Opesaka bato matɔndi?
Na ndako moko ya bamisionere na Afrika ya Westi, mbwa moko ezalaki kuna nkombo na yango Teddy. Soki moto moko abwakeli yango mosuni, ezalaki komɛla yango mbala moko, kozanga ete eyoka naino nsolo to etafuna mosuni yango. Okomona yango ezali kopema mbangumbangu na nse ya moi makasi mpo na kozela ete bábwakela yango mosuni mosusu. Soki mosuni esili, ebaluki mpe ekei na yango.
Mbwa yango Teddy, ezalaki kopesa bato matɔndi ata moke te na biloko oyo bazalaki kopesa yango. Moto moko te azalaki kozela ete esala bongo. Mpamba te, ezalaki se mbwa.
NA OYO etali kopesa motɔndi, mbala mingi tozelaka ete bato bámonisa yango kasi banyama te. Mbala mingi tozwaka yango te. Bato mingi bawelelaka kokamata biloko oyo bazali na yango mposa, mpe na nsima balukaka mosusu. Yango mpe ezali likambo ya kokamwa te. Biblia elobaki ete na mikolo ya nsuka, bato bakozala na botɔndi te.—2 Timote 3:1, 2.
Kasi, basaleli ya Nzambe basalaka bongo te. Balandaka mpenza toli ya ntoma Paulo oyo alobaki na baninga na ye bandimi ete: “Bózalaka mpe na matɔndi.”—Bakolose 3:15.
Yehova apesaka bato matɔndi
Yehova Nzambe azali kopesa ndakisa eleki malamu ya komonisa botɔndi. Talá ndenge atalelaka basaleli na ye ya sembo. Na kopemama na elimo ya Nzambe, Paulo akomelaki baklisto Baebele ete: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye, awa esalelaki bino babulami mpe bozali naino kosalela bango.”—Baebele 6:10.
Bandakisa ezali mingi oyo emonisi botɔndi ya Yehova epai ya basaleli na ye ya sembo. Apambolaki Abalayama na ndenge akómisaki bakitani na ye na mosuni libota monene, na boye ete bakómaki mpenza “lokola [minzoto, NW] na likoló mpe lokola zelo na libongo na mai.” (Genese 22:17) Mpo na komonisa botɔndi na ye na bosembo oyo Yobo amonisaki na kati ya minyoko, Yehova azongisaki Yobo nzoto kolɔngɔnɔ mpe lisusu apesaki ye “mbala . . . mibale na yango ezalaki na ye liboso.” (Yobo 42:10) Lolenge oyo Yehova asaleli bato makambo na boumeli ya bankóto ya bambula emonisi bosolo ya maloba oyo: “Zambi miso na [Yehova] ikotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.”—2 Ntango 16:9.
Botɔndi ya Nzambe mpe mposa na ye ya kopesa libonza na baoyo bazali koluka kosala mokano na ye ezali libosoliboso bizaleli na ye. Koyeba likambo yango ezali na ntina mingi na kondima ya boklisto. Ntoma Paulo akomaki ete: “Soko na kondima te, ekoki kosepelisa Nzambe te. Mpo ete ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima . . . ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.”—Baebele 11:6.
Soki Yehova azalaki na makambo makasi, alukaka kotala kaka mabunga, mbɛlɛ biso nyonso tokozwa etumbu. Eleki bambula mingi mokomi na nzembo alobaki ete: “Ɛ [Yehova], Soko yo okotalaka [mabunga], ɛ Nkolo nani akotɛlɛma?” (Nzembo 130:3) Yehova asepelaka na misala ya bato kasi atalaka kaka mabunga te. Alingaka basaleli na ye mingi. Apesaka bato matɔndi.
Yesu—Moto oyo amonisaka botɔndi mingi
Yesu azalaki mpenza komonisa bizaleli ya Tata na ye ya likoló; yango wana azalaki kopesa bato matɔndi mpo na misala oyo bazalaki kosala na kondima. Talá likambo oyo esalemaki mokolo moko na tempelo na Yelusaleme: “Yesu atombolaki miso na ye, mpe amonaki bazwi baoyo bazalaki kotya makabo na bango na ebombelo na mosolo na Tempelo. Amonaki mpe mwasi moko mobola, oyo akufeli mobali, kotya mea mibale wana, mpe alobaki ete, Na solo nalobi na bino ete mwasi oyo mobola aleki bango nyonso na kopesa makabo, mpo ete baoyo nyonso batii mosolo molekaki na bango kati na makabo, nde mwasi oyo na kozanga na ye, atii nyonso ezalaki na ye mpo na kolya.”—Luka 21:1-4.
Na kotalela motuya ya mosolo, likabo yango ezalaki mpenza moke, soki tokokanisi yango na oyo bazwi batyaki. Abendaki likebi ya bato mingi te oyo bazalaki wana. Kasi, Yesu amonaki mwasi-mokufeli-mobali yango. Asosolaki ezaleli na ye. Yesu amonaki ye mpe asepelaki na ye mingi.
Likambo mosusu etalelaki Malia, mwasi moko ya bozwi. Wana Yesu afandaki mpo na kolya, mwasi yango asopaki mafuta ya nsolo kitoko mpe ya motuya mingi na makolo mpe na motó ya Yesu. Bamosusu basepelaki te na likambo asalaki, balobaki ete ebongaki bátɛkisa mafuta wana mpe básalela mbongo yango mpo na kosunga babola. Yesu asalaki nini? Alobaki ete: “Tiká ye! Mpo na nini bozali kotumola ye? Ye asili kosalela ngai mosala kitoko. Nazali koloba na bino solo ete soko Nsango Malamu ekolakisama wapi na mokili mobimba, likambo lisali ye ekoyebisama mpo na ekaniseli na ye.”—Malako 14:3-6, 9; Yoane 12:3.
Yesu ayokaki mabe te na ndenge mafuta esalelamaki mpo na mosala mosusu. Asepelaki mingi na bolingo mpe kondima oyo Malia amonisaki. Likambo yango ekomami na Biblia mpo na kokanisa ye na mosala malamu oyo asalaki. Masolo oyo mpe masolo mosusu emonisi ete Yesu azalaki komonisa botɔndi mingi.
Soki ozali mosaleli ya Nzambe, okoki kozala na elikya ete Yehova Nzambe na Yesu Klisto basepelaka mingi na milende na yo mpo na kotombola losambo ya pɛto. Boyebi yango ezali kobenda biso pena na bango mpe ezali kopusa biso na kolanda ndakisa na bango ete biso mpe tópesaka bato matɔndi.
Satana atalaka kaka mabunga
Sikoyo tótalela ndakisa ya moto moko oyo apesaka bato matɔndi te; elingi koloba Satana Zabolo. Ezali mpo na kozanga botɔndi nde Satana azalaki mobandisi ya botomboki liboso ya Nzambe, likambo oyo ebimisi makama.
Satana akolisaki elimo ya kozanga bosepeli, yango wana abandaki kolona elimo yango epai ya bato mosusu. Talá makambo malekaki na elanga ya Edene. Yehova azalisaki mwasi na mobali ya liboso, atyaki bango na elanga moko kitoko, mpe alobaki na bango ete: “Yo okoki kolya mbuma na nzete nyonso na elanga.” Epekiseli ezalaki kaka moko. Nzambe alobaki ete: “Nde mbuma na nzete na koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.”—Genese 2:16, 17.
Nzokande, eumelaki te, Satana atyelaki maloba ya Yehova ntembe. Alingaki kokómisa Eva moto ya kozanga botɔndi epai ya Yehova, na boye ete apusama na kotombokela Nzambe, ndenge ye moko Satana atombokaki. Satana atunaki ete: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma na nzete nyonso na elanga te?” (Genese 3:1) Likambo oyo ezali komonana polele na motuna wana ezali ete Nzambe abombelaki Eva eloko moko ya motuya, eloko oyo elingaki kofungola ye miso mpe kokómisa ye lokola Nzambe. Na esika ya kozala na matɔndi mpo na ebele ya mapamboli oyo Yehova azalaki kopesa ye, Eva abandaki koyoka mposa makasi ya eloko oyo epekisamaki.—Genese 3:5, 6.
Toyebi malamu makama oyo ebimaki. Atako bapesaki ye nkombo Eva ‘mpamba te ye akozala mama na bato nyonso ya bomoi,’ na elobeli mosusu akómaki nde mama ya bato nyonso oyo bakufaka. Bato nyonso basangoli lisumu oyo ebotaka kufa epai na Adama.—Genese 3:20; Baloma 5:12.
Landá ndakisa ya Nzambe mpe ya Klisto
Talá bokeseni kati na Satana mpe Yesu. Babéngi Satana “mofundi ya bandeko na biso, oyo akofundaka bango na liboso na Nzambe, butu na moi.” (Emoniseli 12:10) Yesu “ayebi kobikisa bango bakobɛlɛma na Nzambe na nzela na ye, awa ezali ye na bomoi libela ete abondela mpo na bango.”—Baebele 7:25.
Satana afundaka basaleli ya Nzambe. Yesu asepelaka na bango mpe abondelaka mpo na bango. Lokola bazali kolanda ndakisa ya Klisto, baklisto basengeli kosala makasi mpo na koluka makambo ya malamu moko epai na mosusu, kosepela mpe kopesana lokumu moko na mosusu. Ntango bazali kosala bongo, bazali kopesa matɔndi epai na ye oyo apesi ndakisa oyo eleki monene ya botɔndi, elingi koloba Yehova Nzambe.—1 Bakolinti 11:1.
[Elilingi na lokasa 17]
Yesu asepelaki na likambo malamu oyo Malia asalaki