Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/4 nk. 20-22
  • Nani abongisaka makanisi na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani abongisaka makanisi na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ozali na kati ya nzungu ya Satana?
  • Yebá makambo oyo mazali kosalema
  • Ndimá kobongisama na Yehova
  • Sepelá ndenge Yehova azali Moyemi-mbɛki na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tiká disiplini ya Yehova ebongisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Tiká Yehova abongisa makanisi mpe bizaleli na yo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Ndenge ya kobatela makanisi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/4 nk. 20-22

Nani abongisaka makanisi na yo?

“NALINGI moto moko te ayebisa ngai likambo oyo nasengeli kokanisa! Mpe moto moko te ayebisa ngai likambo oyo nasengeli kosala!” Mbala mingi moto oyo alobaka boye amonisaka ete amityelaka motema mingi mpe andimaka se bikateli na ye moko. Yo mpe ozalaka bongo? Ezali solo ete, moto moko te asengeli kozwa bikateli na esika na yo. Kasi, ezali likambo ya mayele koboya mbala moko toli oyo ekoki kozala mpo na bolamu na yo? Ezali solo ete ata moto moko te akoki kosalisa yo mpo na kozwa bikateli ya mayele? Okoki mpenza kotuta ntolo ete ezali na moto moko te oyo azali kobongisa makanisi na yo, kozanga ete yo moko oyeba?

Na ndakisa, liboso ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, Joseph Goebbels, ministre ya propagande na guvernema ya Hitler, akómaki kotambwisa kompanyi oyo esalaka bafilime na ekólo Allemagne. Mpo na nini? Amonaki ete yango mpe ekozala esaleli ya makasi mpe na nzela na yango akoki “kobongola bindimeli mpe etamboli ya bato.” (Propaganda and the German Cinema 1933-​1945) Na ntembe te oyebi mayele mabe wana mpe balolenge mosusu oyo asalelaki na nguya mpo na kobongola makanisi ya bato nyonso, ezala baoyo batángá mingi te to baoyo batángá mingi, mpo na kondima makanisi ya Banazi kozanga kotyela yango ntembe.

Ezali mpenza solo ete ndenge okanisaka, mpe ndenge oyo osalaka makambo, ntango nyonso epusamaka na mayoki mpe na makanisi ya bato oyo oyokaka bango. Nzokande, kolanda mayoki mpe makanisi ya bato mosusu ezalaka ntango nyonso mabe te. Soki bato yango bazali mpenza bato oyo balukaka bolamu na yo; na ndakisa balakisi, baninga, to baboti; boye okozwa litomba monene na toli na bango. Kasi soki bazali koluka kaka matomba na bango moko to mpe bazali bapɛngwi to bato ya makanisi mabe, to “bazimbisi,” ndenge ntoma Paulo abéngi bango, boye salá keba!​—Tito 1:10; Deteronome 13:6-8.

Yango wana, kebá komityela motema mingi te mpe kokanisa te ete moto moko te, ata ndenge nini, akoki kobongola makanisi na yo. (Talá 1 Bakolinti 10:12.) Na ntembe te ntango tozali koloba boye​—atako ezali mpasi mpo ondima yango​—likambo yango ezali kosalema kozanga ete yo moko oyeba yango. Tókamata mwa ndakisa ya eloko moko oyo olingi kosomba ntango okei na zando. Ntango nyonso osombaka eloko oyo olingaki kosomba to oyo okanisaki na motema na yo? To bato mosusu, mbala mingi oyo ozali komona bango te nde basalaka bopusi makasi na liponi na yo? Eric Clark, mopanzi-nsango moko oyo asalaki bolukiluki na likambo yango andimi ete ezali bongo. Alobi ete: “Ntango tozali kolanda publisite mingi, tokomona bopusi na yango te, kasi bopusi na yango ezali kokɔta na makanisi na biso.” Alobaki lisusu ete ntango batunaki bato soki publisite ezali na bopusi, “mingi balobaki ete ɛɛ, ezali na bopusi epai na bato mosusu kasi epai na bango te.” Bato bakanisaka ete bato mosusu nde bakoki kozwama na motambo kasi bango te. Bamonaka ete bango bakoki kozwama te.”​—The Want Makers.

Ozali na kati ya nzungu ya Satana?

Ata soki ozali kolanda publisite mokolo na mokolo, mbala mosusu yango ekoki kosala yo eloko te. Nzokande, ezali na bopusi mosusu oyo ezali mpenza na likama. Biblia ezali komonisa polele ete Satana azali mokosi monene. (Emoniseli 12:9) Mayele na ye ekokani mpenza na mayele ya moto moko oyo asalaka publisite mpe alobaki ete ezali na ndenge mibale ya kobenda bakiliya​—“kokosa bango to kokɔtisa bango na momeseno moko.” Soki bapanzi-nsango na baoyo basalaka publisite bakoki kosalela mayele ya boye mpo na kobongola makanisi na yo, Satana oyo azali na makoki mingi koleka akosalela mpe mayele ya ndenge wana!​—Yoane 8:44.

Ntoma Paulo ayebaki likambo yango. Azalaki kobanga ete baninga na ye baklisto mosusu bálala mpɔngi noki Satana akokosa bango. Akomaki ete: “Lokola nyoka azimbisaki Eva na mayele na ye, nabangi ete makanisi na bino makopɛngwa longwa na sembo mpe pɛto mpo na Klisto.” (2 Bakolinti 11:3) Tyá likebisi wana na motema. Soki te okokokana na bato oyo bandimaka ete piblisite ezali na bopusi mabe kasi “epai na bango te.” Mobulu, kobeba ya bizaleli malamu, mpe liso na nse ya lokasa ndenge ezali komonana lelo oyo na mokili, ezali elembo ya polele ete piblisite ya Satana ezali na bopusi mabe.

Yango wana, ntoma Paulo abondelaki baninga na ye baklisto ete ‘bálanda makambo ya ntango oyo te.’ (Baloma 12:2) Mobongoli moko ya Biblia akomaki maloba ya ntoma Paulo boye: “Bótika te ete mokili ya zingazinga na bino ekɔtisa bino na kati ya nzungu na yango.” (Baloma 12:2, Phillips) Satana akomeka makambo nyonso mpo na kokɔtisa yo na nzungu na ye, ndenge mosali ya mbɛki na ntango ya kala azalaki kokɔtisa lima (argile) na nzungu ya polele mpo ete lima ezwa lolenge mpe bilembo oyo ye alingi. Satana azali kosala likambo yango na lisalisi ya ebongiseli ya politiki, ya mombongo, ya losambo, mpe ya masano. Bopusi na ye ekómi kino wapi? Esili kopalangana ndenge ezalaki na eleko ya ntoma Yoane. Ntoma Yoane alobaki ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19; talá lisusu 2 Bakolinti 4:4.) Soki ozali kotya ntembe na makoki oyo Satana azali na yango mpo na kokosa mpe kobebisa makanisi ya bato, kanisá ndenge alongaki kosala yango na libota mobimba ya Yisalaele, oyo emipesaki na Nzambe. (1 Bakolinti 10:6-12) Makambo ya motindo yango ekoki kokómela yo? Ekoki kokómela yo soki otiki bopusi mabe ya Satana ekɔta na makanisi na yo.

Yebá makambo oyo mazali kosalema

Mingimingi, nguya wana ya kokosa ekobongola makanisi na yo bobele soki otikeli yango nzela. Na buku na ye (The Hidden Persuaders) Vance Packard alobi ete: “Tozali na bisaleli ya makasi mpo na kobundisa bandimisi [ya kobombana] wana: soki tolingi te bakolonga kondimisa biso te. Na makambo nyonso tokoki kopona biso moko, mpe bakokosa biso te soki toyebi makambo oyo mazali kosalema.” Ezali mpe bongo mpo na piblisite mpe bokosi.

Kasi, mpo na ‘koyeba makambo oyo mazali kosalema,’ osengeli kofungola makanisi na yo mpe kondima bopusi ya malamu. Makanisi malamu, ezali ndenge moko na nzoto oyo ezali kolɔngɔnɔ, esengeli koleisa yango malamu soki olingi ete esalaka malamu. (Masese 5:1, 2) Kozanga koyeba makambo ezali ndenge moko na koyeba makambo ya lokuta, nyonso mibale ezali likama. Yango wana atako ebongi komibatela mpo mayele mabe mpe makanisi ya lokuta ebebisa yo te, osengeli kosala makasi okolisa te elimo oyo ekomonisa lokola ete okoká mpe elimo ya kobɛta ntembe mpe kotyola makebisi na toli nyonso oyo bapesi yo.​—1 Yoane 4:1.

Kondimisa moto likambo ya solo ekeseni na piblisite ya lokuta. Ntoma Paulo akebisaki elenge Timote ete akeba na “bato mabe mpe bakosi [baoyo] bakoleka na mabe, bakozimbisa mpe bakozimbisama.” Nzokande Paulo abakisaki ete: “Kasi yo, oumela kati na yango eyekoli yo mpe endimi yo, awa eyebi yo ete oyekoli yango epai na banani.” (2 Timote 3:13, 14) Lokola likambo nyonso oyo okokɔtisa na makanisi na yo ekosala bopusi na lolenge moko to mosusu, likambo ya ntina ezali ya ‘koyeba epai ya banani oyekolaka makambo,’ omindimisa ete bazali bato oyo bazali koluka mpenza bolamu na yo kasi bolamu na bango moko te.

Yo moko nde okopona. Okoki kopona “[kolanda] makambo ya ntango oyo” soki otiki nzela na makanisi ya bato mpe na makambo ya mokili oyo etambwisa makanisi na yo. (Baloma 12:2) Kasi yebá ete mokili oyo ezali koluka bolamu na yo te. Yango wana, ntoma Paulo alobi ete: “Bókeba, ntango mosusu moto moko akobenda bino lokola biloko na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bozimbisi ya mpamba mpo bólanda mimeseno ya bato.” (Bakolose 2:8, NW) Mpo na kokɔta na nzungu ya Satana na ndenge yango, to ‘kobendama lokola eloko ya kolya’ esɛngaka milende te. Ezali lokola moto oyo azali kopema milinga ya likaya oyo moto mosusu azali komela. Okoki kozwa likama se na kopema mopɛpɛ mabe.

Nzokande, okoki mpe koboya kopema “mopɛpɛ” yango. (Baefese 2:2) Yango wana, landá toli ya ntoma Paulo oyo elobi boye: “Bóbongwana mpo na kozwa makanisi na sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.” (Baloma 12:2) Yango esɛngaka milende. (Masese 2:1-5) Yebá malamu ete Yehova akosaka bato te. Alakisi biso makambo nyonso oyo tosengeli koyeba, kasi mpo na kozwela yango litomba, yo moko osengeli koyoka mpe kotika ete esala bopusi malamu na makanisi na yo. (Yisaya 30:20, 21; 1 Batesaloniki 2:13) Osengeli kolinga kotondisa makanisi na yo na solo oyo ezwami na “Makomi ya bulɛɛ,” Biblia, Liloba lipemami na Nzambe.​—2 Timote 3:15-17.

Ndimá kobongisama na Yehova

Yehova ayebisaki mosakoli Yilimia akende kotala mosali ya mbɛki na ndako na ye ya mosala. Likambo yango emonisi ntina oyo osengeli kondima na motema moko mpe na botosi soki olingi kozwa litomba na kobongisama na Yehova. Yilimia amonaki ndenge mosali na mbɛki asalaki mbɛki ya ndenge mosusu ntango mbɛki ya liboso “ebebaki na lobɔkɔ na [mosali na mbɛki, NW].” Na nsima Yehova alobaki ete: “. . . Ɛ ndako na Yisalaele, ngai nakoki nde kosala lokola [mosali na mbɛki, NW] oyo te? Talá lokola lima ezali na mabɔkɔ na [mosali na mbɛki], bongo bino bozali kati na lobɔkɔ na ngai, ɛ ndako na Yisalaele.” (Yilimia 18:1-6) Yango elakisaki ete bana ya Yisalaele bazalaki lokola pɔtɔpɔtɔ ya lima oyo ezangi bomoi oyo Yehova asimbi mpo na kosala mbɛki ya mitindo oyo ye moko alingi, boye te?

Yehova asalelaka te nguya na ye monene mpo na kopusa bato na makasi ete básala makambo oyo balingaka te; tokopesa ye mpe foti te mpo na biloko oyo bizali kobeba, ndenge ekoki kozala mpo na bato oyo basalaka mbɛki. (Deteronome 32:4) Kobeba ebandaka ntango bato oyo Yehova azali kobongisa na lolenge ya malamu bazali koboya litambwisi na ye. Yango nde bokeseni monene oyo ezali kati na yo na pɔtɔpɔtɔ ya lima oyo ezangi bomoi. Yo ozali na bonsomi ya kopona. Soki osaleli bonsomi yango, okoki kopona kati na kondima kobongisama na Yehova to koboya na nko.

Oyo ezali mpenza liteya monene! Eleki malamu koyoka mongongo ya Yehova na esika ya koloba na lofundo nyonso ete: “Moto moko te ayebisa ngai likambo oyo nasengeli kosala.” Biso nyonso tozali na mposa ete Yehova atambwisa biso. (Yoane 17:3) Salá lokola Davidi mokomi na nzembo, ye abondelaki ete: “Ɛ [Yehova], yebisá ngai nzela na yo; monisá ngai bilekelo na yo.” (Nzembo 25:4) Kanisá makambo Mokonzi Salomo alobaki: “Moto na mayele akoyoka mpe [akobakisa] mayele.” (Masese 1:5) Okoyoka toli? Soki okosala bongo, “mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo.”​—Masese 2:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto