Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/8 lok. 14
  • Tóndima makambo oyo Nzambe alaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóndima makambo oyo Nzambe alaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova atambwisaka likambo mokomoko te na bomoi ya bato
  • Nzambe azali kosala mpo na kokokisa mokano na ye
  • Nzambe ayebaka makambo ekoya
  • Mosala monene ya kotonga masuwa
  • Yehova asimbi mosala
  • Tólɛmba te!
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
    Mekolá kondima na bango
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Nzambe ‘abatelaki ye ná bato mosusu nsambo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Kondima ya Noa ekweisi mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/8 lok. 14

Tóndima makambo oyo Nzambe alaki

“Ngai nazali Nzambe mpe mosusu azali te; ngai nazali Nzambe, mosusu azali lokola ngai te, oyo akosakola makambo na nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango na kala makambo masalami naino te.”—YISAYA 46:9, 10.

1, 2. Bato bazalaka na makanisi nini na motuna ya koyeba soki Nzambe alandaka makambo oyo elekaka awa na mokili?

NZAMBE alandaka mpenza makambo oyo elekaka na mokili? Na motuna oyo, moto na moto azali na eyano na ye. Ezali na bato oyo balobaka ete makambo oyo elekaka na mokili etali Nzambe te. Ntango akelaki mokili, abongisaki makambo nyonso malamu; azali lisusu na mposa te to mpe na makasi te ya kosalela biso likambo mosusu. Mpo na bato oyo bakanisaka bongo, Nzambe azali lokola tata oyo asombeli mwana na ye velo ya sika, amatisi ye na velo, atɛlɛmisi yango malamu, atindiki mpe mwana na ye abandi kotambola na nzela. Na nsima, tata apesi mokɔngɔ mpe akei. Epai mwana atikali, akwea, akwea te, etali tata te.

2 Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe atambwisaka bomoi na biso na likambo mokomoko mpe atalelami na likambo mokomoko oyo esalemaka na mokili. Kasi, soki ezali bongo, bato mosusu bakoloba ete ezala makambo malamu to makambo mabe oyo ekómelaka bato, nyonso eutaka kaka epai ya Nzambe. Soki toyebi mpenza makambo oyo Nzambe asalaka, ekosalisa biso tóyeba soki azali kokanisa nini mpo na biso. Yango mpe ekolendisa kondima na biso ete akokokisa makambo nyonso oyo alaki biso.​—Baebele 11:1.

3. (a) Ndenge nini toyebi ete Yehova azali Nzambe oyo azali na mokano? (b) Mpo na nini Biblia elobi ete Yehova ‘asalaka’ to abongisaka mokano na ye?

3 Ezali na ntina toyeba soki Nzambe alandaka mpenza makambo ya bato mpamba te Yehova azali Nzambe oyo azali na mikano. Nkombo na ye ezali komonisa likambo yango. “Yehova” elimboli “Ye oyo akómisaka.” Na ndenge oyo azali kosala mosala na ye mokemoke, Yehova amikómisaka Mokokisi ya makambo nyonso oyo alaki. Yango wana, Biblia elobi ete Yehova ‘asalaka,’ to abongisaka, mokano na ye mpo na makambo mpe misala oyo akosala na mikolo ekoya. (2 Mikonzi 19:25; Yisaya 46:11) Liloba ya Liebele yatsar oyo ebongolami na maloba yango ekokani na liloba oyo elimboli “mosali ya mbeki.” (Yilimia 18:4, NW) Lokola mosali ya mbeki oyo ayebi mosala na ye malamu akoki komata pɔtɔpɔtɔ mpe kosala mbeki moko kitoko, Yehova akoki kosala, to kobongola makambo mpo akokisa mokano na ye.​—Baefese 1:11.

4. Ndenge nini Nzambe abongisaki mabelé mpo moto afanda wana?

4 Na ndakisa, Nzambe akanaki ete mabelé ezala esika kitoko mpe bato ya botosi, bato ya kokoka báfanda wana. (Yisaya 45:18) Bambula ebele liboso akela mwasi na mobali ya liboso, Yehova abongiselaki bango makambo nyonso. Mikapo ya liboso ya mokanda ya Genese emonisi ndenge oyo Yehova akabolaki moi na butu, mabelé na mai. Na nsima, akelaki banzete na banyama. Kobongisa mabelé mpo ekóma esika oyo moto akoki kofanda ezwaki bambula ebele. Mokano yango ekokanaki malamu. Mwasi na mobali ya liboso babandaki bomoi na bango na Edene, oyo ezalaki paladiso kitoko, ezalaki na biloko nyonso mpo bomoi na bango ezala malamu. (Genese 1:31) Na yango, tomoni ete Yehova azalaki mpenza kolanda makambo oyo ezalaki koleka na mabelé, azalaki kobongisa misala na ye mokemoke mpo na kokokisa mokano na ye monene. Kasi, tokoki koloba ete atikaki kolanda makambo ya bato ntango bato yango bakómaki mingi?

Yehova atambwisaka likambo mokomoko te na bomoi ya bato

5, 6. Mpo na nini Nzambe amikɔtisaka na makambo nyonso ya bato te?

5 Atako akoki kosala yango, Yehova atambwisaka to amikɔtisaka na likambo mokomoko ya bato te. Ezali na bantina oyo asalaka yango te. Moko na bantina yango ezali ete bato bakelamaki na elilingi ya Nzambe, bazali na bonsomi ya kopona. Yehova atindikaka biso na makasi te tósala oyo ye alingi; tozali mpe bikeko te oyo azali kotambwisa. (Deteronome 30:19, 20; Yosua 24:15) Atako akotuna biso mpo na makambo oyo tozali kosala, na bolingo na ye, Nzambe apesi biso bonsomi mingi ya kopona ndenge oyo tokotambwisa bomoi na biso.​—Baloma 14:12; Baebele 4:13.

6 Ntina mosusu oyo Nzambe atambwisaka likambo mokomoko ya bomoi na biso te etaleli ntembe oyo Satana abimisaki na Edene. Satana atyelaki Nzambe ntembe ete abongi kozala mokonzi te. Ayebisaki Eva likambo oyo emonanaki ete ekoki kopesa ye lipanda; na nsima, ye na mobali na ye, Adama, bandimaki likambo yango. (Genese 3:1-6) Yango wana, Nzambe atikelaki bato mwa ntango bámiyangela mpo na koyeba soki Satana alobaki solo. Na yango, soki lelo oyo bato bazali kosala makambo mabe, tokoki kopesa Nzambe foti te. Mpo na batomboki, Mose akomaki boye: “Bango basaleli ye mabe, bazali bana na [Nzambe] lisusu te na ntina na libebi na bango; bazali libota bapɛngwi mpe bayongotani.”—Deteronome 32:5.

7. Yehova azali na mokano nini mpo na mabelé mpe bato?

7 Nzokande, atako Yehova atiki biso tópona oyo tolingi kosala mpe atikeli biso ntango tómiyangela, elingi koloba te ete asalaka ata eloko moko te na makambo oyo elekaka na mokili. Soki bongo, mbɛlɛ tokoki kozala na elikya te ete akokokisa makambo oyo alaki. Atako Adama na Eva batombokelaki Nzambe, Yehova azali kaka na mokano na ye mpo na mabelé mpe bato. Nsukansuka, akokómisa mabelé oyo paladiso mpe bato ya botosi, oyo bakozala na masumu te, bakofanda wana na esengo. (Luka 23:42, 43) Biblia mobimba, banda na Genese tii na Emoniseli ezali komonisa ndenge oyo Yehova azali kosala makambo na ye mokemoke mpo mokano wana ekokana.

Nzambe azali kosala mpo na kokokisa mokano na ye

8. Komema Bayisalaele na Mokili ya Ndaka esɛngaki makambo nini?

8 Na makambo oyo asalelaki ekólo Yisalaele, Nzambe alakisaki ete akokokisa mokano na ye. Na ndakisa, Yehova ayebisaki Mose ete akobikisa Bayisalaele na Ezipito mpe akomema bango na Mokili ya Ndaka, mokili oyo etondi na miliki na mafuta ya nzoi. (Exode 3:8, NW) Nsango yango ezalaki na ntina mingi mpe ya kolendisa. Elingaki koloba ete Nzambe akolongola Bayisalaele yango na boombo na ekólo moko makasi oyo eboyaki kotika bango. Bayisalaele nyonso na baninga na bango bazalaki soki bato milio misato. (Exode 3:19) Bikólo mingi mpe ya makasi ezalaki na mokili oyo Bayisalaele basengelaki kokende, mpe bato ya bikólo yango basepelaki ata moke te na ntango Bayisalaele bakómaki kuna. (Deteronome 7:1) Bayisalaele bakatisaki mokili mokauki epai bazalaki na mposa ya bilei mpe mai. Likambo yango epesaki Yehova nzela ya kolakisa ete azali solo Nzambe mpe azali ye oyo aleki makasi.​—Levitike 25:38.

9, 10. (a) Mpo na nini Yosua akokaki koloba ete moto akoki kotyela makambo oyo Nzambe alakaka motema? (b) Mpo na nini ezali na ntina tótya motema na makoki oyo Nzambe azali na yango ya kopesa libonza na bato oyo bazali sembo epai na ye?

9 Nzambe abimisaki Bayisalaele na Ezipito nsima ya kosala makamwisi minene. Ya liboso, asalaki makamwisi zomi oyo eyokisaki Baezipito bwale. Na nsima, akabolaki Mai Motane mpe abikisaki Bayisalaele, kasi basoda ya Ezipito oyo balandaki bango bakufaki. (Nzembo 78:12, 13, 43-51) Na nsima, abatelaki Bayisalaele na boumeli ya mbula 40 oyo batambolaki na mokili mokauki, apesaki bango mana, apesaki bango mai, mpe abatelaki bilamba na bango epasuka te mpe makolo na bango evimbaki te. (Deteronome 8:3, 4) Ntango Bayisalaele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, Yehova apesaki bango makasi ya kobunda mpe kolonga banguna na bango. Yosua, moto oyo asalaki misala oyo emonisaki kondima makasi na makambo oyo Yehova alakaki, amonaki makambo yango nyonso na miso. Yango wana, ayebisaki mibange ya ntango wana boye: “Bino boyebi na mitema na bino mpe na milimo na bino nyonso ete eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino, mpe eloko na yango moko ezangaki te.”—Yosua 23:14.

10 Lokola Yosua na ntango ya kala, lelo oyo, baklisto bazali na elikya ete Nzambe azali na mposa mpe na makasi ya kosala makambo malamu mpo na bato oyo bazali kosalela ye. Elikya yango esimbi mpenza kondima na biso. Ntoma Paulo akomaki boye: “Soko na kondima te, ekoki kosepelisa Nzambe te. Mpo ete ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete . . . akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.”—Baebele 11:6.

Nzambe ayebaka makambo ekoya

11. Nini esalaka ete Nzambe akokisa makambo oyo alakaka?

11 Tii na esika oyo tokómi, tomoni ete atako Nzambe atiki bato bápona makambo oyo balingi mpe atiki bango bámiyangela, azali na mposa mpe na makasi ya kokokisa mokano na ye. Kasi, ezali na likambo mosusu oyo ezali kondimisa biso ete mokano ya Nzambe ekokokisama: Yehova akoki koyeba makambo ekoya. (Yisaya 42:9) Nzambe alobaki boye na monɔkɔ ya mosakoli na ye: “Bóbanzabanza mpo na makambo na liboso na kala, mpo ete ngai nazali Nzambe mpe mosusu azali te; ngai nazali Nzambe, mosusu azali lokola ngai te, oyo akosakola makambo na nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa na ntango na kala makambo masalami naino te, oyo alobi ete, Toli na ngai ekotɛlɛma mpe nakokokisa mokano mobimba na ngai.” (Yisaya 46:9, 10) Mosali bilanga oyo ayebi mosala na ye malamu ayebaka ntango nini mpe esika nini asengeli kolona mbóto, kasi ayebaka te ndenge nini milona na ye ekokola. Nzokande, “mokonzi ya seko” akoki koyeba malamu ntango nini mpe esika nini akosala likambo boye to boye mpo mokano na ye ekokana.​—1 Timote 1:17.

12. Na mikolo ya Noa, ndenge nini Yehova asalelaki likoki na ye ya koyeba makambo ekoya?

12 Tótala ndenge nini Nzambe asalelaki likoki na ye ya koyeba makambo ekoya na ntango ya Noa. Lokola mabe ekómaki mingi na mokili, Nzambe azwaki mokano ya koboma bato oyo bazangaki botosi. Atyaki ntango oyo asengelaki kosala yango: nsima ya mbula 120. (Genese 6:3) Ntango atyaki bambula yango, Yehova akanisaki kaka koboma bato mabe te; mpamba te akokaki koboma bango ata na ntango nini. Yehova atyaki bambula yango mpo na kobikisa mpe bato ya sembo. (Talá Genese 5:29.) Na mayele na ye, Nzambe ayebaki ntango nini akopesa mosala yango liboso nsuka eya. Ayebisaki Noa makambo nyonso oyo asengelaki koyeba. Noa asengelaki kotonga masuwa “mpo na kobikisa libota na ye,” mpe bato mabe basengelaki kokufa.​—Baebele 11:7; Genese 6:13, 14, 18, 19.

Mosala monene ya kotonga masuwa

13, 14. Mpo na nini kotonga masuwa ezalaki mosala monene?

13 Sikoyo, tómitya na esika ya Noa mpe tókanisa mosala oyo bapesaki ye. Lokola Noa azalaki moto azalaki kobanga Nzambe, ayebaki ete Yehova akokaki koboma bato oyo bazalaki kotyola Nzambe. Kasi, liboso aboma bango, mosala moko esengelaki kosalema. Mosala yango esɛngaki kozala na kondima mpo na kosala yango. Kotonga masuwa ezalaki mosala monene. Nzambe amonisaki ndenge mpenza masuwa ekozala monene. Masuwa yango esengelaki kozala monene koleka ba stade mosusu ya masano oyo ezali lelo oyo mpe esengelaki kozala molai lokola buludingi ya etazi minei. (Genese 6:15) Bato oyo basengelaki kotonga yango basalaki naino mosala yango te mpe bazalaki mingi te. Bazalaki na bisaleli malamu te lokola oyo tozali na yango lelo oyo. Lisusu, lokola Noa azalaki Yehova te, oyo akoki koyeba makambo ekoya, ayebaki te makambo nini ekosalema nsima ya bambula; makambo oyo mbala mosusu ekosalisa to ekopekisa mosala ya kotonga masuwa. Tokanisi ete Noa amitunaki mituna ebele. Ndenge nini akokaki kosangisa biloko mpo na mosala ya kotonga? Ndenge nini akokɔtisa banyama na masuwa? Biloko nini ya kolya bakozala na yango mposa mpe ekozala mingi ndenge nini? Ntango nini mpenza Mpela yango esengelaki kobanda?

14 Ezalaki mpe na makambo oyo bato bazalaki kosala. Mabe ekómaki mingi. Bilombe Banefilime, bana oyo baanzelu mabe babotaki na bana basi, bakɔtisaki mobulu mingi na mokili. (Genese 6:1-4, 13) Mpe lisusu, mosala ya kotonga masuwa ekokaki kosalema na kobombama te. Bato basengelaki komituna eloko nini Noa azali kosala mpe asengelaki koyebisa bango. (2 Petelo 2:5) Bakokaki kosepela na yango? Tondimi te! Mwa bambula liboso, Enoka, moto ya sembo, asakolaki ete bato mabe bakobomama. Nsango yango esepelisaki bato ata moke te, yango wana Nzambe “akamataki ye,” to asukisaki bomoi na ye; ekoki kozala mpo banguna na Ye báboma ye te. (Genese 5:24; Baebele 11:5; Yuda 14, 15) Noa asengelaki kosakola nsango motindo wana oyo ezalaki kosepelisa bato te, mpe lisusu asengelaki kotonga masuwa. Ntango masuwa ezalaki kotongama, ezalaki komonisa polele ete Noa azali moto ya sembo mpe bato ya ntango na ye bazali bato mabe!

15. Mpo na nini Noa azalaki na elikya ete akokaki kokokisa mosala oyo bapesaki ye?

15 Noa ayebaki ete Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso azalaki kosunga mpe kopambola mosala yango. Tóbosana te ete Yehova ye moko nde apesaki mosala yango. Yehova ayebisaki Noa ete soki basilisi kotonga masuwa, ye na libota na ye bakokɔta na masuwa yango mpo bakufa na Mpela te. Kutu, Nzambe asalaki kondimana mpo na kolakisa ete likambo yango ekosalema solo. (Genese 6:18, 19) Ekoki mpenza kozala ete Noa ayebaki ete Yehova atalelaki likambo yango malamu mpe ayebaki nyonso oyo esengelaki liboso ya kopesa mosala yango. Noa ayebaki mpe ete Yehova akokaki kosalisa ye soki azali na mposa ya lisalisi. Na yango, lokola Noa azalaki na kondima, asalaki mosala. Lokola nkɔkɔ na ye Abalayama oyo abotamaki bambula mingi na nsima, Noa “andimaki na motema mobimba ete Nzambe akoki kosala yango esili ye kolaka.”—Baloma 4:21.

16. Wana mosala ya kotonga masuwa ezalaki kokende liboso, ndenge nini kondima ya Noa elendisamaki?

16 Nsima ya bambula, wana mosala ya kotonga masuwa ezalaki kopusana, kondima ya Noa elendisamaki. Mikakatano ya mosala ya kotonga mpe ya biloko ya mosala esilaki. Balongaki komekama. Botɛmɛli moko te ekokaki kopekisa mosala yango. Noa na libota na ye bamonaki ndenge oyo Yehova asungaki mpe abatelaki bango. Wana Noa azalaki kokende liboso, ‘kondima na ye oyo emekamaki ebotaki mpiko.’ (Yakobo 1:2-4) Nsukansuka, masuwa esilaki, Mpela eyaki, mpe Noa na libota na ye babikaki. Noa amonaki ndenge oyo Nzambe akokisaki makambo oyo alakaki, ndenge mpe Yosua amonaki yango nsima. Noa azwaki mbano mpo na kondima na ye.

Yehova asimbi mosala

17. Na makambo nini eleko na biso ekokani na mikolo ya Noa?

17 Yesu asakolaki ete mikolo na biso ekozala lokola mikolo ya Noa. Nzambe azwi lisusu mokano ya koboma bato mabe mpe aponi ntango oyo akosala yango. (Matai 24:36-39) Akamati mpe bibongiseli mpo na kobikisa bato ya sembo. Na esika oyo esɛngaki ete Noa atonga masuwa, lelo oyo basaleli ya Nzambe basengeli nde kosakola mikano ya Yehova, koteya Liloba na ye, mpe kokómisa bato bayekoli.​—Matai 28:19.

18, 19. Ndenge nini toyebi ete Yehova asimbi mosala ya kosakola nsango malamu?

18 Soki Yehova azalaki na Noa te mpo na kosunga mpe kolendisa ye, mbɛlɛ masuwa ekokaki kotongama te. (Talá Nzembo 127:1.) Ndenge moko mpe, soki lobɔkɔ ya Yehova te, boklisto ya solo ekokaki koumela te, ekokaki mpe kopalangana te. Na ekeke ya liboso, Gamaliele, oyo azalaki Mofalisai mpe molakisi ya Mibeko oyo bato mingi bazalaki kotosa, andimaki likambo yango. Ntango bazuzi ya Sanedrina ya Bayuda balukaki koboma bantoma, apesaki bango toli oyo: “Bólongwa na bato oyo mpe bótika bango, mpo ete soko mayele oyo to mosala oyo euti na bato, ekobeba. Soko nde euti na Nzambe, bokokoka kobuka bango te. Kebá ete bózwama babunani na Nzambe te.”—Misala 5:38, 39.

19 Soki mosala ya kosakola ekendaki liboso na ekeke ya liboso mpe ezali kokende liboso lelo oyo, elakisi ete mosala yango ezali ya bato te, kasi ezali mosala ya Nzambe. Lisolo oyo elandi ekolobela mwa makambo oyo epesaki nzela ete mosala yango ekende liboso na mokili mobimba.

Tólɛmba te!

20. Banani basungaka biso na ntango tozali kosakola nsango malamu?

20 Atako tozali na “ntango ya mpasi,” tokoki kozala na elikya ete Yehova azali kotambwisa mosala. Azali kosunga mpe kolendisa basaleli na ye na ndenge bazali kopusana na nsuka ya mosala ya kosakola nsango malamu liboso Nzambe aboma ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo. (2 Timote 3:1; Matai 24:14) Yehova azali kosɛnga biso tózala “basalani” na ye. (1 Bakolinti 3:9) Tozali mpe na elikya ete Yesu Klisto azali na biso elongo na mosala yango mpe tokoki kotya motema ete baanzelu bazali kosunga mpe kotambwisa biso.​—Matai 28:20; Emoniseli 14:6.

21. Elikya nini tosengeli kosimba makasi?

21 Lokola Noa na libota na ye basalaki misala oyo emonisaki ete bandimelaki Yehova, babikaki na Mpela. Lelo oyo, baoyo bazali kosala misala oyo ezali komonisa kondima bakobika na “bolɔzi monene” oyo ezali koya. (Emoniseli 7:14) Mikolo oyo ezali na makambo mingi ya kokamwa. Makambo minene ezali liboso na biso! Etikali moke Nzambe akotya likoló ya sika mpe nse ya sika ya nkembo epai bato ya sembo bakofanda. (2 Petelo 3:13) Tólɛmba te na elikya na biso ete likambo nyonso oyo Nzambe alobi, akoki kosala yango.​—Baloma 4:21.

Makambo oyo tosengeli kobosana te

◻ Mpo na nini Yehova alandaka likambo mokomoko na bomoi ya bato te?

◻ Ndenge nini makoki ya Yehova ya kokokisa mokano na ye emonanaki na makambo oyo asalaki mpo na Yisalaele?

◻ Na mikolo ya Noa, ndenge nini Yehova amonisaki makoki na ye ya koyeba makambo ekoya?

◻ Tokoki kozala na elikya nini na makambo oyo Nzambe alaki biso?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto