mingi baboyaki bokonzi ya Yesu?