Bóyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe na libota
“Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ na Nzambe.”—MATAI 4:4.
1. Biblia epesi mokumba nini na batata ya mabota mpo na koteya bana na bango banzela ya Yehova?
YEHOVA NZAMBE azalaki mbala na mbala koyebisa batata ya mabota mokumba na bango ya koteya bana na bango. Mateya yango ezalaki kosalisa bana mpo na bomoi na bango na ntango wana, kasi ezalaki mpe kobongisa bango mpo na bomoi na mikolo ezalaki koya. Nzambe atindaki anzelu moko koyebisa Abalayama mokumba na ye ya koteya libota na ye mpo ‘bábatela nzela ya Yehova.’ (Genese 18:19) Bayebisaki baboti na Yisalaele ete báteyaka bana na bango ndenge oyo Nzambe abikisaki Yisalaele na Ezipito mpe ndenge apesaki bango Mibeko na Ngomba Sinai, na Holebe. (Exode 13:8, 9; Deteronome 4:9, 10; 11:18-21) Biblia esɛngi baklisto oyo bazali batata ya mabota ete bábɔkɔla bana na bango na “mateya mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4, NW) Ata soki kaka moboti moko nde azali mosaleli ya Yehova, asengeli kosala makasi ateya bana na ye banzela ya Yehova.—2 Timote 1:5; 3:14, 15.
2. Esengeli kosala boyekoli ata soki bana bazali te na libota? Limbolá.
2 Yango elingi koloba te ete koyekola Liloba ya Nzambe na libota ezali kaka mpo na mabota oyo ezali na bana. Soki mobali moko ayekolaka elongo na mwasi na ye, ata soki bazali na bana te, yango elakisi ete basepelaka mpenza na makambo ya elimo.—Baefese 5:25, 26.
3. Mpo na nini esengeli kosalaka boyekoli ya libota mbala na mbala?
3 Mpo mateya ebota mbuma ya malamu mingi, esengeli kozongelamaka mbala na mbala. Yango eyokani na likambo oyo Yehova ayebisaki Bayisalaele na mokili mokauki ete: “Moto akotikala na bomoi bobele mpo na kwanga te, kasi ete moto akotikala na bomoi mpo na makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ na [Yehova].” (Deteronome 8:3) Mabota mosusu ekoki kosalaka boyekoli na yango mbala moko na pɔsɔ; nzokande, mosusu ekoki kosalaka boyekoli mokuse mokolo na mokolo. Ata soki boponi ebongiseli nini, bosengeli te koyekolaka se soki libaku emonani. ‘Bósomba ntango’ mpo na koyekola. Kosomba ntango mpo na koyekola ezali lokola komilɛngɛla mpo na mikolo ezali koya. Ezali mpo na bomoi ya libota na bino.—Baefese 5:15-17; Bafilipi 3:16.
Mikano oyo bosengeli komityela
4, 5. (a) Na nzela ya Mose, mokano nini ya ntina Yehova atyelaki baboti ntango bazali koteya bana na bango? (b) Yango elimboli nini lelo oyo?
4 Ntango ozali kotambwisa boyekoli ya libota, litomba ekozala mingi mpenza soki omityeli mikano ya sikisiki na makanisi. Tótalela mwa mikano oyo okoki komityela.
