Milenere ya misato ekobanda ntango nini?
OSILÁ koyoka bato bazali koloba ete milenere ya misato ekobanda na mobu 2000 te kasi na mobu 2001? Maloba na bango ezali mwa moke solo. Soki tokanisi ete Yesu Klisto abotamaki na mobu 1 L.T.B., ndenge bato bazalaki kokanisa, yango elingi koloba ete milenere oyo tozali na yango ekosuka na mokolo ya 31 Desɛmbɛ 2000 (kasi 1999 te) mpe milenere ya misato ekobanda na mokolo ya 1 Yanuali 2001.a Kasi, lelo oyo ebele ye bato ya mayele bazali kokanisa ete Yesu Klisto abotamaki na mobu 1 L.T.B. te. Boye, Yesu abotamaki na mbula nini?
Yesu abotamaki na mbula nini?
Biblia eyebisi mbula oyo Yesu abotamaki te. Kasi, Biblia elobi ete abotamaki “na mikolo ya mokonzi Elode.” (Matai 2:1) Bato mingi oyo balimbolaka Biblia bakanisaka ete Elode akufaki na mobu 4 L.T.B. mpe Yesu abotamaki liboso Elode akufa; mbala mosusu na mobu 5 to 6 L.T.B. Bakanisaka bongo mpo na makambo oyo Flavius Josèphe akomaki mpo na liwa ya Elode. Moto yango azalaki na bomoi na ekeke ya liboso.b
Josèphe alobaki ete ekilipisi (éclipse) ya sanza esalemaki mwa moke liboso Mokonzi Elode akufa. Bato oyo balimbolaka Biblia balobaka ete lokola mwa ekilipisi ya sanza esalemaki na mokolo ya 11 Marsi ya mobu 4 L.T.B., Elode akufaki na mbula wana. Nzokande, na mobu 1 L.T.B., ekilipisi mibale esalemaki: na mokolo ya 8 Yanuali ekilipisi esalemaki mpe molili ekɔtaki mpe na mokolo ya 27 Desɛmbɛ, ekilipisi epesaki molili mingi te. Moto moko ayebi te soki Josèphe alobelaki ekilipisi oyo esalemaki na mobu 1 L.T.B. to na mobu 4 L.T.B. Na yango, makambo oyo Josèphe akomaki ekoki kosalisa biso te mpo na koyeba mbula mpenza oyo Elode akufaki. Ata soki tolandi maloba na ye, tokozala kaka na mposa ya makambo mosusu mpo na koyeba mbula oyo Yesu abotamaki.
Biblia elobeli likambo moko oyo ekoki mpenza kosalisa biso na koyeba mbula oyo Yesu abotamaki. Biblia elobi ete Yoane Mobatisi, oyo azalaki ndeko ya Yesu, abandaki kosakola ntango Mokonzi Kaisala Tibɛli akokisaki mbula 15 na kiti ya bokonzi. (Luka 3:1, 2) Masolo ya kala elobaka ete Tibɛli akómaki mokonzi mokolo ya 15 Sɛtɛmbɛ ya mobu 14 T.B. Yango elingi koloba ete ntango oyo akokisaki mbula 15 na kiti ya bokonzi ebandaki na nsuka ya mobu 28 T.B tii na nsuka ya mobu 29 T.B. Ezali na ntango wana nde Yoane abandaki mosala na ye, mpe sanza motoba na nsima, Yesu abandaki mpe oyo ya ye. (Luka 1:24-31) Makambo yango, bakisa mpe makambo mosusu, ezali komonisa biso ete Yesu abandaki mosala na ye na otomne ya mobu 29 T.B.c Biblia elobi ete Yesu azalaki “na mbula soko ntuku misato” ntango abandaki mosala na ye.” (Luka 3:23) Soki Yesu azalaki na mbula 30 na otomne ya mobu 29 T.B., elingi koloba ete abotamaki na otomne ya mobu 2 L.T.B. Soki totángi mbula nkóto mibale banda na otomne ya mobu 2 L.T.B. (mpe tóbosana te ete mobu zero ezalaki te; elingi koloba ete banda mobu 2 L.T.B. tii na mobu 1 T.B. ezali na mbula mibale), tokomona ete mbula nkóto mibale ekokaki na otomne ya 1999, mpe milenere ya misato ebandaki na ntango wana!
Likambo yango ezali na ntina nini? Na ndakisa, mbala mosusu ebandeli ya milenere ya misato ekozala mpe ebandeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu Klisto oyo elobelami na mokanda ya Emoniseli? Te. Ata esika moko te Biblia eyokanisi milenere ya misato na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto.
Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bákeba na likambo ya koluka koyeba badati. Alobaki na bango boye: “Ezali likambo na bino koyeba ntango soko bilaka bisili Tata kotya na bokonzi na ye moko te.” (Misala 1:7) Liboso na yango, Yesu alobaki ete ye mpe ayebaki te ntango nini Nzambe akopesa etumbu na mokili oyo mabe. Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto ekobanda nde na ntango wana. Yesu alobaki boye: “Nde mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata baanzelu na Likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi.”—Matai 24:36.
Tokoki mpenza kokanisa ete Klisto akozonga mbula 2 000 nsima ya kobotama na ye? Te. Na ntembe te Yesu ayebaki mokolo oyo abotamaki. Mpe akokaki kotánga mbula 2 000 banda mokolo wana. Kasi, ayebaki te mokolo nini mpe ngonga nini akozonga. Tomoni mpenza ete koyeba mokolo oyo Yesu akozonga ekoki kozala pɛtɛɛ ndenge wana te! ‘Ntango na bileko’ ezalaki na mabɔkɔ ya Tata na ye. Kaka ye nde ayebaki ntango oyo likambo mokomoko ekosalema.
Lisusu, Yesu asɛngaki bayekoli na ye te ete bázela ye na mboka moko boye. Alobaki na bango te ete báyangana esika moko mpo na kozela ye, kasi bápanzana tii na “nsuka ya mokili” mpe bákómisa bato bayekoli na mabota nyonso. Abongolá maloba wana te.—Misala 1:8; Matai 28:19, 20.
Makambo oyo bato bazali kozela na milenere ya misato ekosalema?
Atako bongo, bandimi mosusu oyo bamipesá mpenza na mangomba na bango bazali kozela ete makambo minene esalema na mobu 2000. Bazali kokanisa ete na basanza oyo ezali koya, makambo mosusu oyo mokanda ya Emoniseli elobeli ekosalema na ndenge mpenza ekomami. Kutu, bakanisaka ete bango mpe bakosala makambo mosusu mpo na kokokisa yango. Na ndakisa, bazali kolobela esakweli ya Emoniseli 11:3, 7, 8, oyo emonisi batatoli mibale bazali kosakola na “mboka yango monene, oyo ebyangami na lisese ete, Sodomo, na Ezipito, kuna Nkolo na bango mpe abakisamaki na nzete.” Ntango bakosilisa mosala na bango, nyama ya yauli oyo euti na libulu mozindo ekoboma batatoli yango mibale.
Zulunalo moko (The New York Times Magazine ya 27 Desɛmbɛ 1998) ezalaki na lisolo eyebisaki ete mokambi ya lingomba moko oyo “ayebisaki bandimi na ye ete ye azali moko na batatoli mibale oyo bazwi mokumba ya kosakola ete mabelé ekobomama mpe ete Nkolo akoya. Na nsima, Satana akoboma bango na balabala ya Jérusalem.” Yango wana, bakonzi ya Israël bazali mpenza komibanzabanza. Bazali kobanga ete bandimi mosusu oyo bazalaka na molende mabe báluka “kokokisa” bisakweli yango na ndenge na bango, ata soki ekomema bitumba na mboka! Kasi, Nzambe azali na mposa te ete bato ‘básalisa’ ye mpo akokisa mokano na ye. Makambo nyonso oyo Biblia esakoli ekokokisama na ntango oyo Nzambe akanaki mpe na ndenge oyo abongisaki yango.
Mokanda ya Emoniseli ekomamaki “lokola bilembo.” Emoniseli 1:1 elobi ete Yesu alingaki komonisa “baombo na ye” (kasi mokili mobimba te) makambo oyo elingi kosalema. Mpo na kokanga ntina ya makambo ekomami na mokanda ya Emoniseli, baombo ya Klisto, to bayekoli na ye bazali na mposa ya elimo santu ya Nzambe. Yehova apesaka baoyo basepelisaka motema na ye elimo yango. Soki makambo oyo ekomami na mokanda ya emoniseli ekokokisama kaka ndenge ekomami, boye, ata bato oyo bazali na kondima te bakoki kotánga mpe koyeba ndimbola na yango. Soki ezali bongo, ezali na ntina te ete baklisto bábondela Nzambe apesa bango elimo santu mpo na kokanga ntina ya mokanda yango.—Matai 13:10-15.
Biblia esalisi biso na komona ete milenere ya misato kobanda Yesu abotamá ebandaki na otomne ya mobu 1999 mpe ete dati yango to mpe mokolo ya 1 Yanuali 2001 ekokesena na mikolo mosusu te. Kasi, ezali na milenere moko oyo baklisto bazelaka. Soki ezali milenere ya misato te, boye ezali oyo wapi? Lisolo oyo elandi ekopesa biso eyano na motuna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá etanda oyo elobi “mobu 2000 to mobu 2001?” na lokasa 5
b Na kolanda ndenge oyo bato yango oyo balimbolaka Biblia bazali komonisa ndenge makambo ya kala elandanaki, milenere ya misato ebandaki na 1995 to 1996.
c Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokanda Étude perspicace des Écritures, volimi 1, nkasa 1113-1115, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 5]
Mobu 2000 to mobu 2001?
Mpo na koyeba ntina oyo bato mosusu bazali koloba ete milenere ya misato banda Yesu abotamá ekobanda na mokolo ya 1 Yanuali 2001, tótalela ndakisa oyo: Soki na ndakisa ozali kotánga mokanda moko ya nkasa 200. Soki okómi na ebandeli ya lokasa 200, yango elingi koloba ete osilisi kotánga nkasa 199. Etikali otánga lokasa moko. Okoki koloba te ete osilisi mokanda yango soki okómi naino na nsuka ya lokasa 200 te. Ndenge moko mpe, tokolekisa mbula 999 ya milenere oyo tozali ntango tokokóma na mokolo ya 31 Desɛmbɛ 1999. Kasi, ekotikala mbula mobimba mpo tókóma na nsuka ya milenere yango. Na bongo, milenere ya misato ekobanda mokolo ya 1 Yanuali 2001. Kasi, lokola lisolo oyo emonisi yango, elingi koloba te ete soki tokómi na dati yango, tokokokisa mbula 2 000 banda Yesu abotamá.
[Etanda na lokasa 6]
Kokabola bambula na L.T.B. mpe T.B. ebandaki ndenge nini?
Na ebandeli ya ekeke ya mobota T.B., Pápa Jean I apesaki sango moko na nkombo Denys le Petit mosala ya kobongisa manaka mpo na kosalisa mangomba na koyeba dati oyo basengeli kosalaka feti ya Pasika.
Denys abandaki mosala. Abandaki kotánga bambula na kozonga nsima, alekaki mbula oyo Yesu akufaki, tii na mbula oyo akanisaki ete ezali mbula oyo Yesu abotamaki. Na nsima, abéngaki mbula mokomoko na motango moko. Denys abengaki bambula oyo ezali banda kobotama ya Yesu “A.D.” (elimboli Anno Domini, “na mbula ya Nkolo na biso.”) Atako mokano na ye ya liboso ezalaki ya kobongisa lolenge malamu ya koyeba ntango ya kosala feti ya Pasika mbula na mbula, na kozanga koyeba, Denys abimisaki lolenge ya kotánga bambula banda ntango oyo Klisto abotamaki.
Atako balimboli mingi ya Biblia balobaka ete Yesu abotamaki te na mbula oyo Denys aponaki mpo na kotánga mikolo, ndenge oyo akabolaki bambula esalisaka biso na koyeba ntango oyo likambo mokomoko esalemaki mpe ndenge oyo elandanaki.