Mituna ya Batángi
Lokola minganga bakómi koloba ete soki basali moto lipaso ya kokanga kobota (stérilisation), bakoki kosala ye lipaso mosusu mpo moto yango abota soki akómi na mposa ya kobota. Moklisto oyo alingi kobota te akoki kondima básala ye lipaso yango?
Lelo oyo mpo na kobota bana mingi te, bato mingi bazali kosala bango lipaso ya kokanga kobota. Mpo na bato mingi, kondima to koboya lipaso yango ezali likambo ya mimeseno ya esika bafandi to ya mateya bazwaki, mpe bindimeli ya lingomba na bango. Batatoli ya Yehova batalelaka mpe bindimeli ya lingomba na bango mpamba te bazali na likanisi ndenge moko na mokomi ya nzembo oyo alobaki boye: “Ɛɛ [Yehova], lakisá ngai nzela na yo mpe kambá ngai na nzela na sembo.” (Nzembo 27:11) Lipaso ya kokanga kobota esalemaka ndenge nini?
Mpo na kokanga kobota ya mibali, basalaka lipaso babéngi na vasectomie. Minganga bafungolaka esika oyo mbuma ya mibali efandi (scrotum) mpe kuna na kati bakataka to bakangaka bansinga mikemike mibale oyo elekisaka mai ya mibali. Minganga bazali na ndenge mingi ya kosala yango. Basalaka yango mpo na kokanga nzela ete mai ya mibali soki euti na mbuma ya mibali eleka te. Mpo na kokanga kobota ya basi, basalaka oyo babéngi ligature tubaire. Minganga bakataka to bakangaka (to, bazikisaka) esika moko na ba trompes oyo ememaka likei (ovule) banda na ovaire tii na matrice.
Liboso, bato bayebaki ete soki basali moto vasectomie to ligature tubaire akobota lisusu te libela, esili mpo na ye. Bato mosusu bayokaki mawa na ndenge basalá bango lipaso ya kokanga kobota to mpe lokola makambo ya bomoi na bango ebongwanaki, balukaki lisalisi ya minganga mpo bábota. Banda babimisaki bisaleli ya malamu koleka mpe mayele ya kosalela mikroskope mpo na kosala lipaso (microchirurgie), minganga balongi kosala lisusu lipaso mpe moto aboti. Na mikanda mosusu tozali kotánga ete na bato oyo baponami, minganga bazali kolonga kozongisa makoki ya kobota na bato 50 to 70 na kati ya bato 100. Bazali kokangisa lisusu nsɔnge ya bansinga mikemike oyo bakataki to bazikisaki, to kofungola yango soki bakangaki. Elobami ete minganga bazali kolonga kozongisa makoki ya kobota epai na basi 60 tii 80 na kati ya basi 100 oyo bakangaki bango ba trompes. Bato mosusu oyo bayokaki makambo yango basepelaki ete ata moto oyo basali ye lipaso ya kokanga kobota, akoki kobota lisusu soki alingi. Bandimi ete lipaso ya kokanga kobota ezali ndenge moko na bankisi ya komela mpo mwasi azwa zemi te to mobali abotisa mwasi te, na kapoti, to diaphragme, bisaleli oyo bakoki kotika kosalela yango soki balingi mwasi azwa zemi to mobali abotisa mwasi na ye. Kasi, ezali na makambo mosusu ya ntina mingi oyo tosengeli kobosana te.
Moko na yango ezali ete makambo lokola oyo ekoki kosala ete moto abota lisusu te ata ndenge nini: mbala mosusu bansinga yango ebebaki mingi na ntango ya lipaso, bakataki to babebisaki eteni mwa molai ya bansinga, bambula eleki mingi banda basalaki lipaso; mpe mpo na mwasi, mbala mosusu lipaso yango esali ete nzoto na ye ebotisi ba anticorps oyo ebomaka mai ya mibali. Mpe tóyeba malamu likambo oyo ete na bamboka mingi balopitalo mpo na kosala lipaso na lisalisi ya mikroskope ezali te. Kwɔkɔsɔ mosusu ekoki kouta na mbongo mingi oyo yango esɛngaka. Na yango, makambo nyonso oyo ekoki kosala ete, bato mingi atako bakoki kozala na mposa básalisa bango mpo bábota ekolonga te. Mpo na bango esuki se bongo.a Mituya oyo epesami awa ya bato oyo babotaki nsima wana minganga basalaki bango lipaso mosusu mpo bábota, ezali se na ndenge bazali kokanisa, kasi ezali ya kotyela motema te.
Esengeli mpe kotalela ndenge makambo yango ezali mpenza. Na États-Unis, zulunalo moko elobaki ete bato oyo basalaki bango vasectomie soki balingi kobota bafutaka dolare 12 000 mpo básala bango lipaso mosusu. Nsima ya mapaso yango “kaka mibali 63 kati na mibali 100 nde bakoki kopesa basi na bango zemi.” Lisusu, kaka “mibali motoba na kati ya mibali 100 oyo basalaki bango vasectomie nde balukaki lisusu kobota.” Ankɛtɛ moko esalemaki na ekólo Allemagne, mpo na mikili mosusu ya Mpoto, emonisi ete mibali misato na kati ya mibali 100 oyo basalisaki lipaso mpo bábota te, nde nsima balukaki kobota. Ata soki bato moke mpenza (1,5 %) nde bakoki kobota lisusu, emonisi ete bato mingi (98,5 %) oyo basalaki bango vasectomie batikali bongo libela. Motángo yango ekoki mpe koleka lisusu na mikili oyo minganga oyo basalaka lipaso na lisalisi ya mikroskope bazali moke to mpe bazali te.
Yango wana, ezali likambo ya mayele te kozwa na lisɛki lipaso ya kokanga mobali to mwasi kobota, lokola nde ezali lolenge malamu ya koboya kozwa zemi mpo na mwa ntango. Mpo na moklisto ya sembo, ezali mpe na makambo mosusu oyo asengeli kotalela.
Likambo ya libosoliboso ezali ete kobota bana ezali likabo tozwi epai ya Mozalisi na biso. Mokano na ye ya ebandeli ezalaki ete bato oyo bazangi masumu, bábota bana oyo ‘bakotondisa mokili mpe bakotya yango na nse na bango.’ (Genese 1:28) Nsima ya Mpela, bato batikalaki lisusu mingi na mokili te; Nzambe apesaki lisusu malako ete bato bábota mingi. (Genese 9:1) Nzambe azongelaki mobeko yango na libota ya Yisalaele te, kasi epai ya Bayisalaele kobota bana ezalaki likambo ya ntina mingi.—1 Samwele 1:1-11; Nzembo 128:3.
Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele ezalaki na malako oyo emonisi ndenge amonaka ete kobota bana ezali likambo ya ntina mingi. Na ndakisa, soki mobali moko akufi kasi atiki mwana mobali te, mpo nkombo na ye elimwa te, mobeko esɛngaki ete ndeko na ye abala mwasi oyo ye atiki mpo abota na ye bana na nkombo ya mowei. (Deteronome 25:5) Likambo oyo ezali lisusu kobenda likebi mingi ezali mobeko oyo etalelaki mwasi oyo azalaki kokɔta na etumba ntango mobali na ye azalaki kobunda na moto mosusu. Soki akamoli moto yango oyo azali kobunda na mobali na ye na binama ya kobota, basengelaki kokata ye lobɔkɔ. Tósimba ete, Nzambe asɛngaki bákata binama ya kobota na ye to ya mobali na ye te ndenge mobeko ya liso mpo na liso esɛngaki. (Deteronome 25:11, 12) Tomoni mpenza ete mobeko oyo epusaki bango na komemya binama ya kobota; basengelaki kobebisa yango mpambampamba te.b
Toyebi ete baklisto bazali na nse ya Mibeko ya Yisalaele te, na bongo, mobeko oyo ekomami na Deteronome 25:11, 12 etali bango te. Yesu alobaki te to mpe apesaki bayekoli na ye mobeko te ete basengeli kobala mpe kobota bana ebele. Babalani mingi batalelaki likambo yango ntango bazwaki ekateli soki ebongi kosalela myango mosusu ya kokanga kobota to te. (Matai 19:10-12) Ntoma Paulo alendisaki ‘bilenge basi-bakufeli-mibali oyo bazalaki naino na mposa bábala mpe bábota bana.’ (1 Timote 5:11-14) Alobaki te ete baklisto basengeli kotikala bikomba libela, elingi koloba koboma na nko makoki na bango ya kobota bana.
Baklisto basengeli kotalela na likebi mingi malako oyo emonisi ete Nzambe atalelaka likambo ya kobota bana na lisɛki te. Mwasi na mobali basengeli koyokana soki bakosalela mpe ntango nini bakosalela bisaleli bibongi mpo na kobota bana mingi te. Na yango, bakokanisa malamu mpenza soki minganga bayebisi bango ete soki mama azwi zemi mosusu, ye moko to mwana akozala na likama, to akoki ata kokufa. Na ezaleli yango, bato mosusu atako ezalaki mposa na bango te, bandimaki lipaso ya kokanga kobota ndenge elobelami awa na likoló mpo na komindimisa ete mama (oyo mbala mosusu azali na bana mosusu) akozwa zemi te oyo ekotya ye na likama to mwana oyo akoki kobotama na maladi oyo ekotungisa bomoi na ye.
Kasi, baklisto oyo bazali na likama yango te bakolinga kosalela ‘makanisi malamu’ mpe kotalela lisusu makanisi mpe misala na bango na ndenge Nzambe atalelaka likambo ya kobota bana. (1 Timote 3:2; Tito 1:8; 2:2, 5-8) Yango ekomonisa ete moto ayebi malako ya Biblia malamu. Kasi, ezali boni soki bato nyonso bayebi ete moklisto moko atyolaki na nko malako ya Nzambe? Bato mosusu bakomona mpenza ete ndeko mobali yango (to, ndeko mwasi) azalaki ndakisa malamu te, bakoyeba ye lokola moto oyo alandaka makanisi ya Biblia te liboso ya kosala likambo, boye te? Na ntembe te, elembo mabe motindo wana likoló ya lokumu ya moto, ekoki komonisa ete moklisto yango abongi te bápesa ye mikumba. Nzokande, ekoki kozala bongo te mpo na moklisto oyo asalaki yango na kozanga koyeba.—1 Timote 3:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Mapaso mingi oyo basali mpo na kokangisa lisusu bansinga [canaux déférents] elongi epai ya bato 40 na kati ya bato 100, mpe emonani ete mpo mpenza mapaso yango elonga mingi, ezali kosɛnga batekiniki ya makasi ya kosala lipaso na lisalisi ya mikroskope. Atako bongo, tóyeba ete soki basali moto lipaso ya vasectomie akobota te, ezali mpo na libela.” Zulunalo moko (Contemporary OB/GYN, ya Yuni 1998), elobaki ete: “Lipaso ya kokanga kobota esengeli kotalelama ete ezali mpo na libela. Ata soki moto ayoki ete bakoki kosala lipaso mosusu mpo abota, lipaso ya kokangisa lisusu bansinga oyo bakataki esɛngaka mbongo mingi, mpe eyebanaka te soki moto akokoka lisusu kobota. Basi oyo basalá bango lipaso ya kokanga kobota, mpe basali lipaso mosusu mpo bábota, bazalaka na likama mingi ya kozwa zemi oyo na esika efanda na matrice ekofanda nde na ba trompes.”
b Mobeko mosusu oyo emonani ete ezalaki ya lisɛki te elobaki ete mobali nyonso oyo binama na ye ya kobota ekataná asengelaki kokɔta na lisangá ya Nzambe te. (Deteronome 23:1) Kasi, buku Étude perspicace des Écritures elimboli ete yango “etalaki mpenzampenza komikata na nko na mokano ya kosala makambo ya mbindo, lokola kosangisa nzoto mibali na mibali.” Nzokande, mobeko wana etali kolongola mbuma ya mibali te to likambo mosusu ya ndenge wana mpo moto abota te. Buku Étude perspicace elobi lisusu boye: “Na maloba oyo ezali kobɔndisa, Yehova ayebisaki ete ekozala na ntango oyo mikube bakondimama lokola basali na ye mpe, soki bazali na botosi, bakozwa nkombo malamu koleka bana mibali mpe bana basi. Banda Yesu atyaki nsuka na Mibeko, bato nyonso oyo bazali kosala misala oyo emonisi ete bazali na kondima, ata soki bazalaki na ezalela nini to bazalaki na bomoi ya ndenge nini, bakoki kokóma bana ya Nzambe na elimo. Kokesenisa bato na makambo ya nzoto esilaki.—Yisaya 56:4, 5; Yoane 1:12.”