5 Na boyekoli nyonso, luká kolendisa bolingo mpo na Yehova Nzambe. Ntango Bayisalaele bayanganaki na mokili patatalu ya Moaba, liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka, Mose abendaki likebi na bango na likambo oyo Yesu Klisto abéngaki na nsima ete “mobeko moleki monene.” Elobaki nini? “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.” (Matai 22:36, 37; Deteronome 6:5) Mose asɛngaki Bayisalaele ete bábatela mobeko yango na mitema na bango mpe báteya bana na bango mobeko yango. Yango esɛngaki kozongelaka yango mbala na mbala, komonisa bantina ya kolinga Yehova, kobwaka makanisi mpe bizaleli oyo ekoki kopekisa bango komonisa bolingo yango, mpe komonisa na bomoi na bango ete balingaka Yehova. Bana na biso bazali na mposa ya mateya motindo yango? Ɛɛ! Mpe bazali na mposa ya lisalisi mpo ‘bákata mitema na bango ngenga,’ elingi koloba, bálongola eloko nyonso oyo ekoki kopekisa bango kolinga Nzambe. (Deteronome 10:12, 16, NW; Yilimia 4:4) Na kati ya makambo oyo epekisaka bolingo yango tokoki kotánga mposa ya biloko ya mokili mpe koluka komipesa na makambo ya mokili. (1 Yoane 2:15, 16) Bolingo mpo na Yehova esengeli kozala ya maloba mpamba te, esengeli komonana, esengeli kopusa biso tósala makambo oyo ezali kosepelisa Tata na biso ya likoló. (1 Yoane 5:3) Mpo boyekoli ya libota emema matomba oyo ekoumela, mbala nyonso oyo bozali kosala yango esengeli kolendisa bolingo yango.
6. (a) Eloko nini esɛngami mpo na kopesa boyebi ya sikisiki? (b) Ndenge nini Biblia emonisi ntina ya boyebi ya sikisiki?
6 Teyá boyebi ya sikisiki ya masɛngami ya Nzambe. Yango esɛngi makambo nini? Esuki kaka na kopesa eyano oyo ozali kotánga na zulunalo to na buku te. Mbala mingi esɛngaka lisolo mpo na koyeba mpenza soki moto asosoli maloba mpe makanisi ya ntina. Boyebi ya sikisiki ezali na ntina mingi mpo na kolata bomoto ya sika mpe kosala ete makanisi na biso ezala ntango nyonso na makambo oyo ezali mpenza ya ntina wana tozali kobunda na mikakatano ya bomoi; mpe mpo na kosala makambo oyo esepelisaka mpenza Nzambe.—Bafilipi 1:9-11; Bakolose 1:9, 10; 3:10.
7. (a) Mituna nini ekoki kosalisa libota na kosalela makambo oyo bazali koyekola? (b) Ndenge nini Biblia emonisi motuya ya mokano yango?
7 Lakisá ndenge ya kosalela makambo oyo boyekoli. Ntango ozali na mokano yango, mbala nyonso oyo bozali kosala boyekoli ya libota, tuná mituna oyo: ‘Ndenge nini tokosalela makambo oyo na bomoi na biso? Makambo yango ezali kosɛnga biso tóbongisa bisika nini na bomoi na biso? Mpo na nini tosengeli kondima kobongwana?’ (Masese 2:10-15; 9:10; Yisaya 48:17, 18) Kokanisa na bozindo ndenge ya kosalela makambo oyo toyekoli ekoki kozala na ntina mingi mpo libota ekola na elimo.
Salelá malamu biloko oyo tozali na yango mpo na koteya
8. Moombo ya sembo apesi biso biloko nini mpo na koyekola Biblia?
8 “Moombo ya sembo mpe ya mayele” apesi biso biloko ndenge na ndenge oyo tokoki kosalela mpo na koyekola. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo tosalelaka mpo na koyekola Biblia ezali kobimisama na minɔkɔ 131. Tozali na mikanda mpo na koyekola Biblia na minɔkɔ 153, mwa babuku na minɔkɔ 284, bakasɛti na minɔkɔ 61, bakasɛti video na minɔkɔ 41, mpe badiskɛ ya ordinatere na minɔkɔ 9!—Matai 24:45-47.
9. Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Biblia oyo ezali na paragrafe oyo ntango tozali koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na libota?
9 Mabota mingi babongisaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo bakoyekola na lisangá na boyekoli ya libota. Ebongiseli yango ekoki mpenza kosalisa bango! Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali esaleli ya liboso mpo na kopesa basaleli ya Yehova na mokili mobimba bilei ya elimo. Ntango bozali koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na libota, bósuka te kaka na kotánga baparagrafe mpe koluka biyano oyo ekomami. Bóluka mpenza koyeba makambo yango malamu. Bótánga bavɛrsɛ oyo maloba na yango ekomami te. Sɛngá moto na moto alimbola ndenge nini bavɛrsɛ yango eyokani na maloba ya paragrafe oyo bozali kotalela. Moto nyonso atya mpenza motema na makambo yango.—Masese 4:7, 23; Misala 17:11.
10. Bokoki kosala nini mpo bana bápesa biyano mpe básepela na boyekoli ya libota?
10 Soki bozali na bana, bokoki kosala nini mpo boyekoli na bino ezala kaka momeseno mpamba te oyo bozongelaka mbala na mbala, kasi etonga bino mpenza na elimo mpe epesa bino esengo? Bósala ete moto na moto asepela na boyekoli mpo makanisi na ye eyengayenga te. Soki likoki ezali, mwana mokomoko azala na Biblia mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ye. Na kolanda ndakisa ya boboto ya Yesu, moboti akoki kofandisa mwana pembeni na ye, to mpe akoki kozinga mwana ya moke lobɔkɔ na lipeka. (Talá Malako 10:13-16.) Tata ya libota akoki kosɛnga na mwana alimbola fɔtɔ moko oyo ezali na kati ya mokanda. Bokoki kopesa mwana ya moke vɛrsɛ moko abongisa liboso mpe atánga na ntango ya boyekoli. Bokoki kosɛnga na mwana oyo akoli abongisa makanisi oyo ekomonisa ndenge ya kosalela mateya yango.
11. Biloko nini mosusu tozali na yango, mpe soki ezali, ndenge nini kosalela yango malamu na boyekoli ya libota?
11 Ata soki boyekolaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na boyekoli na bino ya libota, bóbosana mikanda mosusu te oyo tozali na yango na minɔkɔ mingi. Soki bolingi koyeba makambo mosusu to kozwa ndimbola ya liloba moko ya Biblia, bokoki koluka na buku Étude perspicace des Écritures. Bokoki kozwa biyano na mituna mosusu soki bosaleli Index ya mikanda ya la Société. to kasɛti ya ordinatere oyo ezali na mikanda ya la Société. Soki bozali na mikanda yango na monɔkɔ na bino, ekozala na ntina bóyekola kosalela yango ntango bozali kosala boyekoli na bino ya libota. Mpo bópesa bana mposa ya koyekola, bokoki mpe kolekisa mwa ntango ya boyekoli na bino na kotala video to kolanda kasɛti ya drame ya la Société, bongo na nsima kolobela makambo oyo bolandi. Soki bokosalela biloko nyonso wana malamu, boyekoli na bino ya libota ekosepelisa libota mobimba mpe ekomemela yango litomba.
Bóyokanisa boyekoli na bino na bamposa ya libota
12. Ndenge nini boyekoli ya libota ekoki kosalisa mpo na kosilisa mikakatano oyo ezali kosɛnga básilisa yango nokinoki?
12 Ekoki kozala ete libota na bino bobongisaka lisolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tokoyekola na Ndako ya Bokonzi na pɔsɔ wana. Kasi, bóluka koyeba mikakatano oyo bozali na yango na libota. Soki mama akendaka mosala te, akoki kolekisaka ntango elongo na bana mikolo nyonso soki bauti kelasi. Bakoki kosilisa mikakatano mosusu na ntango wana; mikakatano mosusu ekoki kosɛnga bátalela yango na bozindo. Soki ezali na makambo oyo ezali kosɛnga bóbongisa yango nokinoki, bótalela yango. (Masese 27:12) Mikakatano yango ekoki kotalela makambo mosusu longola makambo ya kelasi. Luká makanisi oyo ebongi na mikanda, mpe liboso mpenza, yebisá libota mobimba likambo oyo bokolobela na boyekoli.
13. Na kati ya libota, mpo na nini masolo oyo ezali kolobela ndenge ya kosala mpo na kobunda na bobola ekoki kozala na litomba?
13 Na ndakisa, bamboka mingi ezali na bobola; yango wana na bisika mingi, ekoki kozala na ntina bato ya libota bápesana makanisi na ndenge ya kobunda na mokakatano yango. Boyekoli ya libota ekoki kolobela makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo mpe mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa bino na libota.—Masese 21:5; Mosakoli 9:11; Baebele 13:5, 6, 18.
14. Makambo nini ezali kolakisa ete na ntango oyo mpenza ezali malamu mabota bátalela makanisi ya Yehova mpo na mobulu, bitumba, mpe etinda ya boklisto oyo epekisi komikɔtisa na makambo yango?
14 Bokoki mpe kolobela likambo ya mobulu. Biso nyonso tozali na mposa ete makanisi ya Yehova efanda na bɔɔngɔ na biso mpe na mitema na biso. (Genese 6:13; Nzembo 11:5) Kolobela likambo yango na boyekoli ya libota ekoki kozala ntango ya malamu mpo na kopesana makanisi na ndenge ya kokima matumoli ya bana ya mobulu na kelasi, na esika ete bana báyekola masano ya kobunda, mpe kopesana makanisi na ndenge ya kopona masano ya malamu. Lelo oyo, bitumba ezali kosalema na bisika mingi; bato ya ekólo moko bazali kobunda bango na bango, bato bazali kobunda na ntina na makambo ya politiki to mpo bakeseni bituluka, to mpe bituluku ya basali na mabe bazali kobunda. Yango wana, ekoki kozala na ntina bósolola na libota ndenge oyo bokoki kobatela etamboli ya boklisto ntango bozali na esika oyo bitumba ezali.—Yisaya 2:2-4; Yoane 17:16.
15. Ndenge nini koteya bana makambo ya kosangisa nzoto mpe makambo ya libala?
15 Ntango bana bazali kokola, esengeli koteya bango makambo ya kosangisa nzoto ya mwasi na mobali mpe makambo ya libala na ndenge oyo ebongi na mbula na bango. Na bamboka mosusu, baboti mingi bamekaka ata moke te kosolola na bana na bango makambo ya kosangisa nzoto. Bana oyo bateyaki bango makambo yango te bakoki kolanda makanisi mabe ya bilenge mosusu, mpe ekoki komemela bango makama. Bokanisi te ete eleki malamu kolanda ndakisa ya Yehova oyo asaleli maloba ya polele kasi ya nsɔni te, mpo na kopesa toli na makambo yango na kati ya Biblia? Toli malamu ekosalisa bana na biso bápesa nzoto na bango kilo mpe bázala na limemya mpo na basi soki bazali mibali, mpe na mibali soki bazali basi. (Masese 5:18-20; Bakolose 3:5; 1 Batesaloniki 4:3-8) Ata soki bosilá kosolola makambo yango, bókakatana te kozongela yango. Kozongela ezalaka na ntina mingi soki makambo ya sika ebimi.
16. (a) Na mabota mingi, bayekolaka ntango nini? (b) Ndenge nini bolongaki mikakatano mpo bózangisaka boyekoli na bino ya libota te?
16 Ntango nini bokoki koyekolaka na libota? Na ndakisa ya mabota ya Betele na mokili mobimba, mabota mingi basalaka boyekoli na bango na mokolo ya yambo na mpokwa. Mabota mosusu baponá mokolo mosusu. Na ekólo Argentine, libota moko ya bato 11 (bana 9), bazalaki kolamuka mikolo nyonso na ngonga ya mitano ya ntɔngɔ mpo na koyekola. Lokola moto na moto azalaki na programe ekeseni na oyo ya baninga, bazalaki na likoki ya koyekola na ngonga mosusu te. Ezalaki mpasi, kasi esalisaka bana básimba ntina ya koyekola na libota. Na ekólo Philippines, moklisto moko oyo azali nkulutu azalaki koyekola na mwasi na ye mpe na bana na bango misato wana bazalaki kokola. Na kati ya pɔsɔ, baboti bazalaki mpe koyekola na mwana mokomoko mpo asimba malamu mateya ya solo. Na États-Unis, ndeko mwasi moko oyo mobali na ye azali Motatoli te, mikolo nyonso na ntɔngɔ akendaka kotika bana na esika oyo bazwaka bisi mpo bákende kelasi. Ntango bazali kozela bisi, balekisaka miniti soki zomi mpo na kotánga mpe kolobela makambo ya ntina oyo ezali na mikanda. Na nsima, mama asalaka libondeli mokuse elongo na bana liboso bámata na bisi. Na République démocratique du Congo, mwasi moko oyo mobali na ye azali mondimi te mpe asundolá libota na ye, abundaka etumba mpo na koyekola mpamba te akɔtá mpenza kelasi te. Pɔsɔ na pɔsɔ, mwana na ye ya mokóló akendaka kotambwisa boyekoli ya libota na mama mpe na baleki na ye. Mama apesaka ndakisa malamu na ndenge amibongisaka malamu. Mokakatano moko ezali kopekisa bino bósalaka boyekoli na bino ya libota ntango nyonso? Bólɛmba te. Bósɛnga ntango nyonso Yehova apambola milende na bino mpo bósalaka boyekoli ya Biblia ntango nyonso.—Malako 11:23, 24.
Mbano ya kolendendela
17. (a) Eloko nini ezali kosɛngama mpo boyekoli ya libota esalemaka ntango nyonso? (b) Ndakisa nini emonisi ete koteya bana banzela ya Yehova na nzela ya boyekoli ya libota ezali na ntina mingi?
17 Bosengeli komityela mikano. Bosengeli kolendendela. Kasi ebongi mpenza bósala milende yango mpo na kozwa mbano malamu na yango. (Masese 22:6; 3 Yoane 4) Na ekólo Allemagne, Franz na Hilda babɔkɔlaki bana 11. Bambula mingi na nsima, Magdalena, mwana na bango ya mwasi, alobaki boye: “Lelo oyo, eloko oyo namonaka eleki ntina ezali ete tolekisaki ata mokolo moko te kozanga ete báteya biso makambo ya elimo.” Ntango Adolf Hitler akómaki mokonzi, bato bakómaki na bolingo makasi ya ekólo. Tata ya Magdalena asalelaki Biblia mpo na kobongisa libota na ye na komekama ya kondima oyo amonaki ete ezalaki koya. Na nsima, bakangaki bana na bango ya mike mpe batindaki bango na eteyelo ya kosembola bana. Bato mosusu na libota bakangaki bango mpe batyaki bango na bɔlɔkɔ mpe na bakaa ya bakangami. Basusu babomamaki. Kondima ya moto ata moko te elɛmbaki, kaka na ntango ya monyoko te kasi, mpo na baoyo babikaki, na bambula oyo elandaki.
18. Mwasi moko mokufeli-mobali azwaki mbano nini na milende na ye?
18 Baboti mingi oyo babɔkɔlaka bana bango moko, to baoyo bazali na lingomba moko te na mobalani na bango, bateyaki mpe bana na bango mateya ya Biblia mbala na mbala. Na ekólo Inde, mwasi moko mokufeli-mobali asalaki makasi ateya bana na ye mibale ya mibali bolingo mpo na Yehova. Kasi, ayokaki mpasi na motema ntango mwana na ye moko atikaki kosangana na basaleli ya Yehova. Mwasi yango abondelaki Yehova alimbisa ye soki asalaki mabunga na lolenge na ye ya koteya mwana. Kasi, mwana na ye abosanaki makambo oyo ayekolaki te. Nsima ya mbula koleka zomi, azongaki, akolaki malamu na elimo, mpe akómaki nkulutu na lisangá. Lelo oyo, ye na mwasi na ye bazali kosala lokola babongisi-nzela. Baboti oyo balandaki toli ya Yehova mpe ebongiseli na ye, toli oyo elobi ete báyekolaka ntango nyonso Biblia na kati ya mabota na bango, bazali na botɔndi mingi lelo oyo! Ozali kosalela toli yango na libota na yo?
Okoki kolimbola?
◻ Mpo na nini koyekola Biblia na libota mbala na mbala ezali na ntina?
◻ Tosengeli kozala na mikano nini na boyekoli nyonso ya libota?
◻ Biloko nini tozali na yango mpo na koyekola?
◻ Ndenge nini bokoki koyokanisa boyekoli na bamposa ya libota?
[Elilingi na lokasa 15]
Boyekoli na bino ya libota ekozala malamu lisusu soki bozali na mikano ya sikisiki