Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/7 nk. 8-12
  • Baboti, bozali kopesa ndakisa nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti, bozali kopesa ndakisa nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Matomba ya ndakisa
  • Makambo oyo ndakisa na biso ekoki koteya
  • Bópesa ndakisa ya kotánga Biblia mokolo na mokolo
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Baboti, bókokisa bamposa ya mabota na bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bóteya bana na bino bálinga yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/7 nk. 8-12

Baboti, bozali kopesa ndakisa nini?

“[Bólanda ndakisa ya, NW] Nzambe, lokola bana balingami. Bótambolaka mpe na bolingo.”—BAEFESE 5:1, 2.

1. Yehova apesaki mobali na mwasi ya liboso malako nini?

LIBOTA ezali ebongiseli ya Yehova. Libota mokomoko ezali lelo oyo mpo Yehova asalaki libota ya liboso mpe apesaki mobali na mwasi ya liboso makoki ya kobota bana. (Baefese 3:14, 15) Apesaki Adama na Eva malako mpo na mikumba na bango mpe apesaki bango bonsomi mingi mpo na kokokisa yango. (Genese 1:28-30; 2:15-22) Ntango Adama na Eva basalaki lisumu, makambo ebebaki mpo na mabota. Atako bongo, na bolingo na ye, Yehova apesaki malako oyo ekoki kosalisa basaleli na ye bálonga mikakatano yango.

2. (a) Longola malako oyo akomisaki na mokanda, Yehova asalelaki banani mpo na kopesa malako mosusu? (b) Mituna nini baboti basengeli komituna?

2 Yehova, Molakisi na biso Monene, asukaki kaka te na kokomisa na mikanda malako oyo ezali kolakisa makambo oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli kosala te. Na ntango ya kala, longola malako oyo akomisaki na mikanda, azalaki lisusu kosalela banganga, basakoli, na batata ya mabota mpo na koteya malako mosusu. Na mikolo na biso, Yehova azali kosalela banani mpo na koteya? Bankulutu na baboti baklisto. Soki ozali moboti, ozali kokokisa mokumba na yo ya koteya libota na yo banzela ya Yehova?—Masese 6:20-23.

3. Batata ya mabota bakoki koyekola nini epai ya Yehova mpo na koteya malamu?

3 Ndenge nini bosengeli koteya na kati ya libota? Yehova apesi ndakisa. Ayebisaka polele makambo oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, akakatanaka te kozongela makambo yango mbala na mbala. (Exode 20:4, 5; Deteronome 4:23, 24; 5:8, 9; 6:14, 15; Yosua 24:19, 20) Asalelaka mituna oyo ezali kopusa moto na kokanisa. (Yobo 38:4, 8, 31) Na nzela ya bilakiseli mpe makambo oyo esalemaki solo, azali kolamusa mayoki na biso mpe kobongisa mitema na biso. (Genese 15:5; Danyele 3:1-29) Baboti, bomekaka kolanda ndakisa wana ntango bozali koteya bana na bino?

4. Mpo na kopesa etumbu, tozwi liteya nini epai ya Yehova, mpe mpo na nini disipilini ezali na ntina mingi?

4 Yehova akakolaka bosembo te, kasi ayebaka ete lisumu ebebisá biso mingi. Yango wana, liboso apesa bato ya masumu etumbu, ateyaka mpe akebisaka mpe azongelaka makambo yango mbala na mbala. (Genese 19:15, 16; Yilimia 7:23-26) Soki apesi etumbu, asalaka yango na ndenge oyo ebongi, alekisaka ndelo te. (Nzembo 103:10, 11; Yisaya 28:26-29) Soki tosalaka bongo epai ya bana na biso, elakisi ete toyebi Yehova mpe ekozala mpasi te mpo bango mpe báyeba ye.​—Yilimia 22:16; 1 Yoane 4:8.

5. Baboti bakoki koyekola nini epai ya Yehova na likambo ya koyoka?

5 Lokola Yehova azali tata na biso ya likoló mpe alingi biso mingi, ayokaka biso mpenza. Asukaka kaka na kopesa mibeko te. Alendisaka biso tóyebisa ye makambo oyo tozali na yango na motema. (Nzembo 62:8) Mpe soki tomonisi mayoki oyo ebongi te, apamelaka biso longwa kuna na likoló te. Azali na moteya molai mpo na koteya biso. Yango wana, toli ya ntoma Paulo ebongi mpenza, ye ete: “[Bólanda ndakisa ya, NW] Nzambe, lokola bana balingami”! (Baefese 4:31–5:1) Talá ndakisa malamu oyo Yehova apesi baboti mpo na koteya bana na bango! Ndakisa yango ezali kosimba mitema na biso mpe ezali kopesa biso mposa ya kotambola na nzela na ye, mpamba te ezali nzela ya bomoi.

Matomba ya ndakisa

6. Ndenge nini bana balandaka makanisi mpe ndakisa ya baboti?

6 Longola koteya bango na maloba, bilenge balandaka mingi ndakisa. Baboti bálinga, bálinga te, bana na bango bakolanda ndakisa na bango. Baboti bakoki kosepela to kokamwa soki bayoki maloba oyo bango moko balobaki ezali kobima na monɔkɔ ya bana na bango. Soki bizaleli mpe elimo ya baboti ezali kolakisa ete basepelaka mingi na makambo ya elimo, ekobota mbuma malamu epai ya bana.​—Masese 20:7.

7. Yefeta apesaki mwana na ye ya mwasi ndakisa nini, mpe ebotaki mbuma nini?

7 Biblia emonisi malamu ete bana balandaka ndakisa ya baboti. Yehova asalelaki Yefeta mpo Bayisalaele bábunda na Baamona mpe bálonga bango. Yefeta azalaki mpe na mwana moko ya mwasi. Eyano oyo apesaki mokonzi ya Amona emonisi ete Yefeta atángaki mbala na mbala masolo oyo elobeli makambo oyo Yehova asalaki mpo na Yisalaele. Akokaki kobɛta lisolo yango kozanga kokakatana, mpe azalaki na kondima makasi epai ya Yehova. Na ntembe te, ndakisa na ye esalisaki mwana na ye ya mwasi akóma na kondima mpe na elimo ya komipesa oyo amonisaki ntango andimaki atikala monzemba bomoi na ye mobimba mpo na kosalela Yehova.​—Basambisi 11:14-27, 34-40; talá Yosua 1:8.

8. (a) Makanisi nini ya malamu baboti ya Samwele bamonisaki? (b) Ememelaki Samwele bolamu nini?

8 Ntango azalaki naino mwana moke, Samwele azalaki ndakisa malamu mpe azalaki mosakoli ya sembo ya Nzambe na bomoi na ye mobimba. Okolinga ete bana na yo bázala lokola Samwele? Talelá ndakisa ya Elekana na Hana, baboti ya Samwele. Atako makambo nyonso te ezalaki malamu mpenza na kati ya libota na bango, mbala na mbala bazalaki kokende kosambela na Silo, epai mongombo mosantu ezalaki. (1 Samwele 1:3-8, 21) Talelá na likebi bozindo ya libondeli oyo Hana asalaki. (1 Samwele 1:9-13) Talá ndenge oyo bango mibale bamonaki ntina ya kokokisa elaka oyo bapesaki Nzambe. (1 Samwele 1:22-28) Na ntembe te, ndakisa malamu na bango esalisaki Samwele akóma na bizaleli oyo esalisaki ye alanda nzela ya malamu; atako bato oyo afandaki na bango bazalaki koloba ete basalelaka Yehova, nzokande bazangaki limemya mpo na banzela ya Nzambe. Na nsima, Yehova apesaki Samwele mokumba ya kosala lokola mosakoli na Ye.​—1 Samwele 2:11, 12; 3:1-21.

9. (a) Makambo nini ya malamu na ndako ezalaki na litomba mpo na Timote? (b) Timote akómaki moto ya ndenge nini?

9 Okolinga ete mwana na yo azala lokola Timote, oyo akómaki moninga ya mosala ya ntoma Paulo wana azalaki naino elenge? Tata ya Timote azalaki mondimi te; kasi mama na ye na nkɔkɔ na ye ya mwasi bapesaki ye ndakisa ya malamu lokola bazalaki kosepela na makambo ya elimo. Na ntembe te, ndakisa malamu na bango etyaki Timote na nzela malamu oyo ememaki ye na kokóma moklisto. Biblia eyebisi biso ete mama na ye Yunike na nkɔkɔ na ye Loidi bazalaki na “kondima ya solo.” Bomoi na bango lokola baklisto ezalaki ya liso na nse ya lokasa te; bazalaki mpenza kosalela makambo oyo bazalaki kondima, mpe bateyaki elenge Timote asala bongo. Timote alakisaki ete bakoki kotyela ye motema mpe ete azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bolamu ya bato mosusu.​—2 Timote 1:5; Bafilipi 2:20-22.

10. (a) Bana bakoki kolanda ndakisa ya banani na libándá? (b) Tosengeli kosala nini soki bana na biso babandi kolanda maloba to makanisi ya bato yango?

10 Bandakisa oyo bana na biso bakoki kolanda ezali kaka na ndako te. Bakoki mpe kolanda ndakisa ya bana oyo bakutanaka na bango na kelasi, bazali mpe na balakisi baoyo bateyaka bango. Ezali mpe na bato mosusu bakanisaka mpenza ete moto nyonso asengeli kolanda bonkɔkɔ ya mboka na ye. Ezali na bavedete ya masano oyo bato bakumisaka mingi. Bakonzi ya mboka oyo radio, televizyo, to bazulunalo elobelaka bizaleli na bango. Ezali mpe na bamilio ya bana oyo bafandi na bisika oyo bazali komona nsɔmɔ ya bitumba. Ekokamwisa biso soki tomoni bana na biso bazali kobimisa na maloba to komonisa elimo ya bato yango? Tosalaka nini soki tomoni yango? Tokanisi ete tokosembola bango soki togangeli bango to soki topameli bango na nkanda? Na esika ya kopesa bana na biso eyano mbala moko, tokanisi te ete eleki malamu tómituna boye: ‘Na kotalela ndenge Yehova asalelaka biso bato, ezaleli na ye nini ekoki kosalisa ngai nayeba ndenge ya kobongisa likambo oyo?’—Talá Baloma 2:4.

11. Na ntango baboti basali mabunga, yango ekoki kosala nini na elimo ya bana na bango?

11 Ya solo, lokola baboti bazali bato ya masumu, basalaka makambo nyonso te kaka na ndenge oyo eleki malamu. Basalaka mpe mabunga. Soki bana bamoni bongo, bakozala lisusu na limemya te epai ya baboti na bango? Ekoki kosalema bongo, mingimingi soki baboti bazali kotya bokonzi na bango liboso mpo na kozipa mabunga na bango. Kasi ekozala bongo te soki baboti bazali na komikitisa mpe bazali kokakatana te mpo na kondima mabunga na bango. Na ndenge yango, bakoki kopesa bana na bango ndakisa malamu mpamba te bango mpe bazali na mposa báyekola kosala ndenge yango.​—Yakobo 4:6.

Makambo oyo ndakisa na biso ekoki koteya

12, 13. (a) Bana basengeli koyekola nini na ntina na bolingo, mpe ndenge nini koteya bango bolingo yango malamu? (b) Mpo na nini ezali na ntina mingi ete bana báyekola bolingo?

12 Baboti bakoki koteya bana na bango makambo mingi ya ntina soki, longola koteya na maloba, bazali mpe kopesa ndakisa ya malamu. Tótalela bamoko na yango.

13 Komonisa bolingo oyo elukaka matomba na moto ye moko te: Moko na makambo oyo bosengeli koteya bana mpe kopesa ndakisa mpo na yango ezali ntina ya bolingo. “Biso tokolingaka mpo ete [Nzambe] alingaki biso liboso.” (1 Yoane 4:19) Nzambe azali liziba ya bolingo mpe ndakisa ya bolingo oyo eleki monene. Biblia elobeli bolingo oyo babéngi agapê koleka mbala 100. Bolingo yango nde elakisaka baklisto ya solo. (Yoane 13:35) Tosengeli kozala na bolingo motindo wana mpo na Nzambe mpe Yesu Klisto mpe lisusu bato basengeli kozala na yango moko epai na mosusu; ata na bato oyo tosepelaka na bango mingi te. (Matai 5:44, 45; 1 Yoane 5:3) Tosengeli kozala na bolingo yango na mitema na biso mpe esengeli komonana na bomoi na biso liboso tóteya yango malamu epai ya bana na biso. Kosala eleki koloba mpamba. Na kati ya libota, bana basengeli komonaka bolingo mpe bizaleli mosusu ya malamu lokola kosepela na bato. Soki makambo yango ezali te, nzoto, makanisi, mpe mayoki ya mwana ekokola malamu te. Bana basengeli mpe komona ete tozali na bolingo mpe tozali kosepela na baklisto oyo bazali na libota na biso te.​—Baloma 12:10; 1 Petelo 3:8.

14. (a) Ndenge nini tokoki koteya bana báyeba kosala mosala malamu oyo epesaka moto esengo? (b) Ndenge nini bokoki kosala yango na libota na bino?

14 Koyekola kosala mosala: Mosala ezali na ntina mingi na bomoi ya moto. Mpo moto amiyoka ete azali na ntina, asengeli koyekola ndenge ya kosala mosala ya malamu. (Mosakoli 2:24; 2 Batesaloniki 3:10) Soki bapesi mwana mosala kasi balakisaki ye mpenza ndenge ya kosala yango te; bongo na nsima soki bagangeli ye mpo asali yango malamu te, akoyeba kosala mosala ya malamu te. Kasi, soki bana bazali koyekola mosala wana bazali kosala elongo na baboti mpe soki bazali kopesa bango longonya na ndenge ebongi, bakoyeba kosala mosala oyo epesaka moto esengo. Soki baboti bazali kopesa ndakisa mpe bazali kolimbola ndenge ya kosala, bana bakoyekola kosala mosala. Bakoyekola mpe kolonga mikakatano, bakoyeba kokangama na mosala mpe kosilisa yango, bakoyeba kokanisa mpe kokamata mikano ya malamu. Soki makambo ezali ndenge yango, bakoki kosalisa bango báyeba ete Yehova asalaka mosala ya malamu, mpe ete Yesu alandaka ndakisa ya Tata na ye. (Genese 1:31; Masese 8:27-31; Yoane 5:17) Soki libota esalaka bilanga to mombongo, bato mosusu ya libota bakoki kopesana mabɔkɔ na mosala yango. To mama akoki kolakisa mwana na ye ya mobali to ya mwasi kolamba mpe kosukola basaani. Tata oyo akendaka mosala akoki kobongisa mwa misala ya kosala na ndako elongo na bana na ye. Ekozala mpenza malamu soki baboti bazali kokanisa kaka te ete bana básala mosala moko mpe básilisa yango, kasi bákanisa kobongisa bana mpo na bomoi na bango!

15. Ndenge nini tokoki koteya kondima? Pesá ndakisa.

15 Kobatela kondima na ntango ya mpasi: Kondima ezali mpe na ntina mingi na bomoi na biso. Ntango bazali kolobela kondima na boyekoli ya libota, bana bakoki koyekola kolimbola yango. Bakoki mpe koyekola makambo oyo ekokolisa kondima na mitema na bango. Kasi, soki bazali komona ete baboti na bango bazali kobatela kondima makasi na ntango ya komekama makasi, yango ekoki komemela bango bolamu oyo ekoumela bomoi na bango mobimba. Na ekólo Panama, mobali moko akebisaki mwasi na ye oyo azalaki koyekola Biblia ete akobengana ye na ndako soki atiki kosalela Yehova te. Kasi mwasi yango na bana na ye minei ya mike, azalaki kotambola kilomɛtɛlɛ 16 na makolo, mpe na nsima azalaki kozwa bisi oyo ezalaki komema ye kilomɛtɛlɛ 30 mpo akóma na Ndako ya Bokonzi. Ndakisa na ye elendisaki bandeko na ye, mpe na libota na bango, bato 20 bayambaki solo.

Bópesa ndakisa ya kotánga Biblia mokolo na mokolo

16. Mpo na nini bazali kolendisa biso tótángaka Biblia mokolo na mokolo na libota?

16 Momeseno moko ya ntina oyo ekopesa baboti bolamu mpe oyo bana bakoki kolanda ezali momeseno ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Soki ekoki kosalema, bótángaka mwa mikapo ya Biblia mokolo nyonso oyo Nzambe asalá. Eloko oyo eleki ntina ezali te kotánga makambo ebele; kasi kobatela momeseno yango mpe ndenge ya kosala yango. Mpo na bana, longola kotánga Biblia yango moko, bakoki mpe kolandaka bakasɛti ya Mokanda mpo na masolo ya Biblia soki ezali na monɔkɔ na bino. Kotánga Liloba ya Nzambe mikolo nyonso ekosalisa biso tóbatela makanisi ya Nzambe na bɔɔngɔ. Mpe soki ezali te ete moto na moto azali kotánga Biblia na ndenge na ye, kasi ete bozali kosangana libota mobimba, ekoki kosalisa mabota etambola na banzela ya Yehova. Na mayangani ya etúká “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi,” drame oyo ezalaki na motó ya likambo Mabota—Bókómisa botángi ya Biblia mokolo na mokolo lolenge ya bomoi na bino! elendisaki momeseno yango.​—Nzembo 1:1-3.

17. Ndenge nini kotánga Biblia na libota mpe koyeba bavɛrsɛ ya ntina na motó esalisaka mpo na kosalela toli ya Baefese 6:4?

17 Kotánga Biblia na libota ezali na boyokani na makambo oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Efese na mokanda, ye ete: “Batata, bósilikisa bana na bino te, kasi bóbɔkɔla bango ntango nyonso na mateya mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4, NW) Yango elingi koloba nini? ‘Kokebisa’ elimboli mpenza “kotya makanisi na.” Na yango, baklisto oyo bazali batata ya bana balendisami ete bátya makanisi ya Yehova Nzambe na kati ya bɔɔngɔ ya bana na bango. Básalisa bana na bango báyeba makanisi ya Nzambe. Bakoki kosala yango soki bazali kolendisa bana na bango báyeba bavɛrsɛ ya ntina na motó. Basengeli kozala na mokano ete makanisi ya Yehova etambwisa makanisi ya bana mpo ete mokemoke, bamposa mpe etamboli na bango emonisa ete bazali kolanda mibeko ya Nzambe, ata soki baboti na bango bazali wana to te. Makanisi wana euti na Biblia.​—Deteronome 6:6, 7.

18. Ntango bozali kotánga Biblia, eloko nini esengeli mpo na (a) kokanga ntina malamu? (b) kozwa litomba na toli na yango? (c) kotalela makambo oyo emonisi mokano ya Yehova? (d) kozwa litomba na makambo oyo elobi mpo na makanisi mpe misala ya bato?

18 Ya solo, mpo Biblia ebongola bomoi na biso, tosengeli kososola maloba na yango. Mpo na bato mingi, esɛngaka kozongela kotánga makambo yango mbala mingi. Mpo na kososola malamu maloba mosusu, esengeli koluka ndimbola na yango na diksionere to na buku Étude perspicace des Écritures. Soki vɛrsɛ ezali kopesa toli to ezali mobeko, bólobela makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo oyo bokoki kosalela yango. Na nsima okoki kotuna motuna oyo: ‘Bolamu nini tokoki kozwa soki tosaleli toli oyo?’ (Yisaya 48:17, 18) Soki vɛrsɛ yango ezali kolobela mokano ya Yehova, tuná, ‘Ndenge nini bomoi na biso etalelami na likambo oyo?’ Mbala mosusu bozali kotánga lisolo oyo ezali kolobela makanisi to misala ya bato. Mikakatano nini bakutanaki na yango na bomoi na bango? Ndenge nini balongaki yango? Ndakisa na bango ekoki kopesa biso litomba nini? Bózwa ntango ya kolobela ntina ya lisolo yango mpo na bomoi na biso lelo oyo.​—Baloma 15:4; 1 Bakolinti 10:11.

19. Soki tozali kolanda ndakisa ya Nzambe, tokopesa bana na biso eloko nini?

19 Talá lolenge malamu ya kokɔtisa makanisi ya Nzambe na bɔɔngɔ mpe na mitema! Na ndenge yango, tokozwa lisalisi mpo tólanda ‘ndakisa ya Nzambe, lokola bana balingami.’ (Baefese 5:1) Mpe tokozala ndakisa malamu oyo bana na biso bakoki kolanda.

Ozali koyeba lisusu?

◻ Ndenge nini baboti bakoki kozwa litomba na ndakisa ya Yehova?

◻ Mpo na nini baboti basengeli kopesa bana ndakisa malamu, longola koteya bango na maloba?

◻ Mateya nini baboti balakisaka malamu na nzela ya ndakisa na bango?

◻ Ndenge nini tokoki kozwa litomba mingi na kotánga Biblia na kati ya libota?

[Elilingi na lokasa 10]

Bato mingi basepelaka kotánga Biblia mokolo na mokolo na libota

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto