Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/7 nk. 23-27
  • Nauti na bobola makasi, nakómi na bozwi oyo eleki bozwi nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nauti na bobola makasi, nakómi na bozwi oyo eleki bozwi nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakei koluka eloko ya malamu koleka
  • Nasepeli na elikya oyo Biblia epesi
  • Tozwaki mapamboli lokola tozalaki koyamba bapaya
  • Tokutani na minyoko
  • Nakómi na bozwi oyo eleki bozwi nyonso
  • Tomonaki boboto monene ya Nzambe na ndenge mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • ‘Esengo na baoyo nyonso bazali kozela Jéhovah’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Kondima mikumba oyo Yehova apesi yo ememaka mbano mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tokutanaki na makambo oyo tokanisaki yango te na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/7 nk. 23-27

Nauti na bobola makasi, nakómi na bozwi oyo eleki bozwi nyonso

LISOLO YA MANUEL DE JESUS ALMEIDA

Nabotamaki na sanza ya Okɔtɔbɛ 1916, mwana ya nsuka na libota ya bana 17. Bayaya na ngai libwa bakufaki na maladi mpe na nzala, namoná ata bango te. Bana mwambe oyo totikalaki tozalaki kofanda na baboti na biso na mwa mboka moko pene na engumba Porto, na ekólo Portugal.

NDAKO na biso ezalaki kaka na eteni ya kolala moko na salon. Tozalaki kotoka mai ya komela na libulu moko oyo ezalaki mosika pene na mɛtɛlɛ 500, mpe kuku na biso ezalaki mpenza ya bato ya mboka.

Ntango bayaya na ngai bakolaki, bazwaki mosala na bilanga ya masangu. Mbongo bazalaki kozwa ezalaki kosalisa libota mobimba mpo na kosomba biloko ya kolya na ndako. Bango nde basalisaki ngai mpo nakɔta kelasi mpamba te kaka ngai nde natángaki mwa kelasi. Atako tozalaki na bomoi ya mpasi, tozalaki bandimi ya molende na Lingomba ya Katolike, tozalaki kokanisa ete yango ekosalisa biso.

Na sanza ya Mai, lingomba ezalaki na momeseno ya kosala molulu oyo babéngaka neuvaine. Mikolo libwa mobimba, tozalaki kokende na ndakonzambe na ntɔngɔntɔngɔ wana molili ezalaki naino. Kuna tozalaki kobondela, tozalaki kolikya ete na ndenge yango Nzambe akopambola biso. Lisusu, tozalaki kokanisa ete sango azalaki mosantu, moto oyo Nzambe atindi. Kasi, na nsima, totikaki kokanisa bongo.

Nakei koluka eloko ya malamu koleka

Soki topesi mbongo ya ndakonzambe te, sango azalaki koyokela biso ata mawa te ete tozalaki mpenza babola. Likambo yango elɛmbisaki biso. Nazalaki lisusu komona lingomba ndenge nazalaki komona yango liboso te. Yango wana, ntango nakómaki na mbula 18, natikaki baboti na ngai mpo nakende koluka eloko ya malamu koleka mosala ya bilanga mpe kowelana ya lingomba. Na 1936, nakómaki na Lisbonne, engumba-mokonzi ya ekólo Portugal.

Kuna nakutanaki na Edminia. Atako lingomba ezalaki kosepelisa ngai lisusu te, tolandaki momeseno na yango mpe tobalanaki na ndakonzambe ya Katolike. Na 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki. Na ntango ya etumba, nazalaki mokonzi na badepo 18, mpe na mokolo moko, tozalaki kotinda mituka 125 etondaki na biloko oyo bazalaki kosalela na etumba.

Makambo ya nsɔmɔ oyo ezalaki kosalema na etumba na ndenge oyo Lingomba ya Katolike emikɔtisaki mpenza na etumba etungisa ngai mingi. Namitunaki ete, ‘Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na bato? Ndenge nini tosengeli kosambela ye?’ Bambula mingi na nsima, na 1954, mobange moko ya boboto, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, asololaki na ngai mpo na makambo oyo nazalaki komituna. Lisolo yango ebongolaki bomoi na ngai mobimba.

Nasepeli na elikya oyo Biblia epesi

Joshua, mobange yango ya boboto, alobaki na ngai ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya se moko mpo na kosilisa mikakatano ya mokili. Kimya mpe libateli ekokɔta kaka ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. (Matai 6:9, 10; 24:14) Makambo oyo alobaki esepelisaki ngai, kasi nazalaki kotatabana mpo na kondima bandimbola yango na kotala makambo oyo nakutanaki na yango liboso na lingomba. Ntango alobaki na ngai tóyekolaka Biblia, nandimaki kasi nalobaki asɛnga mbongo te mpe aloba makambo ya politiki te. Andimaki, mpe alobaki ete boyekoli ezali ya mpamba.​—Emoniseli 22:17.

Nokinoki nakómaki kotyela Joshua motema mingi. Yango wana, nasɛngaki ye eloko moko oyo nazalaki na mposa na yango banda bomwana. Nalobaki ete: “Ngai mpe nakoki kozwa Biblia ya ngai moko?” Ntango nazwaki yango, nasepelaki mingi kotánga mpo na mbala ya liboso na Liloba ya Mozalisi na biso bilaka lokola oyo: “Nzambe ye mpenza akozala na [bato] elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo na liboso masili koleka”!​—Emoniseli 21:3, 4.

Bilaka ya Biblia oyo ebɔndisaki ngai mingimingi ezali oyo elobi ete bobola mpe maladi ekosila libela. Elihu, moto ya sembo, alobaki boye mpo na Nzambe: “Akopesaka bilei mingi mpenza.” (Yobo 36:31) Biblia elobi ete ntango Bokonzi ya sembo ya Nzambe ekoyangela, “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Yehova Nzambe amibanzabanzaka mpenza na bolingo nyonso mpo na bato! Nakómaki kosepela mingi na makambo oyo alaki!

Na mokolo ya 17 Aprili 1954, nayanganaki na likita ya Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso. Ezalaki likita ya ntina mingi​—Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Banda ntango wana, nazalaki kozangisa makita te. Mosika te nabandaki koteya bato mosusu makambo malamu oyo nazalaki koyekola. Na eleko yango na Portugal, sanza na sanza biso Batatoli ya Yehova tozalaki kokende pikiniki na libongo, mpe basitimo ezalaki kopesama kuna. Sanza nsambo nsima ya kosolola na Joshua mpo na mbala ya liboso, namipesaki na Yehova Nzambe mpe nazwaki batisimo na mbu (océan) mpo na komonisa yango na miso ya bato.

Na ebandeli ya 1954, Batatoli ya Yehova tozalaki soki 100 na Portugal mobimba. Na yango, tozalaki mpenza na mposa mingi ya mibali oyo basengeli kotambwisa mosala ya kosakola. Nakolaki nokinoki na elimo, mpe mosika te, bapesaki ngai mikumba na kati ya lisangá. Na 1956, baponaki ngai mosaleli ya lisangá, ndenge bazalaki kobénga bakɛngɛli bakambi na ntango wana, na engumba ya Lisbonne oyo ezalaki bobele na masangá mibale ya Batatoli ya Yehova. Lelo oyo, masangá ekómi koleka nkama moko na engumba Lisbonne mpe na bamboka oyo ezali zingazinga na yango.

Tozwaki mapamboli lokola tozalaki koyamba bapaya

Atako ngai na Edminia tozalaki na mbongo mingi te, tozalaki ntango nyonso koyamba bandeko baklisto na ndako na biso. Na 1955, mobongisi-nzela moko, ndenge babéngaka basakoli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova, alekisaki mwa mikolo na Portugal ntango autaki na ekólo na ye Brésil mpo na kokende na ekólo Allemagne na liyangani ya mikili mingi oyo ezalaki na motó ya likambo “Bokonzi oyo ezali kolonga.” Mpo na mikakatano ya transport, afandaki sanza mobimba na ndako na biso, mpe tozwaki mapamboli mingi ya elimo epai na ye!

Na kati ya bato oyo bayaki na ndako na biso na eleko wana tokoki kotánga Ndeko Hugo Riemer na Ndeko Charles Eicher oyo bazalaki kofanda na ye ndako moko na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na New York. Tozalaki kolya na bango esika moko mpe basalaki masukulu mpo na bandeko ya Portugal. Lokola bana ya nsoso oyo babotami sika bazalaka minɔkɔ polele, tozalaki kozela bilei kitoko ya elimo oyo bandeko yango bazalaki kopesa biso.

Bakɛngɛli-batamboli ya Batatoli ya Yehova mpe bazalaki kofanda na ndako na biso ntango bazalaki kotala masangá. Ndeko moko oyo ayaki kotala biso, oyo tobosanaka ye te ezali Álvaro Berecochea, oyo azalaki mokambi ya filiale ya Batatoli ya Yehova na ekólo Maroc, batindaki ye kolendisa bandeko na Portugal na 1957. Ayanganaki na boyekoli ya mokanda na ndako na biso, mpe totingamaki ete afanda na ndako na biso mikolo nyonso oyo akosala na Portugal. Tozwaki mapamboli mingi mpe tokómaki minene na elimo na sanza mobimba oyo tofandaki na ye. Kasi, Álvaro mpe ayaki mpenza mwa nzoto mpo na bilei kitoko oyo mwasi na ngai Edminia azalaki kolamba.

Soki moto azalaki na bobola makasi ndenge ngai nakolaki na yango, akoki kobosana yango te. Kasi, nayaki komona ete ntango tozali kokabela Yehova mingi mpe tozali kokabela basaleli na ye ya sembo, ye mpe akopambola biso mingi. Mbala mingi nazalaki komona ntina ya likambo yango ntango tozalaki koyamba bandeko nyonso oyo tokokaki koyamba.

Na 1955, ntango tozalaki na liyangani na engumba Porto, bayebisaki ete liyangani ya mikili mingi ya Batatoli ya Yehova ekosalema na Yankee Stadium, na engumba New York na 1958. Mpo na kozwa mbongo ya kotinda bandeko ya Portugal na liyangani yango, batyaki sanduku ya makabo na mwa Bandako ya Bokonzi oyo ezalaki na ekólo mobimba. Bokoki kokanisa esengo oyo ngai na mwasi na ngai toyokaki ntango baponaki biso tózala na kati ya bandeko oyo bakokende na liyangani? Tosepelaki mingi mpenza ntango tokendaki kotala biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn ntango tozalaki na États-Unis mpo na liyangani!

Tokutani na minyoko

Na 1962, bapekisaki mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova na Portugal, mpe bamisionere, kati na bango Éric Britten, Domenick Piccone, Éric Beveridge, na basi na bango babenganaki bango. Na nsima, bapekisaki biso kosalaka makita na Bandako ya Bokonzi. Na yango, tozalaki kosala yango na kobombana na bandako ya bandeko; tozalaki mpe lisusu na likoki te ya kosala mayangani minene na Portugal. Yango wana, nazwaki mokumba ya kosala bibongiseli mpo bandeko bákende mayangani na bikólo mosusu.

Kosala bibongiseli mpo ebele ya Batatoli bákende na bikólo mosusu ezalaki lisɛki te. Kasi, milende yango ezalaki na ntina na kotalela matomba ya elimo oyo bandeko ya Portugal bazwaki. Balendisamaki mpenza ndenge bazalaki na mayangani na ekólo Suisse, Angleterre, Italie, mpe France! Na mayangani yango bazalaki mpe kozwa mikanda oyo bazalaki kozonga na yango na Portugal. Na boumeli ya bambula yango, mbala mingi tozalaki kosɛnga bakonzi bándima biso lokola lingomba, kasi mbala nyonso bazalaki koboya.

Na ebandeli ya 1962, ntango babenganaki bamisionere, bato ya sirete babakisaki milende mpo na koluka kopekisa mosala na biso ya kosakola. Bakangaki bandeko na biso mingi mpe bafundaki bango na tribinale. Balapolo mingi ya makambo yango ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!a

Na kati ya bandeko oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo na mosala ya kosakola ezalaki na mobongisi-nzela moko oyo nateyaki ye nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Lokola bapolisi bamonaki adresi na ngai na mikanda na ye, babéngisaki ngai mpe batunaki ngai mituna.

Nsima wana, bapolisi mibale bayaki na ndako na biso. Babɔtɔlaki biso Biblia 13 na mikanda oyo elimbolaka Biblia. Balandaki kotungisa biso, bazongaki mbala nsambo mpo na kolukaluka soki bakomona bilɔkɔ mosusu na ndako na biso. Mbala nyonso oyo bazalaki koya, bazalaki kotuna biso mituna ebele.

Babéngaki ngai mbala mingi nakende koloba makambo oyo nayebi mpo na bandeko na biso oyo bazalaki kosamba na tribinale. Atako natángaki kelasi mingi te, Yehova apesaki ngai ‘mayele oyo bayini nyonso bakokaki kotɛmɛla yango te to kozongisa yango te.’ (Luka 21:15) Mbala moko zuzi akamwaki na makambo nalobaki mpe atunaki ngai soki natángaki kelasi nini. Bato nyonso na tribinale basɛkaki ntango nalobaki ete nasuká kaka na kelasi ya minei na eteyelo ya yambo.

Wana monyoko ezalaki koya makasi, bato oyo bazalaki kosepela na nsango ya Bokonzi bazalaki mpe kokóma mingi. Na yango, Batatoli oyo tokokaki ata 1 300 te na 1962, tokómaki koleka 13 000 na 1974! Na ntango yango, na 1967, nakómaki mokɛngɛli-motamboli. Nazalaki kotala masangá ya Batatoli ya Yehova mpo na kolendisa bango na elimo.

Nakómi na bozwi oyo eleki bozwi nyonso

Na sanza ya Desɛmbɛ 1974, nazalaki na kati ya bato oyo batyaki sinyatili na mokanda oyo Leta andimaki mosala ya Batatoli ya Yehova na ekólo Portugal. Na mbula oyo elandaki, ngai na mwasi na ngai tokómaki kosala na Betele ya Batatoli ya Yehova na engumba ya Estoril. Baponaki ngai mpe lokola mosangani ya Komite ya Filiale ya Portugal.

Nazalaki na esengo ya komona ndenge mosala ya kosakola ekolaki na Portugal mpe na bamboka oyo filiale na biso ezali kotambwisa mosala yango! Bamboka yango ezali bongo: Angola, Açores, Cap-Vert, Madère, na São Tomé et Principe. Ndenge bambula ezalaki koleka, nazalaki na esengo ya komona ndenge bamisionere bazalaki kouta na Portugal mpo na kokende na bamboka yango, epai bato mingi mpenza bazalaki kosepela na nsango ya Bokonzi. Bókanisa esengo oyo tozali na yango na ndenge tokómi sikoyo basakoli ya Bokonzi koleka 88 000 na bamboka yango, bakisa basakoli koleka 47 000 na Portugal! Na Ekaniseli ya 1998, bato nyonso oyo bayanganaki na bamboka nyonso yango bazalaki 245 000, nzokande bato bakómaki ata 200 te ntango nakómaki Motatoli na 1954.

Ngai na Edminia tondimi na motema mobimba maloba oyo mokomi ya nzembo alobaki ete “mokolo moko kati na lopango na yo [Yehova] eleki mikolo mosusu nkóto na malamu.” (Nzembo 84:10) Soki nakanisi ndenge nabandaki mpe natali bozwi ya elimo oyo nasili kozwa, nazali komona ndenge moko na mosakoli Yisaya oyo alobaki ete: “Ɛ [Yehova], yo Nzambe na ngai; nakokumisa yo, nakosanzola nkombo na yo, mpo ete osali makambo na kokamwa . . . Zambi osili kozala esika na makasi mpo na mobola, esika na makasi epai na mozangi kati na mpasi na ye.”​—Yisaya 25:1, 4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Lamuká! ya 22 Augusto 1964, nkasa 8-15, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1967, nkasa 165-177 (ebimeli ya Lifalanse).

[Bililingi na lokasa 24]

Na likoló: Ndeko Almeida na liyangani ya Lisbonne azali koyebisa ebongiseli ya kotinda bandeko na liyangani ya New York na 1958

Na katikati: Nazali kolakisa ndenge ya kokamba likita ya bankulutu na basaleli na misala na liyangani ya mikili mingi oyo ezalaki na motó ya likambo “Kimya na mokili” na engumba Paris

Na nse: Babisi ya kofutela elingi kokende na liyangani ya etúká na ekólo France

[Elilingi na lokasa 25]

Nazali kotambwisa likita ya botaleli mokapo ya mokolo na Betele ya Portugal

[Elilingi na lokasa 25]

Betele ya Portugal oyo efungwamaki na 1988

[Elilingi na lokasa 26]

Ndeko Hugo Riemer oyo autaki na Betele ya Brooklyn alendisaki biso na masukulu na ye

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai na mwasi na ngai

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto