Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/9 nk. 21-25
  • Yehova azali kosɛnga biso nini lelo oyo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali kosɛnga biso nini lelo oyo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova azali kosɛnga nini
  • Ntina ya bolingo
  • Ndenge nini tokoki kolakisa bolingo na biso
  • Mpo na nini mosala yango ekoki komonana lokola mosala ya mpasi?
  • Tokoyanola nde na bolingo na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mobeko ya bolingo na mitema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bolingo mpe bosembo na lisangá ya bokristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Ozali na kati ya bato oyo Nzambe alingaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/9 nk. 21-25

Yehova azali kosɛnga biso nini lelo oyo?

“Mongongo kati na lipata [elobaki] ete, Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli ye mingi. Bóyoka ye!”—MATAI 17:5.

1. Ntango nini ntina ya Mibeko ekokaki?

YEHOVA apesaki libota ya Yisalaele Mibeko oyo ezalaki na makambo ebele. Ntoma Paulo akomaki boye mpo na Mibeko yango: “Ezalaki mibeko ya nzoto mpe etyamaki tii ntango oyo eponamaki mpo na kotya makambo na molɔngɔ.” (Baebele 9: 10, NW) Ntina ya Mibeko ekokanaki ntango esalisaki mwa ndambo ya Bayisalaele bándima Yesu lokola Masiya, to Klisto. Yango wana, Paulo alobaki ete: “Klisto azali nsuka na Mibeko.”—Baloma 10:4; Bagalatia 3:19-25; 4:4, 5.

2. Mibeko epesamaki epai ya banani, mpe elongolamaki ntango nini?

2 Yango elingi nde koloba ete lelo oyo biso tosengeli lisusu kotosa Mibeko te? Tosengeli koyeba ete bato mingi na mokili bapesaki bango Mibeko te, lokola mokomi ya nzembo alobaki yango ete: “[Yehova] akoyokisaka liloba na ye na Yakobo, toli mpe mibeko na ye epai na Yisalaele. Asalaki motindo boye epai na bato mosusu te; bango bayebi toli na ye te.” (Nzembo 147:19, 20) Ntango Nzambe asalaki kondimana ya sika lisalisi ya mbeka ya Yesu, ata libota ya Yisalaele ezalaki lisusu na nse ya Mibeko te. (Bagalatia 3:13; Baefese 2:15; Bakolose 2:13, 14, 16) Soki Yehova azali lisusu kosɛnga kotosa Mibeko te, azali kosɛnga nini na baoyo balingi kosalela ye lelo oyo?

Yehova azali kosɛnga nini

3, 4. (a) Yehova azali mpenza kosɛnga biso makambo nini lelo oyo? (b) Mpo na nini tosengeli kolanda malamumalamu ndakisa ya Yesu?

3 Na mbula ya nsuka ya mosala na ye, Yesu na bantoma na ye Petelo, Yakobo, na Yoane, bakendaki na ngomba moko molai; ekoki kozala na Ngomba Helemona. Kuna, bayekoli bamonaki emonaneli moko oyo ezalaki esakweli mpo na Yesu na nkembo monene mpe bayokaki mpenza mongongo ya Nzambe koloba ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli ye mingi. Bóyoka ye!” (Matai 17:1-5) Ezali yango nde likambo oyo Yehova azali kosɛnga biso, elingi koloba koyoka Mwana na ye mpe kolanda ndakisa mpe mateya na ye. (Matai 16:24) Yango wana ntoma Petelo akomaki boye: “Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete [bólanda] matambe na ye.”—1 Petelo 2:21.

4 Mpo na nini tosengeli kolanda matambe ya Yesu malamumalamu? Mpamba te ntango tozali kolanda ndakisa na ye, tozali mbala moko kolanda ndakisa ya Yehova Nzambe. Yesu ayebaki Tata malamu mpenza mpo liboso aya awa na mabelé, afandaki na ye kuna na likoló bambula ebele oyo eyebani ata motango te. (Masese 8:22-31; Yoane 8:23; 17:5; Bakolose 1:15-17) Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu amonisaki mpenza ndenge Tata na ye azali. Alobaki boye: “[Lokola] Tata asili kolakisa ngai, nakosololaka makambo oyo.” Ɛɛ, Yesu alandaki ndakisa ya Yehova malamu mpenza yango wana alobaki ete: “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.”—Yoane 8:28; 14:9.

5. Baklisto basengeli kotosa mobeko nini, mpe mobeko yango ebandaki ntango nini?

5 Koyoka Yesu mpe kolanda ndakisa na ye elimboli nini? Yango esɛngi kotosa mobeko moko? Paulo akomaki ete: “Nazali na nse ya Mibeko te.” Azalaki koloba mpo na Mibeko ya “kondimana ya kala” oyo Nzambe asalaki na Yisalaele. Kasi, Paulo alobaki ete ‘akangami na mibeko na Klisto.’ (1 Bakolinti 9:20, 21, NW; 2 Bakolinti 3:14) Ntango kondimana ya Mibeko esukaki, “kondimana ya sika” ebandaki na “Mobeko ya Klisto” oyo basaleli nyonso ya Yehova basengeli kotosa lelo oyo.​—Luka 22:20; Bagalatia 6:2; Baebele 8:7-13.

6. Ndenge nini tokoki kolimbola “Mobeko ya Klisto,” mpe ndenge nini totosaka yango?

6 Yehova akomisaki “Mobeko ya Klisto” na mokanda te; abongisaki yango na makambo ndenge na ndenge te lokola Mibeko ya kondimana ya kala. Mibeko ya sika mpo na bayekoli ya Klisto ezali na ebele ya makambo te oyo epesameli nzela ya kosala mpe oyo epekisami. Kasi, Yehova asalaki ete bato minei bákoma na kati ya Liloba na ye makambo oyo Mwana na ye asalaki na bomoi na ye mpe makambo oyo ateyaki. Mpe lisusu, Nzambe asalaki ete bayekoli ya liboso ya Yesu bákoma malako mpo na bizaleli ya bato, makambo ya lisangá, ndenge ya kofanda malamu na libota, mpe makambo mosusu. (1 Bakolinti 6:18; 14:26-35; Baefese 5:21-33; Baebele 10:24, 25) Soki tozali kolanda ndakisa mpe mateya ya Yesu Klisto na kati ya bomoi na biso mpe soki tozali kolanda toli euti epai ya Nzambe oyo bato bakomaki na ekeke ya liboso, ekomonisa ete tozali kotosa “Mobeko ya Klisto.” Talá makambo Yehova azali kosɛnga epai ya basaleli na ye lelo oyo.

Ntina ya bolingo

7. Na Elekeli ya nsuka oyo alyaki na bayekoli na ye, ndenge nini Yesu amonisaki eloko oyo esimbi mpenza mobeko na ye?

7 Atako bolingo ezalaki na ntina na Mibeko ya kala, nzokande yango mpenza nde esimbi Mobeko ya Klisto. Yesu amonisaki yango ntango afandaki na bayekoli na ye mpo na feti ya Elekeli na mobu 33 T.B. Ntoma Yoane akomaki na mokuse makambo oyo elekaki na mpokwa yango mpe ayebisi ete Yesu azongelaki liloba bolingo mbala 28. Likambo yango emonisaki malamu epai ya bantoma na ye eloko oyo esimbi mpenza mobeko na ye. Kutu, Yoane abandi lisolo ya makambo oyo elekaki na mpokwa yango na maloba oyo: “Liboso na Elambo na Elekeli, Yesu ayebaki ete elaka esili kokoka ete alongwa na mokili oyo kokenda epai na Tata. Alingaki bato na ye moko baoyo bazalaki kati na mokili; alingaki bango kino nsuka.”—Yoane 13:1.

8. (a) Nini emonisi ete bantoma bazalaki ntango nyonso kowelana? (b) Ndenge nini Yesu ateyaki bantoma na ye komikitisa?

8 Yesu alingaki bantoma na ye, atako amekaki na ndenge nyonso kosalisa bango bálongola mposa na bango ya bokonzi to koluka kozala na esika ya liboso. Mwa basanza liboso bákóma na Yelusaleme, ‘batyanaki ntembe soko nani kati na bango aleki na lokumu monene.’ Mpe liboso bákɔta na Yelusaleme mpo na feti ya Elekeli, babandaki lisusu kotyana ntembe, koluka koyeba nani aleki baninga. (Malako 9:33-37; 10:35-45) Ntango bantoma bakɔtaki na ndako moko kuna na etazi mpo na kolya Elekeli ya nsuka, likambo oyo elekaki mwa moke na nsima emonisi ete ezaleli yango esilaki naino te. Na ntango wana ata moko te kati na bango azwaki likanisi ya kosalela baninga likambo oyo bato bazalaki kosalela mopaya, elingi koloba kosukola ye makolo. Mpo na koteya bango komikitisa, ye moko Yesu asukolaki bango makolo.​—Yoane 13:2-15; 1 Timote 5:9, 10.

9. Yesu asalaki nini na likambo oyo ebimaki nsima ya Elekeli ya nsuka?

9 Atako bazwaki liteya yango, nsima ya kolya Elekeli mpe nsima wana Yesu alakisaki bango ndenge ya kosala Ekaniseli ya liwa na ye oyo ezalaki lisusu mosika te, likambo mosusu ebimaki. Evanzile ya Luka elobi boye: “Kowelana mpe ebimaki kati na bango, soko nani na bango akotángama moto aleki monene.” Na esika asilika mpe agangela bango, Yesu apesaki bango toli na boboto ete basengeli kolanda bakonzi ya mokili te, bango bazalaka na mposa makasi ya koyangela bato. (Luka 22:24-27) Na nsima, Yesu apesaki bango oyo tokoki kobénga mpenza mobeko ya liboso na kati ya Mobeko ya Klisto; alobaki boye: “Nazali kopesa bino mobeko oyo na sika ete, Bólinganaka; bólinganaka lokola ngai nalingi bino.”—Yoane 13:34.

10. Yesu apesaki bayekoli na ye mobeko nini, mpe yango ezali kosɛnga nini?

10 Na nsima, kaka na mpokwa yango, Yesu alakisaki ndenge oyo bolingo yango esengeli kozala. Alobaki ete: “Lilako na ngai ezali boye ete bólingana [lokola] ngai nasili kolinga bino. Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:12, 13) Yango elingi koloba ete Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli kondima kokufa mpo na bandeko na bango bandimi soki esɛngami bongo? Yoane, moto azalaki wana, amonaki ete ezali bongo, mpamba te na nsima akomaki boye: “Tosili koyeba bolingo na mpo oyo ete ye wana [Yesu Klisto] asopaki bomoi na ye mpo na biso. Ekoki mpe na biso ete tósopa bomoi na biso mpo na bandeko.”—1 Yoane 3:16.

11. (a) Ndenge nini tokokisaka Mobeko ya Klisto? (b) Yesu apesaki ndakisa nini?

11 Na yango, mpo na biso, kokokisa Mobeko ya Klisto elimboli kaka koteya bato makambo na ye te. Bomoi mpe bizaleli na biso esengeli kozala lokola oyo ya Yesu. Ezali solo ete Yesu azalaki kosalela maloba kitoko na masolo na ye. Kasi, apesaki mpe ndakisa na bizaleli na ye. Atako Yesu azalaki liboso ekelamu ya elimo mpe ya nguya kuna na likoló, awa na mabelé asalelaki Tata na ye mpe alakisaki lolenge ya bomoi oyo tosengeli kozala na yango. Azalaki moto ya komikitisa, azalaki na boboto, ayebaki komitya na esika ya bato, asalisaki baoyo bazalaki konyokwama mpe kotungisama. (Matai 11:28-30; 20:28; Bafilipi 2:5-8; 1 Yoane 3:8) Ayebisaki mpe bayekoli na ye bálinganaka ndenge ye alingaki bango.

12. Mpo na nini tokoki koloba ete kolinga Yehova ezali na esika monene na Mobeko ya Klisto?

12 Mobeko oyo eleki monene, elingi koloba kolinga Yehova, ezali na esika nini na kati ya Mobeko ya Klisto? (Matai 22:37, 38; Bagalatia 6:2) Na esika ya mibale? Te! Kolinga Yehova mpe kolinga bandeko na biso baklisto etambolaka nzela moko. Moto akoki solosolo kolinga Yehova te kozanga ete alinga ndeko na ye, mpamba te ntoma Yoane alobaki ete: “Soko moto nani alobi ete, Nalingi Nzambe, nde azali koyina ndeko na ye, ye wana moto na lokuta. Mpo ete ye oyo akolingaka ndeko na ye te, awa esili ye komona ye, akolonga kolinga Nzambe te, oyo amoni naino ye te.”—1 Yoane 4:20; talá 1 Yoane 3:17, 18.

13. Lokola bayekoli batosaki mobeko ya sika oyo Yesu apesaki, yango ebotaki mbuma nini?

13 Ntango Yesu apesaki bayekoli na ye mobeko ya sika ete bálinganaka ndenge ye alingaki bango, amonisaki litomba na yango. Alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Tertullien, moto moko oyo azalaki na bomoi mbula soko 100 nsima ya liwa ya Yesu, alobaki ete, epai ya baklisto ya liboso, bolingo ya bandeko esalaki likambo yango. Tertullien akomaki ete bato oyo bazalaki baklisto te bazalaki koloba boye mpo na bayekoli ya Klisto: ‘Talá ndenge balinganaka mpe ndenge oyo bandimaka kokufa mpo na bandeko na bango.’ Biso mpe tokoki komituna: ‘Nalingaka mpenza bandeko na ngai baklisto na bolingo oyo ezali kolakisa ete nazali moyekoli ya Yesu?’

Ndenge nini tokoki kolakisa bolingo na biso

14, 15. Nini ekoki kosala ete kotosa Mobeko ya Klisto ezala mpasi, kasi nini ekoki kosalisa biso na kotosa yango?

14 Basaleli ya Yehova basengeli mpenza kozala na bolingo lokola oyo ya Klisto. Kasi, okakatanaka mpo na kolinga bandeko baklisto oyo bazalaka na moimi? Ndenge touti komona yango, ata bantoma bazalaki kowelana mpe moto na moto alukaki matomba na ye moko. (Matai 20:20-24) Bagalatia mpe bazalaki koswana kati na bango. Nsima ya koloba na bango ete kokokisa Mibeko elimboli kolinga mozalani, Paulo akebisaki bango ete: “Nde soko bokoswanaka mpe bokolyanaka, bókeba ete bóbebisana te.” Paulo akesenisaki misala ya nzoto na mbuma ya elimo, mpe na nsima apesaki toli oyo: “Tózala na lolendo te, tótungisanaka te, [tóyokelana zuwa te, NW].” Na nsuka, ntoma alobaki ete: “Bókumbanaka mikumba na mawa, boye bokokokisa Mobeko na Klisto.”—Bagalatia 5:14–6:2.

15 Tokoki koloba ete makambo oyo Yehova asɛngi biso eleki makasi lokola alobi ete tótosa Mobeko ya Klisto? Atako kolinga bato oyo balobaki na biso mabe to bazokisaki biso ekoki kozala mwa mpasi, basɛngi biso “[tólanda ndakisa ya, NW] Nzambe, lokola bana balingami, mpe tótambolaka na bolingo.” (Baefese 5:1, 2) Tosengeli ntango nyonso kolanda ndakisa ya Nzambe, oyo “amonisi bolingo na ye mpo na biso na nzela oyo: naino ezalaki biso bato na masumu, Klisto akufelaki biso.” (Baloma 5:8) Soki biso nde tobandi kosalisa bato mosusu, ezala baoyo basalaki biso mabe, tokozala na esengo na koyeba ete tozali kolanda ndakisa ya Nzambe mpe tozali kotosa Mobeko ya Klisto.

16. Ndenge nini tokoki komonisa bolingo na biso mpo na Nzambe mpe Klisto?

16 Tosengeli kobosana te ete misala nde emonisaka bolingo na biso, kasi maloba mpamba te. Ata Yesu amonaki ete ezalaki mpasi mpo na kosala likambo moko oyo Nzambe alingaki na kotalela nyonso oyo yango esɛngaki. Yango wana, Yesu asalaki libondeli oyo: “Tata soko okani boye, longolá kɔpɔ oyo na ngai.” Kasi, abakisaki mbala moko ete: “Kasi mokano na ngai esalama te, kasi bobele mokano na yo.” (Luka 22:42) Atako amonaki mpasi mingi, Yesu asalaki mokano ya Nzambe. (Baebele 5:7, 8) Ntango tozali kotosa, emonisaka ete tolingi Nzambe mpe tondimi ete nzela na ye nde eleki malamu. Biblia elobi: “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye.” (1 Yoane 5:3) Mpe Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Soko bolingi ngai, bokotosa malako na ngai.”—Yoane 14:15.

17. Mobeko nini ya monene Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe ndenge nini toyebi ete mobeko yango etali mpe biso lelo oyo?

17 Klisto apesaki bayekoli na ye mobeko nini ya monene, longola mobeko ya kolingana? Atindaki bango básala mosala oyo alakisaki bango, elingi koloba mosala ya kosakola. Petelo alobaki boye: “Alaki biso kosakola na bato mpe kotatola.” (Misala 10:42) Yesu alobaki polele ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na [elimo santu, NW], kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso oyo esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20; Misala 1:8) Yesu amonisaki ete maloba wana etaleli mpe bayekoli na ye lelo oyo na “ntango ya nsuka,” mpamba te alobaki ete: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Danyele 12:4, NW; Matai 24:14) Ɛɛ, mokano ya Nzambe ezali ete tósakola. Kasi, bato mosusu bakoki komona ete Nzambe asɛngi biso makambo oyo eleki makasi na ndenge atindi biso tósala mosala yango. Kasi, ezali mpenza bongo?

Mpo na nini mosala yango ekoki komonana lokola mosala ya mpasi?

18. Likambo nini tosengeli kobosana te soki tozali konyokwama ntango tozali kosala oyo Yehova azali kosɛnga biso?

18 Ndenge tomoni yango, banda kala Yehova azalaki kosɛnga basaleli na ye makambo ndenge na ndenge. Mpe lokola makambo oyo bazalaki kosɛnga bango ekesenaki, bakutanaki mpe na komekama ndenge moko te. Mwana ya Nzambe akutanaki na komekama oyo eleki makasi, mpe nsukansuka babomaki ye na liwa ya nsɔmɔ mpo azalaki kosala makambo oyo Nzambe asɛngaki. Kasi ntango tozali konyokwama mpo tozali kosala makambo oyo Yehova asɛngi biso, tóbosanaka te ete ezali ye te nde azali konyokola biso. (Yoane 15:18-20; Yakobo 1:13-15) Botomboki ya Satana ekɔtisaki masumu, bampasi na liwa mpe ezali Satana nde abimisaki makambo nyonso oyo epesaka basaleli ya Nzambe mpasi ntango bazali kokokisa makambo oyo Nzambe azali kosɛnga bango.​—Yobo 1:6-19; 2:1-8.

19. Mpo na nini tokoki koloba ete kosala oyo Nzambe azali kosɛnga biso na nzela ya Mwana na ye ezali lokumu mpo na biso?

19 Na nzela ya Mwana na ye, Yehova atindaki ete na ntango ya nsuka, basaleli na Ye básakola na mokili mobimba ete Bokonzi ezali nzela se moko oyo ekosilisa bampasi nyonso ya bato. Bokonzi yango ya Nzambe ekosilisa mikakatano nyonso ya mokili: bitumba, mobulu, bobola, bobange, maladi, na liwa. Bokonzi ekotya mpe paladiso kitoko na mabelé, kati na yango, bato oyo bakufá bakosekwa. (Matai 6:9, 10; Luka 23:24; Misala 24:15; Emoniseli 21:3, 4) Kosakola nsango malamu ya makambo yango ezali mpenza libaku malamu! Tomoni mpenza ete makambo oyo Yehova azali kosɛnga biso ezali makasi te. Satana Zabolo na mokili na ye nde bazali kotɛlɛmɛla biso.

20. Ndenge nini tokoki kolonga komekama nyonso oyo Zabolo abimiseli biso?

20 Ndenge nini tokoki kolonga komekama nyonso oyo euti epai ya Satana? Tokoki kolonga soki tokobosana maloba oyo te: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.” (Masese 27:11) Lokola andimaki kotika likoló, esika oyo bakoki kosala ye eloko te, mpe ayaki kosala mokano ya Tata na ye awa na mabelé, Yesu apesaki Yehova likoki ya kopesa Satana eyano na matumoli na ye. (Yisaya 53:12; Baebele 10:7) Ntango Yesu azalaki moto, akangaki motema na mpasi nyonso oyo amonaki, tii akufaki na nzete ya mpasi. Soki tokamati ye lokola Ndakisa, biso mpe tokoki kokanga motema na bampasi mpe kosala makambo oyo Yehova azali kosɛnga biso.​—Baebele 12:1-3.

21. Ndenge nini otalelaka bolingo oyo Yehova na Mwana na ye bamonisaki?

21 Nzambe na Mwana na ye balakisi ete balingi biso mingi! Na mbeka oyo Yesu apesaki, bato oyo batosaka Nzambe bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na Paladiso. Yango wana, tótika te ete eloko moko ebebisa elikya na biso. Kasi, na ndakisa ya Paulo, mokomoko na biso atalela malamu makambo oyo Yesu asalaki. Paulo akomaki ete: “Mwana ya Nzambe . . . alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.” (Bagalatia 2:20, NW) Mpe tiká tómonisa ete tozali na botɔndi oyo euti mpenza na motema epai ya Yehova, Nzambe na biso ya bolingo, oyo asɛngaka biso makambo oyo eleki makasi te.

Okopesa eyano nini?

◻ Yehova azali kosɛnga biso nini lelo oyo?

◻ Ndenge nini Klisto amonisaki ntina ya bolingo na butu ya nsuka oyo alekisaki elongo na bayekoli na ye?

◻ Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Nzambe?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete kosala makambo oyo Yehova azali kosɛnga biso ezali libaku malamu?

[Elilingi na lokasa 23]

Yesu apesaki liteya nini ntango asukolaki bayekoli na ye makolo?

[Elilingi na lokasa 25]

Atako bazali kotɛmɛla biso, kosakola nsango malamu ezali lokumu monene

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto