Lisiko ya Klisto: Nzela ya Nzambe mpo na lobiko
“Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana [mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.”—YOANE 3:16.
1, 2. Limbolá likambo oyo ekómelaki bato nyonso.
KANISÁ ete ozali na maladi moko oyo, soki basali yo lipaso te, ekoboma yo. Okoyoka ndenge nini soki mbongo oyo basɛngi mpo na kosala yo lipaso eleki makoki na yo? Bongo soki bandeko mpe baninga na yo, atako basangisi mbongo kasi ekoki kaka te? Ya solo, soki okutani na likambo motindo yango okomitungisa mingi!
2 Ndakisa oyo emonisi likambo oyo ekómelaki bato nyonso na mokili. Baboti na biso ya liboso, Adama na Eva bazalaki bato ya kokoka ntango bakelaki bango. (Deteronome 32:4) Bakokaki kozala na bomoi ya seko mpe kokokisa mokano ya Nzambe oyo elobaki ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino.” (Genese 1:28) Kasi, Adama na Eva batombokelaki Mozalisi na bango. (Genese 3:1-6) Kozanga botosi ememelaki Adama na Eva lisumu, mpe bana na bango, atako babotamaki naino te, bazwaki lisumu yango. Na nsima, Yobo, moto ya sembo alobaki ete: “Nani akolonga kobimisa eloko na pɛto kati na eloko na mbindo? Moko te.”—Yobo 14:4.
3. Ndenge nini liwa epanzanaki na bato nyonso na mokili?
3 Na ndenge yango, lisumu ezali lokola maladi oyo mokomoko kati na biso azali na yango, mpamba te Biblia elobi ete “bato nyonso basalaki lisumu.” Ezalela oyo ezali kotya bomoi na likama. Ɛɛ, “masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa.” (Baloma 3:23, NW; Lom. 6:23) Moto moko te akoki kokima yango. Bato nyonso basalaka masumu, yango wana, bato nyonso bakufaka. Lokola tozali bana ya Adama, tobotamá na ezalela yango. (Nzembo 51:5) Paulo akomaki ete: “[Lisumu, NW] ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na [lisumu]. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali [lisumu].” (Baloma 5:12) Kasi, yango elingi koloba te ete tozali na elikya ya lobiko te.
Kolongolama ya lisumu na liwa
4. Mpo na nini bato bakoki kosilisa maladi na liwa na makasi na bango moko te?
4 Eloko nini esengelaki mpo na kolongola lisumu mpe mbuma mabe na yango, elingi koloba liwa? Mpo na koloba polele, esɛngaki eloko moko oyo ata moto moko te akoki kopesa yango. Mokomi ya nzembo amilelaki na maloba oyo: “Motuya na kosikola milimo na bango ezali monene, ekokoka kofutama te, seko na seko, ete abika libela na libela mpe amona nkunda te.” (Nzembo 49:8, 9) Atako tokoki kobakisa mwa bambula na bomoi na biso na komileisa malamu mpe na nkisi ya monganga, kasi moto moko te akoki kosilisa lisumu oyo tozwaki. Moto moko te akoki kosala ete nzoto enuna lisusu te mpe azongisa nzoto na ezalela ya kokoka oyo Nzambe akanaki na ebandeli. Paulo alekisaki ndelo te ntango akomaki ete mpo na lisumu ya Adama, bato nyonso ‘bazalisami mpamba,’ to ndenge Bible de Jérusalem ebongoli yango, “bakokaki lisusu kokokisa mokano na bango te.” (Baloma 8:20) Kasi, likambo ya esengo ezali ete Mozalisi asundolaki biso te. Akamataki ebongiseli mpo na kolongola lisumu na liwa mbala moko mpo na libela. Ndenge nini?
5. Ndenge nini Mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisalaele emonisi ete alingi bosembo?
5 Yehova “alingi boyengebene mpe sembo.” (Nzembo 33:5) Mibeko oyo apesaki Bayisalaele emonisi ete alingaka makambo nyonso másalemaka na bosembo mpenza. Na ndakisa, na kati ya mibeko yango, tozali kotánga ete esengeli ‘kopesa bomoi mpo na bomoi.’ Na maloba mosusu, soki Moyisalaele abomi moto, ye mpe asengelaki kokufa mpo na kofuta bomoi oyo alongoli. (Exode 21:23; Mituya 35:21) Na ndenge yango, bosembo ya Nzambe esengelaki kokokisama.—Talá Exode 21:30.
6. (a) Na ndimbola nini Adama akoki kobéngama mobomi? (b) Adama abungisaki bomoi ya ndenge nini, mpe esengelaki mbeka ya ndenge nini mpo na kokokisa bosembo?
6 Ntango Adama asalaki lisumu, akómaki mobomi. Na ndimbola nini? Na boye ete alekisaki lisumu yango, mpe lisusu liwa, epai ya bana na ye. Soki lelo oyo tobɛlaka, mpe nsukansuka tokufaka, ezali mpo na kozanga botosi ya Adama. (Nzembo 90:10) Lisumu ya Adama ememaki likambo mosusu ya monene koleka. Tóbosana te ete ezala mpo na ye moko mpe mpo na bana na ye, Adama abungisaki kaka bomoi ya mbula 70 to 80 te. Abungisaki nde bomoi ya kokoka, to bomoi ya seko. Na yango soki esengeli ‘kopesa bomoi mpo na bomoi,’ ekosɛnga bomoi ya ndenge nini mpo likambo yango ekatama na bosembo? Esengeli mpenza bomoi ya moto ya kokoka; bomoi oyo ekokani na bomoi ya Adama mpe oyo ekoki kobimisa bana ya kokoka. Soki bomoi ya moto ya kokoka epesami lokola mbeka, likambo ekokatama na bosembo mpe lisusu ekopesa nzela ete lisumu mpe mbuma na yango, elingi koloba liwa, elongwa.
Kofuta nyongo ya lisumu
7. Limbolá liloba “lisiko.”
7 Motuya oyo esengelaki mpo na kosomba biso na lisumu, Biblia ebéngi yango “lisiko.” (Nzembo 49:7) Na lingala, liloba yango ekoki kosalelama mpo na mbongo oyo mosali moko na mabe asɛngi mpo na kotika moto oyo ye akangi mpe abombi ye. Ya solo, lisiko oyo Yehova apesaki ezalaki te mpo na moto oyo mosali na mabe akangi. Kasi, likanisi ya kofuta mbongo ezali se ndenge moko. Kutu, liloba ya Liebele oyo ebongolami na “lisiko” euti na verbe oyo elimboli mpenza “kozipa.” Mpo na kopɛtolama na lisumu, lisiko esengeli mpenza kokokana na eloko oyo yango ekozipa: bomoi ya kokoka ya Adama.
8. (a) Limbolá motinda ya kosikola. (b) Ndenge nini motinda ya kosikola etaleli biso bato ya masumu?
8 Likambo yango eyokani na ebongiseli ya kosikola oyo tozali kokuta na kati ya mibeko ya Mose. Soki Moyisalaele akómi mobola mpe amitɛki lokola moombo epai ya moto oyo azali Moyisalaele te, ndeko na ye moko akokaki kosikola ye (to kolongola ye na boombo) na ntalo oyo ekokani na motuya ya moombo. (Levitike 25:47-49) Biblia elobi ete lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozali “baombo ya masumu.” (Baloma 6:6; 7:14, 25) Eloko nini esengelaki mpo na kosikola biso? Lokola touti komona yango, esɛngeli bomoi ya moto ya kokoka mpo na kofuta bomoi ya moto ya kokoka oyo ebungaki—kobakisa te, kolongola te.
9. Yehova asalaki ebongiseli nini mpo na kozipa lisumu?
9 Nzokande, biso bato tobotamaka na kozanga kokoka. Na kati na biso, moto moko te akokani na Adama; moto moko te akoki, na bosembo nyonso, kofuta motuya ya mbeka oyo esɛngami. Lokola tolobaki yango na ebandeli, ezali lokola nde tozali na maladi oyo soki esili te, ekoboma biso, kasi tozali mpe na likoki ya kofuta mbongo ya lipaso te. Na likambo ya boye, tokozala na botɔndi te soki moto moko asungi biso mpe afuti mbongo oyo esɛngami? Ezali likambo yango nde Yehova asalaki! Asalaki ebongiseli mpo na kosikola biso na lisumu mpo na libela. Ɛɛ, andimi kopesa biso eloko oyo biso moko tokokaki kosala yango ata mokolo moko te. Ndenge nini? Paulo akomaki ete: “Nzambe akopesa likabo mpamba, likabo na ye bomoi na seko kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) Yoane alobaki ete Yesu azali “Mwana-na-mpate na Nzambe, molongoli na masumu na mokili.” (Yoane 1:29) Sikoyo, tótala ndenge Yehova asalelaki Mwana na ye oyo alingaka mingi mpo na kofuta motuya ya lisiko.
“Lisiko oyo ekokani”
10. Ndenge nini bisakweli etali “mombóto” ememaki kino na Yosefe na Malia?
10 Ntango botomboki ebimaki na Edene, mbala moko Yehova ayebisaki mokano na ye ya kobimisa “mombóto,” to mwana, oyo akosikola bato na lisumu. (Genese 3:15) Yehova apesaki bimoniseli mingi mpo na kolakisa libota oyo ekobimisa mombóto. Na nsuka, bimoniseli yango ememaki kino na Yosefe na Malia. Bango mibale bafandaki na Palestine mpe bakanaki kobalana. Yosefe alɔtaki ndɔtɔ, na ndɔtɔ yango bayebisaki ye ete Malia azwi zemi na nguya ya elimo santu. Anzelu alobaki: “Akobota mwana mobali, mpe okobyanga nkombo na ye Yesu, mpo ye akobikisa bato na ye na masumu na bango.”—Matai 1:20, 21.
11. (a) Yehova asalaki ndenge nini mpo ete Mwana na ye abotama moto ya kokoka? (b) Mpo na nini Yesu akokaki kofuta “lisiko oyo ekokani”?
11 Zemi yango ezalaki lokola zemi nyonso te, mpamba te Yesu azalaki na bomoi kuna na likoló liboso abotama. (Masese 8:22-31; Bakolose 1:15) Yehova akɔtisaki bomoi na ye na libumu ya Malia na ndenge ya likamwisi; na bongo, Mwana oyo Nzambe alingaka mingi abotamaki lokola moto. (Yoane 1:1-3, 14; Bafilipi 2:6, 7) Yehova atambwisaki makambo na boye ete lisumu ya Adama ezwaki Yesu te. Nzokande, Yesu abotamaki moto ya kokoka. Na bongo, azalaki na eloko oyo Adama abungisaki: bomoi ya moto ya kokoka. Na ndenge yango, moto oyo akokaki kofuta motuya oyo esengeli mpo na kozipa lisumu amonanaki! Yesu asalaki likambo yango na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B. Na mokolo yango oyo etikalá na lisolo ya bato, Yesu amitikaki ete banguna na ye báboma ye. Na ndenge yango, apesaki “lisiko oyo ekokani.”—1 Timote 2:6, NW.
Motuya ya bomoi ya moto ya kokoka
12. (a) Limbolá bokeseni monene oyo ezali kati na liwa ya Yesu mpe liwa ya Adama. (b) Ndenge nini Yesu akómaki “Tata ya seko” mpo na bato ya botosi?
12 Liwa ya Yesu ekeseni na liwa ya Adama. Bokeseni yango nde emonisi motuya ya lisiko. Ebongaki ete Adama akufa mpo aboyaki kotosa Mozalisi na ye na nko. (Genese 2:16, 17) Kasi, ebongaki te ete Yesu akufa, mpo “asalaki lisumu moko te.” (1 Petelo 2:22) Yango wana, ntango Yesu akufaki, azalaki na eloko moko ya motuya monene oyo moto ya masumu Adama azalaki na yango lisusu te ntango akufaki; eloko yango ezali nde lotomo ya kozala na bomoi lokola moto ya kokoka. Boye, liwa ya Yesu ezalaki na motuya ya mbeka. Ntango amataki na likoló lokola ekelamu ya elimo, akendaki kolakisa Yehova motuya ya mbeka na ye. (Baebele 9:24) Na likambo oyo asalaki, Yesu asombaki bato ya masumu mpe akómaki Tata na bango ya sika na esika ya Adama. (1 Bakolinti 15:45) Yesu abongi mpenza kobéngama “Tata ya seko.” (Yisaya 9:6) Kanisá ndimbola ya likambo yango! Adama, tata oyo azalaki na lisumu, apalanganisi liwa epai ya bana na ye nyonso. Yesu, Tata ya kokoka, asaleli motuya ya mbeka na ye mpo na kopesa bato ya botosi bomoi ya seko.
13. (a) Pesá ndakisa mpo na komonisa ndenge Yesu afutaki nyongo oyo Adama azalaki na yango. (b) Mpo na nini mbeka ya Yesu ezipaki lisumu ya baboti na biso ya liboso te?
13 Kasi, ndenge nini liwa ya moto moko ekoki kozipa masumu ya bato ebele? (Matai 20:28) Eleki mwa bambula, tobimisaki lisolo moko oyo ezalaki na elakiseli moko mpo na kolimbola lisiko. Tolobaki boye: “Tózwa ndakisa ya izini moko monene oyo ezali na basali ebele. Kasi, patrɔ na yango azali sembo te, abebisi mosala mpe izini ekangami. Sikoyo ebele ya bato bakómi basomɛlɛ mpe bazali na mbongo te. Babalani na bango, bana na bango, mpe bato nyonso oyo badefisaki bango biloko bakómi na mpasi mpo na mabe ya moto moko! Mbala moko, moto moko ya mbongo mingi amonisi motema malamu, andimi kofuta banyongo oyo kompanyi ezalaki na yango mpe izini ebandi lisusu kosala. Lokola bafuti nyongo ya moto moko basali ebele babiki, na mabota na bango mpe bato oyo badefisaki bango biloko. Kasi patrɔ oyo ya kala akozala lisusu na esika na kompanyi oyo ezongeli misala na yango? Te, akɔti bolɔkɔ mpe alongwe na mosala mpo na libela! Ndenge moko mpe, kofutama ya nyongo ya Adama epesi bamilio ya bana na ye litomba, kasi na Adama te.”
14, 15. Mpo na nini tokoki koloba ete Adama na Eva basalaki lisumu na nko, mpe ndenge nini ezalela na biso ekeseni na oyo ya bango?
14 Kosala bongo ezali bosembo. Tóbosana te, Adama na Eva basalaki lisumu na nko. Baboyaki kotosa Nzambe. Nzokande, biso tobotami na lisumu. Tokoki kosala eloko moko te. Ata soki tosali makasi ndenge nini, tokolonga kokima masumu te. (1 Yoane 1:8) Ntango mosusu tokoki komiyoka lokola Paulo oyo akomaki: “Wana elingi ngai kosala malamu, bobele mabe ezali penepene na ngai. Kati na motema na ngai moto, nasepeli na Mibeko na Nzambe; kasi namoni mobeko mosusu kati na bilembo na nzoto na ngai. Mobeko yango monene ezali [kobunda] etumba na Mibeko milingi ngai na makanisi na ngai, ezali mpe kokanga ngai moombo na mobeko na masumu mozali kati na bilembo na ngai. Ngai moto na mawa mingi!”—Baloma 7:21-24.
15 Kasi, lisiko epesi biso elikya! Ndenge Nzambe alakaki, Yesu nde azali mombóto oyo “mabota nyonso na nse bakopambolama” na nzela na ye. (Genese 22:18; Baloma 8:20) Mbeka ya Yesu epesi bato oyo bazali kondimela ye nzela ya kozwa mapamboli kitoko. Sikoyo tótalela mwa ndambo ya mapamboli yango.
Ndenge ya kozwa litomba na lisiko ya Klisto
16. Atako tozali bato ya masumu, lisiko ya Yesu ekoki kopesa biso matomba nini sikoyo?
16 Yakobo, moko na bato oyo bakomaki Biblia alobaki ete “biso nyonso tokokweaka na makambo mingi.” (Yakobo 3:2) Kasi, mabunga na biso ekoki kolimbisama mpo na lisiko ya Klisto. Yoane akomi ete: “Soko moto nani akosala lisumu, tozali na Molobeli epai na Tata, ye Yesu Klisto, Moyengebene. Ye azali mpe mbɔndi mpo na masumu na biso.” (1 Yoane 2:1, 2) Ya solo, elingi koloba te ete tokotalela kosala lisumu lokola likambo moke. (Yuda 4; talá 1 Bakolinti 9:27.) Nzokande, soki tosali libunga, tokoki kokende epai ya Yehova, kofungolela ye motema na biso, mpe kozala na elikya ete azali “na pene ya kolimbisa.” (Nzembo 86:5, NW; Nz 130:3, 4; Yisaya 1:18; 55:7; Misala 3:19) Na bongo, lisiko epesi biso likoki ya kosalela Nzambe na lisosoli malamu mpe epesi biso nzela ya kosolola na ye na nzela ya libondeli na nkombo ya Yesu Klisto.—Yoane 14:13, 14; Baebele 9:14.
17. Mbeka epesi nzela na mapamboli nini na mikolo mizali koya?
17 Lisiko ya Klisto epesi nzela ete mokano ya Nzambe ekokisama: bato ya botosi báfanda libela na Paladiso awa na mabelé. (Nzembo 37:29) Paulo akomaki boye: “Mpo na bilaka nyonso na Nzambe izali Ɛɛ! kati na ye [Yesu].” (2 Bakolinti 1:20) Ya solo, liwa “ezalaki na bokonzi.” (Baloma 5:17) Mpo na lisiko, Nzambe akoki sikoyo kolongola “monguna [yango] ya nsuka.” (1 Bakolinti 15:26, NW; Emoniseli 21:4) Ata baoyo bakufá bakoki kozwa litomba na lisiko ya Yesu. Yesu alobaki ete: “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye [Yesu], mpe bakobima.”—Yoane 5:28, 29; 1 Bakolinti 15:20-22.
18. Lisumu ememelaki bato likambo nini ya mabe, mpe ndenge nini likambo yango ekolongwa na mokili ya sika ya Nzambe?
18 Kanisá esengo oyo tokozala na yango ya kozala na bomoi na ndenge oyo ebongisamaki: mpasi nyonso oyo ezali kotungisa biso lelo oyo ekozala lisusu te! Lisumu ebebisi boyokani na biso na Nzambe mpe lisusu ebebisi makanisi, motema mpe nzoto na biso moko. Kasi, Biblia elaki ete na mokili ya sika ya Nzambe, “mofandi moko te akoloba ete, Ngai nazali na maladi.” Ɛɛ, bato bakozala lisusu na maladi te ezala na nzoto to na makanisi. Mpo na nini? Yisaya ayanoli ete: “Bato baoyo bakofanda wana bakolimbisama masumu na bango.”—Yisaya 33:24.
Lisiko—Elembo ya bolingo
19. Ndenge nini moko na moko na biso akoki komonisa botɔndi na lisiko ya Klisto?
19 Ezali bolingo nde epusaki Yehova atinda Mwana na ye oyo alingaka mingi. (Baloma 5:8; 1 Yoane 4:9) Ezali mpe bolingo nde epusaki Yesu “ameka liwa mpo na moto nyonso.” (Baebele 2:9, NW; Yoane 15:13) Yango wana mpenza, Paulo akomaki boye: “Bolingo na Klisto ekangi biso . . . Akufeli bato nyonso ete baoyo bazali na bomoi bábika lisusu mpo na bango mpenza te kasi mpo na ye oyo akufeli bango mpe asekwi.” (2 Bakolinti 5:14, 15) Soki tozali mpenza na botɔndi mpo na likambo oyo Yesu asaleli biso, tokokanga motema na biso te. Soki totali malamu, lisiko nde epesi biso likoki ya kobika na liwa! Na ntembe te na misala na biso, tokolinga komonisa te ete mbeka ya Yesu ezali eloko mpamba.—Baebele 10:29.
20. Na makambo nini tokoki kotosa “liloba” ya Yesu?
20 Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi oyo euti na motema mpo na lisiko? Mwa moke liboso bákanga ye, Yesu alobaki ete: “Soko moto nani akolingaka ngai, akotosa liloba na ngai.” (Yoane 14:23) Liloba ya Yesu etaleli mpe mobeko na ye oyo elobi ete tosengeli kokokisa etinda na ye na molende. Etinda yango elobi ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango.” (Matai 28:19) Kotosa Yesu esɛngi mpe kolinga bandeko na biso na lisangá.—Yoane 13:34, 35.
21. Mpo na nini tosengeli koyangana na Ekaniseli na mokolo ya 1 Aprili?
21 Lolenge moko ya malamu koleka oyo tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na lisiko ezali ya koyangana na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Na mbula oyo ekozala na mokolo ya 1 Aprili.a Yango mpe ezali na kati ya “liloba” ya Yesu, mpamba te ntango abandisaki Ekaniseli yango, Yesu atindaki bayekoli na ye ete: “Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19, NW) Soki tokoyangana na ekaniseli yango oyo ezali na ntina mingi mpe soki tokotya likebi na nyonso oyo Klisto atindaki, tokolakisa ete tondimi mpenza ete lisiko ya Yesu ezali nzela ya Nzambe mpo na lobiko. Ɛɛ, “lobiko mpe ezali na moto mosusu te.”—Misala 4:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mbula oyo, mokolo ya 1 Aprili ekokani na 14 Nisana ya mobu 33 T.B., mokolo oyo Yesu akufaki. Tuná Batatoli ya Yehova na mboka oyo ofandi mpo na koyeba ntango mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema.
Okoki koyeba lisusu?
◻ Mpo na nini bato bakoki komipɛtola na masumu na bango te?
◻ Na ndimbola nini Yesu azali “lisiko oyo ekokani”?
◻ Ndenge nini Yesu asalelaki lotomo na ye ya kozala na bomoi lokola moto ya kokoka mpo na bolamu na biso?
◻ Lisiko ya Klisto ememeli bato mapamboli nini?
[Elilingi na lokasa 15]
Bobele moto ya kokoka, oyo akokani na Adama, nde asengelaki mpo na kokata likambo na bosembo
[Elilingi na lokasa 16]
Lokola Yesu azalaki na lotomo ya kozala na bomoi lokola moto ya kokoka, liwa na ye ezalaki na motuya ya mbeka